#Article 1: Lisakoli ya molongo ya makoki ya moto (765 words)


Lisakoli lya molɔ́ngɔ́ ya makokí ma moto

Na botáláká ’te kondima limɛmya lya bato bansɔ ba molɔ́ngɔ́ mpé makokí ma bangó maye mazalí ndéngé mɔ̌kɔ́ mpé bakokí kopímela moto tɛ́ ezalí ntína ya bonsɔ́mí, bosémbo mpé kímyá káti ya molɔ́ngɔ́. Na botáláká ’te komɔ́na mpámba mpé kobóya kotósa esɛ́ngɛ́li ya moto ebátelama na bokonzi bwa bosémbo mpɔ̂ ’te, na sima yangó, moto ákóma na botɔmbɔki esóngó na minyɔ́kɔli tɛ́,

Na botáláká ’te esɛngɛ́lí koléndisa boyókani na káti ya bikólo,

Na botáláká ’te na káti ya Mokandá mwa Mibéko mya Lisangá ya Bikólo bya Molɔ́ngɔ́, bato ba molɔ́ngɔ́ bayébísí lisúsu loléngé bandimí malɔki ma ntína ya moto, limɛmya mpé lokúmu la moto, bokokani bwa makokí ma bǎsí mpé babáli mpé na botáláká ’te bangó bayébísí ’te bazwí mokáno mwa kobɔngisa ezalélí ya moto mpé kosála ’te moto azwa bomɔi malámu mpenzá na káti ya bonsɔ́mí bwa monɛ́nɛ mpenzá,

Na botáláká ’te kozala bato bansɔ na makanisi ndéngé mɔ̌kɔ́ mpɔ̂ na makokí mpé bonsɔ́mí bwangó, ezalí na ntína monɛ́nɛ mpɔ̂ ’te óyo bakáni elónga,

Likita linɛ́nɛ lizalí koyébisa
Lisakoli lya molɔ́ngɔ́ óyo ya makoki ma moto
lokóla elɔ́kɔ eye bato mpé bikólo binsɔ balingí bazwa, mpɔ̂ ’te bato mpé mangómbá mansɔ, na bobátelaka ntángo insɔ Lisakoli lyangó na motéma, basála makási na botéyi mpé bokólísí bwányá, mpɔ̂ ’te makokí mpé bonsɔ́mí yangó etósama mpé basála ’te bandima mpé basálélí yangó na bosɔ̂lɔ́ mpenzá na molɔ́ngɔ́ mobimba, ezala na káti ya bato ba Bikólo bya Lisangá bangó mɔ̌kɔ́ tǒ na káti ya ekólo mpé molɔ́ngɔ́ mobimba.

Bato bansɔ na mbótama bazalí nsɔ́mí mpé bakókání na limɛmya mpé makokí. Bazalí na mayɛ́lɛ mpé basɛ́ngɛ́lí kovánda na bondeko o káti na bangó.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kozala na bomɔi, na kozala nsɔ́mí mpé kozala motéma nsɛi na bomoto bwa yě.

Moto atá mokɛ́ tɛ́ asɛ́ngɛ́lí kozala moúmbu; boúmbu mpé botɛ́ki baúmbu bupekísámí na ndéngé insɔ

Moto atá mokɛ́ tɛ́ asɛ́ngɛ́lí konyɔ́kama mpé kosalelama makambo ya bonyama mpé óyo ezanga bomoto na lokúmu.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ’te bayéba makokí ma yě bipái bínsɔ.

Bato bansɔ bakokání libosó lya mobéko mpé bazalí na likokí lya kobátelama na mobéko sé ndéngé mɔ̌kɔ́. Bánsɔ bazalí na likokí lya kobátelama sé ndéngé mɔ̌kɔ́ esóngó na bikelá nyɔ́nsɔ ya bokɛsɛnisi elongobani tɛ́ na Lisakoli liye mpé esóngó na bikelá bínsɔ biye bikobota bokɛsɛnisi yangó.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya koluka lisálisi lya nsɔ́lɔ́ mpenzá na libosó lya mangómbá ma bosámbisi bwa ekólo eye ezalí na bwányá esóngó na bikelá biye bikotángola malɔki ma ntína mandimámí na mibéko mpɔ̂ na yě.

Moto mɔ̌kɔ́ tɛ́ akokí kokangama tǒ kobengisama ntína tɛ́.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ’te likambo lya yě lokóla lya bato bansɔ, lisámbisama na bosémbo mpé na mǐso mya bato bánsɔ na esámbiselo ya nsɔ́mi mpé ya epái mɔ̌kɔ́ tɛ́, eye ekozwa mikáno ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na makokí mpé masɛ́ngínyá yě tǒ ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na bosɔ̂lɔ́ bwa likambo yě afúndámí.

Moto atâ mɔ̌kɔ́ tɛ̂ akokí kokɔ́ta mpámba na makambo matálí ezaleli, libótá, ndáko mpé mikandá ya nganda tǒ mpé kobébisa lokúmu na yě. Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya kobátelama na mobéko esóngó na bikɔ́ta-kɔ́ta yangó.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí, ya kozala na makanisi na yě, mayɛ́lɛ na yě ya motéma mpé lingómba lya yě ya nzámbe; likokí lyangó ekopɛ́sa yě ndingisa ya kopɔna lingómba lya nzámbe tǒ kobóngola makanisi ma yě, yě mɔ̌kɔ́ tǒ elongo na baníngá, ezala na mǐso mya bato ya mɛi; na botéyi, na bikelá, na bokúmisi nzámbe mpé milúlú.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ya bokanisi mpé bolobi; yangó ekopɛ́sa yě ndingisa ya kozala na bomɔi na motéma tɛ́ likoló lya makanisi ma yě ndingisa ya koluka, kozwa mpé kopanza mayébisi na makanisi esíká na esíká, na ndéngé alingí koyébisa mangó.

Moto nyɔ́nsɔ, lokóla azalí mɔ̌kɔ́ ya lingómbá, azalí na likokí lya kozwa lisálisi lya esálelo-lisungi, eye ezalí na ndingisa ya kopɛ́sa moto makokí ma yě ya mosólo, ya bomɔi mpé ezaleli, mpɔ̂ na lokúmu mpé bokóli malámu ya bomoto bwa yě, na lisálisi lya bokási bwa ekólo mpé ya boyókani bwa mikili na mikili, ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na mwangó mpé bokulaka ya ekólo na ekólo.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí lya bopémisi mpé bopémisi nzóto, míngi ya bozwi eleko ya sémbo ya boúmélí na mosálá mpé na bozwi lifúta na bakonzi ya mbala na mbala.

Moto nyɔ́nsɔ azalí na likokí ’te káti ya bato mpé bikólo, nyɔ́nsɔ ebóngá mpɔ̂ te makokí mpé bonsɔ́mí oyo ekomámí káti ya Lisakoli liye elónga.

Mobéko atá mɔ̌kɔ́ tɛ́ ya Lisangá liye mokokí kozala mpɔ̂ na Letá, na lisangá ya bato, tǒ na moto, likokí lya kosála likambo liye likonyata makokí mpé bonsɔ́mí áwa.




#Article 2: Nzɔku (149 words)


Nzɔku ezalí nyama ya mabɛ́lɛ ya Afríka tǒ ya Azia. Ezalí na bwěmbo tǒ zólo elaí eye ekokí kobúka matíti, mbuma tǒ nkásá ya nzeté mpɔ̂ na kolíya. Ezalí na mpɛ́mbɛ́ tǒ mimpáti mibálé, na makútu tǒ matɔi manɛ́nɛ mpé na mokíla mokɛ́.

Nzɔku ezalí nyama ya mabɛ́lɛ elekí monɛ́nɛ eye evandaka o mokili (mondɛ́lɛ́ ezalí nyama ya mabɛ́lɛ elekí monɛ́nɛ o mái). Nzɔku ya mobali eye elutí monɛ́nɛ ebomámákí o Angola o mobú 1974, yango emekí bozitó ya kilógálame nkóto zómi na míbalé ( kg) mpé bolaí bwa mɛ́tɛlɛ 4,20. Nzɔku ya mobali na mokóló ekokí komeka  kg na 2,8 m. Na mbótama, mwǎna ya nzɔku ekokí komeka bozitó ya kilógálame nkámá (100 kg). Nzɔku mwǎsí ezalí na zémi mpɔ̂ na sánzá 20 tǒ 22. Nyama mɔ̌kɔ́ tɛ́ ezalí na zémi elekí ntángo yango. Nkóla ya nzɔku ekokí koleka mibú 70.

Nzɔku elembaka mpɛ́mbɛ́ ya yangó (yě) tɛ́.




#Article 3: Kongó-Kinsásá (336 words)


Republíki ya Kongó Demokratíki ezalí esé ya Afríka ya Mambénga, ezwáká lipandá o sánzá ya motóbá mokɔlɔ mwa 30 mobú mwa 1960.

Na ekólo Kongó nkótá nkámá íbalé ilobamaka . Nyɔ́nsɔ wâná elakísí boyébí bwa bato ya bomɛngo etondi mabelé. Ciluba, kikongo, lingála mpé kiswahíli izalí nkótá ínei inɛ́nɛ ya ekólo, kasi nkótá nkámá íbalé ilobamaka na ekólo Kongó.

Míngi sé na káti ya nkótá ya ekólo bokoyéba etando ya bikelá, mabelé, nyama mpé nzeté.

Bamɔ́ngɔ bazalí na nkómbó míngi ya nzeté ya mbíla na maye manso basálelaka. Sɔ̂lɔ, nzeté ya mbíla eyébaní káka mpó na mafúta na masanga tɛ̂. Eyébaní lokóla nkísi ekosílisa makɔnɔ, na yangó mpé bakosála bitúnga mpé bikilakila.

Ekakoli ya molái : Lisapo lya Kongó-Kinsásá

Tálá mpé: Ntángo ya banɔ́kɔ́ (Kongó-Kinsásá), Bɛndɛ́lɛ ya Kongó-Kinsásá, Bilembo-nkita ya Kongó-Kinsásá

Zaïre ezaláká kobanda mobú mwa 1971 téé 1999 nkómbó óyo ebêngámákí « Republíki ya Kongó Demokratíki », mfalanga ya ekólo wâná, mpé ebale óyo epésáká ekólo Kongó ebimélí na yě see mɔ̌kɔ́ na mayi-mozindo Atalantiki. 

Congo belge elongákí lipanda na 1960, o nkómbó ya « Republíki ya Kongó », nkómbó nsé mɔ̌kɔ́ na kolonia ya kala ya Falansia - Kongó-Brazzaville. Nkómbó ya « Republíki ya Kongó Demokratíki » ezwamákí na 1966, kasi bikólo bíbalé basilákí koyébana míngi-míngi, mpé kokesana na nkómbó ya bingúmba-mikonzi bya bangó, mpɔ̂ na komíbêngama Kongó-Léopoldville (mpé Kongó-Kinsásá na nsima 1965), na Kongó-Brazzaville. 


Biteni mikonzi bya Kongó-Kinsásá mibengami Bitúká (Provinces ya Lifalansé). Kinsásá ezalí mboka mokonzi ya ekólo mpé efándeli ya bitúlúká bya ekólo. Ezalí na makokí ma engumba. Bingumba mpé bitúká biyángélámí, bizwí makokí ma koyángela yangó mɔ̌kɔ́ na mobéko mpé bikambémí na bato baye bazwamí na bitúká bike bya mbóka. Bitúká biina bia bonsɔ́mí bizalí mbóka mondɛ́lɛ́, komine, seketele mpé sefeli. Bitúká bya Kongó-Kinsásá bazalí:




#Article 4: Joseph Kabila (231 words)


Joseph  Kabange (abótámi mokɔlɔ 4 ya sánzá ya motóbá ya 1971) azalaka mokambi-ekólo ya Kongó-Kinsásá. Alandí tatá wa yě, Laurent-Désiré Kabila. Mokambi-ekólo óyo akutákí liwa na loboko wa garde-du-corps waye, na Janvier 2001.  Na bokonzi na yě, azalaka komeka kosilisa bitumba, mpe kobimisa mapinzo ya bisé mosusu olibanda ekolo Kongó-Kinsásá. Nàkolanda siniatire ya mokanda ya kimia, bulamatari ya sika, pona eyángeli ekolo pona mbula mibale, ekelamaki na 2003, mpe okati wango bakotaki bakambi ya mapinzo mibale ya makasi koleka, oyo basilikelaki bulamatari, to mpe barebɛl; bango bakotaki na kimokonzi lokola bakambi-babale, elongo na moto moko pona parti ya mokambi-ekolo, mpe moto mosusu pona bato oyo bakeseni na politiki ya parti oyo azalaka na kimokonzi, kasi baselalaka minduki te (mingi-mingi babengami opozision). Mokanda ya mibeko-mokonzi to mpe konstitision elobi ete maponeli likosalema liboso ya 30 Yuni ya 2006.

Kabila abundaki na mapinzo ya barebɛl ya tata wa ye, nà bitumba oyo ememaki wa ye tata o kimokonzi. Alandaki kelasi ya mapinzo okati ya mapinzo ya Uganda mpe ya Rwanda. Asalaki na misala mingi okati o bulamatari liboso ya kozala mokambi-ekolo, lokola oyo ya General-Major mpe Mokambi-lisanga ya Mapinzo ya mabele ya ekolo Kongó-Kinsásá, esika oyo a kambaki basoda o ekolo Kongó-Kinsásá na bitumba ná barebɛl, obanda 1998. Kasi bato mingi bakanisaki ete ye azalaki na manso makokí te pona mosala ya mokambi-ekolo, na ntango alandaki tata wa ye Laurent-Désiré Kabila na kimokonzi.  




#Article 5: Joseph Kasa-Vubu (776 words)


Joseph , azalí Mokambi-Ekólo wa libosó wa Kongó-Kinsásá. Yě afándaka na kiti ya bokonzi bandá mokɔlɔ mwa 1, sánzá ya nsambo mobú mwa 1960 tíí mokɔlɔ mwa 24, sánzá ya zómí na mɔ̌kɔ́ mobú mwa 1965. Mokambi mbúlamatáli ya yě  wa yambo ezaláká Patrice Lumumba.

Abotamá na Dizi pɛmbɛ́ni ya Tshela na Mayombe (Bas-Congo), mokɔlɔ mwa yě mwa mbótama eyébani malámu tɛ́. Kozánga kozwa batísimo na mbótama esáláká 'te  mokɔlɔ mwa yě mwa mbótama ekomama tɛ́ na mikanda mya lɛ́ta. Engɛ́bɛ́nɛ́ na maloba ma baníngá ba yě ba kelási mpé bamumpɛ́ ba lingómbá lya Scheut baye bayébaka yě lokóla moyékoli, mobú mwa mbótama ya yě mokoki kozala nzínganzínga ya mobú mwa 1915, kasi na 1913 tɛ́ engɛ́bɛ́nɛ́  na makomi maye mazalí kotála bomɔi bwa yě. Moyékoli na kelási ya bónganga Nzámbe o Mbata-Kiela, bamumpɛ́ bamɔnɔ́kɔ́ na lombango 'te yě azalí na nsɔ́mí míngi eye elongobani tɛ́ na mosálá mwa bónganga Nzámbe. Bomoyíbisáká 'te ékosɛ́ngɛlɛ alanda kelási ya bato bansɔ, mpé akɛndɛ́kɛ́  (akotɔ́kɔ́) kelási ya bato bansɔ mpé ayékoláká makambo matáli bokanisi (philosophie).

Nsima ya bosilisi kelási ya yě, yě akómáká molakisi  kasi amɔnɔ́kɔ́ 'te lifuta lya yě lokóla molakisi ekokanáká sɔ́kɔ́ mokɛ́ tɛ́ na kelási iye yě akɔtɔ́kɔ́. Akotíka mosálá mwa molakisi, mpé akɛndɛ́kɛ́ kosála na lingómbá lya mombɔ́ngɔ ya mabáyá liye libêngami Agrifor  mpé nsima ya kosála na lingómbá lîná , asáláká lokóla mosungi *comptable na mbulamatari ya koloni na *departement eye etáli makambo ma mosɔ́lɔ.  Ekomi yě na  Léopoldville_nkómbó ya kala ya kinsásá, akozwa *infuence ya makanisi ndéngé na ndéngé ma lisangá lya bato baye babêngi bakaláka baye baútaka na bingúmba ndéngé na ndéngé ya ekólo Kongó-Kinsásá.

Yě, ayébanáká míngi o miso mya bato lokóla mokambi mwa lingómbá lya politíki liye ebêngami Boyókani bwa bakɔ́ngɔ, na lokóta la lifalansé balibêngi Alliance des Bakɔ́ngɔ, ABAKO na bokúsé.

Na mobú mwa 1958, akómaka bugumési ya komíni ya Dendale eye ekóma lɛlɔ́ komíni Kasa-Vubu 

Na mobú mwa 1965, mɔ̌kɔ́ wa basɔ́dá ba yě na nkómbó ya Mobutu akobakola yě mpé moyangeli wa yě ya yambo na kiti ya bokonzi na loléngé luye babêngi na lifalansé coup d'etat, mpé Mobutu akokóma mokonzi wa ekólo mpé akopɛsɛ ndingisa 'te Kasa-vubu afánda o ndáko ya yě  lokóla moto wa bɔlɔ́kɔ mpé abimaka tɛ́. Bamozóngisáká o mbóka wa yě na Bóma o engúmba Bas-congo mpé ndako eye azaláká kofánda ekengelamáká bútu mpé mói mpó na komopekisa kobima,  Na mobú mwa 1969, azwaka bokɔnɔ kasi lokóla bamopekisáká kobima libándá lya mbóka ya yě o Kisundi, yě akufáká na bozángi *soins (malako) ma mongángá.

Kasa-vubu abaláká ....mpé azaláká tatá wa bǎna.....

Ntángo Kongó-Kinsásá ezwǎká bonsɔ́mí (lipandá) na mobú mwa 1960, Kasa-vubu apɔ́nɔmɔ́kɔ́ na *assembly ya sika ya Kongó-Kinsásá  lokóla mokonzi ekólo mpé afándadaka na kiti ya bokonzi na mokɔlɔ mwa ntúkú mísáto, sánzá ya motóbá, mobú mwa 1960.

Ntángo ekɛ́ nsima ya mbotámá ya repubiliki ya sika, yangó ekutanáká na mikakátano míngi, ngámbo mɔ̌kɔ́ ezaláká na mikakátano mya politíki mpé ngámbo esúsu, mikakátano na mapinga ma basɔ́dá mpé ngámbo esúsu bitumba bya bokaboli mbóka o biténi na Katanga. Na ntángo ya matatá mâná, mbúlamatáli ezaláká kotambwisama malámu tɛ́ mpó na bozángi boyókani eye ezaláká na kati ya mokonzi-ekólo Kasa-vubu mpé moyangeli wa yě wa yambo Patrice Lumumba. Tála Matatá na Kongó nsima ya lipandá.

Na mokɔlɔ mwa mitáno sánzá ya libwa, Kasa-Vubu alongoli Lumumba na kiti ya Moyangeli wa Yambo kasi Lumumba aboyi kolongwa na kiti ya Moyangeli wa Yambo mpé yě _Lumumba_ asokoli 'te alongoli Kasa-Vubu na kiti ya bokonzi mpé amisakoláká mokambi wa ekólo, likambo liye lisáláká 'te misálá mya mbúlamatáli ézaláká kotambwisama lisúsu malámu tɛ́ mpé matatá maye masukáká o mokɔlɔ mwa zómi na mínei ntángo komanda mɔ̌kɔ́ ya mapinga ma basɔ́dá na nkómbó ya Joseph Mobutu Sese Seko abɔ́tɔlɔ́kɔ́ bokonzi epái ya Kasa-Vubu mpé akangáká Lumbumba na bɔlɔ́kɔ. Lumumba apɛ́sɛmɛ́kɛ́ na mabɔ́kɔ ma bakaboli ba nsé ya engúmba ya Katanga mpé basiláká komoboma na lisálisi mpé lipamboli lya bikólo bisúsu bya molɔ́ngɔ́. Nzóto ya yě etiyamaka na tono ya *acide mpé Mbúlamatáli ekambamáká na lingómba lyɔ̌kɔ́ lya  bayékoli ba bobɔ́ngɔ bwa Kongó mpé nsima ya mwa ntángo Kasa-Vubu azongeláká bokonzi bwa yě. 

Mibú mitano miye milandáká, Kasa-vubu akambáká ekólo na mbúlamatáli iye izánga nguyá. Na sánzá ya sambo ya mobú mwa 1964, yě apɔnɔ́kɔ́ mokonzi wa lingómba lya bokaboli na nkómbó ya Moise Tshombe lokóla Moyangeli wa Yambo mpé apɛ́sɛ́kɛ́i nzéla 'te babundi ba mbóka isúsu míngi mpenzá babundi ba erópa babunda bitumba biye kongó ezaláká na yangó na batɔmbɔki baye bazaláká na Kisangani mpé bakambamáká na Pierre Mulele.
Mobutu akobɔ́tɔlɔ bokonzi mbala ya íbalé na mokɔlɔ mwa ntúkú míbalé na mínei sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ mobú mwa 1965, kasi ntángo eye akofándisa Kasa-vubu pɛmbɛ́ni mpé akomisákola Mokambi-ekólo.




#Article 6: Mobutu Sese Seko (104 words)


 Sese Seko Kuku Ngbendu wa Zabanga, (azalákí Joseph-Desiré  téé 1972) abótámí o Lisála, Mbánzá ya Mambénga, o mokɔlɔ 14 ya sánzá ya zómi o mobú 1930, akúfí o Rabat, Maroc, o mokɔlɔ 7 ya sánzá ya libwa o mobú 1997. Mobutu azalákí Tatá-mokonzi ya Kongó-Kinsásá téé 1997.

Mobutu akamatákí bokonzi na makási na 1965.

Mobutu azalí moto óyo atíkí mbóka ya Kɔ́ngɔ na mpási, sɔ́kí lɛlɔ́ mobúlú ezalí káka kúna mpámba tɛ́ yě ndé moto atíka ntángo.
Asalí na bokonzi mobú 35 atongá atá elɔ́kɔ tɛ́, ba nzelá káka óyo Babɛ́lɛji batikílá bisó.
Sɔ́kí yě mpenzá azalákí mayɛ́lɛ lɛlɔ́ Kongó-Kinsásá elingaki kokɔ́ta mobúlú tɛ́.




#Article 7: Patrice Lumumba (173 words)


Patrice Émery  azaláká moyángeli wa yambo ya Bulamatari o Kongó-Kinsásá úta sánzá ya motóbá ya mobú mwa 1960 téé sánzá ya libwá ya mobú mûna. Abótámí o Onalua (Katako-Kombé, Sanukru, Kasai-Oriental) mokɔlɔ mwa 2 sánzá ya nsambo o mobú mwa 1925  mpé akúfí o Katanga mokɔlɔ mwa 17 sánzá ya yambo o mobú mwa 1961. Bamokangáká o boloko mpé bamobomáká na komobɛtɛkɛ masási, likambo liye lisalamáká na lisungi lya bulamatari ya Bɛ́ljika mpé Bulamatari ya Bɛ́ljika asengáká bolimbisi na mobú mwa 2002 mpô  na yangó.

Liboso ya kosala politiki Lumumba azalaka mokonzi ya APIC na mobu ya 1955.
Lumumba na parti politiki na yé Mouvement national congolais (MNC) babundela lipenda na Table Ronde de Bruxelles óyo esálamaka kobanda 20 yanwáli 1960 tína 20 febwáli 1960.

Na mikolo miango nde bakónzi ya Bɛ́ljika na ba parti politiki ya Kongó bandimaki eté mokɔlɔ mwa lipanda ekozala 30 yúni 1960.

Patrice Lumumba akúfaka o mokɔlɔ mwa 17 yanwáli 1961 na maboko ya bakónzi ya Etuka ya Katanga. Baboma bangó elongo na Maurice Mpolo na Joseph Okito




#Article 8: Politíki (333 words)


Politíki tǒ lotómo la boyángeli, ezalí bwányá ya koyángela makambo ma ekólo lokóla mibéko mizalí kotínda ; ya kobɔngisa bomɔi bwa bato, bizalela bya bangó ; ya kotámbwisa misála mya ekólo, mpé ya koyókana na bikólo bisúsu ; ezalí sɔ̂lɔ́ ndimbola ya politíki.

Mwâ likébisi litálí liloba politíki. Sɔ́kí toyókí liloba «politíki» tǒ «kosála politiki», tokanisaka níni ? Tokanisaka : koyíba, kokósa, kosála mabé, kosála mayele... Kasi politíki ya sɔ̂lɔ́ ezalí bôngó tɛ́. Liloba politíki eútí na ligresi (lokótá la Gresi): polis elingí koloba mbóka, engumba, ekólo, esé. Politíki ezalí mosála tǒ ntɔ́ki ya boyángeli mbóka tǒ ekólo. Ezalí bwányá tǒ mayele ma koyéba bóníbóní bayángela mokili mwa bato, bóníbóní bakamba bato ba ekólo na ndéngé elingí kosepelisa bato bánsɔ.

Yangó wâná, na mosála mwa politíki, moto akoluka malámu mpɔ̂ ya yê mɔ̌kɔ́ mpenzá tɛ́, mpɔ̂ ya libóta lya yě tɛ́, akoluka sé bolámu bwa batu bánsɔ ba lisangá.

Mpɔ̂ ya bakonzi ba letá, kosɛ́nga bato bazala na *non-viola, elingí koloba mbala mingi kosɛnga bangó basála elɔ́kɔ mɔ̌kɔ́ tɛ́, âtá bazalí komɔ́na mpási ndéngé na ndéngé..., batála sé na mǐso âtá babɛ́tí tǒ babomí bangó.
Mpɔ̂ na lingómbá lya politíki liye libóyí bisálela bya letá, míngi mazalí komíbênga babóya-matatá tô ba non-viola bobɛ́lɛ́ mpɔ̂ bazángí mandóki tǒ bibuneli mpɔ̂ na kozóngisela bakonzi ba letá  *violans iye bazalí kosála bangó. Mpɔ̂ na bikelézia, sɔ́kí bizalí na ngámbo ya bakonzi ba letá, bakotéya *non-violans eye elingí koloba komítíka na mpási.

Ezalí na mitíndo mingi ya politíki, mpé politíki ekabwání nzéla mísató :

Nzéla ya libosó, politíki ya kapitalismɛ elingí koloba politíki wápi bokúlaka mpé matómba ya mosála mazalí mpɔ̂ na basáli tɛ́ kasi mazalí mpɔ̂ na bomongo ya bokulaka babéngaka bangó bakapitalistɛ elingí koloba bakóló-bokulaka mosɔlɔ.

Nzéla ya míbalé, sosialisimɛ ezalí politíki ékopɛ́sa matómba ma mosála na mabɔkɔ ma basáli bangó mɔ̌kɔ́ mpé ekopekisa bokulaka ezala ya mwâ libóké lya bato.

Nzéla ya misátó, kominisimɛ ezalí politíki ekosɛnga bokulaka mpé matómba ya mosála mazala mpɔ̂ na bolámu bwa lingómba, kasi ekopekisa bokulaka ya moto mɔ̌kɔ́.




#Article 9: Sidá (262 words)


 

Sidá (SIDA: Syndrome d’immunodéficience acquise na lifalansé; bokɔnɔ bwa bolɛmbisi makila na lingála) epɛ́samaka na vilúsu.

Ngɛngɛ óyo epɛ́saka bokɔnɔ bwa Sidá elímbisaka bokási bwa makilá ya moto. Ntángo ngɛngɛ êná ekɔ́tí na nzóto ya moto, ekoboma bakɛ́ngɛli ba makilá. Mpɔ̂ bangó ndé bapekisaka bokɔnɔ bokɔ́ta o nzóto ya moto. « Kobɛ́la bokɔnɔ bwa sida » elingí koloba ’te ngéngé yangó ekɔ́tí na nzóto ya moto mpé nsima ya mikɔlɔ akobɛ́la.

Nsima ya bokɔ́tɛli bwa ngɛngɛ o nzóto, ekokí koleka mobú míngi libosó nzóto elakísí kobɛ́la. Yangó wâná, nsima ya koyéba ’te ngɛngɛ ekɔ́tɛ́lí moto o nzóto, esɛ́ngɛ́lí kokɛndɛ nɔkí komɔ́na móngana.

Sɔ́kí na mokɔlɔ mwa lɛlɔ́, mínganga naíno basúkisi bokɔnɔ bwa Sida tɛ́, kasi nkísi ezalí mpɔ̂ ya kolɛ́mbisa bokási bwa ngɛngɛ êná. Nkísi wâná ndé ekopekisa nzóto ya moto ebɛ́la nɔkí bokɔnɔ bwa Sida.

Nsima ya bokɔ́tɛli bwa ngɛngɛ o nzóto, tokokí kopɛ́sa ngɛngɛ êná na moto mosúsu. Ngɛngɛ ekokí kopɛ́sama atâ sɔ́kí nzóto ya mokúmbi ngɛngɛ êná elakísí kobɛ́la tɛ́.

Ndéngé ya sida ekokí kotela moto o nzóto ntángo ya botámboli ya mwǎsí na mobáli sɔ́kí bamíkébísí tɛ́ na ekopekisa, tǒ ntángo ya bopɛ́si makilá, tǒ ntángo mwǎsí akúmbi zémi, sɔ́kí azalí na ngɛngɛ ya Sida akokí kopɛ́sa na mwǎna.

Ntángo ya botámboli ya mwǎsí na mobáli, sɔ́kí tomíkébísí na ekopekisa tɛ́ :

Mwǎsí ya zémi, sɔ́kí azalí na ngɛngɛ ya Sida na nzóto, akokí kopɛ́sa yangó na ndéngé misátó:

Ntángo ya botámboli ya mwǎsí na mobáli : Káka ndé ekopekisa ekokí kopekisa ngɛngɛ ya Sida. Tokokí kosómba ebáteli na bisíká biyíké : esíká batɛ́kaka nkísi, makáyá tǒ masanga.




#Article 10: Demokrasi (112 words)


Demokrasi eútí na maloba mábalé ma ligresi : δήμος demos elingí koloba bǎna ba ekólo mpé κράτος kratos elingí koloba bokonzi. Demokrasi elingí bôngó koloba bokonzi o mabɔ́kɔ ma bǎna mbóka mpé mpɔ̂ na bolámu bwa bangó.

Baye bazalí na bokonzi bazwí bwangó na mabɔ́kɔ ma bato ba ekólo, mpé bokonzi bwangó bozalí mobimba o mabɔ́kó ma moto mɔ̌kɔ́ tǒ mwa libóké lya bato tɛ́.

Demokrasi ezalí bobɛ́lɛ́ loléngé ya koyángela tɛ́, kasi mpé mabɔngí mánsɔ maye makosálí 'te tokoka koyángela na loléngé la demokrasi. Tokotánga mabɔngí manɛ́nɛ mánei, maye tokotála lokóla makonzi ma demokrasi : bomípɛ́si bwa bato bánsɔ, botáli bato bánsɔ loléngé mɔ̌kɔ́, bonsɔ́mí mpé boluki bolámu bwa bato bánsɔ.




#Article 11: Ntángo ya banɔ́kɔ́ (Kongó-Kinsásá) (833 words)


Útá mobú nkóto na nkámá mwambe na ntúkú mwambe na mínei (1884) tíí mobú nkóto na nkámá mwambe na ntúkú mwambe na mítáno (1885), Conférence de Berlin esangísí bǎna ya Erópa, ya America mpé ya Turkia mpɔ̂ na kokamba mibéko mikofungola nzelá ya Afríka. 
Yangó epɛ́sí mayɛ́lɛ na ntóma Léopold II na koyébisa mokili mobimba ’te ebale ya Kongó-Kinsásá eye ekambámí na moleki-nzelá Henry Morton Stanley, ezalí mabelé ma yě mpé na lisangá lya yě. 

Kasi sɔ́kí na búku ekólo ya Afríka eye elekí na mabɔ́kɔ ya mindɛ́lɛ́ elakísí lokóla ekólo ya Mpótó, na mibéko mpé na misálá ya mbulamatári, sɔ̂lɔ́ ezalákí kokambama lokóla elóko ya moto mɔ̌kɔ́. 

Mapángo ma ekólo Kongó esálámí na bokakoli elɔngɔ́ na mindɛ́lɛ́ miye basílákí kozwa o káti, mabelé manɛ́nɛ. 
Ya sɔ́ló, likambo lya ndelo ya Kongó esɛngí kotámbola ekólo mobimba mpé kokamba bato na bokási mpé esɛngákí kozwa bandeko ya miyíndo. 

Bitumba ekɔ́tákí káti ya batɛ́kisi mǐno ya nzɔku epái moyíndo, epái Alabo na bakonzi ya miyíndo. Bolóngi ya Letá epɛ́sákí na Bɛ́ljika esɛngɔ enɛ́nɛ. 

Kasi nsango ya malámu ya «État Indépendant du Congo» (tǒ mpé Ekólo ya Bonsɔ́mí ya Kongó) ’te na Bɛ́ljika mpé na mbóka mopaya. Nsango ya monyɔ́kɔli etálí mosálá ya ndembó ekómí na Mpótó. Mani Léopold II atíndí bato bya bikólo ndéngé na ndéngé mpɔ̂ na koyéba likambo lîná.

Matɔ́ngi na nzóto ya mopaya ebángísí Bɛ́ljika elingí kosúkisa monyɔ́kɔli. Yangó wâná ekólo Bɛ́ljika, mokɔlɔ ya zómi na mítáno sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ mobú nkóto na nkámá libwá na mwambe, ekamátí bokonzi na etando ya ekólo État Indépendant du Congo. 
Na bokambami bwa Bɛ́ljika, ekólo État Indépendant du Congo ekómí lokóla mabelé mɔ̌kɔ́ na Bɛ́ljika. Na nsima ya mánsɔ, bato babósání monyɔ́kɔli mpé motungisi na ntángo ya Mani Léopold II. Akómí yě mɔ̌kɔ́ « mokonzi malámu » mpé ekólo Kongó ekómí « ekólo moyíndo ekambí mindɛ́lɛ́ eye ekolakisa nzelá ».

Ekambí miyíndo na mindɛ́lɛ́ ekopɛ́sa ndakisa, ebɔ́ngí esálá mabé te. Elingákí bokonzi ya botatá esimbí Bruxelles mpɔ̂ na bokambi ya miyíndo ezala malámu, ekólo emíkoka bozwi bwa yě. Kasi etíkí na miyíndo, mánsɔ etálí mbúlamatáli te lokóla botéyi bǎna ba kelási, botóngí ekólo mpé mosálá ya mónganga. 

Bokambi yangó ezalákí mpé na makambo ya makási. Atá mibéko mikokúmbisa bikólo ya miyíndo miye ekambí ekólo Kongó ya Bɛ́ljika, mosálá ya bokási ekosíla káka na mobú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mísáto. Bakopɛ́sa bonyilɛ na bapanzi makita mpé na bisanga bya bato káka na mobú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mítáno na libwá. Na mibú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mítáno, mpósá ya kotámbola ekólo ekopɛ́sa makanisi ya ekólo Kongó ndakisa malámu. Na tema ya mabé tɛ́, bisíká bya ekólo Kongó na emɔneli ya mokili mobimba ya mobú nkóto na nkámá libwá na ntúkú mítáno na mwambe, epɛ́sákí maloba ya elíkya enɛ́nɛ.

Na kati ya ekolo, bisika bya bato na mbulamatari ekambamaki na moyángeli général moye akambi mbulamatari mpe akoyebisa manso epai ya ntoma ya bikolo miyindo na minoko ya bakambi mabele. Bango bakotala misala minso ya léta (bofuti pako, misala ya mabele, misala ya botongi ekolo, bobwaki bosoto, bokati makambo, etc). Misala miina ekambami mpe na bakondzi ya miyindo oyo balatisi palata. 
Na maloba, mokondzi oyo alati palata aponami mpe akokamba mboka wa ye na ndenge ya bokoko. Kasi solo mpenza, ezalaki kosalama ndenge wana te. Mbulamatari alingaki ekolo ekola ndenge ye alingi, kasi na ndenge ya bokoko te. 

Mokondzi moyindo oyo aponami mpe alati palata ya mbulamatari, azalaki elembo ya bakondzi ya kala ya miyindo na kati ya mbulamatari. Kasi bakondzi mingi baponamaki mpona bilanda landa bya bango na mibeko ya mbulamatari. 

Mateya etali yezu, ezalaki mosala ya basango, bakatolike mpe na baprotestants. 
Mbulamatari ya Kongo ya Belgica epesaki bango misala miye etali bosungi bato, misala mya bikela mpe bosali bokono. Na mobu koto na kama libwa na tuku minei na sambo, banganga nzambe katolike mpe protestant, bazalaki 21% na mindele bakosala ô ekolo Kongo. Lokola ekolo Kongo mibále balekaki basi, banganga nzambe bapesaki misala mingi na basi ya mindele. 

Basimbi bokondzi bwa mindele, bambulu-mbulu mpe basoda. Na ebandeli, basoda ya mindele baye bawuti belgica, scandinavia na Italia, etc mpe basoda ya miyindo, bana ya africa ya loboko la mwasi, bana ya Zanzibar, bakotika moke-moke esika na basoda ya mboka na bokambami ba Belges.

Na sima ya bokono ya mpongi eye ezongaka mbula nyoso, minganga ya mindele bakosilisa liboso makono ya seko. Wuta mobu koto na kama libwa na tuku misato, bakosalisa bato na bisika bazali mpe bakotambola mboka na mboka; ekobakisama mpe ba lopitalo ya mike mpe ya minene na bisika bya banganga nzambe mpe na bisika ya misala minene. 

Posa ya bondeko bonene kati ya bikolo ya Afrika mpe ya Erópa ebandi na mibu koto na kama libwa na tuku mitano. Mokano ya kobongisa mibeko elingi kokotisa ekolo Kongó na kati ya mabele ya Belgica. Bato babengi «mboka ya zomi». Mibu mitano na sima ya mobembo monene ya ntoma Baudouin na ekolo Kongó na mobu koto na kama libwa na tuku mitano na mitano, ekolo Kongó ezwi dipanda.




#Article 12: Kapɔ́ti (133 words)


Kapɔ́tí (capote tǒ préservatif na lifalansé) ezalí linono na lilusú lokóla sáki mpɔ̂ na kokɔ́tisa nsɔ́ka ya mobáli. Elátamaka mpɔ̂ na kokébisa bokɔnɔ bwa SIDA mpé bokɔnɔ bosúsu bwa kosíbana.

Ntángo ya botámboli ya mwǎsí na mobáli : káka ndé ekanga ekokí ekopekisa ngɛngɛ ya Sida. Tokokí kosómba ebáteli na bisíká biyíké : esíká batɛ́kaka nkísi, makáyá tǒ masanga.

Ebáteli ekopekisa nzóto na bísó ekɔ́tɔ VIH, mpé ezwa bokɔnɔ boye bozwamaka ya mwǎsí na mobáli. Ebáteli ekopekisa mpé mwǎsí azwa zémi ntángo alingí tɛ́.

Bolámu bwa ekanga bozalí na ntembe tɛ́.

Ebáteli mɔ̌kɔ́ okoláta yangó káka mbala mɔ̌kɔ́. Tángá malámu mpé landa mibéko mpɔ̂ ya kosálela yangó.

Ndéngé ya koláta mpé kosálela :

Esɛ́ngámí kotíya ekanga na bisíká bya mwâ mpío mpé ya koyóma, esíká mwinda tǒ móyi makási mozángí, mpámba tɛ́ ekobéba.




#Article 13: Swisi (131 words)


Swisi ezalí esé tǒ ekólo o ntéi ya Erópa ya límbe. Ezalí o katikáti ya Erópa kasi ezalí o Lisangá lya Erópa (Union Européenne o lifalansé) tɛ́.

Ekabwání o monyɛlɛ tǒ Ɛ́sita na Otrish mpé Liechtenstein, o límbe tǒ Wɛ́sita na Falansia, o Súdi na Italya mpé o Nola na Alémani tǒ Zemani.

Ezalí esé na kimya, esálaka etumba tɛ́ tíí mibú 150.

Nkómbó ya mpénza ezalí Confoederatio Helvetica. Ezalí nkómbó o lokótá la latɛ́. Bato ba Swisi balobaka lifalansé, lialemani, litaliani tǒ liromanch. 

Mbóka-mokonzi ezalí Bern. Mbóka elekí monɛ́nɛ ezalí Zurich.

Lialémani (63.7%), lifalansé (20.4%), litaliano (6.5%) mpé liromanch (0.5%) izalí nkótá ya Letá ya Swisi.




#Article 14: Kinsásá (173 words)


Mbóka tǒ engumba Kinsásá —ekokí kotangama Kinshásá tǒ Kisásá— (eye eyébénákí kala o nkómbó Léopoldville) ezalí mbóka-mokonzi ya Kongó-Kinsásá. Ezalí mpé etúká (province) ya ekólo êná. Ezalí engumba monɛ́nɛ, na efúku 8 ya bato (est.). Elɔngɔ́ na nyɔ́nsɔ óyo, Kinsásá ezalí engumba ya míbalé na bingumba nyɔ́nsɔ ya mokili, na elobelí lifalansé, na sima ya engumba Pari (Falansia), mpé ezalí o káti ya bingúmba minɛ́nɛ koleka ya Afríka o nsé ya Sahara. 

Ekútání na mabelé o loboko-ya-mwǎsí ya Ebale ya Kongó. Na yangó etálání pɛnɛ-pɛnɛ mpénza na Brazzaville, mbóka-mokonzi ya Kongó-Brazzaville. Kinsásá ekútání na 4°16' Sud, 15°17' Ɛ́sita (-4.2667, 15.28333).

Bisíká minɛ́nɛ ya engumba êná : 

Engumba óyo ezalí na mǎto ya ebale tǒ mpé baferry na esɛ́mɛlɔ ya Beach Ngobila mpɔ̂ na kokɛndɛ Brazzaville na Bangi, na nzelá-masíni ’te na Matadi, elongo na Aleopori ya Ndjili.

Bilóko minɛ́nɛ óyo emɔ́nɔnɔkɔ míngi ezalí Buludingi ya SOZACOM, Hotel Inter-Continental na Hotel Memling, Zándo monɛ́nɛ ya Kinsásá, Mizé ya Kinsásá na Académie des Beaux-Arts.  Bulevale ya 30 Juin ndé ekangasí biténi nyɔ́nsɔ ya engumba êná.




#Article 15: Wikitravel (143 words)


Wikitravel ezalí sítɛ wɛ́bɛ ya mobembo. Ata ezalí kosálela modeli ya wiki mpɔ̂ na kokela guide yangó, mpé kolakisa yangó o mokili mobimba na ɛntɛrnɛ́tɛ tǒ mpé World Wide Web, projet óyo ezalí mpé na nsúka-nsúka ya kobima na ndéngé ya búku ya kalité. Wikitravel etóngámí na lisálisi ya batámbɔli-mokili ya Wiki, to mpé Wikitravellers o Mokili mobimba.

Wikitravel ebandémákí na sánzá ya nsambo ya 2003, na makanisi mɔ̌kɔ́-mɔ̌kɔ́ mpenzá na Wikipedia. Projet óyo ezalí kosálela MediaWiki, óyo esálémí mpé mpɔ̂ na Wikipedia. Kasi, Wikitravel ezalí projet ya Wikimedia tɛ̂, mpé ekɛsɛ́ní na Wikipedia mpɔ̂ esáleli lisensia ya Creative Commons  na esíka ya kosálela lisensia ya makɛmi-polélé tǒ mpé GNU Free Documentation License. Okáti o bisáleli míngi, lisensia ya Creative Commons epɛ́sí nzelá mpɔ̂ na kobimisa mankásá ya basáleli Wiki na mikakatano mokɛ́ koléka.

Wikitravel esálémí na nkótá míngi. Ekútánémí na nkóta motoba.




#Article 16: Bacillus Calmette-Guérin (501 words)


Mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin (BCG) na mwǎna wa yo. Lokásá luye luzali kolobela likambo litali nkísi ya Bacillus Calmette-Guérin, mángwɛlɛ́ maye bapɛ́sɛkɛ mpó na kobátela mwǎna wa yɔ̌ na bokɔnɔ bwa Tibélekilosi (TB).

Mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin mazali na biloko biye bipɛ́sɛkɛ bokɔnɔ ya Tibélekikosi (TB) kasi maye basili kolongola bokási bwa yangó. Lokóla basili kolongola bokási bwa yangó, ekoki kosala lisusu mabé tɛ́ o nzóto ya moto, kasi ekosalisa nzóto ya mwǎna ekolisa komibátela ya yangó mɔ̌kɔ́ (immunite), mpé atâ sɔ́kí mwǎna akutani na TB, akozua yangó lisúsu tɛ́.

Na Ingɛlɛ́tɛlɛ, lokóla na mbóka isúsu, BCG (Bacillus Calmette-Guérin) epɛ́sɛmɛkɛ na bǎna baye bazali pɛnɛ na bato baye bakoki kozala na TB. Wana ezali mpó bǎna bâná bavándaka bisika bato mingi bakoki kozala na TB, ekoki kozala babóti tǒ bankɔ̂kɔ baye baúti bisíká biye bato mingi babɛ́lɛkɛ TB. Na mokúsé mbala mingi bǎna baye bavándaka na engúmba ya masikini. Mángwɛlɛ́ maye bapɛ́sɛkɛ ntángo mwǎna abótami kasi bakopɛsɛkɛ mpé lisusu ntángo inso yě asengeli na mangó.

Mbala mingi bakobeta mwǎna wa yɔ̂ ntonga ya BCG na lobɔ́kɔ la mwasi pɛnɛ na lipeka .

Ntángo ozui ntonga, mbala mɔ̌kɔ́ esíká énâ ekovimba. Wana elakisi éte babɛti ntonga ndénge esengeli.
Nsima ya mpɔ́sɔ 2 kin'o 6 wuta kozua ntonga, elembo ekomɔ́nɔnɔ. Ekosua mpó na mikolo mwa mokɛ, kasi ebikaka nɔ́kí sɔ́kí okangi yangó tɛ́. Ekoki kotika elembo ekɛ.
Ntángo esúsu mwǎna akozala na mpótá esíká eye bamobɛtɛ́ki ntonga. Sɔ́kí mpótá ezali kobimisa mái, kanga yangó na elamba ekauka tíí ekobanda kokauka. Kasi kokanga yangó na sparadrap tɛ́. Mpótá énâ ekoki kosala sánzá mpó ebanda kokauka Sɔ́kí epɛsi yɔ̂ mawa o motéma, tǒ omoni lokóla mpótá ezali koyâ monɛnɛ, kɛndɛ epái ya mónganga.

Lokóla mángwɛlɛ́ manso, ntángo esúsu ekosengele tɛ́ kopɛsɛ mwǎna mángwɛlɛ́ BCG. Ntína yango iye:

Mwǎna wa yo akoki kobanda nkísi ya kobatela yě na diphtherie, hemophilie, gilípi, meningite, pertuse, búkabúka, kintúntú, na bokɔnɔ bukotaka na mpótá tetanosi sɔ́kí azali na sánzá 2 ekopekisa tɛ́ éte azua BCG. Kasi zala káka na bokɛ́ngi éte nkisi isusu ínâ ibɛtɛmɛ na lobɔ́kɔ luye babɛtɛki yě mángwɛlɛ́ ma BCG tɛ́ kín'o nsima ya sánzá 3, sɔ́kí tɛ́, esíká énâ ekoki kovímba. Mpé koma nsango ya kozua mángwɛlɛ́ ma BCG mpé mángwɛlɛ́ masúsu na bukú ya mwǎna  mpó esalisa yɔ̂ nsima.

Mbóka iye ikomami o nsé izalaka na bato mingi baye bazali kobɛlɛ TB. Sɔ́kí eyano ya yɔ̂ na mitúna na biso ezali 'eɛ́' tǒ 'íyo', sála nɔkí opɛsɛ mwǎna wa yô mángwɛlɛ́ ma BCG sɔ́kí amozui naíno tɛ́.


Mpó ozua nsango isúsu na lolénge la komibátela, mpé kobátela bandeko na baninga ba yô bazwá TB tɛ́, okoki kokɛndɛ tǒ kobênga:




#Article 17: Tibélekilosi (2149 words)


Tibélekilosi (TB) ezalí bokɔnɔ buye bubébisaka esíká ya kopéma eye babengi mampúlúlú maye mazalaka o káti ya ntólo, kasi ekokí mpé kobébisa bisíka bisúsu bya nzóto. Mbúla (Mvúla) 150 iye iúti koleka na Ingɛlɛ́tɛlɛ, moto mɔ̌kɔ́
na kati ya bato 8 baye basiláká kowâ, bakufáká na bokɔnɔ bwa tibélekilosi. Kasi kobandá mibú 1980, bokɔnɔ bûná bumɔ́nɔnɔkɔ mingi lisusu tɛ́, mpó éte bato bakokóma na ndáko ya malamu, koliya malamu mpé mínganga bazali mpenzá komɔ́nɔ o lombangú mpé kotiya mpɛmbɛ́ni baye bazalí kobɛlɛ mpó bazua lobiko noki. Kasi TB esili naíno libela tɛ́. Ya sɔ̂lɔ́, TB ezalí bokɔnɔ bunyɔ́kɔlɔkɔ mokili mobimba mingi mikolo miye. Mbúla (Mvúla) eye eleki bato mingi bakufáki na TB-8,000 na mokɔlɔ mɔ̌kɔ́ - koleka Mbúla (Mvúla) inso iye isíla koleka. Na Mbúla (Mvúla) 20 iye ileki, TB ebandi komata malɛ́mbɛmalɛ́mbɛ na Ingɛlɛ́tɛlɛ. Sikáwa bato 7,000 bazalí kozwa yangó o mobú mɔ̌kɔ́ – wana elíngi koloba moto mɔ̌kɔ́ na kati ya bato 10,000 na molɔ́ngɔ́ mobimba.

Lokásá luye luzalí koyebisa (koloba?) likóló lya bokɔnɔ bûná, ndénge ya koyéba bwangó, lobíko la bwangó, mpé ekolakisaka ndénge esili kopanzana na mbóka na (biso?) mpé kokokisa yangó na loléngé lusili kopanzana na molɔ́ngɔ́ mobimba. Lokásá luye lupɛsi mpé tolí ya sika mpó na mángwɛlɛ́ ma BCG na UK, mpé lulakisi buku isusu iye izali na nsango iye inso ikosalisa koyéba makambo ma bokɔnɔ bûná na website.

Tibélekilosi (TB) ezalí bokɔnɔ bwa mabé buye bukoki kovimbisa kati (ya moto ya mwana?), na lokóta la Kingɛlɛ́sa babobengi TB meningitis. Mpó na bakóló, mbala mingi ebebisaka esíká ya kopéma eye babengi mampúlúlú, kasi ekoki kobebisa mpé mikúwa , kati ya moto tǒ bisika bisúsu. Awa na mbóka na biso, bato mingi baye bazuaka bokɔnɔ bwa TB babikaka, kasi basengeli komɛlɛ nkísi sánzá motóba mpó na kobika.

TB ezalí bokɔnɔ bwa makási, kasi ebikisamaka, ewutaka na mikɔlɔ́bɔ mya ('Mycobacterium Tuberculosis'), Tibélekilosi tǒ M. Tb na bokúsé. Mbala mingi ekotaka na ntólo esíká ya kopéma mpé ebɛngɛmi na Kingɛlɛ́sa ('pulmonary TB') kasi ekoki mpé kokota bisíká bisúsu o nzóto lokóla na kati ya nkíngó, mikúwa tǒ biténi bya kati ya libumu. Ekoki mpé kopɛsɛ menenziti.
M. bovis ezalí bokɔnɔ bosúsu buye bukokani na TB kasi bwangó buzuaka káka nyama, mingi mpenzá ngɔ́mbɛ́ ('bovine TB'). M. bovis mpé ekoki kozua moto lokóla na eleko ya kala, ntángo bato bayebaki naíno tɛ́ ndénge níni bakokí kobátela mabɛ́lɛ  tǒ koluka TB na Ngɔ́mbɛ́.

Nzelá enɛnɛ ya kozua TB ndé ewutaka na moto oyo azali na yangó na nzóto ya ye,oyo azali kokósola. Soki akósola, abimisi bokɔnɔ na kati ya nsɔ́í. Sɔ́kí moto ozui nsɔ́í yangó na ntángo ya kopéma, wana okoki kozua TB. Mikɔlɔ́bɛ miye miúti na nsɔ́í ekoki kotelengana na mopɛpɛ ntángo molayi kasi mbala mingi epɛ́sɛkɛ bokɔnɔ tɛ́. Nzela enɛnɛ ezali káka sɔ́kí ozalaka mpó na ntángo molayi pɛnɛ na moto oyo azalí na TB.

Nakati ya Ingɛlɛ́tɛlɛ na mibú mya 1950, batu koleka 50,000 bazaláká kozua TB na mbúla (mvúla) mɔ̌kɔ́.
Mikolo miye ezongi tíí batu 7,000 baye bazuaka na mbúla mɔ̌kɔ́ , kasi sɔ́kí okokisi yangó na
mibú mya 1990, ntángo wana ezalaki bato 5,500. Yango ekomɔ́nɔ éte ezalí komata lisúsu.
Wana omɔnɔní éte kozua TB ezalí noki tɛ́, kasi esengeli ozala na ekenge na ndénge ya koyeba
yangó mpó, na mokili mobimba TB ezali bisíká mingi. Lokóla batu batambolaka mingi na
mokili, bangó bakoki kozua yangó mpé bakoki kokotisa yango na mbóka ya yɔ̂.

Tibélekilosi ekoki kobebisa biténi mingi bya nzóto. Ndénge yangó ekomɔ́nɔnɔ na mwǎna
ekɛsɛni na loléngé ekomɔ́nɔnɔ na mokóló. Lokóla Tibélekilosi ewutaka na bato, ekozala malámu éte oyébá sɔ́kɔ moto azalí na yangó mpó omibátela. Malámu omɔ́nɔ mónganga tǒ dókótóló sɔ́kí mwǎna tǒ ndeko wa yɔ̌ alakisaka bilembo biye bikomami o nsé:

Na Ingɛlɛ́tɛlɛ, lokóla na mbóka isúsu, Mángwɛlɛ́ ma Bacillus Calmette-Guérin epɛsɛmɛkɛ bǎna baye bazali pɛnɛ na bato baye bakoki kozala na TB. Wana ezalí mpó bǎna bâná bavándaka bisíká mɔ̌kɔ́ na bato ba TB, ekoki kozala baboti tó bankoko baúti bisíká bato mingi babɛ́lɛkɛ TB. Na bokuse mbala mingi bǎna baye bavándaka na engúmba ya masikini. Mobateli (mángwɛlɛ́ ) mwangó bapesɛkɛ na ntángo mwǎna abótami kasi bakopɛ́sɛkɛ mpé ntángo inso iye isengeli.

Mbóka iye ikomami o nsé izalaka na bato mingi baye bazali kobɛlɛ TB. Sɔ́kí eyano ya yɔ̂ na mitúna na biso ezali 'oui' 'íyo', sala nɔkí opɛsɛ mwǎna wa yô mángwɛlɛ́ ma BCG sɔ́kí amozui naíno tɛ́.

Lokóla TB ekotaka bisíká míngi na nzóto, nzelá ya komɔnɔ yangó mpé ezalí ndéngé na ndéngé.
TB eye eyebani míngi ndé ya kokosola eye babengi na lingɛlɛsa 'pulmonary TB'. Moto oyo azalí na yangó akolakisa bilembo biye:

Nzela ya kopanza TB yango kaka moko: baye bazali na yango nakati ya tolo to na mongongo. Mayi oyo ebimaka na monoko na kokolola nakati ya mopepe nde ezali na maladie. Kasi oyeba te tango mosusu baoyo bazali na yango bakoki te kopanza yango.

Penza, ezalaka makasi moto azua TB, mpe esengi tango molayi to kokutana mbala mingi na moto oyo azali na yango, lokola kovanda na ndako moko. Ata ndenge wana, basusu, ata soki bazui TB, bango bakobelaka te. Bato mingi (toloba 9 na kati ya 10) baye bazali na nzoto kolongono, soki bazui yango bakobela te. Baye 10% batikali bakobela, kasi mbala mingi noki te, kasi na sima ata ya bambula 10 na koleka (Comstock, 1982).
Wana esalamaka mpo maladie yango ekoki kovanda na nzoto ya moto lokola elali bambula mpe moto azali kobela te. Maladie ekolamuka na sima ya bambula, mbala mingi soki nzoto ezangi komibatela (immunite), lokola moto mobange, bankisi misusu, kobela lokola Sida to kovanda na mizele.

Mpona 10% baye bakobelaka TB, tango ya mabe ezalaka soki ekomi naino mbula mibale
te banda bazui yango.

Kati ya 1 na 5% ya baye bazui TB babelaka noki wuta bazui yango (Styblo et al., 1969; Sutherland et al., 1976; 1982). Wana babengaka yango kobela mbala moko, na Angle 'primary disease', mpe mbala mingi ezalaka na bana. 'Primary TB' mbala mingi ekoleka emonana te, mpe ekobika yango moko ata soki moto ameli nkisi te, kasi ekoki kozonga sima ya bambula. Ekotika elembo moke nakati ya tolo, na ndenge emonanaka na Rayon-X.

Mpó na bato mingi baye bakozua TB, mibateli ya nzóto (immunite) ekobúnda kín'o kosilisa
tǒ kokanga yango mpó emata tɛ́. Ndénge wana bokɔnɔ ekotikala ya kolála, kasi ezalí naíno na bomɔi,
mpé ekobima lisúsu na nsima, eye ebengami bokɔnɔ na mpóngi tǒ bulála, na lingɛlɛsa babubengi 'latent TB infection'.

Baye bazalí na bokɔnɔ bwa TB na mpóngi balakisaka bilembo biye:

Baye bazali kobɛlɛ TB (‘active TB’) bakolakisaka bilembo biye bikomami na 'Nzelá níni ya
koyeba TB'.

Soki babikisi te, TB, ata epayi ya bakolo, emataka malembe kino eyi koboma. Mabe mosusu ekopesa meningite. Nzela mosusu, soki babikisi te, nde kobimisa makila tango ya kokolola. TB ekokoma ndongo soki emeseni nkisi, mpo ndenge ya kobikisa ezalaka makasi. Nakati ya Ingɛlɛ́tɛlɛ, TB, ebomaka bato 350 na mbula moko, mingi nakati ya bango mibange, kasi bana mpe bazalaka. Bisika bato bavandaka na bandako oyo ekoki te, na mokili mobimba, bato mingi bakufaka na TB koleka oyo ya UK.

Libateli lizali mángwɛlɛ́ ma BCG. Ntángo esúsu mángwɛlɛ́ ma BCG mabátelaka na bokɔnɔ bwa TB tɛ́, kasi masalisaka bǎna baye bazalí kobɛlɛ bokɔnɔ bwa meningite 'TB meningitis' (Rodrigues et al., 1993).

Ntángo ya kala, na Ingɛlɛ́tɛlɛ, bazalaki kopɛsɛ bǎna banso ba kelási mángwɛlɛ́ ma BCG. Kasi lokóla loléngé la TB lobóngwanaka, Ingɛlɛ́tɛlɛ ekamati nzelá ya kolanda bato bakɛ́ baye bazalí na tibelekilosi. 
Na Ingɛlɛ́tɛlɛ, mángwɛlɛ́ ma BCG makɛsɛni ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na epái eye yɔ̂ ofandi na UK, mpó TB ekoki kozala na esíká sóngóló kasi na esíká pakala ezali tɛ́. Mángwɛlɛ́ ma BCG mapɛsɛmi na bǎna baye bavándaka bisíká biye bato mingi bazalí na TB koleka bisíká bisúsu, mpó na bôngó, bapɛ́sɛkɛ mángwɛlɛ́ ma BCG na bǎna baye babótami ó mbóka iye bato mingi babɛ́lɛkɛ bokɔnɔ bwa TB. Mángó (Mángwɛlɛ́ ma BCG) mapɛ́sɛmi mpé lokóla na bǎna ba kelási ba mbúla 10 kín'o 14 sɔ́kí bazwaka BCG na bomwǎna tɛ́.

Sɔ́kí moto azwá mángwɛlɛ́ ya BCG kala, ekosengela éte azua mángwɛlɛ́ ya BCG sɔ́kí alingi kokɛndɛ o mobémbo, kovánda tǒ kosála mosálá mpó na sánzá mɔ̌kɔ́ tǒ koleka, na mbóka eye ezalaka na bato mingi ya TB (Immunisation against Infectious Disease, 1996).

Mángwɛlɛ́ ya Bacillus Calmette-Guérin (BCG) ezali bokɔnɔ ya TB oyo ezuaka gombe Mycobacterium bovis. Nakati ya BCG maladie ya TB ezalaka, kasi bakangi yango epesa kobela te. Kasi mpona baye bazangi mobateli ya nzoto, lokola bato ya Sida, mpona bango BCG ekoki kopesa maladie tango mosusu.

BCG batiyaka yango na tonga ya moke na lomposo.

Moto nyonso oyo azali na sanza 12 to koleka wana, bakomekaka loposo naye liboso ya kopesa ye mobateli ya BCG. Wana ezali mpona koyeba soki mobateli ya nzoto (immunite) emeseni na TB. Nzela ya koyeba nde kobeta tonga ya tuberculin – mayi ya proteine basali wuta na 'M. tuberculosis' – na kati ya loposo. Sima ya mikolo 2 - 10, na ndenge ya tonga yango, bakotala esika babeti yango.
Soki esika babeti tonga evimbi mpe, ekomi lokola makila, wana elakisi te maladie ezali. Ndenge wana ebongi lisusu te bapesa moto BCG, mpo akozala asiazui TB to maladie mosusu ya ndenge wana. Soki nzoto naye elakisi kozala na maladie ya makasi, wana esengi bameka ye na nzela misusu koyeba soki penza asiazui to abandi kobela TB. Bana oyo bakokisi naino sanza 12 te, bango bazali na posa te ya komeka loposo, liboso ya kozua BCG.

Mbala mingi TB ekoki kobika, kasi moto ebongi asilisa nkisi ya sanza 6 to koleka. Baye babelaka TB mbala mingi bakotaka na opital te. Ata soki bakoti, wana ekozala mpona koyeba soki penza bazali na maladie yango to mpo babanda kozua nkisi.
Ata boye, bato ya TB esengi bazala mpene na efimiele ya tolo, tango nyonso ya kozua nkisi mpo bazua yango na ndenge ekoki, mpe soki likambo ya mabe ezali, basala noki moto atika te kozua nkisi.

Nzela oyo tomeseni, ezali ya kozua nkisi 'antibiotics' misatu to mine mbala moko mpona sanza mibale, nde sima na yango nkisi mibale mpona sanza mine misusu. Nkisi mine minene ya TB ezali isoniazid, rifampicin, pyrazinamide na ethambutol. Eyaka elongo mpona kosalisa soki maladie emeseni nkisi moko, misusu ebunda. Ata boye, maladie ebandi komesana nkisi ya ndenge nyonso. Mbala mingi nkisi esalaka lisusu te mpo moto azalaki kozua yango na ndenge ekoki te, to azuaki yango na ndenge ya mabe to moto asilisaki te kozua nkisi (Conaty et al., 2004). Mikolo oyo batiyaka nkisi mibale to koleka na kati ya na komprime moko. Moto akomela komprime mine to koleka, mokolo moko. Tango mosusu esengi moto azua nkisi mikolo mingi, lokola maladie ya TB meningitis, to soki maladie ebandi komesana na nkisi moko to mibale, wana esengi kobalula nkisi.

Soki moto abandi nkisi mpona poso mibale, wana akoki lisusu kopanza TB te, mpe akobanda komiyoka malamu sima ya poso mine. Kasi esengi sanza motoba ya kozua nkisi mpo moto abika.

Tango bakuti moto azali na TB, dokotolo akotala soki baye bavandaka naye bakoki kozua yango. Soki emonani te moto akoki kopanza yango, to mwana azali na yango, kasi eyebani te azui yango wapi, wana baye bazalaka mpene naye bakobenga bango mpo bameka eyebana soki bango mpe bazali na yango. Bato wana bakozala bandeko to baye bavandaka na ndako moko. Tango mosusu baninga, lokola baye basalaka elongo, mpe bakobenga bango, kasi mbala mingi tina ya kosala yango ekozala te. Ezalaka mbala mingi te mwana apanza TB – kasi kobela na bango elakisaka te moto mokolo oyo azali kobela TB, azali mpene na mwana wana.

Komeka mpona bandeko tina yango koyeba baye basi bazui TB to baye basi babandi kobela. Komeka basalaka na loposo to na Rayon-X. Na kati ya UK mbala mingi soki bameki loposo, elakisaka te moto asiazui maladie (loposo kovimbal mpe kozala lokola makila esika babetaki tonga), kasi wana ezali mpo bazuaki mobateli ya BCG. Soki loposo soolo ezali. Soki TB emonani, wana moto bamemi ye na dokotolo mpe bakopesa ye nkisi ya TB.

TB ebomaki bato 100 million na bambula 100 oyo eleki, yango Organisation Mondial de Sante eti yango lokola maladie oyo ya koboma bato mingi na mokili 'Global Health Emergency' na 1993 (WHO 1). Emonani lokola 33% ya bato nyonso na mokili bazali na yango. Na mbula moko, bato 9 million ya sika bazuaka yango (WHO 2). Tango nyonso moto moko azuaka yango na second moko.

Mpona bato mingi ata soki bazui TB mobateli ya nzoto na bango ekoki kokanga yango babela te. Ata boye, TB ebomaka bato 2 million na mokili na mbula moko, moto moko na second 15 (WHO 3). Kati ya bango, 98% bazali bato ya Tiers Monde, mingi na Asie de Sud na Afríka ya bato mwindo (WHO 4).

TB ezalí ya libosó mpó na koboma basi mpé koleka bokɔnɔ misusu esalaka mwána etíké bazala mingi.

Ebongi bato banso o molɔ́ngɔ́ mobimba babundisa bokɔnɔ bwa TB. Kosilisa yangó esíká mɔ̌kɔ́ ekosalisa sɔ́kí basilisi yangó bisíká bisúsu.
WHO eyi na nzela oyo babengaka 'Directly Observed Treatment – Shortcourse' (DOTS) (WHO 5):




#Article 18: London Borough of Barking and Dagenham (222 words)


 

Komini ya Barking and Dagenham asalelaka koleka 164.000 ya batu. Komini ya Barking and Dagenham ezali na monieli ya Londoni, na nordi ya mayi Thames, mpe na kati ya nzela M25. Ba komini ya pembeni ezali Newham, na epai moyi mokolalaka, Redbridge, na nordi mpe Havering, na monieli.

Komini ya Barking mpe Dagenham abonzelaka misala na mayo matali ndakesileli, elalelo ba ndako, misala na environement local, misala etali lingomba, planification ya botongeli, mpe mosolo moa elalelo. Komini asalaka mpe na ndambu ya mangomba ya place mpe ya ekolo mpo na kobunda na mikakatano lokola bobomi, kozanga, kozanga bosembo, isolement na lingomba. Na bambula ntuku mibale oyo ewuti koleka Barking and Dagenham ya solo awuti kobongola misala na ye. Ewuti kokoma ndenge na ngende: kokani na batu ya baekolo oyo ezali ndambo eke emati kobanda na 16% ti 25%.

Ba masanga yasika ewutu ko salama na kati ya oyo ezalaka mpe toza na 3500 a 5000 ya batu bazali ba réfugiés to bazo senga ngunda bazo fanda na komini. Stabilité monene ezali mpo 2/3 ya lisanga bafandi awa banda plus de 20 ans. Maboti bazali bien representés na bokoli epai ya bilenge equilibre ezali na mikolo na koleka ¼ ya batu oyo bafandaka na commune balekisa 50 ans. Ba resultat malamu na bakelasi esalamaki na kati ya komini na bambula ewuti ko leka.




#Article 19: Lazariste (1579 words)


Congrégation de la Mission (Lazariste) ebandi o mobu 1625 o engumba Pari. Kasi ut'o ebandela, mosala mwa lingomba lina moyebanaki mpe o bikolo bisusu.

Lingomba ya Mission lisangisi ba nganga-Nzámbe na mpe ba mofulele. Bango batangemi ba Religieux te, ata ko bakosalaka bilako. Likanisi ya Mosantu Vincent wa Paul lizalaki 'te akoka kobongisa lingomba lyoko na ntina ya kozala mpe kosala mosala lisanga na bato banso ba mokili. Engebene na mibeko mya Eklezya, bakotanga lyango société de vie apostolique.

Lingomba lya Mission lizali kosangela nsango elamu na babola, na nguya ya elimo ya Yésu Kristu. Mosala mokotinda ba Lazariste bazala na bizaleli biye :

Lingomba ya Mission likabwani na ba 45 pɔlɔvɛ́si ntuku inei na itano, na 3 Vice-pɔlɔvɛ́si isato. O molongo mobimba, lingomba lizali kosala na bikolo ntuku mwambi,bikabwani o bituka to continent inso: Afríka, Ameríka, Ostralía, Azía (kin'o Sína) mpe Erópa.

O mobu 1998, lingomba ya Mission lizalaki na ba membre 4193. O kati ya bango.

O mibu miye, motango mwa baye bazali kokota na lingomba o bikolo bya Europa mozali moke mpenza. Kasi o bikolo bya Afríka na Ameríka ya nse, motango mona mokoli mingi mpenza.

Engebene na mibeko mya lingomba,

Ba Lazariste basusu bazali kosala elongo na batu bavandi pene na bikunde binene bya bosoto na bingumba (lokola na Payatas, Philippines). Basusu bazali kosalisa bilenge biye batukoli nzotu na bomeli makaya makasi (ba drogué), bato bakobela sida (na Europa), bato bakufa matoi (o Irlande), bitumbe, bana bazali kokola o ba balabala (ba shegué) mpe batu bazangi ndako. Ba Lazariste basusu bazali kosala mpo ya botomboli bomoi na mayele ma batu baye bazali naino na bizaleli bya kala (indigènes), to ya baye bakovandaka esika yoko te (ba Tzigane).

O Brazil, ba Lazariste bakosala mpe apostolat pene na batambwisi mituka minene (ba camioneur), baye bakozalaka ntango inso se na nzela. 
Basusu bazali kosalisa bato bakimi bitumba to kwokoso isusu, (réfugiés), to baye bazangi minkanda ya leta (sans papiers) mpe koteya bilenge bazangi misala. (o Mputu)

Bakosala mpe mpo ya bokolisi masanga make ma bakristu to Communautés Ecclésiales de Base, na mpe mpo ya ba laïc baye bakokamba masanga mana. Basusu bakoluka kokolisa lolenge la mosala mosantu Vincent alakisaki o ntei ya biteyelo mpe ya ba université. Basusu bakomipesa o masanga ma bomanyoli bomoi bwa bamibonza, bobokoli bana na bilenge, ntina ya boboyi koyamba (athéisme), nzela ya bopesi mpe bozwi nsango, pastorale ya mabota na mpe masalisi ndenge na ndenge matali ezaleli mpe bomoto.

Tokokuta mpe ba Lazariste basusu bakopesa mateya o biteyelo bya bokolisi boyambi mpe bomoto, ezala biye bya ba diocèse, ezala biye bya lingomba lya Mission to mpe biye bya mangomba masusu.

Mpo ya bokolisi mposa ya boyekoli bomoi, misala mya mosantu Vincent mpe elimo atikeli biso, lisanga lyoko likelami na nkombo Secrétariat International d'Etudes Vincentiennes (SIEV). SIEV ezali kolengele sanza yoko ya mateya (mois vincentien) na Pari mpo ya ba Lazariste (babandi mpe kondima mangomba masusu maye makolandaka ndakisa ya mosantu Vincent).

Kaka o mboka Paris, babandisi Centre International de Formation Saint-Vincent (CIF). Ezali kopesa mateya ma recyclage mpo ya ba Lazariste bazali na mibu 35 kin'o 50.

O ekolo Beljika, ndako ya liboso ya lingomba lya Mission efungwamaki na Liège na 1902. Ndako ya yambo ya lingomba o Kɔ́ngɔ efungwami na Bikoro (Mbandaka) na 1926.

Na 1929 bafungoli ndako ya Leuven mpe 1952 eye ya Lessines. O mobu 1947, ndako inso isangani o Pɔlɔvɛ́si ya Beljika mpe Kɔ́ngɔ-Bɛlɛzi ekomi mission ya pɔlɔvɛ́si ena.

O mobu 1991, na botalaka 'te ba Lazariste bazali lisusu mingi te o Beljika mpe awa motango mwa bango mokomi kokola o ekolo Kɔ́ngɔ, Bakonzi ba lingomba bazwi mokano mwa bokomisi Kongo pɔlɔvɛ́si mpe bobongoli Beljika bo Etuka to Région autonome o kati ya Pɔlɔvɛ́si ya Kɔ́ngɔ. Ezali na ndimbola enene 'te o bobange bwa ye, province-mama ekoka kokoma o maboko ma mwana oyo ye akolisi na motema monso.

Pɔlɔvɛ́si ya Kongó ebandisami na ba Lazariste ya Beljika. Sango Félix Dekempeneer, mobandisi wa mission ya Bikoro, akomi o Kongó o mobu 1925, mpo ya kolengele boyei bwa ba nyango ba Filles de la Charité. Mpe wana bamopesi mosala mwa bosangeli Nsango Elamu o etuka ya Bikoro. O ntango ena, mission ya Bikoro ezalaki na batu soko nkoto ntuku ibale, mpe mbele bakristu bobele nkoto yoko na ndambo to nkoto ibale. O mobu 1959, mission ya Bikoro ekomi Diocesi mpe Mgr Camille Vandekerkove, lazariste, akomaki Episkopo wa yambo ya Diocesi ena. Basango Lazaristes babandisi ba paroisse iye: Bikoro St. Vincent wa Paul (1926), Irebu Notre Dame du Chenal (1928), Lukolela Sacré-Coeur (1933), Bokongo Sainte Famille (1936), Yumbi Christ-Roi (1938), Bolobo Notre Dame (1946), Itipo Santu Yozefu (1948), Iboko Notre Dame de la Médaille Miraculeuse (1956), Mooto Saint Emille (1962), mpe Momboyo Martyrs ya Uganda (1963).

Ut'o mobu 1975, nsima ya liwa lya Mgr Camille, diocesi ya Bikoro esangani na eye ya Mbándáká. Nkombo ya diocèse ekomi Archidiocèse de Mbandaka-Bikoro. Liboso o bokambemi bwa Mgr Pierre Wijnants, wa lingomba lya ba Missionnaire du Sacré-Coeur, na nsima o bokambemi bwa Mgr Frédéric Etsou, oyo akomi lelo Cardinal mpe Episkopo wa lokumu wa Kinshasa. Lelo, Archidiocèse ya Mbándáká-Bikoro ezali o maboko ma Mgr Joseph Nkumuondala.

O mobu 1982, ba Lazaristes bakamati paroisse Notre Dame du Congo na Mbándáká. Nsima bazwaki mpe Paroisse St. Paul Apôtre (1992-1998) na Mbándáká. Bobele o engumba ya Mbándáká, bafungoli ndako Félix Dekempeneer, eye ekoyangela Cité Elikya mpo ya kobokolo mpe kosalisa bana to bilenge baye bazangi mosala (1998).

Na Kinshasa ba Lazariste bazali kosala o paroisse St Adrien ya Ngaba ut'o mobu 1986. Bobele na Kinshasa, bafungoli ndako ya boyambi basango bazali na lipaya na Limeté (1991). Bazwi mpe mosala mwa bokambi bato ba mpasi na lopitalo Santu Yozefu. Awa babandi kozwa bana mboka baye balingi kolanda nzela ya mosantu Vincent awa na mboka Kongo, bafungoli ndako ya boyekoli ibale:

O mobu 1981, Séminaire Interne (noviciat) Source de vie na Bokongo, eye eleki na Itipo ut'o 1994. Na mobu 1985, bafungoli likindo linene to Scolasticat Saint Vincent de Paul, na Kimwenza (Kinshasa) mpo ya baye bakoyekolaka philosophie mpe théologie. Na moi mwa lelo, Province ya Kɔ́ngɔ ezali na ba missionnaire 34 (ba nganga-Nzambe 32, diakono moko mpe mofulele moko) na bilenge ba likindo 27. Mpo etali bikolo bya bango, ba missionnaire bakabwani boye: 21 bazali ba congolais, 9 polonais, 2 belges, 1 hollandais mpe 1 italien.

Ba lazariste congolais babale bazali missionnaire na Algeria mpe na Kamerun. Mosusu asengeli kokenda bo Directeur ya Séminaire interne na Kamerun. Lazariste polonais moko wa province ya Congo azali kosala mosala na Beljika. Ba Lazariste basusu banei bauti o province ya Kɔ́ngɔ bazali sika kosala o ekolo Sína (1 hollandais) mpe na Haiti (2 polonais), mpe na Gresi (1 polonais).

O Archidiocese ya Mbandaka-Bikoro, basango ba Lazariste bazali kokamba ba paroisse mwambi (8). Mosala mwa bango motali mingi mpenza:

Bo bana ba Santu Vincent, ba Lazariste bazali kotiya motema mpe na boluki nzela kani bakoki kosalisa bilenge bazangi mosala (Cité Elikya na Mbándáká) na mpe bato ba mpasi (Lopitalo Santu Yozefu na Kinshasa).

Lokola bazali o libota linene lya Santu Vincent, ba Lazariste bazali kosala manso mpo ya bokolisi bomoko o kati ya bango na mangomba masusu maye mazali kolanda ndakisa ya Santu Vincent (ndakisa : Filles de la Charité, Religieux de St. Vincent de Paul na basusu bayike). Bayangeli ba mangomba mana manso bakokutanaka mbala na mbala na Kinshasa mpo ya mateya mpe bisambo.

Mosala mwa bango o kati ya ba Laïc baye bazali kolanda mpe ndakisa ya Santu Vincent mozali komonana mingi mpenza na nzela ya lingomba to Association de la Médaille Miraculeuse, eye euti kobanda awa na Congo, na nzela ya Société de Saint Vincent de Paul, Jeunesse Mariale Vincentienne, na mpe masanga masusu malandi mosantu Vincent.

Ndako ya Leuven ekosalaka mosala mwa procure mpo ya Pɔlɔvɛ́si ya Kɔ́ngɔ : Bosombi mpe botindi biloko mpo ya ba Lazariste bazali o Kongo. Ndako ya boyambi ba Lazaristes baye bayei kopemisa nzoto (bazali na congé) to mpe baye bazali kobela. Ndako ya bopemi mpo ya bandeko baye bakomi mibange to baye bazali kobela.

Ba Lazariste baye bavandi o ndako ya Leuven bazali mpe kosala misala na lopitalo (lokola aumônier to lokola volontaire), bakotalaka batu baye bazali na mikakatano, bakosanganaka na mangomba ya losambo (groupes de prière) mpe bakosalisaka ba Filles de la Charité baye bakolobaka falamá.

Ndako-Nzambe ya Lessines esalemi na bokundoli bomilakisi bwa Ngondo Mosantu Maria na rue du Bac (Paris). Mokolo mwa yambo mwa poso inso, lisanga Association de la Médaille Miraculeuse likosambelaka losambo la novena (na 20h ). Tokoyambaka mpe bakristu balingi koleka o sanctuaire (ba pèlerin), ezala moto moko moko to mpe lisanga.

Poso nyonso ya nsuka ya sanza ya mitano, tosalaka losambo lonene la novena o bokambemi bwa nganga-Nzambe moko auti epai esusu mpo ya kolendisa bana ba Mama Maria. Bokutani bona bwa losambo bokosangisaka bandeko banso ba Belgique baye bamesani koya epai ya Mama.

Lokasa to revue mensuelle moko (2000 exemplaires) lozali kosangisa bayebani ba biso banso. Ndako-Nzambe ya biso esalaka mpe misala minso mikosalemaka o paroisse. Moko wa ba nganga-Nzambe ba sanctuaire azali na kati ya baye bakoteyaka o ba paroisse ya doyenné ya Lessines.

Maison ad instar domus Ba Lazariste ba Liège bavandi esika yoko te, kasi bazali motema moko na mosala : Na bosalisi banyango ba Filles de la Charité, mangomba ma bilenge mpe na boteyi bakristu na ba ndako. Na bosalisi baye bayei lipaya na Belgique (immigrés) na mpe baye bakimi bitumba na mobulu o mboka ya bango (réfugiés). Tozali kosalisa bango na biloko, kobunda mpo ya makoki mpe bomoto ya bango.




#Article 20: Vincent wa Paul (659 words)


Vincent wa Paul (1581 - 1660) abotamí o mboka Pouy, pene na engumba ya Dax, o mabele ma Landes, na ekólo Falansia. Azalí mwana wa basato o libota lya yé (bato ba bilanga). Kinó mibú zómi na mitano akolí se o libota lyango, akabólí mpási elongo na bandeko banso. Kási nsima ena, abandí koyenga yenga, mibu zomi na misato mobimba, akabwani na bandeko na ntina 'te akima bobola. O eleko ena, bonganga-Nzámbe bozalaki nzela ya kokoma moto mpe ya kosalisa libota. Vincent wa Paul akanisaki kobikisa na nzela ena libota lya ye. Yango wana akuli bonganga na mibu zomi na libwa.

Kasi manso maleki lokola Vincent akanisaki te. Ekólo Falansia ezalaki na mikakatano. Batu bazalaki lisusu na makoki te mpe bitumba ezali kovandisa batu na nzala enene. Banganga-Nzámbe mpé bazalaki na mpasi, bakisa mpe myoko mimesano mibe. Yango etindi Vincent abongola makanisi ma yé: aluki kopesa bomoi bwa ye mpô ya babola banso.

O mobú 1617, makambo mabale mamemi ye na mbongwana ena. O sanza ya yambo ya mobu mona, babengi ye akenda kosalisa moto moko alingi awei. Banso bazalaki komona moto ona lokola nsuka ya moto molamu. Kasi yemei ayebisi Vincent 'te soki asikolaka molimo mwa ye na sakramentu ya ntubela te, mbele awei na masumu maluti. Bobola bona bwa molimo bobeti motema mwa Vincent mingi. Se o mobu mona, mokolo moko mwa sanza ya mwambi, na ngonga alingi kobanda losambo la misa, bayeli yé nsango 'te libota lyoko lizali na mpasi, mpe banso ba libota nde bakufi soki bazwi lisalisi te. Vincent wa Paul alendisi bakristu 'te basalisa bango. Aluki mpe kobongisa lisalisi lina. Bobola bona bwa nzoto bobeti mpe motema mwa Vincent wa Paul. Banda ntango ena nde aluki ntango inso o mosala mwa ye kobikisa na molimo mpe na nzoto ya bato, mingi mpenza babola.

Ut'o mobu 1617, Vincent wa Paul amipesi na kosalela Nsango Elamu mpe baninga: Mbala inso bosalaki bongo na moko wa bandeko ba ngai, bosalaki ngai moko (Mt 25, 40). Vincent wa Paul akosakola nsima ya Kristu: Elimo wa Nzambe akiteli ngai, zambi Mokonzi apakoli ngai mafuta masantu; mpo 'te nasangela babola Nsango Elamu...  (Lc 4, 18). Bomoi bwa ye mobimba amipesi na babola; asalisi mpe bato ba nkita mpo 'te bayeba komipesa o mosala mya babola bango bazali bankumu mpe bakonzi ba biso.

Bakrístu baike basangani, bamipesi motema mobimba o mosala mwango mpo ya lifuta te, mingi mpenza bamama, baye asangisi o lisanga na nkombo confrerie de la charité (eyebani lelo na nkombo Association Internationale des Charités). Lisanga lina nde liboti, o mobu 1633, lingomba lya ba Filles de la charité, liye Vincent abandisi elongo na Louise de Marillac. Mpe o mobu 1625 akeli lingomba lya basango Lazariste to Congrégation de la Mission; bamipesa na babola bipai binso, yambo mpenza o bituka bike; basikola milimo mibungi; basunga Eklezya, bateya o likindo mpe baluka bopeto bwa bango moko.

Vincent wa Paul amipesi na kobongisa bosalisani, akongoli mbongo na biloko mpo ya kosalisa bituka bya Falansia bizalaki na bitumba, aluki mpe ndenge ya kobongisa bomoi bwa banganga-Nzambe na mpe bomoi o ba likindo.

Asangisi makoki manso azwaki, asalisi bato ba mawa, abokoli bana bitike, bawei nzala na bato ba boloko, ba mpaka na bitula ndenge na ndenge, na mpe mabota mazalaki na mpasi. Ekosalisa ye moto, ayebi 'te moto ona azali o kati ya lisanga mpe lisanga lizali na etamboleli ya yango. Yango wana esengeli mpe koluka kobongisa bomoi mpe ezaleli ya masanga ma bato.

Apesi babola lokumu (bazali bankumu mpe bakonzi ba biso), asikoli bomoi bwa bango mobimba. Alingi kotala mobola lokola moto mpamba te, kasi lokola moto oyo azali na nkombo. Alingi batu na ndenge ezali komonana. Azwi makasi ma kolakisa na Eklezya mpe na mokili mokumba mwa bango mpo ya libiki lya babola. Na maloba mpe na misala mya ye, abongoli makanisi ma bato mingi mpe bizaleli mingi bya ntango ya ye. Sekele to ndanga ya molende mwa ye mpe ya boyebi kosalisa nde : Elimo ya Yésu Kristu! 




#Article 21: Misalisi ya Mbangu (220 words)


Soki ozoki to ozali kobela makasi tango mosusu esengi bamema yo na misalisi ya mabangu na lopital ya pene na yo. Wana bafutelaka te mpe ezali mpo ya bato nyonso. Ezali na mbutu na moi. Soki mpasi eleki yo bakosalisa yo mbangu. Soki mapsi mingi te, okozela moke mpó bakoma basango nayo.

Kanisa malamu soki bokolongunu bwa yo esengi basala mbangu, mpo ezali mabe kopekisa baye bazali na posa ya mbangu bazua Misalisi ya Mbangu te soki yo ozali na posa na yango penza te.

Tika tolakisela yo biloko bisengaka lisungu lya mbangu;

Bána babɛlaka noki mpé na makasi koleka bakolo.

Baboti bayebaka noki soki mwana azali komiyoka mabe. Tolakisa nzela misusu ya koyeba:

Okoki kokende yo moko na Misalisi ya Mbangu oyo ya pene na yo, to okoki kobengisa mutuka ya ambulance emema yo.

Betela telephone 999 mpo ozua ambulance. Telephone wana bafutelaka te ata soki ozali esika bafutisaka. Bakotuna yo soki olingi ambulance, bato ya boboma moto to Police mpo bango nyonso basalelaka 999. Soki olingi ozua ambulance mbangu:

Tango ambulance ekomi, yango ekomema yo ti na lopital ya misalisi ya mbangu oyo ezali mpene na yo. Kobanga te kobenga ambulance soki oyebi te ozali penza na posa na yango ya mbangu. Kasi yaba te ebongi okendeke ya doctolo nayo soki ozali penza na posa ya mbangu te.




#Article 22: Nzela ya kopekisa zemi (118 words)


Nzela ya kopekisa zemi ezali mingi. Okoki mpe kozua kapoti ebatela yo na bokono nyonso ya sekele na sida. Sango nyonso likolo ya contraception babatela sekele.

'Emergency contraception' ekosalisa soki osalaki makambo ya bolingo kasi na nzela ya kopekisa zemi te, to okanisi te zela nayo ya kopekisa zemi esalaka malamu te. Mikolo mitano sima ya kosala bolingo okoki kosenga emergency contraception, kasi malamu oluka misalisi mbangu, toloba, mikolo misatu sima ya kosala bolingo. Nakati ya mikolo misatu bakopesa yo nkisi ya 'emergency contraception' mbala moko kasi soki mikolo mitano esieleki esengi batiya eloko ya kopekisa zemi na nzoto nayo esika ya sekele. Soki oyi mbangu nde esalaka malamu kopekisa zemi.

Nzela ya kuzua 'emergency contraception' yango oyo:




#Article 23: Maladi ya Moto (143 words)


Moto nyonso akoki kozua maladi ya moto. Ekoya na tango nyoso mpe na nzela bipayi na bipayi lokola koyoka mawa, kobanga to kokanisa te bomoyi ezali na tina lisusu te, to ekosangisa biloko wana nyonso. Okoki komiyoka ozali yo moko na mokili oyo mpo ozali na mboka mopaya, okoma kobanga mpona bandeko oyo otiki na mboka, to kuna na mboka na bino banyokolaki yo/basaleli yo viol, sikoyo ozali na posa ya misalisi olongola makanisi yango na moto.

Soki omiyoki makambo oyo tokomi na likolo, okoki:

Soki yo to ndeko nayo azali koyoka mabe na moto mpe akoki komibebisa nzoto to komiboma mema ye na Misalisi ya Mbangu ya pene na esika ovandaka mpo yango esala mbutumoi. Malamu oyeba te misalisi ezali, mpe kobanga te kosenga yango. Maladi ya moto ezali eloko eyebani mpe ekoki koyela moto nyonso mpe misalisi ezali mpona moto nyonso.




#Article 24: Maladi ewutaka na makambo ya bolingo (206 words)


 Maladi ewutaka na makambo ya bolingo ezali eloko ya kokamwa te, mpo nakati ya batu 10 moto moko akozala nayango. Soki ozali kobimisa mayi ya bosoto esika ya sekele, to ozali na pota na koyoka mpasi okoki kokende komeka oyeba soki okumbi maladi ewutaka na makambo ya bolingo. Maladi ewutaka na makambo ya bolingo oyo eyebani mingi yango oyo:
Chlamydia, Gonorrhoea,  na Herpes Genitalis.

Okokumba maladi ewutaka na makambo ya bolingo na nzela ya:

Maladi ewutaka na makambo ya bolingo ezali ya ndenge na ndenge mpe bato mingi bayebi te soki bazali nayango, mpo tango mosusu nzela ya kolakisa emonanaka te. Kasi soki omoni biloko oyo tokomi awa
na nse, okoki kokende na bato ya sante bameka mpe ozua nkisi pamba na ndenge ya sekele. Nzela ya koyeba yango oyo:

Maladi ewutaka na makambo ya bolingo mingi bakoki kobikisa. Kasi soki etuli, maladi ewutaka na makambo ya bolingo misusu ekobebisa nzoto libela lokola kozanga mwana mpoya basi na mibali. Komeka mpe kuzua nkisi mpoya maladi ewutaka na makambo ya bolingo ekosalama na Sexual Health Clinics / GUM clinics.

Komeka esalamaka na dokotolo to efimiele mpe bakoki kosenga kotala nzoto nayo na
esika ya sekele. Tango mosusu bakosenga makila to mosuba na mayi ya esika ya sekele.




#Article 25: Ndenge ya Misala (388 words)


Misala oyo etali kobatela “mpo na tango muke” edzali kopesa epai nayo lolenge oyo ebongisami mpo na bana. Ba ntango oyo ya kobatela eumelaka na pembeni nkonga misato na ndambo.

Ba ntango yango ya kobatela bana mpo na ntango muke yango oyo:

Mosala mosusu ya lolenge oyo etalaka banaya mbula mibale kino na mitano.

Misala mpo na bobateli mpo na ntango ebele kopesa epa nayo ba bisengeli ya koyamba bana uta nsanza mitano (5) kino mbula mitano (5). Na liboke oyo ya bana tozali na misala, mpo na ba oyo badjali kokola (day nursing) mpe esika ya kobokola bana mike mike mpenza (Crèche).

Misala mpo na bobateli mpo na ntango na ntango “Drop in the centre” na, ba bisika oyo ba
kotekaka biloko, bisika ya kobeta ndjango mpe kolekisa ntango, bisika ya bolakisi, bitano ya ndenge na ndenge lokola MJC to mpe bisika nyonso bipai baboti ba salaka misala wana ezwaka bana uta kobotama(0) kino mbula mitano (5).

Ba mibokoli ya basi ba batelaka bana na ba ndako ya bango moko. Badjali kopesa mosala ya
lolenge loye na mbula mobimba to na mokolo mobimba na moyi to ndambo ya mokolo.

Ba misala ya bobateli “ na sima ya Kelasi” midjali na kati ya biyekelo, na bisika bisangisaka bayi-mboka, bitando minene to bisika mosusu. Batalaka bana oy basilisi mokolo na bango ya kelasi kino ngonga ya zomi na moambi (18 heures), mpe ntango ya bopemi ya kelasi.

Mangomba oyo ebiangami mangomba baboti mpe bana basanganaka ntango na ntango na ba
nzinga nzinga na bango. Misala mibongisami mpo na bana mpo na kopesa ntango epai na ba boti ba kutanaka mpe basangisaka ba makanisi na bango.

Moko moko na misala oyo etangiami na likoloawa epesameli na kompani ya moto ye moko to
me oyo ya bai mboka. Mosala “ya kompani ya moko ye moko”etambolisami na moto moko oyo
mpe adjali mokolo ya bisika (bisika ya kotika bana adjali na ba ndako ya batu). Ntalo edjali na bokeseni mpe ekoki ko djala ntalo makasi.
Mosala “oyo ya bai Mboka” esungami na mbula matali mpe elukaka na yango kosala misolo mpo na yango te; lisanga ya batambwisi oyo esalami na baboti mpe na baoyo bafandi na nzinga nzinga yango nde kotala makambo nyonso.
Misala “oyo ya bai mboka” na motuya ya malamu koleka “oyo ya ba kompani to ya mot ye
moko”




#Article 26: Politíki ya Kongó-Kinsásá (225 words)


Bandá bǎna mbóka Kongó-Kinsásá bazwákí lipandá na mwâ 30 yúni 1960, Ekólo nsɔ́mí ya Kongó ekútání na mikakatano ndéngé na ndéngé mya politíki mpé myɔ̌kɔ́ mya ntína ya mikakatano mîná ezalí kobóya kondima bokonzi bopɛ́sámí na mangómba ma boyángeli ekólo mpé bakambi ba bangó. Bobóyí bwangó bobákísámí na bitumba ndéngé na ndéngé biye bibébísí ekólo bandá 1996 kín’o 2003. Mpɔ̂ ya kosúkisa sékô mikakatano mya mbala na mbala mitálí mambí ma bokonzi mpé kopɛ́sa na ekólo konzo ya komítónga, bantóma ba politíki mpé baye ba mangómba ma bato, masangá ma bato bánsɔ ba ekólo, bakútání na Lisoló linɛ́ne lya bǎna-Kongó (DIC) mpé bandimi na boyókani bonɛ́nɛ bwa bato bánsɔ, botíámí maboko na Pretoria, Afríka ya Sidi, mwa 17 febuari 2002, mpɔ̂ ya boluki kotía mabɔngisi ma sika ma politíki maútí na Mobeko-likonzi mwa sika mpé ya bonsɔ́mí, epái wápi bǎna ba Ekólo Kongó bakókí kopɔna na bonsɔ́mí bakonzi ba bangó, nsima ya mapɔnami ma bosémbo ma bato bánsɔ, ma polele mpé ma sɔ̂lɔ́. Mpɔ̂ ya kolakisa politíki ya mpíkó eye emɔ́nání na bantómá, na Lisoló linɛ́ne lya bǎna-Kongó, Lingómba lya Babɔngisi mibéko liútí, na Boyókani bonɛ́ne bwa bato bánsɔ, ɛ́ngɛ́bɛ́nɛ́ na atikɛ́lɛ ya 104 ya Mobéko-likonzi mwa bwákali, mwǎngo mwa libosó mwa Mobéko-likonzi mwa sika na Lingómba lya Bantómá ba Ekólo liye Lindimi yangó lokóla mwǎngo mwa Mobéko-Likonzi moye motíámí na etúneli ya bato bánsɔ.




#Article 27: Mobéko-likonzi mwa sika (Kongó-Kinsásá) (1006 words)


Mobeko Likonzi mwa sika (2006) ya Kongó-Kinsásá moye mondimami, motali makambo manene maye: 

Mpo ya kolendisa bomoko bwa Ekolo boye bobebi na bitumba ndenge na ndenge mpé mpo ya kotonga bisika bia bwanya mpé bya botomboli mboka ike, bantoma bakaboli ekolo Kongo na bingumba 25, bakisa engumba ya Kinshasa, binso biye bizali na makoki ma komiyangela eyebani na mobeko mpé kosala misala milongobani mitangemi na Mobéko likonzi moye. Na botali makoki mana, bingumba bikosala misala misusu misengeli kosalema na Mbula Matari ya Ekolo, mpé kokabola misolo miyingeli na sanduku ya Ekolo na Mbula Matari zambi ya eteni ntuku minei likolo ya mokama (40%) mpo ya bingumba, mpé eteni ntuku motoba likolo ya mokama (60%) mpo ya Mbula Matari. Soki boyokani bozangi na esaleli kati ya Mbula Matari ya ekolo mpé bingumba, Ndako ya basambisi ba Mobeko Likonzi yango moko ezali na bokonzi bwa kobongisa likambo lina.

Na yango, bingumba bya ekolo bikonzami na Mbula Matari mpé Lingomba lya Bantoma ba bingumba. Engumba yoko yoko ezali na bituka bikonzami yango moko lokola vili, komine, seketele mpé sefeli. Lisusu, Mobeko Likonzi moye mondimi makanisi ma bonsomi mpé molobi: bokonzi bonso bouti na bana-ekolo mpo bango nde ntina ya ebandeli ya bokonzi. Bana-ekolo bakopesa makanisi ma bango na kati ya mangomba mayike ma politiki, maye mabatelami na Mobeko Likonzi moye mondimi ete kosala lingomba lya politiki se moko ezali lokola kobuka mobeko mwa koteka ekolo. Na maye matali bonsomi bwa ekolo, basali mibeko bandimi makanisi ma kozala na bonsomi se moko mpé kaka moko mpo ya bana Kongo.

Mosali mibeko azali lisusu kondima bopesi Ekolo Nsomi ya Kongo makoki ma bato mpé bonsomi bwa ntina engebene na mibeko mya solo mya molongo esili kondima. Na yango akotisi makoki mpé bonsomi bona na kati ya Mobeko Likonzi. Yango wana, zambi ya mbongwana ya mambi ma mokili, Mobeko Likonzi moye mokotisi makanisi manene ma sika matali bokokani bwa mobali mpé mwasi.

Bituluku bia bokonzi bwa sika na Ekolo Nsomi ya Kongo byango biye:

Makanisi manene maye mazali kokamba bobongisi bituluku bina mango maye. 

Yango wana, eleko ya mosala mwa Mokonzi wa Ekolo ekoki kozonga se mbala moko, kasi lisusu Mokonzi wa Ekolo azali na makoki ma kobatela Mobeko Likonzi, bonsomi bwa ekolo, etando mobimba ya ekolo, bokonzi bwa ekolo, botosi mibembano mpé boyokani na molongo mpé akozala mobongisi mpé mosemboli esaleli elamu ya bituluku bya ekolo, na lisalisi lya Mbula Matari mpé na bososoli bwa Lingomba lya Bantoma. 

Bikela bya solo biye, Mokonzi wa Ekolo akotia maboko mpo ya mambi matali Mbula Matari to maye makambemi na Baminisele, bisengeli kozwa elembo ya Minisele wa yambo mpé, ntango mosusu, ya Baminisele, baye basengeli kosalela mpé kondima mokumba mona liboso lya Lingomba lya Bantoma. 

Mingi mpenza makambo matali bapaya, bobateli mpé bokengi bwa ekolo, maye mazalaki liboso se na maboko ma Mokonzi wa Ekolo, makomi mambi ma boyokani. Kasi, Mbula Matari, na bokasi bwa Minisele wa Yambo azali nkolo mpe motambwisi wa politiki ya ekolo, eye akobongisa na boyokani na Mokonzi wa Ekolo. 

Azali na mokumba mwa kotanga misala mia ye liboso lya Lingomba lya Bantoma liye, lisanga, likoki kopesa ye etumbu na ndenge ya bopaleli ye. Lingomba lya Bantoma likoki lisusu kotatola libunga yoko yoko ya bakambi ba Mbula Matari na nzela ya mokanda mwa bokebisi. 

Na bosangani na likita linene, Lingomba lya bantoma-basali mpé lya babongisi mibeko, lizali na makoki ma kofunda Mokonzi wa Ekolo mpé Minisele wa yambo liboso lya Ndako ya bazuzi ba Mobeko Likonzi, mingi mpenza na libunga linene lya boteki ekolo mpé boyebi mabe makoki kobebisa ekolo. 

Epai mosusu, na ntina ya makoki ma bokonzi mapesami na basali mibeko mpé na makoki ma kolanda misala mia Mbula Matari, bantoma ba ekolo bazali o likolo lya mibeko te; matomba ma bango makoki kolongwa mpé lingomba lya bantoma likoki kokufa na mobeko mwa Mokonzi wa Ekolo, soki mikakatano mizali kosila te kati na bango mpé Mbula Matari wa ekolo. 

Mobeko Likonzi moye mondimi lisusu bonsomi bwa bokonzi bwa bazuzi boye, basambisi banso bakambemi na Lisanga linene lya mambi matali bosembo lisangisi se basambisi mpe bakati makambo. Mpo ya bolamu bwa solo, bwanya mpe botambwisi na lombangu mikanda mia bato babuki mibeko, Ndako ya basambisi mpe bakati makambo ekabwani na biteni misato biye :

Mabongisi ma ntina ma Mobeko Likonzi, makoyebisa polele ndelo ya misala mia Mbula Matari mpe bingumba mpe lisusu esika ya bokutani kati ya bingumba bibale bia leta. 

Mpo ya kotia boyokani bolamu kati ya bingumba mpe Mbula Matari ya ekolo, likita lya bakonzi ba bingumba lisalemi na bokambemi bwa Mokonzi wa Ekolo oyo azali na mosala mwa kopesa toli na bingumba binso mibale. 

Se bongo, lotomo ya boyokani kati ya bingumba bia ekolo lotindi kosala sanduku ya ekolo ya bokaboli malamu misolo, etiami na boyangeli bwa Mbula Matari ya ekolo. Na botalaka bonene mpe makambo ndenge na ndenge ma botomboli nkita mpe bomoi bwa bato maye Ekolo Nsomi ya Kongo ezali kokutana na yango, mosali mibeko asali Lisanga lya nkita mpe lya bato liye lipesami lotomo ya kopesa makanisi ma mambi ma nkita mpe ma bato na Mokonzi wa Ekolo, na lingomba lya bantoma mpe lya Mbula Matari ya ekolo. 

Mpo ya kobatela bonsomi bwa Ekolo Nsomi ya Kongo, Mobeko Likonzi moye moponi bituluku mibale mpo ya lisalisi lya bonsomi bwa bato mingi mpenza Lisanga lya maponami na bonsomi lipesami seko manaka ma kobongisa maponami bakisa Lisanga linene lya lolaka, botali mpe bopanzi nsango, liye lizali na lotomo ya kopesa bonsomi mpe kobatela mambi na zulunalo mpe nzela inso ya bopanzi sango na bato banso engebene na botosi mibeko.

Mpo ya kobatela mambi ma boyangeli ekolo mauti na bato, maye matiami na Mobeko Likonzi moye, zambi ya mikakatano mia bomoi bwa politiki mpe mia mbongwana ndenge na ndenge, mabongisi matali lolenge ya boyangeli ekolo mauti na bato, ya mobeko mwa boponi bwa bato banso, ya bingumba binso bimonana na Mbula Matari, ya motuya mpe eleko ya boumeli na mosala mwa Mokonzi wa Ekolo, ya bonsomi bwa bokonzi bwa kosambisa mpe kokata makambo, ya boyike bwa mangomba ma politiki mpe ma sendika, makoki ata moke te kobongwama.




#Article 28: Lisapo lya Kongó-Kinsásá (105 words)


Kongó-Kinsásá ekelámákí o mobú 1885 lokóla lopángo lonɛ́nɛ la Léopold II, kasi ezalákí mabelé ma bikólo biyíké.

Congo belge elongákí lipanda na 1960, o nkómbó ya «Republíki ya Kongó», nkómbó nsé mɔ̌kɔ́ na kolonia ya kala ya Falansia - Kongó-Brazzaville. Nkómbó ya «Republíki ya Kongó Demokratíki» ezwamákí na 1966, kasi bikólo bíbalé basilákí koyébana míngi-míngi, mpé kokesana na nkómbó ya bingúmba-mikonzi bya bangó, mpɔ̂ na komíbêngama Kongó-Léopoldville (mpé Kongó-Kinsásá na nsima 1965), na Kongó-Brazzaville.

Zaïre ezalákí banda 1971 te 1999 nkómbó óyo ebêngámákí «Republíki ya Kongó Demokratíki», mfalanga ya ekólo wâná, mpé ebale óyo epésáká ekólo Kongó ebimélí na yě see mɔ̌kɔ́ na mayi-mozindo Atalantiki. 




#Article 30: Gilípi ya ndɛkɛ (476 words)


Gilípi ya ndɛkɛ (to gilípi ya avian) ezali gilípi moko eye ezuaka surtout ba ndɛkɛ ya zamba mpe ya mboka. Ekoki kupanzana noki noki mpenza na kati ya bandeke na bopesi bokono mpe liwa, surtout na kati ya ba ferme ya ba soso to na kati ya nzando oyo ezali kotiya ba soso oyo ezali na bumoyi ebele esika moko.

Bandɛkɛ to basoso eye ezali na bukono ebombaka ba vilúsu ya gilípi na kati ya soi na bango, na mai ya zolo mpe na soi eye ezali kokweya, yango nde epanzaka vilúsu eye na kati ya ba plumes ya bandeke to basoso. Sorte ya mabe ya gilípi ya ndɛkɛ (eye epesami na vilúsu H5N1) ezali esika oyo kozua bandɛkɛ(surtout ba soso mpe mabata na bandɛkɛ ya zamba mosusu) na kati ya Azía na Erópa (tala: mpo na lístɛ ya ba regions eye ezali na bokono bwango).

Na mikolo oyo ewuti koleka, vilúsu H5N1 epanzamaki na kati ya bato mpe epesi bokono mabe na kati ya bato mwa muke baye bazalaki na contact na bandɛkɛ eye ezalaki na bokono yango. Pembeni ya moitie ya bato oyo bazuaki bokono basilaki kokufa. Nata moto moko te asili kozua bono oyo na kati ya Kɔ́ngɔ.

Na tango ya lelo (yúni 2006), ata cas moko te ya moto apesi moto mosusu vilúsu eye. Ata ko ekoti na contact na ba ndeke eye ezali na bokono eye, bandɛkɛ ya bomoyi to ekufa, risque ya kozua gilípi ya ndɛkɛ ezali moke mpenza. Na mikolo ya lelo, restriction ezali te mpo na ko voyager to kokende na ba mboka oyo ezali affecte. Ba voyageurs basengeli koyeba ba risque mpe kolanda ba conseil epesami na wikipedia.

Soki ozali kovisiter baboka eye eyabani ezali na gilípi ya ndɛkɛ H5N1 na kati ya bandɛkɛ to ba soso, esengeli olanda bamesures eye elandi: 

Soki ezali na contact na bandɛkɛ to ba soso ya bomoyi to ekufa na kati ya bamboka eye eyebami ezali na bokono eye, esengeli oyeba ba symptomes ya gilípi ya ndɛkɛ okati ya bato. Ba symptomes eye ezali ndɛkɛ moko na ba symptomes ya gilípi ordinaire mpe ekoki kobima noki mpenza. Ba symptomes yango ezali: 

Soki ozui ba symptomes eye na tango ozali na mboko mopaya, mpe ozalaki na contact na ba soso to bandɛkɛ ya bomoyi to ekufa esengeli omona dokotolo ya mboka eye ozali. 

Soki na sima ya mikolo sambo ya bolungui mboko eye ezali na bokono ete oyebi ete ozalaki na contact na bandɛkɛ to basoso ya bomoyi to ekufa, ozwi ba symptomes eye epesami na lístɛ oyo na page ya liboso, ezali important ete yo: 

Ba kisi lokula aspirine, ibuprofen to paracetamol ekoki kosalisa na kokitisa ba symptomes. Landa ba mateya ya ba kisi. Kopesa aspirine te na bana baye bazali na mibu na se ya 16. 
Lukola esengami na infection respiratoire nyoso, esengeli olanda ba pratiques ya hygiene ya malamu: 




#Article 31: Brazzaville (133 words)


Brazzaville ezalí mbóka-mokonzi ya Kongó-Brazzaville. Mpé ezalaka kobêngama Braza. 
Bazalí bato  o engumba.

Braza ezalí kokátama na arrondissements sambo: 

Brazzaville ézalî motu –ya-mbóka-mokonzi politiki mpé ekólo ya Réplibika Kongo. Ésîka nayé ézalí na sid ya kongo, likolò-(sur) ya pémbénî  ya  ébalé Kongó, likolò-(sur) ya ébalé  nord ya Stanley Pool. Villî ésalama na mbûla ya 3 octobre 1880 na mibakisamî ya ba nkoko bourgs na tango ya koloni ézalaka kobêngama (Nkuna) mpé prinsipalî ézaki  Mpîla na Mfa tǒ Mfoa. Ezalî kobéndama na kombo ya Italo-falasa (français) Pierre Savorgnan de Brazza, mpé étangami tée lélo-oyo 1 3370 612 ba fandî (habitants,ba brazzavilois.

Kalakala Braza ezaláká mbóka ya Batɛ́kɛ o ngámbo mɔ̌kɔ́ ya ebale Kongó. 	

O mobú 1880, Pierre Savorgnan de Brazza atiyaka engumba ya mindɛ́lɛ nsima ya koyókana na Makoko ya Mbe, mokonzi ya Batɛ́kɛ.	




#Article 32: Mbɛbú (130 words)


Mbɛbú tǒ bibɛbú bizalí biténi bíbalé ya misuni libosó lya monɔkɔ, bizalí mbɛbú ya likoló mpé mbɛbú ya nsé.
Bizalí pɛtɛ, na bolɛmbú, mpé na bitaú. Bisálemaka mpɔ̂ na kolíya, mpɔ̂ na koyóka na kosímba, mpé mpɔ̂ na kosála koloba.

Nzébi bakɛsɛnisaka ebɛbú ya nsé (Labium inferioris) na ebɛ́bú ya likoló (Labium superioris). Ebɛbú ya nsé elongobaní elekí ebɛbú ya likoló na bonɛ́nɛ.
Lomposo la mbɛbú na lomposo losúsu, lomposo la mbɛbú lokɛ́, ntína lomposo la mbɛbú lozalí na bibaka 3 tǒ 5 nzókandé losúsu na bibaka 16. Ntína níni minsisá mibelé mya makilá mimɔ́nisamaka mpé mbɛbú izalí na langí motáné.

Lomposo la mbɛbú lozalí na nkunza tɛ́. na ebimisele ya botɔki tɛ́, mpé na ebimisele ya mafúta tɛ́. Ntína eye lozalí tɛ́ na bibáteli lomposo losúsu. Ndé lokaukaka míngi.




#Article 33: Stress (347 words)


Makambo míngi makoki kokomela moto o bomɔi, makambo mánâ makoki kosala éte molimo mwa moto motungisama mpé esɛngɔ ya yě na bomɔi esila. Mbógwana ya loléngé la bomɔi bwa moto ya mikɔlɔ na mikɔlɔ ekoki komɛmɛ mbógwana na bokɔ́lɔ́ngɔ́nú bwa nzóto ya yě. Ndakisa, sɔ́kí mói ezalí makasi nzóto ya moto ekotónda na motoki, lokóla mpé sɔ́kí moto azalí kobánga tǒ mpé moto mosúsu abangisi yě okoyoka motéma mwa yě mokobɛtɛ makasi.

Makambo ma mabé maye malekelá moto o bomɔi bwa yě mpé soki loléngé la bomɔi luye azalí na yangó luzali kosepelisa yě tɛ́, bokɔ́lɔ́ngɔ́nú bwa nzóto bwa yě mpé ntángo esúsu kimia ya makanisi mpé ya molimo mwa yě mokoki kobébisama . Sɔ́kí moto azali ntángo inso kokanisa manso ma mabé malekela yě mpé azalí kosepela sɔ́kó mokɛ́ tɛ́ na bomɔi bwa yě, wana ekoki kolakisa éte moto oyo azalí kolakisa bilembo bya stress (souhaiterais que le mot approprie en lingala soit utilise) (lifalansé: pression, tension nerveuse; lat.: stringere: atteler).

Ntángo inso izali malamu na bomɔi bwa moto, azala na esɛngɔ mpé kímiá, kasi sɔ́kí makambo mazali koleka ndénge ozali kolinga tɛ́ tɔ̌ mpé sɔ́kí ozali komitungisa na likambo mɔ̌kɔ́ , okomɔ́nɔ éte okokóma koyoka nzɔ́to ya yɔ̂ malamu lisúsu tɛ́. 

Manso maye makoki kozala likoló lya bilɔ́kɔ biye:

Libúngisi

Bozangi kímiá

Bozangi nguyá

Bandeko baye bazalaka na stress bayokaka ntángo esúsu boye:

Elakisameli ya stress na moral na moto:

Bilembo bya stress kati o nzóto:

Elakisamelo ya stress na bizaleli na yo:

.

Stress na bizaleli bya yɔ̂ na baníngá:

Sɔ́kí ozali kati na stress okoyoka biloko bisúsu biye towuti kolobela. Yangó ekangani míngi na makambo maye ozalí komɔ́nɔ na bomɔi bwa yɔ̂. Okoki komɔ́nɔ éte bizaleli mpé bokɔ́lɔ́ngɔ́nú bwa nzóto ya yɔ̂ ebóngwani káka na ngóngá wana ya makambo. Kasi, ezalí tɛ́ moto yonso ndé ayokaka bilɔ́kɔ biye tolobi mpámba 'te moto na moto azalí na loléngé la yě ya kolákisa mpé komɔ́nisa stress.

Sɔ́kí ozali koyoka mɔ̌kɔ́   na makambo maye totangi likoló káti na lokásá luye:

Sɔ́kí olingi lisungi ya míngi mpó na makambo matáli stress, túna mónganga na nzínganzínga ya yɔ̂.




#Article 34: Tunisia (128 words)


Tunisia ezalí esé ya likoló ya Afríka.

Nkótá ya ekólo bazali bakiarabu, baberbere mpé batouareg. Nkótá ya letá ezali lifalansé. Dipanda ya Falansia na 20, Sanza ya Misato, 1956.
Na Tunisia balobámí nkótá iyíké, liarabu mpé lifalansé.

Relijion káka ya Tunisia izalí islamu 99,2 %, boklísto 0,6 %, mpé boyúda 0,2 %.

Mokonzi wa ekólo ezali Zine El abidin Ben Ali. 
Mokambi-Ekólo ya Republíki ya Tunisia bandá 20 sanza ya misato 1956 tíí 7 novembere 1987 ezalákí Habib Bourguiba. Nkómbó ya politíki ya Republíki ya Tunisia ezalí Destour socialiste demokratiki.

Tunisia ezalí o Límbe mpé nsé ya Aljeria mpé Libiya. Tunis ezalí mbóka-mokonzi ya Republíki ya Tunisia. 

Nkómbó ya sika ville ya tunisia. Tunis ezalí mbóka-mokonzi na bato 2 000 000.

Mosɔlɔ ya Tunisia ezalí Dinar ya Tunisia.




#Article 35: Nsango Malámu (281 words)


Nsango Malámu mpé ebêngamaka Nsango Ndámu tǒ Nsango Elámu (mpé Evanjile na ligresi εὐαγγέλιον evangelion = nsango elámu), ezalí nkómbó óyo Yésu yě mɔ̌kɔ́ apɛ́sákí na nsango yě azalákí kotéya. 

Bato óyo batángaka mikandá ya Nsango Malámu, bayébí 'te mokandá ya Yoane ekɛsɛní míngi na óyo ya Matié, Marko mpé Luka. Epái na bangó, makambo míngi ezalí kokúkana mpénza. Boye tozalí komítúna mitúna ebelé : kokokana ya boye eútí wápi ? Bato óyo bakomákí yangó basálákí ndéngé níni ? Mpámba tɛ́ esíká mɔ̌kɔ́ tɛ́ bayébísí sɔ́kí mokomi-mokandá azalí náni.

Na ebandeli, bayékólí ya Yézu babandákí kosákola makambo óyo bamɔnákí mpé bayókákí : makámwisi óyo Yésu azalákí kosála, matéya na yě, mpé míngi mpénza ndéngé Yézu akúfákí mpé asékwákí. Na káti ya mangómbá ya bakrísto batéyí ya Nsango Malámu bazalákí, moto na moto abandákí kosakola Nsango Malámu na ndéngé yě azalákí komɔ́na.

Bobɛ́lɛ́ nsima ya mwâ mobú, bakrísto basúsu babandí kokoma masoló yangó na mokandá. Kasi mikandá wâná ezalákí ndéngé mɔ̌kɔ́ tɛ́ : epái mosúsu bazalákí koyébisa míngi misála ya Yésu, epái mosúsu bazalákí kotingama míngi na maloba na yě.

Bato míngi na káti ya baye bayékólá Biblíya bamɔ́ní 'tè Marko azalí moto ya libosó óyo akomákí Nsango Malámu mobimba, pɛnɛpɛnɛ ya bamobú sɔ́kí 65.

Nsango Malámu ya Matié na óyo ya Luka ebimákí pɛnɛpɛnɛ ya bamobú sɔ́kí 85, ezalí kolanda makambo nyɔ́nsɔ́ óyo Marko
akomákí. Kasi Matié ayébákí mpé mikanda mosúsu ya matéya ya Yésu ; basúsu bakanisi 'te mikandá wâná eútáká na ntóma Matié óyo bazalákí kobênga mpé Levi. Nzókandé Luka atíyákí moléndé mpɔ̂ na kotúna bato baye bayébaki Yésu, atangákí mpé mikandá mosúsu óyo akutákí na káti ya ba-eklézya 

Sango Malamu ya Yoane ebimákí pɛnɛpɛnɛ ya mobú sɔ́kí 90.




#Article 36: Molímo (111 words)


Molímo ezalí eténi ya moto eye ezalí eténi enɛ́nɛ ya bomɔi. Mpɔ̂ na bandimi, ezalí eténi ya moto eye ekúfaka tɛ́ kasi ebimaka o nzóto na Liwâ.

Molímo, na ebré, nkómbó mɔ̌kɔ́ wána kaka elakísí :

Mpámba tɛ́ mpéma epɛ́saka moto bomɔi ; mpé sókí moto alɛmbí, balobaka ’te mpéma na yě elɛmbí. Yangó wána mbala mosúsu ntembe ekokí kozala ; bôngó esíká bísó tokomí molímo, bakokí mpé kokoma mopɛpɛ tǒ mpéma tǒ mpé nguyá. Boye mbala míngi molímo ya Nzámbe elakísí ngúya ya Nzámbe.

Yésu alakísákí bantómá ’te Molímo ya Nzámbe azalí Mosálisi óyo Tatá akotíndela bangó nsima ya kosékwa na yě.  Molímo Mosántu akokání na Tatá mpé na Mwǎna.




#Article 37: Kwánga (109 words)


Kwánga (tǒ kpánga) ezalí manyɔ́kɔ, ntína inɛ́nɛ́ ya nzeté ya mpɔndú tǒ nsɔngɔ́ batíe na mái mikɔlɔ  mínei tǒ mítáno, mpé batútí yangó na eboka, sɔ́kí elɛmbí, bafándísí yangó mikɔlɔ míbalé tǒ mísáto mpé nsima balongoli nsinga batíyí yangó mwâ ntángo ekɛ́ na mɔ̌tɔ mpé na nsima bakángí yangó o ntéi ya  nkásá mpé baélámbi na mɔ̌tɔ makási mpɔ̂  na ntángo elaí mpɔ̂ na kolíya.
Ezalí biléi monɛ́nɛ mpɔ̂ na bato ba mbóka ya Kongó ínsɔ íbalé. Esálémí (esɛngɛli o mɔ̌tɔ makási mpɔ̂ ebéla malámu.

Kwánga ikokí kobómbama mpɔ̂ na ntángo elaí téé mikɔlɔ ntúkú íbalé nsima ya bolámbi. Kwánga ezalí malámu mpɔ̂ na bato baye bazalí kokɛndɛ mibémbo.




#Article 38: Debout Congolais (395 words)


Debout Congolais eza' loyembo ya ekólo ya Kongo-Kinshasa. Ekomamaki na Tata Nsangó Simon-Pierre Boka, ebimisamaki na makanisi ya Joseph Lutumba mpe ekómaki koyembama banda ntango oyo ekólo yango ezwaki lipandá na 1960. La Zaïroise, Loyembo ya ekólo mosusu oyo ekomamaki mpe kaka na Tata Boka, ekitanaki yango na 1971 wana Mobutu azalaki koyangela. Debout congolais ezongaki lisusu loyembo ya ekólo na 1997, ntango Laurent-Desiré Kabila azwaki bokonzi.


Telama besi Kongo, 
Mvukani, mu n'kadilu, 
Mvukani, mu kikesa mu diambu dia kimpwanza. 
Tuvumbula mbunsu, 
Zafumbana ntama, 
Ye tuka buabu Tusasuka tuamanta, Mu yenge,  

N'kangu kikesa,
Muna Kisalu, 
Sa tutunga Nsi, ya mpuena luta ntama, mu yenge. 
Besi nsi, 
Luyimbila, nkunga wa n'longo, Wa nsalasana eno, 
Ye lulendo, Lukunda, kidimbu kia wolo kia kimfumu kieno. 
Kongo, 
N'kayilu usambuka, 
Kongo, 
Wa bakulu, 
Kongo, 
Nsi ya zolua, 
Kongo, 
Sa tuasema ntoto aku ye sa tuasikila m'vuma aku
Nsuka (ya) yuni muini wa buita, 
Makumatatu ('k'matatu) ma yuni, 
Lumbu kia n'longo kala  mbangi, 
Lumbu kia n'longo kia kuele mvu, 
Ya ndefi ya kimpwanza, 
Tusisila, 
Kua batekolo beto.

Mvu ye mvu

Tolema mwana kongo, 
Tosangnani na pasi, 
Tosangani na bokasi po na bonsomi, 
Tombola moto, 
Egumbama kala, 
Po na yango tokomata lolenge malamu,  
Na kimia,  
Batu ya nguya, 
Na mosala, 
Tokotonga mboka kitoko, 
Koleka na kimia, 
Mwana boka, 
Yemba nzembo, 
Nzembo ya lokumu na bino bosangani, 
Na lolendo, kumisa, 
Bendele na yo ya tina ya bonsomin kongo, 
Epambwanma,kongo, 
Ya ba koko, kongo, 
Mboka, kongo, 
Elingama, kongo, 
Tokotondisa yango,  mpe tokobatela monene, ya Yango, 
Mokolo mua tuku misato, na sanza ya motoba, 
Mokolo mua  moyiya kimia, mokolo mua lokumu, 
Zalá de nzenenteke, mokolo mua lokumu, 
Mpe ya ndayi ya bosomi, 
Tokotikela ba kitani na biso po na libela, 




#Article 39: Likelelo (288 words)


Likelelo lizalí loléngé la nkómbó o mambi ma lokótá. Likelelo ezalí eténi ya lisákólá tǒ faláze. 

Ndakisa : Nazalí malámu míngi o kelási.

Likelelo na Lingála lizalí na biténi bísáto; monsisá, elembo ya likelelo eye ekolakisa *infinitif mpé nsúka ya likelelo.

Ndakisa  ko-zal-a 

O lingála elembo ya likelelo liye lizali kolakisa *infinitif ezali ko. Sɔ́kɔ́ likelelo *Ekonjugamé na ntángo mpé moto oyo esengeli, ko ekotika esíká na elembo eye ezalí kolakisa mokonza. 
Elembo ezalí kolakisa mokonza ekɛsɛni sɔ́kɔ́ ezalí koloba na ntína ya bato tǒ makambo tǒ bilɔ́kɔ bisúsu. Sɔ́kɔ́ ezalí koloba na ntína ya bato, ko ekotika esíká na  na, o, a, to, bo, ba, sɔ́kɔ́ ezalí koloba na ntína ya elɔ́kɔ tǒ likambo lisúsu, ekolanda kelási níni nkómbó eye ezalí mokonza ezalí mpé ko ekotíka esíká na *prefixe ya nkómbó êná.

Ko-kom-a → Bínó bokomaka lingála malámu
Ko-kom-a → Búku ekomami na lingála
Ko-lob-a → Lokótá la lingála lulobamaka na Kongó-Kinsásá mpé na Kongó-Brazzaville

Koloba → -lob- ezalí monsisá mwa likelelo koloba 
Koyémba → -yémb- ezalí monsisá mwa likelelo koyémba 
Kobɛ́tɛ → -bɛ́t- ezalí monsisá mwa likelelo kobɛ́tɛ.

O Lingála makelelo míngi masúkaka na moleli a kasi makelelo makɛ́ masúkaka na mileli misúsu lokóla e tǒ ɛ mpé ntángo esúsu o tǒ ɔ. 

Ko-lob-a, ko-yémb-a, ko-tún-a, ko-sámbel-a, ko-solol-a
Ko-bɛ́t-ɛ, ko-pɛ́s-ɛ, ko-sɛ́ng-ɛ
Ko-mɔ́n-ɔ, kopɔ́n-ɔ

Sɔ́kɔ́ likelelo lizalí *congugué, nsúka ya yangó ekokɛsɛnɛ éngɛ́bɛ́nɛ́ na ntángo. A ekoki kotíka esíká na i, aka, ákí, áká, a kasi eye bakwéisa ko libosó lya likelelo tɛ́ yambo ya kobáka elembo ya mokonza, á mpé bôngó na bôngó.

Koloba →  Nalobaka Lingála, Lifalansé na Lingɛlɛ́sa 
Koloba  →  Lobi nalobáká na yɔ̂ 'te ókɛndɛ wɛnzɛ
koloba  →  Lobi nakoloba na yɔ̂ likambo lîná.
Kobɛ́tɛ →   Alain Kaliyutuka Dioko abɛ́tɛkɛ lisano lya ndembó 




#Article 40: Marɔkɛ (169 words)


Mani ya Marɔkɛ ezalí esé ya likoló ya Afríka.

Marɔkɛ (المغرب), Marɔkɛ ezali mani na mobéko-mokonzi. Bato ba ekólo Marɔkɛ bapɔ́ní bantómá ba ekóló mpɔ̂ na kolobela mibéko. Mani Mohamed VI ezalí mani ya Marɔkɛ mpé mokonzi mwa Letá. Kasi yě mɔ̌kɔ́ apɔ́ní tɛ́ likambo ya botéyi, bokɔ́lɔ́ngɔ́nú, b.n.b. Moto óyo apɔ́ní makambo mango azalí Minisele wa yambo. Yě ayángelana makambo ma Letá na Baminisele. Sík’óyo Driss Jetto azalí Minisele wa yambo.

Marɔkɛ ekabwání o Ɛ́sita na Aljeria, o Sudi na Mauritania. Lombú Mediterané lokútámí o Nola-Ɛ́sita mpé Lombú Atlantíki o Wɛ́sita.

Eténi enɛ́nɛ ya Marɔkɛ ezalí esíká elíkí Sahara ndé bato míngi bavándaka o libóngo lya lombú.

Etando ya Marɔkɛ ezalí  km².

Mbóka-mokonzi ezalí Rabat, na sɔ́kí bato 1,2 miliyɔ́. Engumba elekí monɛ́nɛ ezalí Kasablanka na sɔ́kí 3 miliyɔ́. Kasablanka mpé Rabat izalí libóngo lya bonkita.

Bamakɔrkɛ bazalí na motángo mwa 32 miliyɔ́. Bazalí Barabi tǒ Babɛrbɛr.

Lokótá la Letá ezalí liarabu kasi bato míngi balobaka libɛrbɛr. Bato míngi balobaka mpé lifalansé.

Boislamu ezalí na ntína o Marɔkɛ.




#Article 41: Angola Avante! (100 words)


Angola Avante! ezalí loyémbo-lokúmu la Angola o lokótá liputrugɛ́shi. Ezalí loyémbo-lokúmu la yangó bandá 1975. Ekomámákí na Manuel Rui Alves Monteiro (*1941; texte) mpé eyémbámákí na Rui Alberto Vieira Dias Mingas (*1939; mizíki).

Ó Pátria, nunca mais esqueceremos 
Os heróis do quatro de Fevereiro. 
Ó Pátria, nós saudamos os teus filhos 
Tombados pela nossa Independência. 

Construindo no Trabalho o Homem novo, :||

Revolução, pelo Poder Popular! 
Pátria Unida, Liberdade, 
Um só povo, uma só Nação! :||

Levantemos nossas vozes libertadas 
Para glória dos povos africanos. 
Marchemos, combatentes angolanos, 
Solidários com os povos oprimidos. 

Com as forças progressistas do mundo. :||
 




#Article 42: Esta é a Nossa Pátria Bem Amada (137 words)


Esta é a Nossa Pátria Bem Amada ezalí loyémbo-lokúmu la Gine-Bisau bandá lipandá lya yangó o mobú 1974. Ezalákí mpé loyémbo-lokúmu la Cap-Vert kín’o mobú 1996. Ezalí o lokótá liputrugɛ́shi.

Sol, suor e o verde e mar,
Séculos de dor e esperança:
Esta é a terra dos nossos avós!
Fruto das nossas mãos,
Da flor do nosso sangue:
Esta é a nossa pátria amada.

Viva a pátria gloriosa!
Floriu nos céus a bandeira da luta.
Avante, contra o jugo estrangeiro!
Nós vamos construir
Na pátria immortal
A paz e o progresso!
Nós vamos construir
Na pátria imortal
A paz e o progresso! paz e o progresso!

Ramos do mesmo tronco,
Olhos na mesma luz:
Esta é a força da nossa união!
Cantem o mar e a terra
A madrugada e o sol
Que a nossa luta fecundou.




#Article 43: Pátria Amada (114 words)


Pátria Amada ezalí loyémbo-lokúmu la Mozambíki bandá 2002. Ezalí o lokótá liputrugɛ́shi.

PÁTRIA AMADA

Na memória de África e do Mundo
Pátria bela dos que ousaram lutar
Moçambique, o teu nome é liberdade
O Sol de Junho para sempre brilhará

CORO(2x)
Moçambique nossa terra gloriosa
Pedra a pedra construindo um novo dia
Milhões de braços, uma só força
Oh pátria amada, vamos vencer

Povo unido do Rovuma ao Maputo
Colhe os frutos do combate pela paz
Cresce o sonho ondulando na bandeira
E vai lavrando na certeza do amanhã

CORO(2x)

Flores brotando do chão do teu suor
Pelos montes, pelos rios, pelo mar
Nós juramos por ti, oh Moçambique
Nenhum tirano nos irá escravizar




#Article 44: Independência Total (164 words)


Independência Total ezalí loyémbo-lokúmu la Santu Tome mpé Príncipe o lokótá liputrugɛ́shi.
Ezalí loyémbo-lokúmu la yangó bandá 1975. Ekomámákí na Alda Neves da Graça do Espírito Santo mpé eyémbámákí na Manuel dos Santos Barreto de Sousa e Almeida.

Independência total,

Glorioso canto do povo,

Independência total,

Hino sagrado de combate.

Na luta nacional,

Juramento eterno

No pais soberano de São Tomé e Príncipe.

Guerrilheiro da guerra sem armas na mão,

Chama viva na alma do porvo,

Congregando os filhos das ilhas

Em redor da Pátria Imortal.

Independência total, total e completa,

Costruindo, no progresso e na paz,

A nação ditosa da Terra,

Com os braços heróicos do povo.

Trabalhando, lutando, presente em vencendo,

Caminhamos a passos gigantes

Na cruzada dos povos africanos,

Hasteando a bandeira nacional.

Voz do porvo, presente, presente em conjunto,

Vibra rijo no coro da esperança

Ser herói no hora do perigo,

Ser herói no ressurgir do País.

Na luta nacional,

Juramento eterno

No pais soberano de São Tomé e Príncipe.




#Article 45: Nzémbo ya Swisi (724 words)


Nzémbo ya Swisi ezalí loyémbo-lokúmu la Swisi o nkótá lialémani (Schweizerpsalm), lifalansé (Cantique Suisse), litaliano (Salmo Svizzero) mpé liromanch (Psalm svizzer).
Ezalakí loyémbo-lokúmu provisoire bandá o 1961 téé o 1981. Ekomámákí na Leonhard Widmer (lialémani o 1835) mpé eyémbámákí na Alberich Zwyssig (mizíki o 1841).




#Article 46: La Congolaise (165 words)


La Congolaise (Ya Kongó o lingála) ezalí loyémbo-lokúmu la Kongó-Brazzaville o lokótá lifalansé. Ezalakí loyémbo-lokúmu bandá o 1959 téé o 1969 mpé bandá 1991. Ekomámákí na Jacques Tondra mpé Georges Kibanghi (texte) mpé eyémbámákí na Jean Royer mpé Joseph Spadilière (mizíki).

En ce jour le soleil se lève 
Et notre Congo resplendit. 
Une longue nuit s'achève, 
Un grand bonheur a surgi. 
Chantons tous avec ivresse 
le chant de la liberté. 

Congolais, debout fièrement partout,
Proclamons l'union de notre nation,
Oublions ce qui nous divise,
soyons plus unis que jamais,
Vivons pour notre devise:
Unité, travail, progrès!
Vivons pour notre devise:
Unité, travail, progrès!

Des forêts jusqu'à la savanne,
Des savannes jusqu'à la mer,
Un seul peuple, une seule âme,
Un seul coer, ardent et fier,
Luttons tous, tant que nous sommes,
Pour notre vieux pays noir.

Et s'il nous faut mourir, en somme
Qu'importe puisque nos enfants,
Partout, pourront dire comme
On triomphe en combattant,
Et dans le moindre village
Chantent sous nos trois couleurs.




#Article 47: A Portuguesa (169 words)


A Portuguesa (La Pulutugɛ́shi) ezalí loyémbo-lokúmu o Pulutugal o lokótá liputrugɛ́shi. Ezalí loyémbo-lokúmu la yangó bandá 1910 na Republíki Pulutugɛ́shi. Ekomámákí na Henrique Lopes de Mendonça (*1941; texte) mpé eyémbámákí na Alfredo Keil (*1939; mizíki).

Heróis do mar, nobre povo,
Nação valente e imortal,
Levantai hoje de novo
O esplendor de Portugal!
Entre as brumas da memória,
Ó Pátria sente-se a voz
Dos teus egrégios avós,
Que há-de guiar-te à vitória!

Às armas, às armas!
Sobre a terra, sobre o mar,
Às armas, às armas!
Pela Pátria lutar!
Contra os canhões marchar, marchar!

Desfralda a invicta Bandeira,
À luz viva do teu céu!
Brade a Europa à terra inteira:
Portugal não pereceu
Beija o solo teu jucundo
O Oceano, a rugir d'amor,
E teu braço vencedor
Deu mundos novos ao Mundo!

Saudai o Sol que desponta
Sobre um ridente porvir;
Seja o eco de uma afronta
O sinal do ressurgir.
Raios dessa aurora forte
São como beijos de mãe,
Que nos guardam, nos sustêm,
Contra as injúrias da sorte.




#Article 48: Hino Nacional Brasileiro (274 words)


Hino Nacional Brasileiro (Loyémbo-lokúmu ya brazilia o lingála) ezalí loyémbo-lokúmu ya Brazil o lokótá la liputrugɛ́shi. Ezalí loyémbo-lokúmu bandá 1910 na Republíki Federali ya Brazil. Ekomámákí na Osório Duque Estrada (*1909; texte) mpé eyémbámákí na Francisco Manuel da Silva (*1822; mizíki).

Ouviram do Ipiranga as margens plácidas
De um povo heróico o brado retumbante,
E o sol da Liberdade, em raios fúlgidos,
Brilhou no céu da Pátria nesse instante.

Se o penhor dessa igualdade
Conseguimos conquistar com braço forte,
Em teu seio, ó Liberdade,
Desafia o nosso peito a própria morte!

Ó Pátria amada,
Idolatrada,
Salve! Salve!

Brasil, um sonho intenso, um raio vívido,
De amor e de esperança à terra desce,
Se em teu formoso céu, risonho e límpido,
A imagem do Cruzeiro resplandece.

Gigante pela própria natureza,
És belo, és forte, impávido colosso,
E o teu futuro espelha essa grandeza.

Terra adorada
Entre outras mil
És tu, Brasil,
Ó Pátria amada!

Dos filhos deste solo
És mãe gentil,
Pátria amada,
Brasil!

Yamibale chorus

Deitado eternamente em berço esplêndido,
Ao som do mar e à luz do céu profundo,
Fulguras, ó Brasil, florão da América,
Iluminado ao sol do Novo Mundo!

Do que a terra mais garrida
Teus risonhos, lindos campos têm mais flores,

Ó Pátria amada,
Idolatrada,
Salve! Salve!

Brasil, de amor eterno seja símbolo
O lábaro que ostentas estrelado,
E diga o verde-louro dessa flâmula

Mas se ergues da justiça a clava forte,
Verás que um filho teu não foge à luta,
Nem teme, quem te adora, a própria morte.

Terra adorada
Entre outras mil
És tu, Brasil,
Ó Pátria amada!

Dos filhos deste solo
És mãe gentil,
Pátria amada,
Brasil!




#Article 49: Pátria (107 words)


Pátria (Ekólo na lingála) ezalí loyémbo-lokúmu la Timor ya monyɛlɛ ya monyɛlɛ o lokótá liputrugɛ́shi. Ezalí loyémbo-lokúmu la yangó bandá 28, Sanza ya Zomi na Moko 1975. Ekomámákí na Francisco Borja da Costa (texte) mpé eyémbámákí na Afonso de Araújo (mizíki).

Pátria, Pátria, Timor-Leste, nossa Nação.
Glória ao povo e aos heróis da nossa libertação.
Pátria, Pátria, Timor-Leste, nossa Nação.
Glória ao povo e aos heróis da nossa libertação.
Vencemos o colonialismo, gritamos:
abaixo o imperialismo.
Terra livre, povo livre,
não, não, não à exploitação.
Avante unidos firmes e decididos.
Na luta contra o imperialismo
o inimigo dos povos, até à vitória final.
Pelo caminho da revolução.




#Article 50: Mársi (monzɔ́tɔ) (112 words)


Mársi ezalí monzɔ́tɔ mwa mínéi mwa malíli o molɔ́ngɔ mwa minzɔ́tɔ mya Mói.

Nkómbó eútí nzámbe ya Baroma ya kala babéngaka Mársi, nzámbe óyo azalákí nzámbe ya bitumba, ntína monzɔ́tɔ Mársi ezalaka lángi ngóla tǒ motáné lokóla makilá.

Mársi ezalí na sánzá íbalé ya mokɛ́-mokɛ́, Fobos (Phobos) mpé Deimos.

Monzɔ́tɔ Mársi motóngamaka na mabelé ma likɛ́lɛ. Mabelé ya yangó ezalí motáné mpɔ̂ na makosa (likɛ́lɛ liye  ligugákí). Mársi elekí Mabelé (Mokili) na malíli mpɔ̂ na ezalí o mosíká ya Mói.

Mársi ezalí na mái o etando tɛ́. Kasi banzébi bakanísí ’te ezalákí na mái ntángo ya kala. Ndé ezalí na galási, loléngé la mái malíli koleka, o nsɔ́ngɛ́ ya Nola mpé Sudi.




#Article 51: Misála ya Bantoma (155 words)


Misálá mya Bantómá ezalí búku ya Nsango Malámu ya Biblíya.

Moto akòmá mokandá muye ezalí Luka; yě mpé moto akòmáká Nsango Malámu ya mísáto. Kobanda na mokɔlɔ Yésu amataki o Likoló, bayékoli bazaláká komɔ́nɔ yě lisúsu na mǐso tɛ́; kasi yě azaláká káka elɔngɔ́ na bangó, mpámba 'té Molímo Mosántu azaláká kosálisa bangó ézala bantómá (Petelo, Yoane,…) tǒ basálisi na bangó sambo (Etiene, Filipe, …) tǒ mpé Polo.

Maloba ma Yésu malakisi ndengé makambo mazalí kolandana. Bayékoli bapanzáká Nsango Malámu 

Luka atiaki moléndé mpó na koyéba ndengé níni mpenzá bantómá bazaláká kosakola Nsango Malámu; yě mɔ̌kɔ́ asáláká mibembo misúsu ná ntómá Polo.

Epái ya bato ya bikólo bínsɔ, ézala Bayúda tǒ bato ba bikólo bisusu, bantómá bazaláka kosakola nsango ya Yésu; ndenge yě azaláká, maloba ma yě mpé misálá mya yě. Boye mokandá mwa Luka muzalí kolakisa mosálá monɛnɛ muye Nkolo Yésu apɛsi Eklezya: kosakola Nsango Malámu na bikólo bínsɔ, tii na súka ya mokili.




#Article 52: Mohandas Gandhi (101 words)


Mohandas Karamchand  abótámá o mokɔlɔ mwa 2 ya sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́, mobú mwa 1869, o Porbandar, o engúmba Delhi, azaláká mokonzi mpé mokambi ya India. Yě mpé Mahatma Gandhi babéngamaka mahatma eye elingi koloba « molímo monɛ́nɛ » o lokótá la Sanskrit.  Ayékolá mambí ma mibéko o Ingɛlandi. Ntángo  India ezaláká o nsé ya bokonzi bwa Ingɛlɛ́tɛlɛ, Gandhi asáláká mpénza mpɔ̂ na India ezwa lipandaneti mpé Bhagat Singh
Mokolo ya mbotama na yé ekoma mokolo ya eyenga na kombo ya Gandhi Jayanti.

Akúfá o mokɔlɔ mwa 1 ya sánzá ya yambo, mobú mwa 1948. Mobomi nayé ezalaka Nathuram Godse. 




#Article 53: Eyenga ya Mbótama (180 words)


Eyenga ya Mbótama tǒ Nɔ́ɛlɛ tǒ Nɔ́ɛli ezalí eyenga ya bobótami bwa Yézu Krísto esɛngɔ ya mbótama. Mbótama ezalí mpé eleko ya mbótama kolekisa mbótama na libóta.

O ntangu en mokonji wa Roma akonjaki lokola nyele ya Bayúda. Tibere, ye oyo mokonji atondi na lolendo, alingi kuyeba na solo akonjaki batu boni o nyele yayeye.

Atindi monkanda bipai binso, asengi boyo: «Batu banso bakende kupesa nkombo ya bango o mboka ya bateta ba bango.»

O mboka Nazarete Yozefu elongo na molongani wa yeye Maria babikaki. Batosaki sesepi monoko mwa mokonji. Batamboli.

Yakomaka bango o mboka Bɛtɛlɛmɛ baluki esika ya kulala, kasi bajwi te. Bakei kukumba bango o sopo ya ndako ya nyama.

Katikati ya butu Santa Maria aboti kuna mwǎná Yézu, Nzambé mpenza, Mokosolo wa batu.

Sasa anjelu asangeli nsango ese o bakengeli ba bakandoro bajalaki penepene kukengele mpata yabongo. Na nsima banjelu na kutanga te bayembi nzembo be, bango te: «Nkembo na Nzámbe o lora mpé o nse boboto na batu balámu.» Bakengeli bakamwi. Bakei noki kukembisa mwǎná Yézu.

Bakristu bakokundola o motema eyenga ena mokolo mwa 25 dɛsɛ́mbɛ.




#Article 54: Saturne (118 words)


Saturne ezalí monzɔ́tɔ mwa motóbá o molɔngɔ́ mwa minzɔ́tɔ mya Mói. Ezalí monzɔ́tɔ ebákátá na gázi, ezalí na gázi o kati ya yangó. Ezalí na etando ya mabelé tɛ́, ndé etando ya gázi. Ezalí monzɔ́tɔ mwa míbalé na monɛ́nɛ o molɔ́ngɔ mwa minzɔ́tɔ mya Mói. Yangó elekí monɛ́nɛ ezali Jupiter. Nkómbó ya Saturne eútí nkómbó ya Saturnus, nzambe ya Baroma ya kala, eye ekokání na Kronos, nzambe ya Bagreki ya kala. Elembo ya Saturne ezalí ♄ eye ezalí elembo ya ngwangwá ya Saturnus.

Saturne ezalí na nzínga inɛ́nɛ ya galási na mabánga mpé mputulú. Ezalí na sánzá 59, mpé 3 bayébí sɔ́kí izalí sánzá tɛ́ o mobú 2007. Sánzá elekí monɛ́nɛ ezalí Titan, elekí monzɔ́tɔ Merkure na monɛ́nɛ.




#Article 55: Roma (104 words)


Mbóka tǒ engumba  ezalí mbóka-mokonzi ya Italya útá mobú 1871. Evandaka o etúká Lazio o katikáti ya Italya. Ezalí na bato . Ezalí komíni epúsí komíni nyɔ́nsɔ ya Italya na botúya bwa bato mpé komíni ya mísáto na botúya bwa bato o Erópa nsima Moskú mpé Londoni.
Ezalí ebandelo ya Roma ya kala mpé ebandelo mɔ̌kɔ́ ya bikelá bya Mpótó.

Roma evandaka o katikáti ya Italya, o bokútani bwa ebale Tibero mpé motíma Aniene mpé kilomɛ́tɛlɛ 25 ya mokúla ya lombú la Baetúsi (o lombú Mediterané).

Ɛngɛ́bɛ́nɛ́ ezalela ya Roma ya kala, Romulus atongákí mbóka Roma o mokɔlɔ 21 sánzá ya mínei mobú -753.




#Article 56: Likitana (273 words)


O mambí ma lokótá, likitana lizalí nkómbó eye ekitání esíká ya nkómbó. Ndakisa : ngáí, yɔ̌ ,yě, bangó, mosúsu, basúsu , -ye, -súsu , b.n.b.

Ndéngé :

Na makomi míngi ma Lingála likitana mpǒ na bato tǒ bilɔ́kɔ ekɔ́tisamaka na káti ya likelelo.

Na Lingála makitana matali bato  mazalí:  ngáí, yɔ̌, yě, bísó, bínó, bangó. 
Na nkomá ya Lingála kokɔ́tisa likitani na likelelo, ekolanda likitani liye lizali kokɔ́tɔ na likelelo na loléngé luye:


Na  Lingála likitana litali bilɔ́kɔ lizali -angó. Mpǒ na kolikɔ́tisa  o ntéi ya likelelo, lyangó likolanda kelási ya nkómbó ya elɔ́kɔ eye ekokɔtɔ na likelelo






#Article 57: Lisalisi:Kobanda na Wikipédia (1804 words)


Lokásá loye lozalí neti mokambi mɔ̌kɔ́ mpɔ̂ na baye (contributeurs) bazalí ya sika. Mpɔ̂ na bosálisi ya mobimba ya Wikipedia, tálélá . Sɔ́kí olingí kotála mwǎngo moye ya mobimba, tálélá .

.

Sɔ́kí olingí kosálisa na Wikipedia, ebɔngí :

Bonsɔ́mí boye Wikipedia epɛ́saka na yɔ̌, ezalí elembeteli ete etíyelaka yɔ̌ motéma. Yangó wâná osengélí kosɔsɔlɔ etámboli na lisangá na ngo mpé koyékola ndéngé níni okokí kosálisa mwǎngo moye.

Mosálisi (Contributeur) azalí moto mɔ̌kɔ́ óyo akokí kokoma nkásá. Liloba « kobalola » elimbólí   lokásá la sika mpé kobóngola lokásá losúsu. Okokí kobalola kozánga kozala na compte mɔ̌kɔ́, kasi l' elobélí mpé babóngoli na yě «kozánga nkómbó» na IP na yě. Maloba (« likomeli (article) », « lokásá », « makambo (historique) »...) mazalí  : ndimbola na yangó ezalí na eye elandí.


Kobalola lokosa moko ezali oyo eleki ntina mpo na Mosalisi moko. Eteni Kokoma ezali petee: ezali formulaire moko na kati na ngo, liziba ya lokasa ekoki kobongolama.

Liziba ya lokosa ezali texte formaté oyo ekozala lokosa oyo basusu bakokoka komona mpe kotanga. Liziba oyo ekeseni mwa muke na lokasa ya solo, mpo ezali na balises wiki; epesi yo nzela ya kobongisa lokasa, elingi koloba:

Mpo musala ya mosalisi ekoma petee, Wikipédia esalelaka ndenge ya kokoma oyo ezali petee (ebengami «ndenge ya kokoma ya wiki») mpe oyo ezali na esika ya HTML. Bongo, osengeli kozala na mayele na Web mingi te mpo na kosalisa Wikipedia.

Tala: 

Mpo na kobalola lokasa moko, osengeli konyata na eteni kokoma na biteni na likolo. Okoki mpe kobongola ndambo muke na lokasa moko (elingi koloba eteni na katikati na mito muke mibale): osengeli kaka konyata na [ kobalola ] oyo ekokani na ndambo oponi.





#Article 58: Antoine Gizenga (149 words)


Antoine  Funji azalí moto wa politíki. Azalákí Ministɛlɛ mwa yambo ya Guvenemá ya Kongó-Kinsásá.

Gizenga abótámí o Mushiko, mokɔlɔ 5, sánzá ya zómi o mobú 1925. Azalákí Ministɛlɛ mwa yambo ya Guvenemá ya Kongó-Lipopo (Kongó-Kinsásá ya kala) o 1960, 1961-62, mpé Prezidá ya botɔmbɔki o 1961. Guvenemá ya yě, na Stanleyville lokolá mbóka-mokonzi, ezalákí na limɛmya lya bisé 21 bya Afríka, Azía mpé Erópa ya Ɛ́sita o sánzá ya míbalé, 1961. Azalákí o bɔlɔ́kɔ útá sánzá ya yambo, 1962, tíí sánzá ya nsambo, 1964, mpé mbála esúsu útá sánzá ya zómi, 1964, tíí sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́, 1965. Azalákí mopaya útá 1965 tíí 1992.

O 2006, azalákí kandidá na mapɔnami ya Prezidá ya Kongó-Kinsásá. Azwákí 13,06 % ya vɔ́ti na mbála ya yambo. Azwákí ebóngá ya Ministɛlɛ ya yambo na Prezidá Joseph Kabila





#Article 59: Kama Sywor Kamanda (303 words)


Kama Sywor  abótámí na Luebo (RDC), na 11 novɛ́mbɛ 1952. Kamanda azalí mokomi ya mikandá minɛ́nɛ.

Yě ayébání na mikili nyɔ́nsɔ. Na Ameríka, na Mpótó, na Azía, na mikili míngi esálí kotánga mpé koyékola mikandá na yě. Kama Sywor Kamanda akomaka masoló mpɔ̂ na bakóló mpé bǎna. Asílí koyébana mpɔ̂ na mikandá na yě ya poesie. Yě akomá mikandá míngi masapo. Kama Sywor Kamanda asálí mwǎna ya mbóka ya Kongó ayébání mpɔ̂ na bilɔ́kɔ yě asálí kokoma. Mikandá na yě ekomámá mpé na minɔkɔ misúsu na mbóka míngi.

Kama Sywor Kamanda apɛ́sí na Kongó mpé na Afríka image monɛ́nɛ ya bakomi ya mikandá. Lɛlɔ́ óyo yě asálí mokomi monɛ́nɛ ya roman mpé na masano ya théâtre. Nkómbó na yě eyébání na Afríka mobimba. 

Mwǎna na bísó ya mbóka Kamanda asálí koyébisa mikili nyɔ́nsɔ makási ya civilisation nkɔ́kɔ na bísó. Lisapo ya bisíka toútí, bisáleli na bísó na ntángo ya lipandá tíí lɛlɔ́ óyo esálí na káti ya mikandá na yě. Mpási na bísó, bitumba na bísó mpɔ̂ tokoma peuple monɛ́nɛ mpɔ̂ na développement na vina bísó ya mikɔlɔ nyɔ́nsɔ esálí na káti ya bokomi na yě. 




#Article 61: Post Natal Depression (661 words)


Nini Postnatal Depression? Bato ba kobenga bokono yango mawa na sima ya boboti. Bokono yango ezali mawa mwa ndambo. Basi ebele bakozala na mawa mwa ndambo na sima ya boboti.

Kasi, 10% ya bamama ya sika sika bakozala na post natal depression ya mabe (PND). Bamama ya sika sika ebele bakozala na post natal depression te koyeba, te bakoki kobikisa bokono
yango. Bokono yango ekopesa mwasi mpe libota na baninga mawa mingi. Basi basusu bakoki kozala na puerperal psychosis — bokono ya mutu ya monene, ye ekobanda na sima ya boboti, tee na mposo motoba na sima ya mbotama ya mwana.

Post natal depression ekoki kozala tango mawa na sima ya boboti ekokoma mabe penza. To depression ekoki kozala malembe malembe mpe bato bakoki koyeba te, te mwasi azali kobela ntango elai na sima ya mbotama ya mwana. Tango mosusu, okoki kobongisa mwana te mpe ozali na mawa. To o kolela mbala mingi. Bamama basusu, oyo bazali na PND bakopangana mpo na bokolongono na bango mpe na mwana. Bakoki kozala na bomo mpe na nkanda mikolo minso. Bamama oyo bazali na post natal depression bakolemba mikolo minso. Bakoki kosala te likambo ya pasi te. Bamama basusu bakoyoka mpasi, te kozala na likambo. Bakolala na bokasi mpe ba lingi kolia te. Ba kolinga kosiba te.

Elembo ya puerperal psychosis ekoki kozala lokola liboma. Mwasi a koki kozala na esengo mpe kosepela mingi, mpe koloba mbango. A koki mpe kolala te na kosala makambo mbango. Bato basusu bokoki koloba, te ozali pasi mpe o kotinda bato, na o kosilika mingi tango nzambi ekozala. Bato basusu bakozala na mawa mingi, mpe na mbisa ba kosepela mingi. Bakoki mpe komona na koyoka likambo oyo ezali te.

Soki depression na yo ekoumeli mikolo ebele, o sengeli na kokende na kotala monganga na yo mpe koyebisa ye bokono na yo. Post natal depression ezali bokono ya solo mpe bakoki kobikisa bokono yango malamu.

Bobokoli ezali mbala mingi anti-depressants. Bobokoli oyo ekobikisa yo malembe, kasi soki ozali eliki kitoko te na sima ya mposo mingi, senga monganga na yo bobokoli eleki makasi to bobokoli mosusu. Soki depression ekomi ya mabe penza tango ya sanza na yo, senga ye bobokoli ya progesterone. Bamama oyo bazali na puerperal psychosis basengeli kokende kotala psychiatre
(monganga ya mutu). Bakoki kopesa yo bobokoli na ndako, kasi okotikala na lopitalo mbala mingi – lopitalo basusu bazali na biteni ya bamama na bana mpo na bokono ya mutu. Bobokoli ezali mbala mingi mino ya anti-psychotic mpe anti-depressant.

Baninga mpe libota basengeli kozala boboto. Bokono ekobikisa na mbango mpe bobokoli bozali ya bokoti, kasi bato basengeli kosunga yo mingi tee na nsuka. Bato nyonso, oyo bazali na yo basengeli koyeba te ozali kobela – basengeli kopalela yo te. Libota na yo e sengeli kososolo te o kozwa bobokoli na doktolo mpe bakoki kolongisa yo soki o sengeli kokende kosenga mino mosusu. Bopemi ekosalisa yo, mpo na kobikisa. Libota mpe baninga na yo basengeli kosala mosali nyonso mpo na yo. Kasi tango okozala eliki kitoko, sala makambo nyonso. O Okozala na mikolo malamu mpe mabe.
Soki o lingi kozala penza te, senga libota na baninga na yo kotikala na yo tango nyonso. Kosimba mpe bopwepwi na mobali na yo ekopesa yo elikia – penza soki o lingi kosiba
te.

Soki o kopangana mpo na bokolongono na mutu na yo, to bokolongono na bandeko to baboti na yo, senga GP na yo, a kolakisa yo lopitalo ya bokono ya mutu. 

Soki ozali na PND koloba na bato mpo na bokono na yo ezali malamu mingi. Tembe na baninga mpe libota ekosalisa yo, kasi senga monganga na yo to mobotisi ya mwasi to mosali ya bokolongono. Ba koyebisa yo makambo nyonso po na bosungi mpo na bokono ya mutu.

O sengeli koyamba, te o koki kobika na nsuka – ata malembe. Bongisa yo moko, pema ebele mpe pangana te soki okoyoka mpasi. Lia malamu – lala nzala te. Soki ozali penza, organisation yango ekoki kopesa yo bondeko mpe bosalisi.




#Article 62: Depression ǒ sima ya bokási (145 words)


Depression ǒ sima ya bokási ezalí bokono ya likanisi lia somo ye ekoki kozala na sima ya bokasi, ye e pesi moto pota ya monene to bokaneli. Bobunisi ya makasi, likama ya mokili to ya moto, to etumba, ekoki kopesa moto PTSD.

Bato oyo bazalí na depression ǒ sima ya bokási bazali kobanga mikolo minso mpe ba kokundela
bokasi o motema mpé bakoki kolinga libota na baninga na bango te. Bakoki kolala malamu te, mpe bazali kolenga mikolo minso.

Bobokoli ya malamu mpo na depression ǒ sima ya bokási ezali, mpé bato ba kosala bobokoli ya sika, mpé oyo eleki na elengi. Ekosalisa bato oyo bazalí na depression ǒ sima ya bokási bomoi ya malamu mpé esengo. Soki o kopangana mpo na bokolongono na mutu na yo, to bokolongono na libota na yo, senga doktolo na yo, a kolakisa yo bilo ya bokolongono ya mutu.




#Article 63: Bokobandela (búku) (125 words)


Bokobandela ezalí lisolo na lingalá ya Bienvenu Sene Mongaba.

Kimina azalí kalaka ya letá. Mpiaka likolo ya mpiaka. Akomi koluka na ndenge nyonso po àbima na pasi oyo. Mokolo mosusu, ngenge: ministre alakí ye na moninga ye Kabangu. Bakokende Addis Abeba na koyangana monene ezalí kuna. Bakofutama na ndenge ekoki. Batata oyo basalí mama na ebandoli. Kimina na mwasi na ye bakani kozwa mabele epayi ya Bateke mpo na kosala bilanga. Nzoka nde ministre alongoli kombo na bango pe atie ya basemeki na ye. Kimina pe asalí ye suka na filime. Ekomi nde molukano. Na lisolo oyo, Bienvenu Sene Mongaba alobi na bakonzi ya Kongó. Soki toyangeli malamu te makambo ya mboka, tokokende epai moko tɛ. Tokobandela. Moto akosala na esika na biso azalí tɛ.




#Article 64: Bienvenu Sene Mongaba (135 words)


Bienvenu Sene Mongaba azalí mokomi ya Masolo na lingála, mpe Molobéli. Abótámi o sánzá ya yambo 1967 o Kinsásá. Afándí na Bɛ́lɛjika.

Azalí mpé na Lingisi ya bosilisi na kémi ya Bobongo ya Kinsásá, Lingisi ya boyekoli ya likolo na kémi na Bobongo ya Brussel (ULB) mpé Lingisi ya molakisi nzebi ya bikelamo ya Bobongo ya Loven-Sika (Louvain-la-Neuve). Atángísá kémi na Kelási ya Likoló ya Etángiseli na Popokabaka na Kongó-Kinshásá mpö atángisaka na biteyelo ya katikati na Communauté française ya Bɛ́lɛjika.
Lelo oyo azali koyekola ndenge ya konétola Lingála pó ékoka kosálelama na ndéngé ekokí bó monoko ya kotángisela nzebi (sciences) na bitéyelo ya Kongó. Boluki na yé etálí bóngó nzebi ya minoko pó na Lingála (etongameli ya maloba, etongameli ya masakola pé ekomeli. 

Etánda ya bileko na lokótá lingála esalami na Bienvenu Sene Mongaba.




#Article 65: Mamá wa Bikólo bínsɔ (212 words)


Mamá wa Bikolo binso ezalí losámbo na Maria, mamá wa Yésu. Ezalí losámbo ya eklézya katolíko.

Na Bikamo bisantu, ntango insi, soko bakotanga Maria « Mamá » (mwǎsí) ekolakisa mosálá mwa yě mwa Molobeli-mobongisi. Na mibú 1945 téé 1959, na Amsterdam (Holanda, Erópa), mwǎsí mɔ̌kɔ́ nkómbó 'te Ida Peerdeman, azwǎkí mayébisi minɛ́nɛ. Maria azalí koyébisa 'te na « bileko biye mpénza » yě alingí 'te batanga yě na nkómbó 'te Mamá wa Bikolo binso.

Akosɛ́ngɛ́ 'te Pápa wa Roma asakola dogma (litéya lya ntína) ya Maria Mobíkisi-mosálisi, mokabeli wa ngrásia ínsɔ, mpé molobeli. Sɔ́kɔ́ bôngó, Mamá wa Bikólo bínsɔ nd’apésí sɔ̂lɔ́-sɔ̂lɔ́ bobóto na nsé mobimba. Apésí bísó losámbo loye, mpé elílí eye. Tokomɔ́nɔ 'te akotɛ́mɛ libosó lya Kurusé, mpé asangání mpénza na malozi ma Yésu. Na mabɔ́kɔ ma yě ikobima ngenge ísáto : « ngrásia, libíki na bobóto »  mpɔ̂ ya bikólo bínsɔ.

Makabo maye mánsɔ maútí na Kurusé ya Yésu. Maria nd’akabólélí mangó na baye bánsɔ bakosámbelaka na mpíkó mokɔlɔ na mokɔlɔ losámbo loye, o libosó lya Kurusé tǒ elílí eye. 

Mokónzi Yésu Kristo, 
Mwǎna wa Tatá 
tinda sikǎwa Elímo wa yɔ̌ o mokili. 
Fandisa Elímo Sántu o mitéma 
mya bikólo binso, 
na ntína 'te babika na bobebi, 
makama ma mawa mpé na etumba. 
Mamá wa Bikólo binso, 
óyo batabgaka Maria, 
azalá Molobeli wa bísó. 
Amen.




#Article 66: La Zaïroise (189 words)


La Zaïroise (Ya Zaïre o lingála) ezalaká loyémbo-lokúmu la Zaïre o lokótá la lifalansé. Ezalakí loyémbo-lokúmu bandá o mobú mwa 1972 téé o mobú mwa 1997. Ekomámáká na Joseph Lutumba (texte) mpé eyémbámákí na Simon-Pierre Boka Di Mpasi Londi (mizíki).

Zaïrois dans la paix retrouvée,
Peuple uni, nous sommes Zaïrois
En avant fier et plein de dignité
Peuple grand, peuple libre à jamais
Tricolore, enflamme nous du feu sacré
Pour bâtir notre pays toujours plus beau
Autour d'un fleuve Majesté 
Autour d'un fleuve Majesté 
Tricolore au vent, ravive l'idéal
Qui nous relie aux aïeux, à nos enfants
Paix, justice et travail, 
Paix, justice et travail. 

Bǎna mbóka Zaïre na kímyá tozalí (*retrouvee)
Na lisangá lya bǎna mbóka, tozali bǎna mbóka Zaïre
Na libóso, lolέndɔ mpé totónda na limεmya *(dignite)
Bingambé bato, bato ba nsɔ́mi ya libélá
Mikóbo mísáto, pelisa bísó na mɔ̂tɔ mwa lotómo (*sacre)
Mpɔ̂ totónga ekólo na bísó kitɔ́kɔ ntángo ínsɔ
Na nzínganzínga ya ebalé monɛnɛ
Na nzínganzínga ya ebalé monɛnɛ
Mikóbo mísáto  na mopɛpɛ,  lamusa iye isengeli izala
Iye isangisi bísó na bankɔ́kɔ mpé na bǎna ba bísó
Bobóto, Bosémbo mpé Mosálá
Bobóto, Bosémbo mpé Mosálá




#Article 67: Kosolola bosembo (136 words)


Kosólola bosémbo ezalí loléngé ya koloba na moninga mua yo na kimia na ndéngé ete boyokani mpé kososolama ékoba kati na bino. Yango ekosala ete moko na moko asosola eloko moninga alobi. Kosósola malamu to kokokisa mposa elobi moninga. Kosólola bosémbo ezalí bongo loléngé bato bakoki kosólola na ndéngé ete mindondo, bitumba mpé kosuana ezalá soko moké te (ezalá tata na muana, tata na mama, moninga na moninga, molakini na muana kelasi, mokonzi na mosali, bakonzi bango na bango).

Lolo oyo, kosólola bosémbo ekomí lisanga monene na mokili mobimba esangisi bato banso basili koyékola yango mpe basepeli kosalela motindo yango ya kosolola. Kosólola bosémbo ezalí eloko ya motuya esengeli bato mingi bayeba mpé bayékola yango. Mpo ete ezalí kolakisa biso ndenge tokoki kovanda bísó na bísó na ndenge ya kimia, esengo, boboto, boyokani, bosémbo mpe bondeko.




#Article 68: Libota Vincentienne (261 words)


Libota Vincentienne ezalí na lisalisi lya Sango Robert P. Maloney, oyo azali Supérieur Général wa ba Lazariste, mangomba maye mabandemaki na Mosantu Vincent (AIC, Filles de la charité, Lazariste) na maye mazali kolanda mateya ma ye (Société de Saint Vincent de Paul mpe mangomba masusu ndenge na ndenge ma bamibonza) bazali kokutana mpo bayebana malamu, basolola mpo etali misala mya bango mpe baluka ndenge nini bakoki komipesa maboko mpo ya mioko misala lisanga.

Association Internationale des Charités ezalí o mokili mobimba mpé ezalí kosangisa mangomba ma bikolo 45, ezali na bato motango 250 000 bamipesi mpo ya kosalisa mabota 3 000 000. Soki totiyi mosala bakosala na maboko ma bango moko na motango mwa mosolo, mokokani mbele na 7 400 000 000 Falánga ya Bɛ́ljika; yango ezalí lokola ngonga 14 800 000 ya mosala na mbula yoko.

Lingomba liye libandisami o mwa 21 yanwali 1818, o mboka Gijzegem na Mme Lecandèle, Baronne wa Gijzegem. Nkombo ya kobotama ya ye nde Elisabeth de Robiano.

Mibeko mya yambo mya lingomba lina mindimamaki na Mgr de Brognie, o mwa 13 mai 1819. Mibeko mina milandi pene mpenza miye Mosantu Vincent apesaka na ba-Filles de la Charité.

Mpo ya bilenge ya mbula 18 tee 25, baye bakolakisa polele 'te bazali bakristu to mpe baye bazali koluka kokola na nzela ya bokristu, Libota Vincentienne ezali o Bɛ́ljika, ezali kopesa bango libaku lya kobonzela mbula yoko ya bomoi bwa bango o mosala mpo ya batu baye bazali na mikakatano.

Mosala mona mokosalema na elikya 'te elenge yoko yoko akomona polele eloko nini asala na bomoi bwa ye...




#Article 69: Compagnie des Filles de la Charité (320 words)


Compagnie des Filles de la Charité ezalí lingomba libandisami na Santu Vincent wa Paul mpe Santu Louise de Marillac.

Na lisalisi lya Elimo Santu, Vincent wa Paul (nganga-Nzambe o mboka France (1581-1660) amoni bobola mbwa nzoto mpe bwa molimo ya ekolo ya ye mpe amipesi mobimba na lisalisi lya nzoto mpe na bosangeli Nsango Elamu na babola. Azalaki kobenga bango Bakonzi ba biso mpe Bankumu ba biso.Mpo ya kosalisa bango abandisi Confréries de la Charité (1617) mpé Congrégation de la Mission to Lazaristes (1625). Na nsima akutani ye na Louise de Marillac (1591-1660). Louise asalisi Vincent o lisalisi babola.

Marguerite Naseau (1594-1633), elenge mwasi ya bilanga, asengi 'te akota o Confréries de la Charité mpo ya kosalisa o misala mike. Amikomisi na bolingo bwa solo mosaleli wa babola. Ndakisa ya ye ebendi bilenge bisusu. Bongo o mobu 1633, lingomba lya ba Filles de la Charité libandi.

Ut'o mobu 1630, Vincent wa Paul asengi na Louise de Marillac 'te alanda mpe alendisa ba Soeurs bazalaki kosala o kati ya Confréries de la Charité.

Vincent wa Paul akolisi bongo Eklezya na charisme ya sika: kosalela Kristu o kati ya babola. Ntina wana ba Filles de la Charité bakokokisa bilako bya batisimu ya bango na bokeli bilako bya bopeto,bobola na botosi.

Vincent wa Paul alingaki te 'te ba Filles de la Charité bazala ba Religieuse ntina 'te bakoka kozala o kati ya babola mpo ya kosalela bango. Bongo Eklezya andimi lingomba lya bango lokola Société de vie apostolique. Vincent de Paul na Louise de Marillac balingaki 'te ba Soeurs bafanda o kati ya communauté mpo 'te basalisana o charisme ya bango ya kosalela babola mpe o bomoi bwa losambo. Vincent de Paul alingaki 'te liziba lya charisme ya bango lizala o kati ya ndako te kasi o libanda. Santu Vincent alobi : Ndako ya bango, ndako ya batu ba mpasi, ndako ya babola...

Compagnie des Filles de la Charité epalanganyi o mokiri mobimba.

 




#Article 70: Société Santu-Vincent-wa-Paul (173 words)


Société Santu-Vincent-wa-Paul ebandisamaki na Frédéric Ozanam. Conférence ya yambo ebotamaki o mwa 23 aprili 1833.

O mobu 1933, ntango lisanga likokisaki mibu 100, lizalaki na ba conférence 12.000, mpe motango mwa bato mozalaki 200.000. Na 1983, tango likokisi mibu 150, motango mwa bato mokomaki 750. 000, mpe ba conférence ezalaki 35. 500 ekabwani na bikolo 107.

O mobu 1995, motango mwa bato mokomaki 875.000, bakabwanaki na ba équipe 46.000 ipalangani o bikolo 130. Eteni (groupe) yoko yoko ekosangisa basi na babali, bilenge basi na bilenge mibali; bazali kosala mosala o kati ya ba paroisse ya bingumba to ya mboka ike, ya ba quartier, ya biteyelo mpe o bisika bya misala ndenge na ndenge.

O mwa 22 août 1998, Pápa wa Roma alubolaki Frédéric Ozanam mo-esengo na Notre-Dame de Pari.

Société Santu-Vincent-wa-Paul ekosala misala mya bosalisani mpe mwa boluki bolamu bwa batu o mokili mobimba. Ezali koluka kotiya bondeko kati ya batu mpe kokotisa bosembo o mikili minso, na ntina ya kozongisa bonsomi bwa babola, kopesa bango elikya mpe esengo ya kobika o mokili.




#Article 71: Soeurs de la Charité de Roeselare (160 words)


Lingomba lya ba Soeurs de la Charité de Roulers, lingomba diocésaine, libandemi o 1819 na Bénédictus Bracke, nganga-Nzambe wa paroisse Saint Michel ya Roulers.

Ntina ye na Kristu, bomoi boko, mpasi ya babola ibeti ye o bozindo bwa motema. Mpo ya ye, kolinga Nzambe ekomilakisa na kolinga batu. Akufi o 2 marsi 1820, sanza 10 mpamba nsima ya bobandisi lingomba.

Ebandela ya lingomba.

O mokolo mwa yambo ya sanza ya mitano 1819, Bénédictus Bracke apesi Martha de Jonckeere etinda ya kasalela, kosolola mpe kosalisa batu ba maladi na babola butu moi tee... na liwa lya bango

Ye moko azalaki kosala bongo. Mpe alingi baye balingi kolanda ye, basala se boye.

Apesi biso nkombo ya Soeurs de la Charité na bolandi mateya ma Santu Vincent wa Paul. Aponi Martha de Jonckeere bo Mamelo Mokonzi, Martha azalaki mwasi ya mibu 58.

O 24 aprili 1834, bamamelo mwambi ba yambo balakelaki bilako. Monseigneur Boussen, episkopo ya diocèse a.i.ya Bruges, andimaki Mibeko mya lingomba.




#Article 72: SNCC (1539 words)


SNCC (Société Nationale des Chemins de Fer congolais ), ezali entreprise publique ya l'Etat. Ba activites ya exploitation na yango ezali na Est mpe na Sidi ya R.D. Kongo. Ezali mpe kosala exploitation na transport fluvial, routier mpe na exploitation portuaire.

Na 1891, Compagnie ya Katanga esalemaki mpo esalaka exploration na sud ya Etat indépendant ya Congo. Na yango, Compagnie ya Katanga e signaki ba conventions mibale na Etat indépendant ya Congo na mars 1891 mpe na mai 1896. Ba conventions yango ezalaki ko imposer na compagnie ya Katanga ba obligations ya occupation na mise en valeur ya Katanga. En contre partie, l'Etat indépendant esengelaki etikela compagnie ya Katanga na totale propriété ya mabele domaniale oyo ezali na territoires oyo convention ya 1891 ezali kolobela. Donc, pendant 99 années, compagnie ya Katanga esengelaki e exploiter sous-sol ya mabele oyo bapesi ye selon convention signee. Neti ezalaki mua mpasi mpo na ko fixer ba limites ya mabele, l'Etat indépendant na compagnie ya Katanga bayokanaki ete batiya bozui na bango elongo (fusion de biens). Na yango bayaki kosala comité spécial ya Katanga, CSK, na 1900. CSK nde esengelaki e gérer ba biens na bango mpe ba bénéfices ekokende na prorata ya 2/3 mpo na L'Etat mpe 1/3 mpo na Compagnie ya Katanga.

Kotia territories oyo Etat indépendant epesaki na Compagnie Katangaise ezalaki likambo moke te pamba te ba frontières ya sud ya Katanga na ya nord ya Zambie ekatamaki naino malamu te. Nde na 1896, ba frontières ya Katanga ekatamaki mpe mabele oyo ebandaki kaka kozela création ya CSK na 1900.

Kasi neti Katanga ezalaki mosika na Océan Atlantique, CSK ezalaki na likanisi lya kotonga chemin de fer tee na Matadi mpe na kobimisa ba minérais na Congo vers la Belgique. Kasi na sud na Rhodésie (Zambie),na Bulawayo chemins de fer ya Afrique du sud esilaki kokoma mpe na Mozambique oyo ya kuna ebandaki kokoma tee na Salisbury. Nde wana liaison ya Salisbury na Bulawayo eye kosalema. Yango wana Etat indépendant eyaki ko signer convention na Robert Williams, industriel britanique, mpo na kotonga chemins de fer oyo ezali kowuta na sud ya Katanga (kati na Rivière Lufira na Lualaba) mpe kokutana na chemin de fer ya Rhodésie.

Na 1902, compagnie de chemin de fer du Katanga, CFK, esalemi na Comité spécial ya katanga. CFK ezalaki na but ya kokutisa région ya Lubumbashi (Elisabethville) na ya Zambie (Rhodésie) du Nord na nzela ya Sakania, mpe kotongisa port na Fleuve Congo na niveau ya Lualaba mpo na kosala liason na Bukama.

Le, 4 janvier 1902, création ya Compagnie ya Chemin de fer du Congo Supérieur aux Grands Lacs africains, CFL. Compagnie oyo esalemaki mpo na ko relier fleuve Kongo na niveau ya Kisangani na etímá Mobutu (etímá Alubɛ́) mpe ko relier Lualaba na lac Tanganyika. Kasi bakonzi bayaki lisusu kobongola mission na yango. Sima mikolo yango nde KDL eyaki kosala. Yango ebandaki ko exploite ba lignes oyo:

soit total ya 1.085 km.

Na Voies fluviales:

Soit un total ya 1.025 km.

Na Voies maritimes ya Tanganyika:

Soit total ya 665 km.

Na ba nzela (routes) :

Soit total ya 329 km.

Na 1906, mbotama ya CSK, filiale ya BCK, spécialisée na recherche minière. L'État Indépendant na Société Générale de Belgique basali Compagnie du Chemin de fer du Bas-Congo au Katanga, BCK mpo esala liaison ya Bukama na Bas Congo par chemin de fer mpe kosala ba recherches minières na ba régions oyo.

Na 1911, bakangisi ligne oyo ekeyi na Océan Atlantique na chemin de fer ya Benguela
Na 1919, BCK esali société minière. Mission na yango ezali ya kosala exclusivement recherche minière. Société filiale oyo ebengami Société minière du BCK.

Le, 7 mai 1924, création ya Vicicongo mpo na ko exploiter lignes ya chemin de fer ya Uele, Ituri na Kivu septentrional. Chemin de fer à voie étroite na 842 km kolongua libongo ya Aketi, tee na terminus ya voie navigable ya Itimbiri. Kolongua wana tee na Mungbere na 685 km, kuna nde ekabuani na biteni bibale : Bondo 151 km na Titule 290 km.

Vicicongo ebimisaki likanisi lya Messageries Automobiles du Congo (MAC) mpo na ko utiliser ba routes. Ekomaki na 450 mituka oyo ebandaki kotambola dix millions de km na mbula.

Vicicongo ebandaki mpé ko exploiter libongo lya Aketi na rivière Itimbiri mpé na libongo lya Kasenyi na etímá Mobutu (Etímá Alubɛ́).

Vicicongo ezalaki na direction générale na Aketi na ba agences na Isiro, Bunya, Kisangani, Butembo na Buta.

Na 7 mai 1924, création ya Société pour la construction et l'exploitation des lignes secondaires vers les grandes voies de communication.

Na 1937, réseau ferroviaire emati na Nord ya fleuve Kongo mpé e totalisé 842 km. Ba lignes iye :

Réseau routier ezalaki na 21.000 km.

Na 1927, Société de chemin de fer Léopoldville-Katanga- Dilolo (LKD) esalemi. Neti l'Etat ezalaki actionnaire majoritaire, asali concession ya ba lignes misato:

Sur le plan financier, opération oyo ezalaki asticieuse mpo esalaki ete misala mikende liboso mbangu mbangu mpo ba lignes misato oyo ezalaki naino sous chantier. Neti exploitation ezalaki confiée na BCK, yango ezalaki na makoki ma kobimisa mbongo oyo ekokaki kosilisa misala noki.

Na 1952, compagnie de chemin de fer Katanga-Dilolo-Léopoldville (KDL) ebotami sima ya bokangisi LKD na CFK. KDL azali concessionnaire exclusif ya voies ferrées ya Katanga mpe BCK azali entrepreneur mpe exploitant ya chemin de fer.

Messageries Automobiles du Sankuru (MAS) Yango ebandaki kosala exploitation commune ya ba routes na BCK, na Kasaï, Sankuru, Katanga (Kananga Luluabours, Kabinda na Kamina) mpo na ko relier ba gares oyo ezalaki relier na train te.

SOTRANSCONGO, yango ebandaki ko exploiter ba routes ya Equateur na Mongala na Ubangi.

Na 1961 baye kokabola BCK na biteni bibale: BCK oyo ezalaki ya droit Belge na BCK ya sika ya droit Congolais

Na 1970, gouvernement ekotisi BCK ya droit congolais nakati ya compagnie ya chemin de fer Kishasa-Dilolo-Lubumbashi,

le, 2 décembre 1974, l'Etat Zairois e créer Société Nationale des Chemins de Fer du Zaire yango esangisi ba compagnies oyo : La compagnie de chemin de fer Kinshasa- Dilolo-Lubumbashi, KDL, Chemin de fer Matadi- Kinshasa, CFMK, Office Zairois de chemin de fer des Grands Lacs, OZCFL, chemin de fer de Mayombe, CFM, chemin de fer vicinaux du Zaire, CFM.

le, 3 Avril 1991, gouvernement ekaboli Société Nationale des chemins de fer du Zaire, SNCZ, suite na nationalisation na regroupement ya ba Sociétés des chemins de fer. Ekaboli yango na SNCZ - Holding (chargée ya ba réformes na secteur ya transport ya chemin de fer mpe na ba réformes ya ba Sociétés oyo esengeli ko exploiter ba réseaux ferroviaires, routiers, fluvials na lacustres plus exploitation portuaire) na ba filiales na yango, Société des chemins de fer de l'Est, SFE, Office des chemins de fer du Sud, OCS, Office des chemins de fer des Uele, CFU.

le, 19 Août 1994, gouvernement esengi na Ministère ya Transports na communications diagnostic. Na yango, Ministère eye ko charger Société Belge Transurb Consult esala diagnostic ya Office des chemins de fer du Sud na Société des chemins de fer de l'Est na tina ya ko proposer plan ya redressement ya réseau interconnecté.

le, 17 Octobre 1994, Ministère ya Transport et communications endimi proposition ya Transurb (Société Conseille) mpo e privatiser gestion ya exploitation ya chemins de fer.

le, 7 Janvier 1995, Société Conseille Transurb na Spoornet (division chemin de fer ya entreprise publique ya Afrique su Sud Transnet) eye kosala Société ya droit sud-africain na kombo ya Comazar.

le, 23 Février 1995, SNCZ na Comazar ba signer accord-cadre oyo ezali koloba ete Comazar ezali Holding ya ba Sociétés d'exploitation SFE na OCS.

le, 24 Mars 1995, Gouvernement eye kondima basala Société de droit Zaïrois na kombo ya Société Interrégionale Zaïroise du rail, SIZARAIL.
Gouvernenment eye koboma SCNCZ- Holding na ba filiales na yango. Tango ebomi yango eye kopesa exploitation nioso ya chemins de fer na SIZARAIL, oyo e signaki na yango accord-cadre portant cessation de l'exploitation des chemins de fer.

le, 26 Mai 1995, signature ya statut ya SIZARAIL na ba actionnaires oyo: COMAZAR 51%, SNCZ 20%, GECAMINES 12%, Banque commerciale Zaïroise, BCZ 10%, MIBA 7%.

le, 1 juillet 1995, SIZARAIL aye ko reprendre gestion ya réseau interconnecté na durée ya 5 ans

le, 4 Octobre 1995, ministre ya transport a signer décret ya constitution ya SIZARAIL

Le, 1 Novembre 1995, baye koboma SNCZ,SFE, CFU, na OCS. Pe bazui ba actifs, passifs, droits et obligations ya SNCZ, SFE, CFU, OCS ba memi yango na SIZARAIL.

Après Le, 17 Mai 1997, tango Kabila akotaki, azongisi SIZARAIL compagnie nationale. Mpe sima ya ba sanza aye kokangisa aministrateur délégué ya Société oyo, mpe gouvernement eyaki kozongisa Société Nationale des chemins de fer du Congo

Ba lignes ya SNCC na ba mbula etongamaki

SNCC ekabuami na ba régions:

Direction générale na Lubumbashie.

SNCC ezali na 4.007 bakilomɛtɛlɛ ya voies ferrées kaka 858 bakilomɛtɛlɛ nde ezali électrifiés.

Ecartement: 1,067 mɛtɛlɛ:

Écartement: 1,00 mɛtɛlɛ:

Ecartement : 0,60 mɛtɛlɛ:

Ecartement 2 balokolo = 0,615 m:

Ba nzela nionso ya train ezali ya voie unique.

SNCC ezali na effectif ya 14.300 agents parmis lesquels 185 directeurs.
Etikala na 8 locomotives électriques, 11 locomotives diesel na 3 locomotives de manœuvres na moins de 200 voitures ya ba voyageurs na marchandises et quelques centaines ya ba wagons commerciaux epola et ezali na état moko déplorable.




#Article 73: ONATRA (953 words)


ONATRA (Office National des Transports), ezalakí entreprise publique ya l'Etat tée 23 dɛsɛ́mbɛ 2010. Ezalí Etongolo ya mombongo ya Bokumbi mpé Libóngo (EMBL tǒ SCTP). Yango ezali kosala exploitation ferrovière na portuaire na transport fluvial. Ba activités na yango ezali na ouest na nord ya mboka.
La compagnie du Congo pour le commerce et l'industrie, CCCI, esalemi le 27 décembre 1886 na Maître Van Halteren na Van Bevere (ba notaires na Bruxelles). Filiale na yango, la compagnie de chemin de fer du Congo (CFC), esalemi le, 31 yuli 1889. Yango esalemaki mpo etonga na ezua possibilité ya ko exploiter mpe kosala nzelá-masíni na Bas-Congo mpé 1500 hectares ya mabele pembeni ya nzela ya rail oyo ekotongama. Kasi, compagnie oyo ekokaki te selon projet na yango, kosangisa batu oyo bakokaki kosala musala moye. Donc, esengelaki babengisa batu bawuta na Afrika ya wesita mpo baya kosala musala wana.
Esengeli koloba ete ba conditions oyo batu babandaki kosalela musala ezalaki mpasi mingi mpo mingi bakufaki mpe mingi batombokaki kasi Belge abomaki mpe ebele. Selon ba calculs, na train oyo ebandaki komema 50 Tonnes, mpe ko rouler na vitesse ya 20.5km/h, ezalaki économique par rapport na 13.000 porteurs oyo babandaki ko coûter 50 fois chers (en coût, soins, alimentation, etc.).

Entre 1889 na 1890
Tramway à vapeur etamboli na Bóma.

CVM, Société des Chemins de fer Vicinaux du Mayumbe, esalemi le 30 juillet 1898.

le, 21 septembre 1898, signature ya Convention entre l'État Indépendant ya Congo na Compagnie ya construction CCCF mpo na kotonga ligne ya Boma na point ya bief navigable ya Moyen-Tshiloango. Kasi bakotonga tee na Tshiloango te. Ligne eyekosuka kaka na Tshiela. Ligne yango esali 140 km, eleki na Luki naye km 32, Lemba na km 39, Lukula na km 80, Loango na km 114.

le, 6 Août 1900, bako atteindre Tshisundi au km 44 mpe na kobanda exploitation mbala moko.

le, 19 octobre 1914, misala misili mpe bafungoli gare ya Tshiela.

CFC, la Compagnie du Chemin de fer du Congo, esalemi na 1892, train ya mindele. Ebandaki kosala: Matadi - Kenge - Songololo - (col de Zole) - Tumba - Kama - Mbanza-Ngungu (Thysville) (col de Zona Gongo) - Inkisi - Tampa - Kinshasa (Léopoldville).

Misala mia kotonga ligne Matadi - Kinshasa (Léopoldville) mibandaki le 15 mars 1890 mpe mosilaki
le, 16 marsi 1898.
Albert Thys azalaki conducteur des travaux.

Entre 1899 na 1942, construction ya chemin de fer Mayumbe Boma-Tshela
Na mukolo ya 20 avril 1935, Belge, na but ya kosangisa ba entreprises de transports oyo ebandaki kosala na Congo, ayaki kosala entreprise publique industrielle et commerciale ebengami Office des transports coloniaux, OTRACO.
Entreprise oyo ebandaki ko gerer chemin de fer ya :
Matadi na Kinshasa, direction na Mbanza Ngungu (Thysville);
chemin de fer ya Mayumbe: Boma - Tshiela, direction na Lukala;
ba services fluviaux ya Haut congo na ba principaux affluents na yango , direction Kinshasa (Leopoldville);
Mabongo ya Boma, Matadi, Kinshasa, Mbandaka, Kisangani, Bukavu, Goma na Kalundu;
navigation na lac kivu mpe une partie ya chemin de fer ya Kivu.

OTRACO e reprenaki le, 1 janvier 1936, ba :

le, 20 juin 1929, mbotama ya Société des Chemins de fer ya Kivu, CEFAKI. Esengeleki e kangisa lac Tanganyika na Kalundu, 776 m, na lac Kivu na Bukavu, 1460 m, na distance ya 137 km. Kasi ba problèmes ya topographie esalaki ete bakomisa ligne tee na Kamanyola km 93,4. Na yango esengelaki lisusu kotonga ba ngbagba ou ponts na Kamvira, Kiliba na Mulongwe.

le, 20 novembre 1931, chemin de fer ekomaki na Kamanyola. Kasi ba ngomba ya Ruzizi ezalaki mpasi mingi mpo na kopasola yango, Col ya Businga na 1.756 m ya hauteur elembisaki mundele. Yango wana rail etikala ko relier Kamanyola na Bukavu te. Kasi basalaki nzela ya mutuka, 63 km tee na Bukavu. Esengeli koloba ete soki vraiment basalaki ba etudes topographique na ya genie civile approfondies makasi mbele balingaki balonga Ruzizi. Heureusement na moyi ya lelo, ezali lisusu difficulté te kopasola ngomba na lolenge wana.
Suka suka ONATRA eyaki ko reprendre CEFAKI na 1947.

Na independance ya Congo, le 30 juin 1960, OTRACO eyaki kokoma Office des transports du Congo. Na 1971 OTRACO eyaki kokoma Office national des transports, ONATRA.

Na 1977, conseil executif (gouvernement) ekamataki décision ya kopesa possibilité na moto nionso akoma armateur, du coup, eyaki kolongola monopole ya ONATRA mpe kokotisa concurrence makasi. Décision oyo ezuamaki mpe mpo na kosepelisa ba politiciens na ba militaires oyo bazalaki na ba baleinières na masuwa oyo ebandaki kosala mombongo na fleuve na ba rivières ya Congo. Kasi constitution ebandaki kopekisa batu oyo basala activités commerciale. Situation oyo eyaki kosala ete ONATRA e perdre ba clients ebele.
Par exemple na ba années 70, ebandaki komema plus de 400.000 passagers na mbula. Kasi na suka ya ba années 80 akitaki na 120.000 passagers na mbula.
Lisusu situation ya guerre eyaki kosala ete masuwa ebandaki lisusu koleka Mbandaka te. donc moyen ya kokende tee na Zongo na Kisangani ezalaki te.
Sika totala exploitation ya ONATRA à travers territoire national
Na Ebale, kolongua Kinsásá tee Kisangani masuwa ekoleka na : Kwamouth Malela, Tshumbiri, Masuwa makotelema na Bolobo, Mistandunga, Nkolo, Yumbi, Lukolela, Mampoto, Gombe, Ikengo, Masuwa makotelema na Mbandaka, Lolanga, Masuwa makotelema na Makanza, Lusengo, Maludja, Masuwa makotelema na Mobeka, Ikonongo, Umangi, Upoto, Masuwa makotelema na Lisala, Dobo, Masuwa makotelema na Bumba, Barumbú, Masuwa makotelema na Basoko, Yalemba, Masuwa makotelema na Isangi, Yangambi, Yakua, St.Gabriel mpé Kisangani.

Na Komata (à contre courant) Kisangani, Masuwa masalaka 7 jours mpo ekoma na Kisangani. Na Kokita (sens ya courant), esengaka 4 jours mpo ekoma Kinshasa.

ONATRA ezali mpe na service courrier na ya marchandises. Mpe esalaka jonction na SNCC.

ONATRA ezali actuellement na effectifs ya

Siège ya Onatra ezali na Kinshasa na Boulevard du 30 juin.




#Article 74: Construction ya chemin de fer (537 words)


Construction ya Nzelá-masíni

Pona kosala Nzelá-masíni esengeli gouvernement à travers Ministère ya Transports et communications asala appel d'offre mpo na construction ya Nzelá-masíni, etc. Ndenge ba Chinois baye na enveloppe na bango, balingi kotonga lignes ya Nzelá-masíni, esengeli ya liboso ba signer protocole ya accord. Na protocole d'accord wana bakolandela chronogramme arrêté par les deux parties: ba congolais na ba chinois. Ya mibale, bazala na projet oyo ba ko soumettre na gouvernement par le biais ya Ministère ya Transports et voies de communications. Kasi avant ba Chinois basala projet yango, esengeli naino basala prospection ya terrain na espace oyo bango balingi kotonga. Sima ya prospection bakosala étude ya faisabilité oyo ekopesa bango idée ya kosala projet ya construction ya voies ferrées na mbongo boni bango bakobimisa mpe bato boni bango balingi kozua mpo ba kotonga ligne ya chemin de fer (ba Congolais boni? Ingénieurs, ouvriers qualifies na manœuvres, ba chinois na ba étrangers mosusu boni?

Projet oyo esengeli e tenir compte na contexte politique, économique, social, na technologique.
Bango bazali na origine ya projet tout comme na financement mpe réalisation na yango.

Ba points nini esengeli ezala na projet:

Bien évidemment soki projet oyo endimami construction ya ligne ya chemin de fer ekoki kobanda.

Na cas ya Kongo esengeli asalisa écartement ya 1067 mm mpo na kozala na norme na chemin de fer ya ligne ya Afrique du sud. Par contre, kolongua neti Katanga te na Bas Congo, wana bakoki kolanda norme internationale ya sika oyo ezali ya 1450 mm ya écartement.
Réseau ya ba voies ferrées na Kongo ezali 5138 km ya lignes discontinues.

Na 1980, Zaïre e bénéficiaki na aide ya 75 millions $ U.S. oyo ezalaki financement ya Banque Mondiale, Banque Africaine de Développement, France, Belgique na République Fédérale d’Allemagne mpo Na kobongisa réseaux ferroviaires na ye mope kosomba 20 locomotives Diesel mpe 38 locomotives électriques. Kasi misala miye misalema kaka ndambu mpe mbongo ebunga na nzela.

Soki financement ya projet ya kotonga rail ezali na maboko ya ba chinois, esengeli koyeba ete ONATRA na SNCC ezali kokende droit na privatisation parce que, ekosengele basala consortium ya ba entreprises publiques congolaise na privées chinoises oyo eko gérer ligne ou ba lignes oyo bakotonga. Na yango, neti ba chinois bazali na enveloppe, ba ko dicter vision na bango na oyo etali gestion ya infrastructure, gestion ya exploitation, maintenance na entretien ya matériels roulants mpo na ba parts en pourcentage ya ba entrprise ou ya entreprise exploitante.

Soki bazali na contrôle ya nionso oyo, bakozala à l'aise na oyo etali transport ya matière première oyo bazali ko exploiter mpo ebimaka na rythme oyo bazali ko imprimer : respect ya ba horaires ya trains, miantenance ya ba trains na suivie na commandes ya ba pieces détachées ya remplacement, contrôle ya état mécanique ya rails na maintenance ya fourniture électrique ya voies ferrées, gestion ya rentabilité na ba plus values ya ba lignes exploitées, etc.
Donc, ONATRA na SNCC bakozala na rien à dire. D'ailleurs, tokamua mpo d'une façon ou d'une autre, réforme esengeli eleka na ba enterprises oyo mpo ezali na pléthore ya personnels; déficitaires; ba équipements ekoma vétustes; ba matériels navigants na portuaires epola; corruption na incompetence ya ba agents ezali ko défavoriser bonne gestion, etc.




#Article 75: Butú pi! (107 words)


Butú pi! ezalí nzémbo ya Nɔ́ɛlɛ. Ekomámákí na Sango Josef Mohr (lialémani o 1816) mpé eyémbámákí na Franz Xaver Gruber (mizíki o 1818).

Bans'o nse, yokani. 
Banzelu bakokit' aw'o nse; 
mpé bayei kobosangela 'te: 

Mwána Yézu ayeí.»

Nzámbe mei, yebani! 
Nkembw' aye ekosukaka te 
mpé apusi kolinga ba nse. 
Mwána Yézu ayeí; 
Mwána Yézu ayeí. 

Maria, talani! 
Akokumisa mwana wa yé, 
amoyebi mobikisi mei 
Yézu, Nzámbe wa yé, 
Yézu, Nzámbe wa yé. 

Zabolo, kim'esi! 
Ngondo aboti Mokonzi wa yó, 
Ngondo aboti mokongo wa yó. 
Yézu Nzámbe ayeí, 
Yézu Nzámbe ayeí. 

Mwán'óyo, memyani; 
akotanda maboko ma yé 
yamba leló bolingo bwa yé 
Yé mobikisi ayeí, 
Yé mobikisi ayeí. 




#Article 76: Maria wa Nazaleti (1088 words)


 
Maria wa Nazaleti (Lialame מרים Mariam) azalakí mamá wa Yézu-Klísto.

Nkómbó Maria eútí na ligresi Μαριαμ, mpé na liyuda Myriam מרים, azalí elɛngɛ́ mwǎsí wa mbóka Judee, azalí mpé mamá wa Yésu wa Nazareti. Ekelézya ya bamumpɛ́ mpé ya ba-orthodoxe ipésaka yě esíká ya lokúmu, mpé imóbêngí Ngɔndɔ Maria (míngi mpenzá epái ya bamumpé) mpé Mama wa Nzambe (míngi mpenzá epái ya *ba-orthodoxe), mpé yě apésɛ́mí esíká ya lokúmu lonɛ́nɛ mpénza.

Mamá ya Maria azalakí Santu Anna, tatá azalakí Santu Yoakima. Bána ya Maria bazalakí: Yézu, Yakobus, Yoses, Yudas mpé Simon. Eklezya Katolike elobí: bazalakí bandɛko (cousins) ya Yézu; bamissioni balobí: bazalakí bandɛko (frères) ya Yézu.

Mikanda mya Matayo mpé ya Luka mipɛsi lisoló lya lisákólá lya mwanzɛ *Gabriel, ntángo mwanzɛ Gabriel apɛ́sɛki Maria mpé nsima Yosefu óyo alakáká libála na Maria lisákólá lya bokangemi bwa zémi ya Yésu na bozángi bosangisi nzóto na mobáli. Makomi ma Luka mazalí kopɛ́sɛ esíká enɛnɛ na Maria ntángo makomi ma Matayo mapɛsi esíká enɛnɛ na Maria tɛ́.

Makomi mazalí nsima koloba bolakisi bwa Yésu na Tɛmpɛlɔ́ kolandaka bonkɔ́kɔ bwa bangó buye busengi 'te mwǎna wa libosó nyonsɔ wa mobáli na libóta akosɛ́ngɛlɛ kosómbama. Simoni akotatola minyɔ́kɔ miye Maria akoyóka, nsima epɛsi lisapo lya bobúngi bwa Yésu o mibú zómi na míbalé ntángo bangó bamatáká bomati bwa mobú na mobú o tɛmpɛlɔ́ ya Yerusalemi: ezaláká babóti ba yě o nzelá ya bozóngi mbóka Nazaleti, mwǎna Yésu akotikala na tɛmpɛlɔ́ mpó na *kodiscuter na banganga ba mibeko.

Na bondimi bwa sika, Maria akobima lisúsu ntángo Yésu akokɛndɛ limpáti linɛnɛ lya libála epái wápi akobóngola mái na víno, mpé lisúsu mbala eye Maria azaláká komoluka ntángo yě azalaka kotéya, mpé ya nsúka ntángo Yésu abákamáká o ekulúzu. Mwǎna wa yě Yésu akotíka yě o mabɔ́kɔ ma moyékoli óyo yě alingaka míngi na nkómbó ya Yoane.

Yě azaláká na bayékoli mokɔlɔ mwa pantekote.

Ndimbola ya nsima ya boyókani bwa sika ekotála kokoba ya bomɔi bwa yě mpé liwâ lya yě na Éphèse.

Kokanga zémi na bozángi bosangisi nzóto na mobáli (Loléngé luye zémi ya Yésu ekɔtɔ́kɔ́ mpé yě abótamáká ntángo Maria azaláká ngɔndɔ) endimama na baklisto bansɔ mpó 'te ekomamá na mikanda mya boyókani bwa sika; kasi ezali bôngó tɛ́ na bongɔndɔ bwa sékô sékô bwa Maria (Loléngé la kotíkala ngɔndɔ bomɔi bwa yě mobimba) endimami na bwányá bwa bonzámbi bwa ekelezia ya bamumpɛ́ mpé ya eyamba ya *baorthodoxe kasi ebóyamá na bwányá bwa bonzámbi bwa eyamba ya bamisioni. Boyambi buye buzali mpenzá ya kala, engɛ́bɛ́nɛ́ na *Protévangile ya Jacques; makomi ma mibeko mya ekelézia ya bamumpɛ́ tɛ́ o bonkámá II esíká nini elakisami 'te Maria, mwǎna mwǎsi wa Anne mpé Joachim akabamáká lokóla likabo na Nkóló (eye elingi koloba kotíkala ngɔndɔ bomɔi bwa yě mobimba) na mokáno (voeu) mwa mamá wa yě, mpé nsima apɛ́sɛmɛ́kɛ́ na Yosefu yambo ya kokanga zémi ya Yésu.

Bamisíoni baboyaka boyambi bwa bongɔndɔ bwa sékô sékô ya Maria na kotombolaka makomi ma boyókani bwa sika maye mazali koloba na ntina ya bandeko ba Yésu ba mibali mpé ba bǎsí. Minei bakomami na Matayo 13,55 mpé na Malako 6,3

Mokanda mwa Matayo, na mokapo mwa 12 molobi 'te Maria mamá wa Yésu mpé bandeko ba yě bazaláká libándá. Balingáká komɔnɔ Yésu ntángo yě azaláká ontei ya ndáko. Ntángo moto mɔ̌kɔ́ alobi: Tála, mamá mpé bandeko ba yɔ̌ bazalí libándá mpé bazali koluka kosolola na yɔ̌.

Ezalí ndé bonkókó bwa *baorthodoce, engɛ́bɛ́nɛ́ na *Protévangile ya Jacques, ndeko wa Yésu ya mobali óyo bakaboli na yě tatá mɔ̌kɔ́ (mobóti mpé mobɔ́kɔli, mobóti mpó na Jacques kasi mobɔ́kɔli mpó na Yésu) (Yosefu) kasi bamamá bakɛsɛnɛ, mwǎna óyo abótami na libála lya yambo ya Yosefu óyo akufeláká mwǎsí mpé abáláká Maria ngɔndɔ óyo abonzelamáká na Nkóló tǒ lisúsu, engɛ́bɛ́nɛ́ na bonkókó bwa bamumpɛ́ mpé bwa *baorthodoxe, bandeko ba Yésu baye babótami na libóta lya tatá (batatá-mwǎsí, batatá-nkulútu, batatá-lɛki) tó ya mamá wa yě (banɔ́kɔ́, bamamá-lɛki, bamamá-kulútu) baye babêngi na lifalansé cousins. Na lingála mpé na nkóta isúsu lokóla nkóta ya *slaves bǎna bansɔ babótami na ngámbo na ngámbo ya libóta bamibêngamaka bangó na bangó ndeko, mpé na mangómbá ma kalakala ntángo bangó banso bazaláká kofánda elɔngɔ́, bǎna baye babótami na ngámbo ya tatá tǒ ya mamá bazaláká komibêngana na bǎna baye babótami na tatá tǒ mamá ndeko mpé bazalí bo bandeko. Makomi ma boyókani bwa sika malongobanáká sé na ezaleli ya *orient ya mikɔlɔ na mikɔlɔ. Míbalé o kati na bangó, bakomami na bibiliya lokóla bǎna ba Maria, mamá wa *Jacques le mineur mpé ya Yose na Matayo 27,56 mpé Malako 15,40 etalisi Maria, mwǎsí ya *clopas engɛ́bɛ́nɛ́ na mokanda mwa Yoane 19,25, ya misato *Juse amibengi ndeko ya *Jacques kasi ya Yésu tɛ́. (Jude 1), ya mínei Simoni alakisami na pólélé lokóla mwǎna abótami na ndeko ya tatá mɔ̌kɔ́ na tatá mobɔ́kɔli wa yě , mwǎna ya Clopas ndeko wa Yosefu, na lisoló lya ekelézya ya Eusebe ya Cesaree

Na likambo liye basángó ba lingómbá lya bandeko ba Yésu, frères de Jésus, Tála atikele *Proches de Jésus

Bibiliya epɛsi eyano na mokanda mwa Luka. Ntángo mwanzɛ́ asakoláká koyaa ya bokangemi bwa zémi ya Yésu, Ngɔndɔ Maria ayanoláká: ndéngé níni yango ekosálama mpamba 'te ngai nayébi mobali tɛ́ ?, eyano ya nkamwa mpámba te likonga lisiláká kopikama mpó na libála lya yě mpé kala míngi tɛ́ akobálana na miso ma bato bansɔ na Yosefu. Sɔ́kí Maria akanisáká kofánda na bosangisaka nzóto na Yosefu nsima ya libála, yě alingáká komɔnɔ lisákólá lya mwanzɛ nkamwa tɛ́ (akokóma na zémi). Lisákólá liye nayébi mobali tɛ́ ezalí limbola lya botósi koúta na ligresi liye lilingi koloba Nasangisa nzóto na mobali tɛ́

Toma ya Aquin, mokomi wa *référence ya ekelézya ya bamumpɛ́, akoyekola likambo liye na loléngé la bozindo mpé ya mayɛlɛ (*méthodique) mpenzá o (sa Somme Théologique), IIIa pars, Q. 28, art. 2 à 4: atikele ya 2: Bongɔndɔ ntángo ya bobóti, atikele ya 3: Bongɔndɔ nsima ya bobóti, atikele ya 4: Likambo lya kolapa ndáí mpó na bongɔndɔ (Liye lizalí likambo likɛ́sɛni mpé lya nsɔ́mí na liye lya libosó (*précédente)). Toma ya Aquin asúkisi 'te Maria azalí ngɔndɔ wa sékô sékô mpé na bolapi ndáí ya bongɔndɔ.

Mosantú Ogistini azalí kotánga makomi mpó na likambo liye lya bongɔndɔ bwa sékô sékô ya Maria: «Azóngisi ngáí na ekuke ya libándá ya ekelézya, na ngámbo ya monyɛlɛ. Kasi ezaláki ya kokangama. 2. Mpé Yawhe andobeli: Ekuki eye ekokangama, mpé ekofungwama sɔ́kɔ mokɛ́ tɛ́ mpé moto atâ mɔ̌kɔ́ tɛ́ akokɔtɔ, mpámba tɛ́, Nzámbe ya Israel akotɔ́kɔ́ wâna. Ekotíkala ya kokanga.»

Eteni esúsu ya mokapo mwa bibiliya na Likambo liye:

Tálá: Nzémbo ya Maria (lístɛ)

Ndáko-Nzámbo ya Maria ya Eklezya Katolike:




#Article 77: Nzelá-masíni ya Katanga (541 words)


Nzelá-masíni ya Katanga (Compagnie de chemin de fer du Katanga CFK), ezalaki entreprise ya nzelá-masíni na esita mpe na sidi ya Kongo. 

Na yango, Compagnie ya Katanga e signaki ba conventions mibale na Letá ya nsɔ́mi ya Kongó na marsi 1891 mpe na mai 1896. Ba conventions yango ezalaki ko imposer na compagnie ya Katanga ba obligations ya occupation na mise en valeur ya Katanga. En contre partie, l'Etat indépendant esengelaki etikela compagnie ya Katanga na totale propriété ya mabele domaniale oyo ezali na territoires oyo convention ya 1891 ezali kolobela. Donc, pendant 99 années, compagnie ya Katanga esengelaki e exploiter sous-sol ya mabele oyo bapesi ye selon convention signee. Neti ezalaki mua mpasi mpo na ko fixer ba limites ya mabele, l'Etat indépendant na compagnie ya Katanga bayokanaki ete batiya bozui na bango elongo (fusion de biens). Na yango bayaki kosala comité spécial ya Katanga, CSK, na 1900. CSK nde esengelaki e gérer ba biens na bango mpe ba bénéfices ekokende na prorata ya 2/3 mpo na L'Etat mpe 1/3 mpo na Compagnie ya Katanga.

Kotia territories oyo Etat indépendant epesaki na Compagnie Katangaise ezalaki likambo moke te pamba te ba frontières ya sud ya Katanga na ya nord ya Zambie ekatamaki naino malamu te. Nde na 1896, ba frontières ya Katanga ekatamaki mpe mabele oyo ebandaki kaka kozela création ya CSK na 1900.

Kasi neti Katanga ezalaki mosika na Océan Atlantique, CSK ezalaki na likanisi lya kotonga chemin de fer tee na Matadi mpe na kobimisa ba minérais na Kongo vers la Belgique. Kasi na sud na Rhodésie (Zambie),na Bulawayo chemins de fer ya Afrique du sud esilaki kokoma mpe na Mozambique oyo ya kuna ebandaki kokoma tee na Salisbury. Nde wana liaison ya Salisbury na Bulawayo eye kosalema. Yango wana Etat indépendant eyaki ko signer convention na Robert Williams, industriel britanique, mpo na kotonga chemins de fer oyo ezali kowuta na sud ya Katanga (kati na Rivière Lufira na Lualaba) mpe kokutana na chemin de fer ya Rhodésie.

Na 1902, Nzelá-masíni ya Katanga (CFK) esalemi na Comité spécial ya katanga. CFK ezalaki na but ya kokutisa région ya Lubumbashi (Elisabethville) na ya Zambia (Rhodesia) du Nord na nzela ya Sakania, mpe kotongisa port na Ebale Kongo na niveau ya Lualaba mpo na kosala liason na Bukama.

Na 1906, mbotama ya CSK, filiale ya BCK, spécialisée na recherche minière. L'État Indépendant na Société Générale de Belgique basali Compagnie du Chemin de fer du Bas-Congo au Katanga, BCK mpo esala liaison ya Bukama na Bas Congo par chemin de fer mpe kosala ba recherches minières na ba régions oyo.

Na 1911, bakangisi ligne oyo ekeyi na Océan Atlantique na Nzelá-masíni ya Benguela (CFB).

Na 1952, compagnie de chemin de fer Katanga-Dilolo-Léopoldville (KDL) ebotami sima ya bokangisi Léopoldville-Katanga-Dilolo (LKD) na CFK. KDL azali concessionnaire exclusif ya voies ferrées ya Katanga mpe BCK azali entrepreneur mpe exploitant ya chemin de fer. Le 2 décembre 1974, l'Etat Zairois e créer Société Nationale des Chemins de Fer du Zaire yango esangisi ba compagnies oyo : La compagnie de chemin de fer Kinshasa- Dilolo-Lubumbashi, KDL, Chemin de fer Matadi- Kinshasa, CFMK, Office Zairois de chemin de fer des Grands Lacs, OZCFL, Chemins de fer vicinaux de Mayombe, CFM, Chemins de fer Vicinaux du Zaire, CVZ.




#Article 78: Mutos (Tumbutɛ́le) (107 words)


Mutos azalí moto ya búku ya babúku ya bána. Azalí mwána mpé azalí na mbula sambo. Afandaka na Kingasani ya suka na Kinsásá. Babúku bazalí falansé mpé lingála. Bienvenu Sene Mongaba áyɛbisí, Kojele Makani asálakí bilili.

Mutos ekomámí po na kobétela bána masoló ya kobátela mokili na bísó na malámu.

Na lisoló ya Mutos sómo ya míselékété, ezalí boye: Mutos alingaka kobamba míselékété mabángá na bandáku esílá té ya Kingasani. Pó na yé, ezalí sé kosakana, nzoka ndé pó na míselékété ezalí bwálé ya kosakana té. Mokolo mosǘsu, Mutos, na pongí, alótí ndóto. Móselékété abóngwámí ndé ebákátá ya dinozor. Match ebalúkí! miselékété akómí kolanda Mutos. ekosǘka boni?




#Article 79: 48 heures Gecoco (nzémbo) (866 words)


R. Miliki na biberon azalaka na besoin ya mapa te
mais mokolo batia ka ye na kopo
essenga ki mapa e ya
elingi koloba bana bakoli
papa lutumba sossola yango
souverain akoli l'unité de mesure 

Absence jamais nga na signa contrat avec toi
nto na mbeto ya lopitalo vœux ya mariage
na salaki po na Gérard Gecoco Mulumba
l'homme que Dieu a façonné a mon gout c'est lui
amema bolingo na canada eeehh
dimanche to eyenga na nga
la couleur qui passe 

Gérard natikali na mikolo nse mibale na vie 

absence na yo ekotisi nga koloko na salle d'urgence 
na koma locataire na clinique Ngaliema

Ruelle ya bolingo ebanda pe esuka na deux Miliki na biberon azalaka na besoin ya mapa te
mais mokolo batia ka ye na kopo
essenga ki mapa e ya
elingi koloba bana bakoli
papa lutumba sossola yango
souverain akoli l'unité de mesure 

Absence jamais nga na signa contrat avec toi
nto na mbeto ya lopitalo vœux ya mariage
na salaki po na Gérard Gecoco Mulumba
l homme que Dieu a façonné a mon gout c'est lui
amema bolingo na canada eeehh
dimanche to eyenga na nga
la couleur qui passe 

R. (2x)

Gérard natikali na mikolo nse mibale na vie 

absence na yo ekotisi nga koloko na salle d'urgence 
na koma locataire na clinique Ngaliema

Ruelle ya bolingo ebanda pe esuka na deux 
Gecoco et moi ça fait moto moko algèbre ya l'amour
absence ya moto olinga ka 
koma ya love
pourquoi kokika ka nga toute seule trop longtemps 
o profiter de tes affaires je reconnais 

Gérard oza malili ngai na zali neige blanche 
présence na yo etiyaka nga en sécurité mon amour 
dans 48 heures d'après météo moyi ekongala très fort 
zonga Gérard mulumba noki te na ko limwa 

Beauté na yo sanza mizonto de mon cœur
depuis yo ekenda Gérard nse molili namotema na nga 

le ciel est sans étoiles 
Nzambe conduit mes pas 
monganga apesi permission ba tia phone 
na salle d'urgence pona cas na nga 
mongongo na Yo ebakisela nga ata deux jours de plus 

R.

bana ya campus faculté de médecine 
wapi thérapeutique ya ba maladie d'amour soki na we 
bo continuer ba recherche pour d'autre amoureux 
Gérard miso na nga esali grève pona emona yo te depuis deux mois 
na beli cécité lokola mobange gecoco zonga s'il te plait ngo

R 2.

mawa na nga ekontaminer 
maman à mon chevet abela ka tension 
na ko banga ba kunda nga na ye liboulou moko
maman lusamo Agnes 
pongi epesi nga carton rouge 
moyen na lala ikeleve
baboutou ekomi élastique 
à cause de toi absence 
lelo nga na pesi maman raison 
présence eza vitamine ya l'amour 
plus que 48 heures ya vie sur terre 
Gérard zongisela nga pema na nga oyo o mema pona bomoyi na lembi 

lelo nga na vivre punition ya jeunesse 
toujours attirer dominer par mon mari 
sœur Anoiritte soki ozalaki vivante 
mbele odefisi nga motema na yo 
na sala vœux ya celiba ti Gérard akozonga 
plus que 48 heures ya vie sur terre 
kisi eleki présence physique na efficacité 

emona ni te partout au monde 
bébé ramasani 

mawa na nga ekontaminer 
maman à mon chevet abelaka tension
na ko banga ba kunda nga na ye
liboulou moko Amida maman ya Dayida 

R 2.

Gecoco et moi ça fait moto moko algèbre ya l'amour
absence ya moto olinga ka 
koma ya love
pourquoi kokika ka nga toute seule trop longtemps 
o profiter de tes affaires je reconnais 

R 2. 

Gérard oza malili ngai na zali neige blanche 
présence na yo etiyaka nga en sécurité mon amour 
dans 48 heures d'après météo moyi ekongala très fort 
zonga Gérard mulumba noki te na ko limwa 

Beauté na yo sanza mizonto de mon cœur
depuis yo ekenda Gérard nse molili namotema na nga 

le ciel est sans étoiles 
Nzambe conduit mes pas 
monganga apesi permission ba tia phone 
na salle d'urgence pona cas na nga 
mongongo na Yo ebakisela nga ata deux jours de plus 

R.

bana ya campus faculté de médecine 
wapi thérapeutique ya ba maladie d'amour soki na we 
bo continuer ba recherche pour d'autre amoureux 
Gérard miso na nga esali grève pona emona yo te depuis deux mois 
na beli cécité lokola mobange gecoco zonga s'il te plait ngo

R 2.

mawa na nga ekontaminer 
maman à mon chevet abela ka tension 
na ko banga ba kunda nga na ye liboulou moko
maman lusamo Agnes 
pongi epesi nga carton rouge 
moyen na lala ikeleve
baboutou ekomi élastique 
à cause de toi absence 
lelo nga na pesi maman raison 
présence eza vitamine ya l'amour 
plus que 48 heures ya vie sur terre 
Gérard zongisela nga pema na nga oyo o mema pona bomoyi na lembi 

lelo nga na vivre punition ya jeunesse 
toujours attirer dominer par mon mari 
sœur Anoiritte soki ozalaki vivante 
mbele odefisi nga motema na yo 
na sala vœux ya celiba ti Gérard akozonga 
plus que 48 heures ya vie sur terre 
kisi eleki présence physique na efficacité 

emona ni te partout au monde 
bébé ramasani 

mawa na nga ekontaminer 
maman à mon chevet abelaka tension
na ko banga ba kunda nga na ye
liboulou moko Amida maman ya Dayida 

R 2.





#Article 81: Klementina Anoalite Nengapeta (160 words)


Maria Klementina Anoalite Nengapeta ( * 29. Dɛsɛ́mbɛ 1939 ya Wamba; † 1. Dɛsɛ́mbɛ 1964 ya Isiro) azalakí mamelo ya liko mbo mosantu libota na Bafwabaka (Tshopo) na Kongó ya Bɛ́ljika (lelo ezalí Republíki Demokratiki ya Kongó) ya yambo na Afrika ya bamamelo azalakí mw'esengo na Pápa.

Nengapeta abotami 29 dɛsɛ́mbɛ o 1939 na Wamba. Azwakí baptisimo na mbula 1943 elongo na mamá mpé bandeko ya ye ya basi mibale. Azwakí baptimona kombo na Alphonsine. Epai ya bamelo ya libota esantu a sili saki kelasi na ye na Kinsásá na mokolo ya 5 ogusiti 1959, kelasi ya molokisi.

Na mibu 25 ans a kuta naki ma basolda ya Simba na mbula 1964. Solda Colonel Petelo Olombe alingakí kolala na ye mpé amu a boyaki. Mpé solda ba babomaki Anoalite na 1 dɛsɛ́mbɛ o 1964 na Isiro. Na sima basolda ya Simba babomaki ba 250 mamemelo mpé ba mufulele.

Na mbuka 1984 mamelo Anoalite akomaki Mw'Esengo na Pápa Yoane Polo II.




#Article 82: Pandemia ya gilípi (915 words)


Pandemia ya gilípi ezalí gilípi moko e zuwaka bato chaque periode ekangisi ba mbula dzomi na dzomi pe oyo e contaminaka bato noki penza na ba mboka pe ba region mingi 
ya mokili mobimba. Ba signe to symptom ya pandemia ya gilípi ezalí ka mwa ndenge moko na gilípi ya ordinaire ya mbula na mbula, kasi ba singe ya pandemia eleki makasi. 
 
Ba difference misusu entre pandemia ya gilípi pe gilípi ya mbula na mbula e pesami na lístɛ oyo na ba page elandi. 

 

Ba virus to microbe ya gilípi e bongwanaka tango nioso, pe e pesaka ba complication ya sika. Pandemie e tindamaka tango virus ya sika e monani pe e bongwani mingi na ba virus ya liboso pe e kangi bato ya lotango moke oyo ba zali na immunité (to protection naturelle) contre yango. Oyo e ko pesa yango nzela e zuwama noki pe mosika, tango n’koto na n’koto ya bato ba zuwi yango. Virus moko ya sika oyo e pesaka pandemie e koki ko botama soki virus oyo e pesaka gilípi na bato e sangani na virus oyo e pesaka gilípi na ba niama, na ndakisa ya virus ya gilípi ya ba ndeke (to avian flu na Kingelezo). 
 
 

 

 

 
 

 

 
 

 
Na siècle to ba mbula kama oyo eleki, pandemie e zuwamaki mbala misato (tálá na pandemia). Ba nganga mayele ba lobi ete pandemie ya sika ezalí na nzela, ekoki koyaka noki, kasi bakoki ko yebisa exactement tango nini te. Ba chance ya Pandemia ya gilípi koyaka na Ingɛlɛ́tɛlɛ ezalí boni? 
 
Organisation Mondiale de la Santé e zali tango nioso kolIngɛlɛ́tɛlɛa po na ba signe ya liboso ya Pandemia ya gilípi po ba zuwa mikano malonga po na ko ralentir to pe ko kangisa yango. Soki Pandemia ya gilípi e bandi na Europa, yango e koki ko koma na Ingɛlɛ́tɛlɛ. Pe e kozuwa ba mposo mike kaka po e zuwama na mboka nioso. 
 
Pandemia ya gilípi e kozala ndenge moko te na gilípi ya ordinaire ya mbula na mbula na ndenge bomi? 
 
ezalí pasi mingi koloba pendemie ya gilípi e kozala makasi boni. E ko dépendre na ndenge virus yango e zuwami pe ndenge e tambolami, groupe to mbula nini ya bato ba zuwi yango koleka, bokasi ya ba symptome na yango, pe lotango boni ya bato bakufi. 
 
Pandemia ya gilípi ekoki ko zuwamela na ba vague mibale, na ba sanza mike kati kati na yango, pe chaque vague e wumeli pene na ba sanza mibale to misato. 
 
Eza possible ete Pandemia ya gilípi e ko zuwama na bato mingi koleka gilípi ya mbula na mbula. Na sIngɛlɛ́tɛlɛa ya pandemie yango, pene ya ndambo mine (to le quart) ya bato bakoki ko zala na bokono yango. 
 
Vaccin ya gilípi ordinaire ya mbula na mbula e kobatela yo contre Pandemia ya gilípi te.  Kasi gilípi ya ordinaire ekoki kozala grave, pe esengeli ete bato oyo ba sengeli ko zuwa tonga ya gilípi ordinaire ba zuwa yango. Nioso oyo elobi nini po na Ingɛlɛ́tɛlɛ? 
 
Soki Pandemia ya gilípi ekomi na Ingɛlɛ́tɛlɛ, e ko zuwama na mboka nioso na sima ya ba poso mike kaka pe ekoki ko causé: 
 

 
Gouvernement ya Ingɛlɛ́tɛlɛ a sali plan e bengami “Influenza Pandemic Contingency Plan”  (tálá na site www.dh.gov.Ingɛlɛ́tɛlɛ/pandemicflu). Yango e ndimi ete ba Service ya la Santé e kozala na kati ya demande makasi penza.

 
Ba risk na yo eleki ba risk ya gilípi ordinaire po ete pandemie e zuwami noki penza pe lotango ya bato moke kaka ba zali na immunité contre yango. Bato nioso ba zali na risk. Ba groupe misusu ya bato ba zali na ba risk koleka ba groupe misusu, kasi pandemie nioso ezalí different, pe liboso virus e banda ko mwangana, to koki koyeba te groupe nini e kozala affecté koleka. 
 
Na gilípi ya ordinaire, ba groupe oyo bakoki kozuwa bokono ya makasi: 
 

 
Kasi nioso oyo ekoki ko bongwana na tango ya pandemie. 
 
 

 
Ba vaccin e salamaka kolanda ndenge ya virus oyo e pesi épidemie to pandemie. Po vaccin e salama, esengi ba sanza mingi. Ba nzela e ko landana po na ko sala vaccin oyo ekoki ko batela contre pandemie ya sika na mbango penza, kasi ezalí possible ete na vague ya liboso ya pandemie, vaccin e ko zuwama naeno te. 
 
Kolanda tango oyo vague ya mibale ya pandemie e bandi, ba minganga ba koki ko zuwa deja vaccin po na ko protégé bato. Mbongisami pe recherche ezalí ko salama deja po vaccin e zuwama noki penza. 
 
 

 
Ba kisi e bengami antivirus ezalí ka mwa makasi po na ko traité Pandemia ya gilípi. Ba stock na yango ez’o bombana. Yango e ko salelama po na traitement ya bato na ya bokono makasi. 
 

 
Ba antivirus to kisi contre virus e koki ko zuwama po na Pandemia ya gilípi, kasi ezalí limité: 
 

 
 

 
Wana virus e zali ko kabwana na kati ya mopepe, tango bato bazali ko pema pe ko kosola, o koki ko zuwa ka mwa ba precaution moke po o kitisa contamination. Ko lata mask na dzolo e ko protégé yo mingi te, kasi o koki ko: 
 

 
 

 
Organisation Mondiale de la Santé (OMS to WHO na lingɛlɛ́sa) a za na system po na ko landa ndenge pandemie e zo kabwana. Gouvernement ya Ingɛlɛ́tɛlɛ e za na plan (Influenza Pandemic Contingency Plan) oyo e ko landana. Yango elobi nini e koki kosalama sik’oyo po na ko mi bongisa. Soki ba signe e lakisi ete pandemie ezalí na nzela po na ko koma na Ingɛlɛ́tɛlɛ, gouvernement a ko pesa nzela pe mateya na ndenge bato basengeli ko zalela. 
 
 

 




#Article 83: Mowá (276 words)


Mowá tǒ Pandemia ezalí maladie moko e zuwaka bato chaque periode ekangisi ba mbula dzomi na dzomi pe oyo e contaminaka bato noki penza na ba mboka pe ba region mingi ya mokili mobimba. Ba signe to symptom ya pandemia ezalíi ka mwa ndenge moko na maladie ya ordinaire ya mbula na mbula, kasi ba singe ya pandemie eleki makasi. 

Ba virus to microbe e bongwanaka tango nioso, pe e pesaka ba complication ya sika. Pandemie e tindamaka tango virus ya sika e monani pe e bongwani mingi na ba virus ya liboso pe e kangi bato ya lotango moke oyo ba zali na immunité (to protection naturelle) contre yango. Oyo e ko pesa yango nzela e zuwama noki pe mosika, tango n’koto na n’koto ya bato ba zuwi yango. Virus moko ya sika oyo e pesaka pandemie e koki ko botama soki virus oyo e pesaka grippe na bato e sangani na virus oyo e pesaka grippe na ba niama, na ndakisa ya virus ya gilípi ya ndɛkɛ.

 
Na siècle to ba mbula kama oyo eleki, pandemie e zuwamaki mbala misato (tala na se). Ba nganga mayele ba lobi ete pandemie ya sika ezali na nzela, ekoki koyaka noki, kasi bakoki ko yebisa exactement tango nini te. Ba chance ya Pandemia koyaka na Kongó ezali boni? 
 
Organisation Mondiale de la Santé ezali tango nioso koluka po na ba signe ya liboso ya pandemia po ba zuwa mikano malonga po na ko ralentir to pe ko kangisa yango. Soki pandemie ya grippe e bandi na Erópa, yango e koki ko koma na Ingɛlɛ́tɛlɛ. Pe e kozuwa ba mposo mike kaka po e zuwama na mboka nioso. 

 

 




#Article 84: Nzelá-masíni ya Kivu (194 words)


 tǒ CEFAKI (Chemin de fer du Kivu na lokótá falansé) ezalakí nzelá-masíni ya Kalundu na Bukavu.

Le, 20 juin 1929, mbotama ya Société des Chemins de fer ya Kivu, CEFAKI. Esengeleki e kangisa etímá Tanganyika na Kalundu, 776 m, na etímá Kivu na Bukavu, 1460 m, na distance ya 137 km. Kasi ba problèmes ya topographie esalaki ete bakomisa ligne tee na Kamanyola km 93,4. Na yango esengelaki lisusu kotonga ba ngbagba ou ponts na Kamvira, Kiliba na Mulongwe.

Le, 20 novembre 1931, nzelá-masíni ekomaki na Kamanyola. Kasi ba ngomba ya Ruzizi ezalaki mpasi mingi mpo na kopasola yango, Col ya Businga na 1.756 m ya hauteur elembisaki mundele. Yango wana rail etikala ko relier Kamanyola na Bukavu te. Kasi basalaki nzela ya mutuka, 63 km tee na Bukavu. Esengeli koloba ete soki vraiment basalaki ba etudes topographique na ya genie civile approfondies makasi mbele balingaki balonga Ruzizi. Heureusement na moyi ya lelo, ezali lisusu difficulté te kopasola ngomba na lolenge wana. Suka suka ONATRA eyaki ko reprendre CEFAKI na 1947. La ligne fut fermée en 1958. Elle était en voie cap (3½ pieds), pour être intégrée dans la ligne anglaise Cap - Caire.




#Article 85: Nzelá-masíni ya Wɛlɛ (345 words)


 ezalí nzelá-masíni ya Bumba na Aketi, Buta, Isiro, Mungbere, Bondo mpé Titule ya bitúká Mongala, Wɛlɛ ya Nsé mpé Wɛlɛ ya Likólo.

Na 1937, monyámá ya nzelá-masíni emati na nola ya ebale Kɔ́ngɔ mpé e totalisé 842 km. Ba lignes iye:

Monyámá ya nzelá ezalakí na 21.000 km. Ekomakí na 450 mituka oyo ebandakí kotambola dix millions de km na mbula. Lɛlɔ́ ezalí tɛ́.

Création ya Vicicongo (Chemins de fer Vicinaux du Congo (CVC) tǒ Buurtspoorwegen van Congo) mpo na ko exploiter lignes ya nzelá-masíni ya Wɛlɛ, Ituri na Kivu septentrional 7 máyí 1924. Na 7 máyí 1924, création ya Société pour la construction et l'exploitation des lignes secondaires vers les grandes voies de communication.

Nzelá-masíni à voie étroite na 842 km kolongua libongo ya Aketi, tee na terminus ya voie navigable ya Itimbiri. Kolongua wana tee na Mungbere na 685 km, kuna nde ekabuani na biteni bibale: Bondo 151 km na Titule 290 km.

Vicicongo ebimisaki likanisi lya Messageries Automobiles du Congo (MAC) mpo na ko utiliser ba routes. Ekomaki na 450 mituka oyo ebandaki kotambola dix millions de km na mbula.

Vicicongo ebandaki mpé ko exploiter libongo lya Aketi na molúká Itimbiri mpé na libongo lya Kasenyi na etímá Mobutu (Etímá Albert).

Vicicongo ezalaki na direction générale na Aketi na ba agences na Isiro, Bunya, Kisangani, Butembo na Buta.

le 2 dɛsɛ́mbɛ 1974, l'Etat Zairois e créer Nzelá-masíni ya Letá ya Zaire yango esangisi ba compagnies oyo: Nzelá-masíni Kinsásá- Dilolo-Lubumbashi (KDL), Nzelá-masíni Matadi- Kinsásá (CFMK), Office Zairois de chemin de fer des Grands Lacs, OZCFL, Nzelá-masíni ya Mayombe (CFM), chemin de fer vicinaux du Zaire, CVZ.

le 3 apríli 1991, gouvernement ekaboli Nzelá-masíni ya Letá ya Zaire (SNCZ) suite na nationalisation na regroupement ya ba nzelá-masíni. Ekaboli yango na SNCZ-Holding (chargée ya ba réformes na secteur ya transport ya zelá-masíni mpé na ba réformes ya ba Sociétés oyo esengeli ko exploiter ba réseaux ferroviaires, routiers, fluvials na lacustres plus exploitation portuaire) na ba filiales na yango, Nzelá-masíni ya Ɛ́sita (SFE), Nzelá-masíni ya Nsé (OCS) mpé Office des Chemins de fer des Uele (CFU).




#Article 86: Inga (ekólo ya Kolombia) (1107 words)


Povo indígena inga [inka] ou ingano é um grupo quéchua, situado em áreas mais ao norte da região quéchua.

Os ingas falam diferentes dialetos do quíchua, que é também falada no Equador e no Perú.

Alguns estudos têm proposto a hipótese sobre a origem desse grupo estar relacionada a comunidades do grande Império Inca em tempos pré-hispânicos, na missão de guardar das fronteiras para evitar revoltas de tribos submetidas a impostos.

Há outro estudo propondo que os inganos são descendentes de uma guarnição enviada pelo supa inca Huayna_Capac para o vale de Sibundoy e para o vale de Mocoa em Putumayo para submetar os Camsá em 1.492. Se trata de uma mitimak-kuna ou uma comunidade militar com funções agrícolas, com mercadores dedicados ao comércio externo, e com recolhimento de informações, para o Império Inca.
Estes quéchuas estavam assentados no extremo norte (Chinch) dos limites do império.  Com a divisão do império em 1.527 entre os seguidores de Inti Cusi Huallpa e de Atahualpa, iniciou um período de isolamento. Com a morte de Atahualpa em 1.533 e com a invasão espanhola em 1.538 no Império Inca, agravou a situação de isolamento.
A união dos decendentes desta mitimak-kuna com a população Camsá na região, e expandiu até a região dos Andaquí, (no Caquetá, no norte de Putumayo, e no sudeste de Cauca), e logo extendeu vários assentamentos no noroeste do Amazonas.
Segundo esta perspectiva, no final do século XV, após chegarm no vale de Sibundo e para evitar a resistência dos Kwaiker em Nariño, eles dirigiram-se para a atual região em Putumayo, onde permaneceram isolados dos outros grupos quéchuas. Mais tarde houve novas migrações para áreas de Caquetá e de Nariño.
Mais tarde a espansão dos capuchinos, estabeleceu missões em seus assentamentos, provocando grande impacto em sua cultura.
A Guerra Colombo-Peruana de 1.933 e a colonização militar na região, fizeram cerca de mil inganos do Alto Putumayo migrarem para outras áres visinhas, para centro urbanos e para a Venezuela
provocou imigração para outras áreas. 
O êxodo é evidenciado pelas gerações de inganos nascidos em outras regiões e sobrevivem geralmente nas cidades na economia informal, como curandeiros, vendedores ambulantes  de plantas medicinais e outros produtos curativos ou mágicos-religiosos. Também comercializam artesanato e instrumentos musicais. Trabalham principalmente em áreas de comércio popular e em menor proporção em feiras e em praças.

.

Os ingas são médicos por excelência e possuem um grande conhecimento de plantas medicinais. O yagé, planta que utilizam de diversas formas, é considerado o meio que revela o mundo temporal e o espiritual dos ingas e dos kamëntsá. É por meio do uso do yagé que os xamãs fazem contato com os criadores.
O casamento representa um vínculo indissolúvel, tanto pela cerimnia tradicional, como na católica. A família de carater nuclear e o espaço fmiliar gira em torno do fogão. As moradias são do tipo de camponeses, geralmente são retangulares e com três ou quatro cômodos.
 

Muitos inganos itinerantes estão estreitamente ligados com a prática da medicina tradicional, que além da prática de cura e de cultivo, há trocas, entregas ou vendas de plantas medicinais ou mágicas-religiosas, mas o estudo e o intercambio com outras comunidades e outras tribos, lembra a cultura dos Kallawaya de Bolivia.
O conhecimento dos sinchi (sábios), também chamados de taitas ou curacas, estão vinculados ao uso e administração da planta Banisteriopsis caapi, conhecida também como ayahuasca ou yagé, de efeitos psicotrópicos. A importância desta planta na cultura inga implica uma importante relação com as culturas da selva, especialmente a andaquí, a cofán, a siona e a witoto. 
A preparação de um sinchi começa na infância, quando são escolhidos por taitas e educados nos conhecimentos da natureza, da espiritualidade, da vida, da sociedade e da medicina.
Os sinchi cultivam as ervas medicinais e mágico-religiosas em chácaras com guardiães espirituais, organizadas como um microcosmos que representam às forças da natureza, o homem, a mulher, as relações sociais e as relações interétnicas.

O carnaval dos ingas começa no domingo anterior a quarta feira de cinzas, com celebração em homenagem ao arco iris e agradecimento à mãe terra. Os homens tocam flautas, trompetes e tambores, as mulheres tocam chocalhos e guizos. Dançam em fila e em círculo, inclinando e balançando o corpo. Geralmente os homens usam ponchos ou capisayos listrados com gola em V, e as mulheres usam saias longas, blusas com cor forte e disfarces. 
As pessoas na terça feira se disfarçam  com máscaras de madeira, sisal, metal ou papel. Representam cenas tradicionais, históricas ou lendárias e novamente dançam até culminar o carnaval na quarta feira, comendo e bebendo em abundância.

A descendência para os homens é patrilinear e para as mulheres é matrilinear, e o sobrenome do avô passa para o pai, que passa para o filho, e que passa para o neto e o sobrnome da avó passa para o mãe, que passa para o filha, e que passa para o neta, de maneira que o gênero determina o parentesco.
O sistema de parentesco inga reconhece a hierarquia entre as gerações que se extende por toda a comunidade, concebida como uma família extensa, os maiores (tios), os iguais (primos) e menores (sobrimos).
O conselho é a instituição que rege o povo inga, com um govenador com chefe. Atualmente há uma frente comum formada por três conselhos, na região de Santigado, de Santo Andrés e Colón, e de Kamsáde Sibundoy. Estes conselhso buscam encontrar soluções para os problemas de terras e definir posições conjuntas frente ao governo e instituições privads, fortalecendo a autoridade interna do grupo. 
O trabalho comunitário, como estradas, como pontes, como canais para drenagem, como casas, como preparar o solo, como semear, e como colher. O trabalho comunitário, com tradições que vem desde os incas e os espanhois, são de três modalidades. A minga, que troca o trabalho por comida e chicha (aguardente de milho); os divichidos, que trocam trabalho por trabalho; e os conchavos (contratos) que troca o trabalho por um valor.

A economia baseia-se principalmente na agricultura, principalmente no cultivo de arroz, feijão, abóbora, batata, mandioca, horaliças amendoim e frutas, sijse, e ají (pimentão pequeno picante),e em menor número a pecuária leiteira, a criação de perus, a caça e pesca para subsistência. Comercializam por várias localidades do departamento de Nariño. 
Muitos ingas conseguem viver do fornecimento de produtos nos centros urbanos de todo o país, retornando periodicamente para abastecer-se, consolidando uma base comercial sem perder o vínculo com o seu território ancestral. Uma característica própria dos ingas é sua ampla atividade comercial migratoria, levando-os a diferentes lugares de Colombia, Venezuela, América Central e Antilhas.
Em Cali e Bogotá, por exemplo, existem comunidades ingas com Conselhos reconhecidos legalmente com autoridade própria.




#Article 87: Nzelá-masíni Matadi–Kinsásá (262 words)


'La compagnie du Congo pour le commerce et l'industrie, CCCI, esalemi le 27 décembre 1886 na Maître Van Halteren na Van Bevere (ba notaires na Bruxelles). Filiale na yango, la compagnie de chemin de fer du Congo (CFC), esalemi le, 31 yuli 1889. Yango esalemaki mpo etonga na ezua possibilité ya ko exploiter mpe kosala nzelá-masíni na Bas-Congo mpé 1500 hectares ya mabele pembeni ya nzela ya rail oyo ekotongama. Kasi, compagnie oyo ekokaki te selon projet na yango, kosangisa batu oyo bakokaki kosala musala moye. Donc, esengelaki babengisa batu bawuta na Afrika ya wesita mpo baya kosala musala wana.
Esengeli koloba ete ba conditions oyo batu babandaki kosalela musala ezalaki mpasi mingi mpo mingi bakufaki mpe mingi batombokaki kasi Belge abomaki mpe ebele. Selon ba calculs, na train oyo ebandaki komema 50 Tonnes, mpe ko rouler na vitesse ya 20.5km/h, ezalaki économique par rapport na 13.000 porteurs oyo babandaki ko coûter 50 fois chers (en coût, soins, alimentation, etc.).

CFC, la Compagnie du Chemin de fer du Congo, esalemi na 1892, train ya mindele. Ebandaki kosala: Matadi - Kenge - Songololo - (col de Zole) - Tumba - Kama - Mbanza-Ngungu (Thysville) (col de Zona Gongo) - Inkisi - Tampa - Kinshasa (Léopoldville).

Misala mia kotonga ligne Matadi - Kinshasa (Léopoldville) mibandaki le 15 mars 1890 mpe mosilaki
le, 16 marsi 1898.
Albert Thys azalaki conducteur des travaux.

Na mukolo ya 20 avril 1935, Belge, na but ya kosangisa ba entreprises de transports oyo ebandaki kosala na Congo, ayaki kosala entreprise publique industrielle et commerciale ebengami Office des transports coloniaux, OTRACO.




#Article 88: Maneno (395 words)


Maneno ezalakí platforme ya sika mpô na ba blogi na 2008 téé 2010.

Na kiswahili, maneno elingi kolaba maloba. Maloba oyo mazali na motema ya nyonso oyo ezali ya motuya mpô na Maneno: site oyo esalemi na mombimba na muango kobanda na libungutulu mpô na ezala plateforme ya mayebisi mpé ba blogi oyo elongobani na biposa ya baselali ya blogi mpé bakomi na Afilíka ya sé ya sahara.

Mpô na nini plateforme ya sika mpô na ba blogi, na ngónga oyo misúsu misili kozala? Bafilíka bazali kotelemela bobele 1% ya basaleli ya ɛntɛrnɛ́tɛ na mokili mobimba mpé likoló na ba oyo wana, pourcentage ya moke koleka ezali na blogi. Maneno elingi koyanola mitungisi ya bosaleli oyo basaleli ya ba plateformes ya ba blogi bazali kokutana na miango na bisika oyo bokoti na ɛntɛrnɛ́tɛ ezali pasi to na bolembu, mpé kobongisa système ya bokaboli ya contenus numériques mpô na Afilíka ya sé ya sahara.

Maneno etiyami likoló ya plateforme moko ya pepele, mpé babandisi yango bango moko basalelaka yango, libongisi oyo lisalemaki na mobu 2008. Ezali kopesa nzéla na ba oyo bazali na connexion ɛntɛrnɛ́tɛ oyo etiyami ndélo kosalela système moko oyo ezali pepele mpé pete na kosalela. Bokoti ya Maneno bozali pete mpé ebakisamaka na lobango, esalemi bongo mpô na lolengé na yango ya pepele, ebongo ezali kopesa lisúsu bisaleli nyoso oyo bilongobami mpô na blogi. Ezali mpé kopesa nzéla na baoyo bazali komikomisa bazala na bisika na bango moko na kati ya plateforme mpé bazala lisúsu tê na kati ya ndelo ya mayebisi na bango mpô na likambo oyo litali connexion ɛntɛrnɛ́tɛ «ya vitesse moke».

Na mikili mya Afilíka oyo mitango ya nkota mizali 2000, communication transversale ezalí likambo oyo libosanamaka na mbala na mbala. Maneno ezali kopesa makoki mpô na kozala na midele ebele ya nkota songolo mpakala mpô na lisapo moko, oyo mikoki kozuama mpô mipesami na lolengé ya moko na pembeni na mosúsu. Interface ekolimbolama mpé na mitango ya nkota ya Afilíka oyo mikoki kozuama, mpô na kobuka bifelo ya nkota oyo bizali kobakisama, mingí mpeza na web oyo ya angéle.

Na ndéngé ezali ko kóla kolandana na bondimi na liango, Maneno ekotikala plateforme ya ofelé, oyo ezali kondima mpé kopesa esika na makomi, ba fotó mpé mingóngó oyo mipesami epayi nayango. Mpô ete ba oyo bazali kosalela yango bazala lisúsu tê kokoma liboso na eloko tê, kasi mpô na batangi.




#Article 89: Moïse Katumbi Chapwe (1296 words)


Moïse  Chapwe (abotamaki mokolo 28 sanza ya mosopa ngbanda 1964) azali mosali politiki mpe mosali mombongo ya ekolo Kongo. Azalaki Bokulaka ya Etuka ya Katanga, oyo ezali o ngele ya Ekolo Demokratiki ya Kongo, kobanda na mobu 2007 kino sanza ya libwa ya mobu 2015 . Ye azalaki moko ya baye Lisanga ya Bana Mboka Mpona Kotonga pe mpona Demokrasi (PPRD) kino mokolo 29 sanza ya libwa 2015 . Ebele baloba na ntina naye ete “akoki kozala moto ya mibale oyo azali na nguya ebele o Ekolo Demokratiki ya Kongo sima ya Kumu wa Liboso ya ekolo, Joseph Kabila  mpe ye atatolamaki moto ya Afrika po na mobu 2015  na makomi ya nkasa ya nsango Jeune Afrique.

Moïse Katumbi na kombo na yé ya mbota Moïse Soriano abotamaki na mama ya ekolo Kongo mpe tata ya ekolo Greka, Nissim Soriano, oyo akimaki mboka Rhodes tango ezalaki kokunzama na Ekolo Italie ya ba fascistes okatikati ya bitumba ya mokili mobimba oyo ya liboso na oyo ya mibale. Ye akendeki kovanda na Katanga, pembeni ya etímá ya Moero .

Moïse Katumbi asila kobalana na mwasi o nkombo ya Carine Katumbi.

Moïse Katumbi atangaki kelasi na eteyelo Kiwele ya Lubumbashi mpe na Mission Kapolowe esika azwaki dipolomi naye mpe asilisaki na kelasi ya lolenge ya kokanisa (Psychologie).

Na ntango akomaki ko yangela mombongo ya ndeko naye ya mobali mpe abandaki musala na Zambie, ayekolaki angeleza mpe alandaki kelasi ya koyekola boyangeli.

Moïse Katumbi abandaki musala naye ya mombongo na kotekateka mbisi na eteyelo mpe a zwaki matabisi ya dollars 40 na tango azalaki na maul 13. Sima nayango apelaki makasi na mombongo ya mbisi na etímá ya Moero epayi wapi abandaki kotekela mingimingi biloko naye kompani ya mbulamatadi na nkombo ya Gecamines.

Akobisaki misala misusu o ekolo Zambie mpe a tombolaki yango na mimbongo misusu: bokumbi mituka, mombongo, komema biloko ya koliya. Kobanda na botongi ba nzela milayi mpe ya ba nkoto ebele ya mapeko kino na komema lotiliki o ba mboka miyike mpe bingumba minene, kotonga mpe kobongisa biteyelo mpe ba lopitalo, Katumbi atika kombo naye bisika nyonso na Etuka ya Katanga.

Na mobu 1987, akelaki bongo ndako munene ya mombongo o nkombo Etablissement Katumbi mpo na kosangisa misala naye nyonso ezala ya botimoli bandeké ya mabanga ya ntalo, bomemi mituka to mpe bomemi bileyi.

Mbula zomi sima na yango, sima ya tombola musala naye, akelaki MCK (Mining Company Katanga), Oyo esilaki kozwa 80% ya misala ya botimoli ba ndeké ya kwivre mpe ya kobalt ya Gecamines. Mokolo 9 sanza ya mpela ya mazobo ya mobu 2015 kompani ya baye ekolo France na nkombo Necotrans esombaki MCK o motango ya mbongo oyo eyebani te.

Kobanda mobu 1997, Moïse Katumbi azali pe Mokambi wa lingomba lia lisano ya ndembo TP Mazembe ya Lubumbashi. Lingomba liango lisila kolonga mbala mitano Ligue des Champions mpe elonga nayango ya suka ezalaki na mibu 2009 , 2010, mpe 2015. Ebetaki mpe masano ya suka ya Bobeti ndembo ya Mangomba ya Mokili Mobimba ya FIFA na mobu 2010 na Abu Dhabi. mpe na mobu 2015 na Tokyo.

Lingomba oyo esalaki bongo nkombo na kokoma lingomba ya liboso ya Afrika ya koleka bokangikangi ya mikili ya mpoto mpe ya Amerika ya ngele, mpo na kokoma na suka ya masano ya Bobeti ndembo ya Mangomba ya Mokili Mobimba ya FIFA, wapi kuna ekutanaki na Inter Milan kansi balongaki yango mpe ekweyisamaki.

Moïse Katumbi asilaki bongo mpe kokomisa lisano ya ndembo pologalame ya bozalizali po na kozwa mpe kotangisa bilenge ya Etuka ya Katanga. (Bato koleka 2000 basili koyekola kino sikoyo) Katumbi asilisaki mpe kotonga libanda ya masano ya TP Mazembe na mobu 2011 ya ntalo ya millioni 35 ya badollar ya baye amerika.

Kobanda mokolo ya 2 sanza ya elanga ya mobu 2012, aponamaki bongo na komisyo stratégique ya FIFA.

O mibu 2006 mpe 2011, Moïse Katumbi azalaki bongo ko telemela bobundi bwa Joseph kabila mpo na kozala tata mokonzi ya Ekolo Demokratiki ya Kongo. Kansi, lokola basusu mingi, Katumbi abendanaki mosika na Kabila na mobu 2015.

Na makomi o nkasa ya nsango Reuters ya mokolo 13 sanza ya mpela ya mazobo mobu 2015, Moïse Katumbi a sengaki ete bapesa bobateli ya kofundama na Kabila sima ya kolongwa naye na bokonzi “neti komekakomeka mpo na ko convaincre Kabila alongwa na bokonzi tango bokonzi naye ya mibale mpe ya suka ya boponami ekosila na mobu ekoya . Moïse abakisaki ete Kabila soki alongwe na bokonzi na ntango mibeko mokonzi ya ekolo esengi ye kokende, eko komisa ye “tata ya demokrasi ya ekolo Kongo” mpe tata mokonzi ya ekolo ya kolingama mingi epa ya bayi ekolo Kongo.

Na mobu 2006, aponamaki lokola moponami na Lisanga ya Baponami ya Ekolo liboso ya koponama lokola Bokulaka ya Etuka ya Katanga na sanza ya elanga ya mobu 2007, ye aponamaki na bato 94 kati ya baponi 102.

Mikolo mike kaka sima ya ye kozwa bokonzi lokola Bokulaka ya Katanga, Moïse Katumbi apekisaki kobima na mondelo ya ekolo ya mabanga ya ntalo oyo ewuti kobima mbala moko na mabele, a tindaki bongo ba kompani minene na kotonga bisika ya kobongisa mabanga ya ntalo na kati ya Etuka. Amatisaki mpaku ya Etuka kobanda badollar millioni 80 tiii na badollar miliale 3 mpo abundisaki kaniaka mpe asilaki komatisa kobima o ndelo ya ekolo ya ba cathodes ya Kwivre. Mbongo oyo basalelaki yango mpo na kotonga ba kelasi, ba nzela, ba lopitalo, mpe komema mayi peto ya komela(banda 3% tii na 67% bakoma kozwa mayi peto ya komela).

Kolandana na makomi ya suku ya ndeké, Moïse Katumbi asila bongo komatisa bosali ya kwivre kobanda 8000 kilo nkoto na mobu 2006 kino koleka Millioni moko na mobu 2014. Mbulamatadi naye esilaki mpe kotonga mapeko koleka 1000 ya ba nzela mpe kokitisa talo ya fufu ya masango kolongwa na badollar 45$ tii na badollar 10$ na saki moko.

Na mobu 2013, kolandana na mobeko likonzi ya mboka naye, Moïse Katumbi alobaki ete ako pesa nkombo lisusu te mpo na maponami mbala ya mibale lokola Bokulaka. Mpo na maponami ya tata mokonzi ya ekolo ya mobu 2016, bato mingi okati mpe libanda ya mboka bazali komona ye lokola mopesi nkombo mpe mokitani wa Joseph kabila.

O mokolo 29 sanza ya libwa 2015 alongwaki o bokonzi neti Bokulaka, sima ya bakambi ya mangomba ya politiki sambo kobenganama na Majorité Presidentielle oyo ezali kokunza mpo bakomelaki Kabila mokanda okati nayango bazalaki kotuna makanisi naye ya kotika bokonzi na suka ya bokonzi naye ya mibale na 2016. Katumbi abakisaki ete kobima naye na PPRD eko pesa ye makoki ya kolakisa makanisi ya mbulamatadi ya kopotana na mobeko likonzi ya ekolo mpe kozongisa maponami sima yango ekozongisela mpe ye bonsomi ya maloba mpe ya misala. Kaka na bosakoli moko wana, alobaki ete masolo munene ekosalema nakati ya baye societé civile mpo na kosala lingomba ya kidemokrasia mpe ya kotelemela ekolo na kati ya mboka . O mokolo 19 sanza ya mosopa ngbanda 2015, Moïse Katumbi asanganaki na bayangeli mangomba 26 mosusu basila koyebana ya Kongo na lisanga babengaki “Front Citoyen 2016”. Lisanga yango eza na makanisi ya kobatela mobeko likonzi mpe kosala ete maponami ya tata mokonzi wa ekolo ya mobu 2016 esalema.

O mokolo 15 sanza ya mosopa ngbanda 2012, Fondation Excellence Millenium epesaki Katumbi mpalata ya “ Monzoto Moindo ya Afrika mpo na mobu 2012” na Nairobi, Kenya. Mpalata oyo ezalaki po na kondima misala mpe motuya naye neti molongi na boyebi kokunza malamu ya Afrika.

Na sanza ya elanga 2015, Moïse Katumbi azwaki mpe mpalata ya “Moyangeli  lisano ya ndembo wa mobu” na maboko ya Lisanga ya mangomba etali masano ya ndembo na Afrika.

O mokolo 22 sanza ya mosopa ngbanda 2015, Moïse Katumbi atatolamaki “Moto ya Afrika mpo na mobu 2015” na nkasa ya nsango Jeune Afrique, nkasa ya nsango eleka misusu ya bikolo ya afrika na munene.




#Article 90: Moïse Tshombe (3177 words)


Moïse Kapend Tshombe (* mwa 10, sánzá ya zómi,1919 na Musumba; † mwa 29, sánzá ya motóbá, 1969 na Alje) abótámí na mbóka Musumba, mbóka-mokonzi ya kala ya empire Lunda, na Territoire ya Sandoa na etúká ya Katanga, Azalí Molunda (Aruund). Abálákí mwǎna ya Mwantyaav Lunda. Moïse Tshombe atángí na école missionaires Methodists Américan. Ntángo asílísí kúná, tatá na yě alingákí atínda yě na Bɛ́lɛjika ákɛndɛ kosála kelási kúná, kasi bamindɛ́lɛ́ babóyákí. Akóbí na mayékoli ya botángi-mbɔ́ngɔ mpé bobɛti-ekembé. Nsima ya kelási na yě ayéí kokobanda na mombɔ́ngɔ na bolandi lokolo ya tatá na bokambi ya magazíni ebelé atíkákí. Bandá 1950 tíí 1957 yě azalákí motɛ́kisi mopáo mpé ayéí kopɔnɔmɔ membre ya conseil provincial ya Katanga. Akómákí lisúsu mokonzi wa Association de Classe Moyenne Africaine.

Kasi lotóma la politíki na yě ebandí sɔ̂lɔ́-sɔ̂lɔ́ na 1958, na bosálisi bwa Balunda na kosála Confédération Nationale Katangaise (CONAKAT.) Na bosáli parti óyo, ayákí mpé kosangana na Balubakat ya Jason Sendwe (Balubakat = Baluba ya katanga bazalí bato ya Nord-Katanga, Balunda bazalí na Sud-Katanga) mpé kokɛndɛ na Table ronde ya politíki ya 1960 na Bruxelles o ekólo Bɛ́lɛjika. Kúná ndé esíká mikáno mya kopésa Kongó lipandá mizwámákí, na ya koyánga mapɔnɔmi manɛ́nɛ maye makobimisa bakonzi ba mbóka. Nsima ya mapɔnɔmi, parti ya Tshombe, CONAKAT, ekɔ́tákí na mbulamatári Lumumba tɛ́, mpé abêngákí Lumumba « moto wa bosɔ́lɔ́ tɛ̂ ». Babɛ́lji bazalákí na elíkya áta mokɛ́ tɛ́ na Moyángeli mwa yambo ya Mbulamatári Patrice Emery Lumumba mpɔ̂ na mǐso ma bangó azalákí nationaliste ya makási óyo alingákí ’te bakaláki ya Bɛ́lɛjika batíkala na Kongó, alingákí libéralisme économique tɛ́, alingákí rôle ya église na Kongó tɛ́, bôngó na bôngó. Na bosisoli bôná, na bosálisi bwa baí-mbóka mpé basodá ba Bɛ́lɛjiika, Tshombe asakólákí mbótama ya État Indépendant du Katanga, mwa 11, sánza ya nsambo, 1960. Mbala mɔ̌kɔ́, Lumumba asɛ́ngí bosálisi ya ONU, eyákí na nkómbó ya ONU Congo (ONUC) mpé azwí yangó. Mission ya ONUC ezalákí mpɔ̂ na kokitola bokɛi bwa mampingá ya Bɛ́lɛjika mpé mpɔ̂ na kosálisa mbulamatári ya Kongó ebɔ́ngisa bosémbo bwa etando ya ekólo boye bozalí na likáma lya bitumba ya kili kili ya botómboki. Nsuka-nsuka ONU eyákí kolonga Tshombe na 1963. Yě akímí, akéí na Rhodésie du nord, Zambia ya lɛlɔ́, mpe nsima akéí kofánda na Espania. Ba gendarmes na yě bakíma na Angola mpé kúná bazalí kozwa bosálisi bwa Pulutugal.

Première législature esengélákí esíla mokɔlɔ ya 30 ya sánzá ya motóbá 1964. Libosó wâná, Moyángeli mwa yambo ya Bulamatári Cyrille Adoula asakólákí o mokɔlɔ 15 ya sánzá ya motóbá 1964 na Prezidá Joseph Kasa-Vubu ’te akopésa bolongwi-mɛ́i na yě na nśuka ya législature, lokóla ’te 30 ya sánzá ya motóbá 1964 mpé akozela nsúka na referendum tɛ́ óyo esengélí endima constitution ya sika, constitution ya Luluabourg ya 1964. 

Na ntángo eye, mobúlú ezalákí makási na Kongó, botɔmbɔki na Ɛsíta ebandákí kotíya Armée nationale congolaise na kpɔ́kɔ́sɔ́ ya makási mpé molóka mosusu ebandákí kosálema ntína na bokɛi boyángámí mpɔ̂ na nsúka ya sánzá ya motóbá ya 1964 ya mangómbá ma Nations Unies. Na nyɔ́nsɔ óyo, neti Adoula mpé alingákí lisúsu kokóba tɛ́, Kasa Vubu azalákí lisúsu na bopɔni tɛ́, esengélákí aluka nzelá nɔkínɔki ya moto óyo esengélí akitání na Adoula na ebóngá ya mokonzi ya mbulamatári, mpé moto yangó ebɔngí ázala óyo akokí kosangisa bolandi bwa politíki bɔ́nsɔ tǒ kokamba bolandi bɔ́nsɔ mpɔ̂ na boyókani mpé bomɔ̌kɔ́ ya ekólo. 

Esika Tshombe azali na Espania, akangaki maboko te, a activaki ba contactes na ye na milieux ya politique na ya Affaires na poto mpe na milieux politique ya Kongó oyo ezalaki na pouvoir, na opposition mpe na rébellion. Yango wana ayaki komonana neti mutu oyo akokaki ko réunir consensus au tour de lui mpo na ko diriger gouvernement ya transition ya Kongó tangu Cyrille Adoula ako démissionner effectivement. Na mukolo ya 26 yúni 1964, Adoula abengisaki ye na capitale, Léopoldville mpo asolola na ye na ndenge alingi kotikela ye ebonga. 

Le, 10 yúli 1964, Moïse Tshombe asali gouvernement na ye oyo ebengami gouvernement de transition ou de salut public. Ezalí de transition mpo yango esengelaki esalisa ba élections législatives. Sima ya mikolo ya bosali musala, mindondo entre Président Joseph Kasa Vubu na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari Moïse Tshombe ebandi kosalema mpe suka na yango Kasa Vubu ayaki kolongola Tshombe na poste ya Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari. Mpo na nini Président Kasa Vubu alongolaki Tshombe na poste ya Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari? 

Likambo ekotisaki mindondo entre Kasa Vubu na Tshombe ezalí ya ba élections. Tango gouvernement Tshombe esalisi ba élections mpe ba résultats ebandi kobima, Kgbokoso ekoti kati na bango mibale mpo Kasa Vubu alingaki te a perdre ebonga na ye ya Président de la République mpo na miso ma ye, Tshombe, azalaki na mposa ya ebonga wana! Kasa Vubu abandi kofongola miso mpe aye kosala discours na radio mpo na koyebisa que ba élections ezalí na ba irrégularités, esengeli ba examens ya ba recours esalema. Na yango, akati processus électoral mpo apesa Cour suprême temps ya ko examiner ba requêtes batu na ba partis politiques et associations ekotisaki. 

Ba oyo babandaki ko critiquer ndenge gouvernement a organiser ba élections babandaki koloba que yango esalemi suivant mode ya Confédération Nationale du Congo (CONACO ex-CONAKAT) mpo Godefroid Munongo nde azalaki ministre de l’intérieur. Kasi tango Cour suprême esengi que ba bandela ba élections bipayi oyo emonaki que ba irrégularités ezalí ya solo, remaniement ministériel esalemaki dans le soucie ya komeka ko apporter équilibre. Victor Nendaka ayaki kokoma ministre de l’intérieur. Ye azalaki opposant ya Tshombe. Kokota ya Nendaka na gouvernement ememaki élan mususu na oyo etali lutte contre Tshombe. 

Kasa Vubu na Tshombe boyokani bozalaki lisusu te, opposition ekomaki kosenga na Tshombe a élargir gouvernement na ye tee suka suka ekomi kosenga démission ya Tshombe na gouvernement na ye. Front Démocratique Congolais (F.D.C) ya Nendaka ekomaki kosala ba pressions makasi mpo na mise en place ya gouvernement d’union nationale. Nionso oyo eyali ko affaiblir Tshombe politiquement en plus ya situation politique, économique et sociale ya mboka. 

F.D.C. ekomaki kosala nionso mpo Tshombe alongua: kosenga na Président Kasa Vubu asalela message na ye oyo apesaki na radio le, 30 apríli 1965, a nommer informateur mpo na consultation en vue ya formation ya gouvernement ya sika, etc. 
Le, 13 ɔkɔtɔ́bɛ 1965, Kasa Vubu aye kolongola Tshombe na discours asalaki na séance solennelle ya ouverture ya session ordinaire des Chambres, en ces termes «En vue d’assurer le respect des exigences fondamentales et des règles habituelles de la démocratie, j’ai mis fin aux fonctions de Tshombe à la date de ce jour, les Chambres constituées, et le gouvernement n’ayant pas cru devoir, de sa propre initiative, présenter sa démission» (Discours repris na Courrier d’Afrique ya le, 8 ɔkɔtɔ́bɛ 1965.) 

Kasa Vubu na discours na ye alakisaki kanda azalaki na yango na lolenge alongolaki Tshombe. Acte oyo esepelisaki ba oyo babandaki kolinga Tshombe akwueya. kanda ya Kasa Vubu ewutaki du fait que asengaki na Tshombe, mbala na mbala a démissionner kasi ye aboyaki kosala bongo, yango wana Kasa Vubu ayaki ko agir ndenge a agisaki wana, sans diplomatie aucune. Kasi, Tshombe aningana te, aloba eloko mko te, afanda très calme et digne. 

CONACO ya Tshombe e gagnaki ba élections (Chambre des représentants «parlement» na Sénat). Il était évident que na moment oyo Tshombe akomaki ko bouler ndenge nini akoma candidat ya parti na ye mpo na ba élections présidentielles.

Mobéko likonzi mwa mokolo mwa 1 augústo mobú mwa 1964, na atikeli ya 185, aliéna 2, elobaki 'te la mission ya  bulamatari  de transition ezalaki kobongisa maponomi. Molili ezaláki na sima, elingi koloba 'te, disposition moko te ya terme ya transition dont la mission essentielle ezalaki ya ko organiser ba élections. Et après publication mpe proclamation ya ba résultats ya ba élections, gouvernement oyo ekokoma nini? 

Commission constitutionnelle etikelaki Président de la République choix ya ko décider soki alingi  bulamatari  de transition ezala tee na suka ya mandat na yango ou bien alongola yango soki ba circonstances politiques ezalí kosenga 'te alongola yango. Engebene na Selon constitution, na atikele 66, e prévoir que Président de la République a soumettre na approbation ya Parlement réuni na congrès, l’acte ya nomination ya ba membres de tout gouvernement qu’il forme, et cela dans le délais de 30 jours kobanda mokolo mwa  séance du Parlement. ya yambo. 

Conflit oyo ebandaki ko renforcer position ya Président Kasa Vubu mpe ezalaki ko désavantager Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari Tshombe, dans la mesure où mission ya bulamatari  de transition ekomaki na suka, Président de la République a révoquaki ye na discours ya le, 13 ɔkɔtɔ́bɛ1965 devant deux Chambrea renies en congrès national na première session ordinaire na yango oyo ebandaki le, 7 ɔkɔtɔ́bɛ 1965, mukolo session extraordinaire esilaki. 
Président kasa Vubu ayaki ko nommer Evariste Kimba formateur du bulamatari , ye azalaki ministre ya Affaires étrangères ya Katanga à l’époque ya Etat Indépendant du katanga, députe mpe mopɔnɔmi  ya Balubakat, membre ya F.D.C. ya Nendaka, oyo ezalaki na minorité na Parlement. 

Evariste Kimba aponɔmɔ́kɔ́ na ordonnance n° 397 ya mokolo mwa 18 ɔkɔtɔ́bɛ  mobú 1965. Mokolo mwa 14 novɛ́mbɛ mobú mwa 1965, akeyi liboso ya ba Chambres, engebene na atikele  66 ya Mobéko likonzi, kasi congrès e recaler ye: likolo lya 262 parlementaires baye basengeleka kopono, bulamatari ya Kimba ezua 121 voies pour, 134 voies contres, na 7 abstentions. 
Na motu makasi, Kasi Vubu a renouvelaki ye lisusu confiance na ye. Kasi Kimba azuaki lisusu temps ya komeka lisusu mbala ya mibale kokende liboso lya congrès nationale tɛ́ mpo Haut commandement militaire eyaki kosala coup d’Etat mokolo mwa  24 novɛ́mbɛ mobú mwa 1965, ekuewisi Kasa Vubu na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari na ye Kimba, y compris na ba Chambres nionso ya congrès!

Na mokolo mua 6 febwáli mobú mwa 1965, Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari  ya  Kongó-Kinsásá, Moise Tshombe atiyaki misapi na boyokani na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari ya Bɛ́lɛjika Paul-Henri Spaak. Na boyokani bwana  buzalí ndambo  ya nungungu  enene  kati na royaume de Bɛ́lɛjika na Kongó-Kinsásá. Yango ebengami: nungungu belgo-congolais. 

Contentieux oyo ebotami tango Congo ekomaki lipanda mokolo mwa 30, sanza ya yúni mobú mwa 1960 mpe esengelaki Bɛ́lɛjika etika Congo en tant que mboka oyo ekomi kokonzama na bana Kongó-Kinsásá bango moko, Eye elingi koloba ekolo nsomi. Toyebi que Congo esalemaki kobanda ndenge ekatamaki na 15 novɛ́mbɛ 1884 tee na 26 febwáli 1885 na Conférence de Berlin tee na Convention ya Saint Germáyin–En-Haye ya 10 sɛtɛ́mbɛ 1919. Wuta wana tee na 30 yúni 1960, esengelaki Bɛ́lɛjika ezongisela Congo souverain ba moyens propres humáyins; techniques; matériels; juridiques et diplomatiques; financiers et économiques ya Etat: ba moyens humáyins ezalí batu oyo bazali kosala mosala, ba moyens techniques ezalí administration publique de l’Etat na ba régies na yango; moyens matériels ezalí ba biens meubles, immeubles, ba véhicules, fournitures na matériels ya bureau; moyens juridiques ezalí ba textes de lois et règlements, archives et documents, na sceaux; ba moyens diplomatiques ezalí ba traités, conventions na ba accords diplomatiques, commerciaux et consulaires; moyens financier et instruments monétaires ezalí budget en cours d’exercice, budget extraordinaire ya plan décennal du développement, ba structures financières, ba contrats financiers na dette publique de l’Etat (prêt na emprunts direct na engagements, ba dettes consolidée, ba dettes non garanties), ba créances ya Kongó-Kinsásá, ba avances na acomptes ya trésorerie na réalisation ya misala ya ndenge na ndenge, ba avoirs et créances en devises, ba titres, ba participations na capital ya dotation ou na oyo ya prêt, ba actions , etc. 

Sika tika totala, boyakani buye Tshombe na Spaak batiyáká misapi,  ezalaki na ntina nini?  Lingomba ya mpo na mombono mpe *industrie liye babengi na lifalanse Compagnie du Congo pour le Commerce et l’Industrie   C.C.C.I. na bokuse lizalí lisanga lya mombongo  ya yambo liye mani Léopold II asaláká na Kongó-Kinsásá, mokolo mwa 15 sanza ya misato mobú mwa 1887. Sima ya wana, ba filiales na yango eyaki mpe kosalema. Sima aye kosala ba sociétés de charte: le Comité Spécial du Katanga (C.S.K.) na 1890, la Compagnie des Chemins de fer du Congo Supérieur aux Grands lacs africains (C.F.L.) na1902 na le Comité National du kivu (C.N.KI.) na 1927. Alors, pour mieux exploiter, esengelaki ba holdings esalema: l’Union Minière du Haut Katanga le, 28 ɔkɔtɔ́bɛ 1906; Lingomba lya nzela ya masini  ya bas congo mpe Katanga liye babengi na lifalanse la Compagnie des Chemins de Fer du Bas Congo au Katanga mpe  B.C.K.  na bokuse mokolo mwa 31 ɔkɔtɔ́bɛ mobú mwa 1906; Lingomba lya Zamba liye libengami na lifalanse  Société Forestière et Minière du Congo mpe  FORMINIERE na bokuse mokolo mwa  6 novɛ́mbɛ mobú mwa 1906. Nionso oyo ezalaki mpona ko exploter malamu malamu mpe kobimisa bomengo bwa Kongó-Kinsásá libansa ya  ndelo ya mboka mpo bukende kobanda na Bɛ́lɛjika na mikili misusu. Ba compagnies nionso oyo efandaki pepele mpe ba sites de production na exploitation na yango ezalaki likolo ya bomengo, ba nzela ya masini mpe etongamaki uniquement na but ya ko faciliter sortie ya ba richesses wana, tout comme ba coûts ya exploitations ezalaki faibles mpe batu moindo bazalaki kosala kuna bazali kozua bango na considération humáyine moko te mpe bazalaki kofutama malamu tɛ́.

Avant indépendance, Belge abimisaki décret ya 17 yúni 1960 oyo ebandaki kopesa possibilité na ba entreprises mpo epona nationalité belge ou congolaise. Bien évidemment, ba sociétés nionso eponaki nationalité belge mpo elingaki ko fonctionner te selon ba dispositions ya droit Congolais. Changement ya nationalité wana ebandaki ko entraîner ba pertes fiscales na Etat Congolais. 

But ya ba accords ya 6 febwáli 1965, ezalaki mpo na kosala transfère ya portefeuille ya Kongó ya Bɛ́lɛjika na Republíki Demokratiki ya Kongó. Awa nde ebandeli ya lisolo mpe likambo ya malette diplomatique oyo Tshombe ayaki na yango mpe abandaki kolakisa na batu tango awutaki na Bruxelles, sima ya ba négociations na signature ya ba accords, soi-disant que ye a réussir transfert ya ba propriétés des titres oyo ezalí kosala portefeuille de l’Etat. Ba accords oyo Tshombe a signaki ezalaki vraiment na bénéfice ya Kongó te mpo ba Congolais balingaki kaka ba récupérer ba actifs. Ba Belges, côté na bango, balingaki bakinela ba Congolais ba actifs na ba passif. Likambo ezalaki nde wana. Yango wana tango Tshombe azongaki na Léopoldville na malette diplomatique oyo abandaki kolakisa na batu que a récupérer portefeuille ya l’Etat, mingi bamonaki que yango ezalí lokuta mpo asalaki ba concessions mingi pour ne rien obtenir. Mpe ba accords wana ezalaki léonins, ekitisaki lokumu ya Congo. Est-ce que, Tshombe azalaki na marge ya manœuvre ebele? A vrai dire, azalaki na yango vraiment te mpo il ne pouvait pas passer outre le soutien militaire et diplomatique ya ba Belges mpo basalisa ye na bitumba azalaki (gouvernement) na yango na ba rebelles na kati ya Congo. Na loyenge wana, haut commandement eyaki kosala coup d’Etat militaire mpe epesi bokonzi na Général Mobutu. Tango Président Mobutu Sese Seko akomi mokonzi ya ekolo, abandi ko mener campagne contre ba accords oyo Tshombe a signaki na Spaak. Remise en cause na yango nde eyaki kosala que na discours ya 30 yúni 1966, Président Mobutu aloba na miso ya batu que: «Tshombe azali accuser mpo na haute trahison na ndenge a signaki ba accords oyo ezalí ko bénéficier na Congo te mpe ezalí kolakisa que azali na service ya colonisateur belge.»

Esengeli toyeba que Congo ezalaki na situation économique moko mobulu mpo ata compagnie moko te ezalaki ya l’Etat en terme ya majorité ya actions. Likambo ya dette coloniale mpe ezalaki kopesa kobendana mpo 60 % na yango esengelaki nde R.D.Congo efuta yango. Ba niongo oyo mundele amikotisaki na makambo oyo ezalaki na ba projets na ye, fuite des capitaux na périphérie, ba budget ordinnaires déficitaires, ba niongo oyo ba sociétés coloniales ezuaki na oyo Etat Indépendant du Congo emikotisaki, ba ventilations ya dépenses kili kili mpe ematisaki dette publique interne tout comme ba opérations ya moyens effectifs de paiement mpe. Yango wana Fonds Belgo-Congolais d’Investissement et de Gestion esalemaki. Alimentation na yango ebandaki kowuta na ba virements réguliers périodiques wuta na ba banques centrales ya Bɛ́lɛjika na R.D.Congo na compte ya Fonds. Non seulement Congo ezalí kofuta 60 % ya part, kasi siège ya Fonds ezuami na Bruxelles, Président na Directeur général bazali ba Belges!!! 

Portefeuille de l’Etat ezalí ba titres, ba actions na ba droits oyo l’Etat ezalí na yango na ba organismes na ba sociétés nionso oyo ezuami na mabele ya Congo. Ba droits ya l’Etat elingi koloba: ba participations na bénéfice ya société neti na contrôle ya gestion, ba dividendes ya société, droit de vote na participation na conseil d’administration et de gestion, ba créances oyo ewuti na ba prêts, libération ya capital, participation na ye na ba parastataux, etc. Accords ya 6 febwáli 1965, ekangaki Congo na kingo na oyo etali ba transfères ya ba titres, ba droits na obligations. Donc, l’Etat Congolais esengelaki lisusu e négocier na ba sociétés na oyo etali ba transfères wana. Il fallait existence ya modalité de transfère mpo avant tout transfère esengelaki esalema na modification ya convention!!! 

Neti Belge ayebaki que Portefeuille ya Kongó ya Bɛ́lɛjika ekokoma ya R.D.Congo, atiaki article 2 ya loi fondamentale du 19 máyi 1960. Yango elobaki boye: « Les lois, décrets et ordonnances législatives, leurs mesures d’exécution ainsi que toutes dispositions réglementaires existant au 30 yúni 1960 restent en vigueur tant qu’ils n’auront pas été expressément abrogés. ». 

Avant lipanda, le 30 yúni 1960, abomi ba compagnies misatu: le Comité national du Kivu (C.N.K.), la Compagnie de Chemin de Fer et voies fluviales (C.F.L.), le Comité spécial du Katanga (C.S.K.) mpe du coup abimisi conventions misatu (Etat –Privé) sans consultation ya Congolais, na décret royal du 26 yúni 1960. Belge abomi ba compagnies de la charte oyo misatu mpo na ko diminuer ba parts ya actions ya Etat Congolais na kati ya Union Minière du Haut Katanga. Et pourtant ba compagnies à la charte esalemaki na mabele « minier » oyo l’Etat colonial apesaki bango mpo basala ba grandes concessions minières. Eyenbani malamu que sol et sous sol ezalí ya l’Etat. 

Donc, Congo ebandaki kaka ko dépendre na Bɛ́lɛjika économiquement suite na motambo wana. Yango wana dénonciation ya liboso esalemaki na Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari Cyrile Adoula. Ye a signaki ba accords na Paul Henri Spaak le, 24 mársi 1964 mpo portefeuille ya Congo ezonga sans aucune condition. Na novɛ́mbɛ de la même année, Président Joseph Kasa-Vubu a promulgaki décret-loi ya 30 novɛ́mbɛ 1964 oyo ezalí ko abroger décret-loi ya 26 yúni 1960. Yango ebandaki koloba que l’Etat congolais ezalí ko succéder entièrement na portefeuille ya ba sociétés oyo misatu totangi likolo mpe ezalí kozua 1/3 ya part ya action na U.M.H.K. comme étant actionnaire principal. Tango wana Tshombe asi akomaki Moyángeli mwa yambo ya Bulamatari. Kasi Bɛ́lɛjika esalaki Tshombe ba pressions makasi mpe esengaki na ye aya ko signer ba accords ya 5 febwáli en échange ya soutien militaire et diplomatique. Accords yango nde ezalí komonisa Congo buale tee lelo oyo. 

Sima ya wana makambu ebele elandaki: Président Mobutu apesaki ba Belges ultimatum tee na 31 dɛsɛ́mbɛ 1966 mpo ba sièges sociaux ya portefeuille ya R.D.Congo ezonga na Congo; loi Bakajika; nationalisation ya Union Minière du Haut Katanga; na ba compagnies mosusu; création ya Air Congo, Zaïrianisation, etc.




#Article 91: Emmanuel Bamba (606 words)


Emmanuel Bamba († 30 may 1966) yé abandákí carrière na yé na crédit foncier ya Léopoldville mpé sima, ayaka kokoma Sénateur, élu ya ABAKO, na Léopoldville, Ministre ya Finances (may 1962 tee na yúni 1964) na gouvernement ya Cyrille Adoula mpé akomákí lisúsu Sénateur na ba élections ya 1965. Azalákí profondément croyant mpé kimbanguiste devant Nzámbe. Ayaki kosála aile mosúsu ya église kimbanguiste na 1962.

Pɔ na ba pasteurs bakongos na Kinsásá, nionso bayebaki eté Emmanuel Bamba azalákí pris au piège d'un complot ya Mobutu na son entourage. Míngi pe bakimaki na Brazzaville, pɔ na bangó, lokola tribalisme ezalákí makasi na tángo wana, eté Mobutu alingí na sima ya Emmanuel Bamba, kokanga ba pasteurs nionso ya bakongos. Papá géniteur óyo ya ngai, Révérend Daniel Nima Kizubanata alobákí boye na Kintandu, (en dialecte de kikongo): «Mobutu bu kakengi Manueli Bamba, si katukanga betukulu. Mboti ngia zuama kuna Brazzaville»... Tángo ayebisakí ngai yangó, tozalakí na Antoine Kingotolo (L'homme du 4 janvier 1959) na mbóka Manenga! Atalí Antoine Kingotolo, ayebisi yé boye: «nge Antoine, zayisa Mumbamuna (ancien sénateur et député) yé Nzeza-Nlandu vo munu mukuenda ngina…»

Sango ya jugement wana eyebanaki na ba sodá nionso. Óyo bawutaki na province ya Bas-Congo, balingaka kosala trouble pɔ na ko contester en faveur ya Emanuel Bamba. Na tángo wana, ngai nazalakí nanu adolescent, babokoli ngai na Commandant André Masamba. Biso nionso, bána ya ba sodá na camp Kokolo tozalákí présent. Elokó ekamuisakí ngai na tángo wana, na mitunakí boye: pɔ na níni, tozalí na káti ya camp militaire d'infanterie mais disposition de sécurité ezalí assuré na ba bataillons ya ba parachitistes (ba berêts rouges) ya Binza na camp Thsatshi?

Tozalakí kozela, kinó ba yé na ba prévenus… Bakonzi óyo basámbisaka bangó, biso bána ya ba sodá toyébaka bangó.
Jugement wana esalemakí na bâtiment ya Centre Supérieur Militaire, à côté ya salle ya cinéma ayo tǒ surnommaki «ciné molunge». CSM ezalákí presue devant à gauche ya grand bâtiment dit groupement, óyo etalisi na 2ème entrée ya camp óyo ekeyi vers le camp des officiers, puis vers building royal.

Sango epanzanakí eté ba koboma bangó o 2 yúni 1996. O 1 yúni, nakendekí na pont Gaby kotála ba installation óyo ezalákí kosálama na place de la cité, esika ba dansuers traditionnels ne ba luteurs bazalakí kosála ba spectacle na bangó. Bato míngi bakanisaka babomela bangó na emplacement ya stade des martyrs; non, na place de la cité na pont Gaby…

Namibongisamaki pɔ na kokende kotála ndenge pendaison ekosálama. Mama na ngai apekísí ngai nakende. Pe ayebisi ngai: Emmanuel Bamba azalí camarade ya tatá na yo… kokende te! Yangó nde eyakí ko convaincre ngai, pe nakendeki te.

Mutu ya libosó batiaki singa ezalákí Évariste Kimba. Ndenge basalelaki mabaya óyo bamatisaki batu ezalákí kokamua. Sima ya tubela, bamatisi Kimba wana, mutu na káti ya cagoule. Tángo ba sodá ba actionner système ya mésa wana, efunguami, etiki Kimba dans le vide, nzotu ezalí kodiembela na singa. Bobozo apesa mitíndo que sima ya 20 minutes nde doktolo ya Armée akoya kotála soki mutu awe. Pire, Bamba, Alexandre Mahamba na Jérôme Anany bafándisi bagu na camion ya ba sodá bazali kotálisa bango ndenge Kimba azalí koleka. En suite, bakumbi Emmanuel Bamba, sima Anany mpé basukisi na Mahamba. Sika tángo ekomí tour ya Mahamba, likolo ekomí koyínda, tángo káka batie yé singa na kingo mpé mabaya wana efunguami, tourbillon móko ya munene esáli wana ya makasi mpe ekumbi mpe ekueyisi batu.

Pɔ na ngai óyo nakendeki te, namonaki batu bazalákí kokíma pona kozonga na camp Kokolo. Bangó nde bayebisaki ngai eté mabele eningani na place de la cité, epesákí panique pe bato nionso bakomaki kokíma na mpé ba sodá lokola!




#Article 92: Alassane Ouattara (198 words)


Alassane  (abótámí o mokɔlɔ mwa yambo, sánzá ya yambo, mobú mwa 1942) azalí moí-politíki wa Kotdivuar (Côte d'Ivoire). Azaláká moyángeli wa yambo wa Kotdivuar bandá sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́, mobú mwa 1990 tíí sánzá ya zómi na míbalé mobú mwa 1993. Azalí prezidá ya lisangá lya politíki liye libêngámí Rassemblement des républicains na lifalansé.

O mobú mwa 2010, yě azalaka mɔ̌kɔ́ ya bato bábalé, elɔngɔ́ na Laurent Gbagbo, baye balukáki kíti ya bokonzi bwa Kotdivuar. Ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na komisió ya bopɔnami eye ezalí na nsɔ́mi (Commission électorale indépendante) mpé moyángeli wa yambo wa Kotdivuar, mwǎna mbóka Guillaume Soro, yě asílákí kolónga bopɔnamí bwa kíti ya mokambi-ekólo ya Kotdivuar na mitúya ntúku ítáno na mínei likoló lya nkámá (54%). Bikólo mingi bya molɔ́ngɔ́ mobimba bisílaka kondima elónga ya yě mpé yě alápákí ndáí (akatákí séléka) lokóla mokonzi wa mbóka mokɔlɔ mwa mínei sánzá ya zómi na mibale mobú mwa nkóto ibale na zómi (2010), kasi mokɔlɔ môná káka, lisangá liye litalí mambí ma mobéko likonzi (Conseil constitutionnel) lisakólákí Laurent Gbagbo , prezidá óyo ayambólí yě,  ndé molóngi wa bopɔnami bwa kíti ya bokonzi. 

Kobánda matatá mâná Laurent Gbagbo andimákí elónga ya yě tɛ́ mpé aboyákí komótíkela kítí ya bokonzi.




#Article 93: Papá Wemba (102 words)


Jules Shungu Wembadio Pene Kikumba tǒ Papá Wemba (abótámí o mokɔlɔ 14 yúni 1949 o Lubefu - 24 apríli 2016) azalaka moyémbi mpé mokéli wa nzémbo wa Kongó-Kinsásá.

Jules Shungu Wembadio Pene Kikumba abótámí o mokɔlɔ 14 yúni 1949 o Lubefu. Azalaka moyémbi mpé mokéli wa nzémbo wa Kongó-Kinsásá.

Papá Wemba Wemba akufaki o mokɔlɔ ya 24 apríli 2016 na Abidjan na mboka ya Kotdivuar

Elengo na Stervos Niarcos, King Kester Emeneya, Papa wemba abanda makambo ya molata na mindulé. Kintedi pona balanga nzémbo ekomaka neti Bonzambe.

Mayé matali kintendi na mindulé eyembama na loyémbo ya Proclamation na Dernier coup de sifflet.




#Article 94: Antoine Wendo Kolosoy (392 words)


 
Antoine Wendo Kolosoy (abótámá ó mokɔlɔ mwa 25 apríli 1925; akúfá ó mokɔlɔ mwa 28  yúli 2008) azaláká moyémbi mpé mokeli wa nzémbo wa Kongó-Kinsásá. -Ye ayebaná mingi lokóla Papa Wendo - amonɔnɔ ó molɔ́ngɔ́ mobimba lokóla Tatá wa Mizíkí ya Kongó-Kinsásá, lolenge la mizíkí luye luzalí kosangisa rumba, beguine, waltz, tango mpé cha-cha.

Wendo abótámá na mobú mwa 1925 na engúmba ya Mushie na etúká ya Maí-ndombe na ekólo Kongó-Kinsásá ntángo yangó ezaláká na nsé ya mbúlamatáli ya koloni ya ekólo Beleziki. Ntángo yě azaláká naíno mwána wa mibú nsambo, tatá wa ye akufáká, ntángo mokɛ́ nsima ya liwâ lya tatá wa yě, mamá wa yě óyo azaláká mpé moyémbi akufáká lokóla. Ekomáká ye mwána etíké, bamumpɛ́ ba lingómbá lya bamumpɛ́ ya Afrika (Société des missionaires en Afrique) bamokamatáká mpó na komobokɔlɔ na ndáko ya bǎna bitíké. Yě abokolomɔ́kɔ́ na ndáko eye wâná kobanda liwâ lya babótí ba yě téé na mbúla (mvúla) zómi na ibalé to isáto ntángo basángó bomobenganáká likoló lya maloba ma nzémbo ya yě maye masepelisáká bangó sɔ́kɔ́ mokɛ́ tɛ́. Wendo abandáká kobɛ́tɛ lindánda mpé koyémba mpó nakosepelisa batò na mibú zomí na moko.

Marie Louise ezalí loyémbo la ye ya yambo eye ezwáká ngɛngɛ makási mpé nkɛ́mbɔ ó molɔ́ngɔ́ mobimba na mobú mwa 1948. Loyémbo luye lukomamáká elɔngɔ́ na mobɛ́ti guitare Henri Bowane. Bopanzaní nsango (publicité) ya Radio Congolia mpé nungu nungu iye ibótamáká nsima ya loyémbo luye ipesáká lango  sɔ̂lɔ́ eposa ya kompanzana makasi na Afrika mingi mpenzá na Afrika ya wesita. Ngɛngɛ eye ememáká mpé kpɔ́kɔ́sɔ́:  bakambi ba nsambela ya mumpɛ́ balobáká éte loyémbo luye luzalí na nguyá ya satána. Masoló na eleko eye wâná malobáká éte loyémbo luye sɔ́kɔ lusambelamí na káti káti ya butú mpenzá (ngonga zeló tǒ minuit), lukosekwisa bakufi. Wendo asilikáká mingi mpé kánda emomemáká mosíká ya engúmba Kinsásá mpé amosukáká na bokangami na Kisangani (ntángo êná Stanleyville) mpó na ntángo mokɛ́ na bolɔ́kɔ epáí ya bakonzi ba mbúlamatáli ya koloni ya Beleziki mpé bamumpɛ́ bamobóyeláká kosangana na nsambela ya bangó.

Moyémbi Wendo Kolosoy akotɔ́kɔ́ ó lopitálo la clinique Ngaliéma mpó na koluka libíki na bokɔnɔ kasi azongisáká molímo na ngonga ya zómi na mwambe minúti ntúkú isáto nsima ya nzángá ó mokɔlɔ mwa ntúkú ibalé na mwambe, sánzá ya nsámbo mobú mwa nkóto ibalé na mwambe na lopitálo la Ngaliéma, ntángo yě azaláká na mibú ntúkú mwambe na misáto.

 




#Article 95: Malariyá (710 words)


Malariyá ezalí fɛ́fɛle eye ezwámaka o mikili mitóndá maziba tǒ mái malálá, mpé bisíká bitóndá ngungi. Bokɔnɔ epɛ́sɛ́mi na ngungi ya mwasí; sɔ́ki aswí moto, mikɔlɔ́bɔ mikokɔ́ta o nzóto kin'o makilá.

Malariyá ezalí bokono boye bokopesamaka kowúta na ngungi koleka epayi ya batu tǒ banyama misusu kolandana na ba parasites protozoaires óyo ezali (lolenge ya micro-organisme) ya cellule móko ya Plasmodium. Malariyá elakisaka bilembo biye bilandi fièvre, bolembu, kosanza mpe moto mpasi. Na ba cas ya makasi mpeza ekoki komema loposo kokoma jaune, kopiquer crise ya mbalakata, coma to liwa. Bilembo oyo bibandaka komonana mingi mingi sima ya mikolo zomi to zomi na mitano sima na kosuama na ngungi. Epayi ya baye balandelaki nkisi malamu te bokono bokoki kozongela bango sima na basanza. Epayi ya baye babikaki na bokono kala te, tango bazwami na bokono lisusu bilembo ya makasi bimonanaka lisusu te obe oyo ya neti neti te. Resistance oyo ya ndambo ekendaka na kosila malembe malembe sima na basanza kino ba mbula soki mutu azali lisusu te kokoba kozwama na malariyá.

Mingi mingi mpeza, bokono oyo bopesamaka tango mutu asuami na ngungi ya mwasi oyo ayebani bo Anophèle. Kosua oyo ekotisaka ba parasites kowuta na soyi ya ngungi kokota na makila ya mutu. Na sima ba parasites oyo ekendeke na foie epayi wapi ekolaka mpe kobota bota. Eza na lolenge mitano ya Plasmodium oyo ekoki kopesa bokono mpe kokabolama na batu. Liwa mingi eyaka na nzela ya P. falciparum na P. vivax, P. ovale, mpe P. malariae ememaka mingi mingi mpeza lolenge moko ya malariyá ya mua katikati. P. knowlesi yango ememaka mpeza mpeza te bokono epayi ya batu. Diagnostique ya malariyá esalalemaka mingi mpeza na nzela ya komeka makila na microscope na bosaleli plaquette ya makila, to na nzela ya test antigène to ba tests ya diagnostique ya lombango. Ba nzela eye esalelaka milongo ya baréaction na polymérasie mpo na kokundola ADN ya parasite esili kozala, kasi naino basaleli yango te na bisika biye malariyá ezwi batu ebele mpó na ntálo mpé mbilinga mbilinga nayango.

Likáma ya kozwama na bokono ya malariyá ekokí kokoma moke na nzela ya komibatela na kosuama na ngungi na bosaleli moustiquaire mpe nkisi ya kobengana ba insect, to mpe mikano ya kolandela ba ngungi neti kofula insecticide mpe kotsiolisa mayi eye etelengani. Nkisi ndenge na ndenge eza na oyo etali prévention ya malaria mpo na bakeyi mibembo na bisika biye bokono bona bozali mingi. Ba doses ya nkisi sulfadoxine/pyriméthamine ya komela mbala na mbala eza recommendé mpo na bana mpe na sima ya sanza misato ya yambo ya zemi na bisika biye taux ya malaria eza likolo mpeza. Atako posa ezali, mangwele moko te eye ezali kosala mpeza eza, ata ndenge batu bazali kosala makasi mpo na kobongisa mangwele wana. Nkisi eye eza recommendé mpo na malaria eza bosangisi ba nkisi ya malaria oyo ezali na artémisinine. Lolenge ya mibale ya ba nkisi ekoki kozala mefloquine, luméfantrine, to sulfadoxine/pyriméthamine. Quinine ekoki mpe komelama elongo na doxycycline soki artémisinine eza te. Esengami ete na bisika biye bokono oyo boza na batu ebele, yambo ya kobanda komela ba nkisi esengeli kosembola soki ete malaria nde ezali kotungisa mpo na ntina ya mikakatano ya nzoto koboya nkisi. Ba nkisi ndenge na ndenge ya malaria eza kokutana na nzoto eye eza koboya yango; na ndakisa, eza na baye nzoto eboyaka chloroquine P. falciparum likambo oyo epanzani na bisika ebele oyo malaria ezali, na nzoto koboya artémisinine ekomi mpe nkokoso na bisika songolo ya mikili ya Asia ya se.

Bokono oyo bopanzani mingi na barégion tropical mpe sous tropical oyo etandami nzinga nzinga na équateur. Yango ezali bongo eteni monene ya Afrika ya se ya Sahara, Asia, na Amerique Latine. Organisation Mondiale ya Santé emoni ete na mobu ya 2012, ba cas ya malaria ezwaki bamillion 207 ya batu. Na mobu wana, emonanaki ete bokono bona bobomaki batu kati ya 473,000 na 789,000, ebele nabango bazali bongo bana nakati ya Afrika. Malaria mingi mingi eza bokono boye bolandanaka na kibobola mpe eza na effet monene ya mabe na développement économique. Na Afrika emonani ete ememaka libunga ya ba milliards 12 $ USA na mobu moko kino na motuya ya likolo mpo na maye matali bonkolongono, bozangi makasi ya kosala mosala mpe ba effets misusu na maye matali tourisme.




#Article 96: Mbwá (138 words)


Mbwá (boyíké mbwá, Canis lupus familiaris o latɛ́) ezalí nyama ya mikúwa mpé ya mabɛ́lɛ eye efándaka elɔngɔ́ na bato. Eningisaka mokíla sɔ́kí elingí elɔ́kɔ tǒ sɔ́kí esepélí, mpé egángaka míngi sɔ́kí esɛ́ngɛli na bokébi bwa moto tǒ mpé sɔ́kí elingí kokébisa moto na likámá. Elíyaka misuni mya nyama.

Ezalí nyama o libóta lya limbwá. Ekómá moníngá mwa moto. Mbwá ebɔ́kwámí na ntína ebelé, ntángo esúsu bato babɔ́kɔli mbwá mpó na kotambwisa bato baye bamɔ́nɔkɔ tɛ́, ntángo isúsu mpó na kokɛ́ngɛlɛ ndáko, ntángo isúsu mpó na bokila, ntángo isúsu mpó na masano, ntángo isúsu mpó na koluka diamba mpé ntángo isúsu mpó na koluka bato baye babúngí o moningí tɔ̌ mbóngé ya mabelé. 
Mbwá izalí ndéngé na ndéngé.

Opesi mbwá, mbwá eboyi.

Mbwá ezalí na makolo mínei, elandaka nzelá sé mɔ̌kɔ́ .

Mái makúfela mbwá mamɛlɛkɛ sé mopaya.




#Article 97: Moí-politíki (100 words)


Moí-politíki ezalí moto nyónsɔ oyo azalí kosála misálá mpó na *kounfluencer misálá mya lɛ́ta mpé kokamata mikáno. Yangó esangisi bato bánsɔ bazalí na kíti ya bokonzi na mbúlamatáli mpé bato baye bazalí koluka kofánda na kíti ya bokonzi na mbúlamatáli na ndéngé ya bopɔnɔmi, ya bokitani, ya mandóki, ya kotiya na kíti, ya boyibi bopɔnɔmi, ya mokáno mwa Nzámbe tŏ loléngé ndéngé na ndéngé. Politíki esúki káka na mbúlamatáli tɛ́ na nzelá ya misálá mya lɛ́ta, biló ya politíki ekoki mpé kozala na mangómba ma mimbɔ́ngɔ ya minɛ́nɛ, mpé mangómba masúsu maye mayángelami na loléngé la politíki luye lumindimboli (autodefinir).




#Article 98: Mosáká (105 words)


Mosáká muzali súpú eye basáli na mbíla. Bakotokisa mbíla mpé ntángo yangó ekolɛmbɛ bakotuta yangó o liboka, nsima misuni milongwa na mokókóló, bakotiya yangó o sâani ya enɛnɛ mpé bakobakisa maí, bakolongola mikókóló mya mbíla  mpé bakofina yangó mpo na kobimisa súpú ensɔ eye ekangami na misuni miye mitutama. Nsima bakolongola misuni miye misila kotútama mpé mitíkala káka nsinga nsinga. Sɔ́ki balongoli bilɔ́kɔ bîná (mokókóló mpé nsinga iye iúti na misuni), bakolekisa yangó o kiyungúlu mpó na kolongola nsenge isúsu iye itikaláki. Sɔ́kí súpú êná etikali pɛpɛpɛ, mpé ezalí lisúsu na nsenge tɛ́, bakoelámbela biléi ndéngé na ndéngé lokóla mpɔndú, nyama, mpé bôngó na bôngó.




#Article 99: Batísimo (138 words)


Batísimo ezalí elembo ya mbótama ya sika na baye bandimela klísto lokóla nkóló mpé mobikisi. Ekosalema loléngé ndéngé na ndéngé engɛ́bɛ́nɛ́ na motindo mwa boyambi, ekoki kosálama na mbótama tǒ na bokóló mpé ekoki kosálama na bosopeli moto (mwana tɔ̌ mokóló) mái na motó tǒ na bozindisaka mobimba mwa moto o mái. 

Bamumpɛ́ babatisaka bǎna mpé bakóló na kobasopelaka mái o motó kasi bamisíoni míngi babatisaka bǎna tɛ́ kaka bakóló baye bazalí na mayɛlɛ mpé makoki ma kozwa mokanó ya kolanda Masiya lokóla Mokonzi mpé mobikisi, nsima ya kondimela Yésu Masiya bangó bakolakisa mbótama ya bangó ya sika na batisimo mpé batisimo epái ya bamisíoni epɛ́sɛmɛkɛ na bozindisi nzóto mobimba ya moto o mái. Elembo êná elingi kolakisa nkúfa ya bomoto bwa motó na loléngé la yě mɔ̌kɔ́ mpé mbótama ya bomoto bwa sika na loléngé la Klisto.




#Article 100: Boyókani bwa bakɔ́ngɔ (ABAKO) (163 words)


ABAKO na lingála Boyókani bwa Bakɔ́ngɔ ezalí bokúsé  bwa Aliance des Bakongo na lifalansé ezaláká lingómbá lya politíki liye lizaláká kosangisa bambótama ba kongo-central.
Likelami na Joseph Kasa-Vubu, moyékoli wa kala o *grand séminaire ya Kabwe mpé na Nzeza Landu, moyékoli wa kala o *grand séminaire  ya Brazzaville. O ebandeli yangó ekelamáká mpó na misálá ya politíki tɛ́ kasi mpó na kosangisa, kobátela mpé kotómbola lokótá la Kikɔ́ngɔ, mwǎngo ya yangó ezaláká mpenzá ezaleli ya baye balobaka Kikɔ́ngɔ mpé mbótama ya sika ya ezaleli ya bakɔ́ngɔ. Yangó etikáká misálá mya mangó o mobú mwa 1966 na ntángo mokambi-ekólo Mobutu apɛsáká ndingisa 'te mangómbá mánsɔ ma politíki masengeli kotika misálá mya politíki mpé akeláká lingómbá lya politíki sé mɔ̌kɔ́ mpó na ekólo na nkómbó na MPR, bokúse bwa lifalansé ya Mouvement Populaire de la Révolution liye likomáká Lingómbá-Lɛ́ta na Kongó-Kinsásá.

Lipandá sasépi mpé *federalism
 

Nkómbó ABAKO ya lelo Boyókani bwa Batóngi ba Kongo, na lifalansé l'Alliance des Bâtisseurs du Kongo ezalí lingómbá lya politíki.




#Article 101: Lycée Mpiko (138 words)


Lycée Mpiko ezalí etéyelo ya katikati ya letá ya ekólo Kongó-Kinsásá mpé ekambami na bamamɛ́lo ba lingómbá lya bamamɛ́lo ba boyambi eye babêngi na lifalansé compagnie des soeurs de la foi. Lycée Mpiko ezalaka na engúmba Kinsásá, na komíni ya Lemba mpé endimaka kaka bilɛngɛ́ bǎsí. Na ngámbo ya wɛ́sita ya etéyelo êná ezalí na etéyelo esúsu ya letá eye ekambami na  basángó ba  lingómbá lya bajesuite mpé etéyelo êná ebêngami Mosántu Téyofili, Saint Théophile na lifalansé mpé endimaka sé bilɛngɛ́ babali mpé na ngámbo ya nolɛ́ ezalí na eyamba ya bamumpɛ́ Mosántu Ogisitini, Saint Augustin na lifalansé. 
Yangó ezalí mosíká tɛ́ na ndáko ya komíni ya Lemba.

Elakisaka mayékoli mábalé, lyǒkɔ́ etali mombɔ́ngɔ mpé kikaláka mpé lisúsu litali ...

Mwamba mwana Lusamba Luebo azaláká mokambi ya eteyelo eye kobanda ... téé mobú mwa ...

Mamɛ́lo Cecile ...




#Article 102: Yoane Kalvin (122 words)


Yoane Kalvin tǒ Jean Calvin na lifalansé, nkómbó ya yě ya sɔ̂lɔ́ ndé Jehan Cauvin (Abotamá na Noyon, Picardie na esé ya Falansia mokɔlɔ mwa zómi sánzá ya sambo mobú mwa 1509 mpé akufá na Geneve na mokɔlɔ mwa ntúkú nsambo sánzá ya mítáno mobú mwa 1564) azalí moto wa mikanda o Falansia, ayékola bwanya bwa bónganga Nzámbe engɛ́bɛ́nɛ́ na bondimi bwa bamisíoni.

Azalí elɔngɔ́ na Martin Luther, Ulrich Zwingli mpé Martin Bucer, mɔ̌kɔ́ ya bato baye bakeli *reforme ya bamisíoni, eye akotómbola na Geneve, na kotɛ́lɛmɛlɛkɛ *Dogmes, *rite mpé misálá mya ekelézia ya bamumpe eye ya Roma, lokóla *nguyá ya pápa mpé ya *concile, ntúbélá libosó lya sángó mpé o matói ma yě mpé *indulgences isúsu eye banganga Nzámbe bazaláká  komipɛsɛ. 




#Article 103: Martin Luther (198 words)


Martin Luther, abótámí mokɔlɔ mwa zómi, sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́, mobú mwa 1483 (o Bokonzi bwa bosantú bwa Róma na Alemáni) mpé akúfá mokɔlɔ mwa zómi na motóbá sánzá ya míbalé mobú mwa 1546 na engúmba sé wâná mɔ̌kɔ. Azaláká nganga-nzámbe ya lingómbá lya baogistíni ya Alemáni, ayékólá mambí ma bonzámbe, mpé azaláká molakisi na bobɔngɔ́, mpé azalí tatá wa eyamba ya bamisíoni mpé lisúsu moto óyo abóngólí eyamba tǒ ekelézia. Makanisi ma yě mazalaka na *influence makási na *reforme ya bamisíoni eye ebóngóláká kotambola ya bonkɔ́kɔ bwa Mpóto.

Yě etɛ́lɛ́mɛ́láká bokonzi mpé ngúya ya Pápa na kotómbóláká biblíya lokóla líziba nsé lyɔ̌kɔ́ lya sɔ̂lɔ́ na makambo matálí bokonzi bwa bondimi (Nzámbe). Ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na Luther, lobíko la molímo lozalí likabo lya ofélé liye lipésámí na Nzámbe mpé lizwámí na kobóngolaka motéma na bosɔ̂lɔ́ mpé bondimeli Yésu Masiya lokóla mokonzi mpé mobíkisi na moto sé yě mɔ̌kɔ́ kasi lopɛ́sɛmɛkɛ na nzelá ya ekelézia tɛ̂. Ezalí bo ngolú ya nzámbe kasi esómbami na mbɔ́ngɔ tô makabo na ekelézya tɛ́.

Na mokɔlɔ mwa mísáto ya sánzá ya yambo na mobú mwa 1521, akozwá monkandá moye babêngí na latɛ́ Decet romanum pontificem moye momóyébísáká ’te azalí lisúsu mɔ̌kɔ́ ya bamumpɛ́ tɛ̂. 




#Article 104: Gologota (106 words)


Gologota ezalí ngómba na ntángo ya kala mpenzá o libándá lya Yerusalémi, likoló lya wapi baroma ba ntángo ya kalakala bazaláká kobaka o ekulúzu bakangemi baye bakatelami etúmbu ya liwâ. Sik'awa ezalí ontéi ya Basiliki Nkúnda Esantú.

Gologota eúti o ligresi lya *arameen gulgūltá mpé o liyuda lya bibiliya gulgōlet eye elingi koloba ebɛbɛlɛ. Ndimbóla eye epɛ́sɛmi na mikanda mísáto likoló lya mínei ya boyókani bwa sika na bibiliya, mpé Yoane abɛti mpenzá lonsete 'te nkómbó eye eúti na liyuda mpámba 'te ngómba Gologota ezaláká esíká ya mikúwa ebέlέ mpé bibɛbɛlɛ ebέlέ kasi ekoki mpé kozala 'te nsɔ́ngɛ́ ya ngómba eye eúlanáká makási mpenzá na ebɛbɛlɛ.
 




#Article 105: Luc Gillon (151 words)


Luc Gillon azaláká mónsɛ́nyɛlɛ mpé mokambi wa yambo ya Bobɔngɔ́ bwa Kinsásá, abotamá mokɔlɔ mwa zómi na mítáno sánzá ya libwá mobú mwa 1920 o Rochefort mpé akufá mokɔlɔ mwa mítáno sánzá ya motóbá mobú mwa 1998 na Bruxelles, ntángo yě azaláká o mibú ntúkú sambo na sambo. Akuli bonganga-Nzámbe o Malines na mobú mwa 1946, mpé alandi kelási ya likoló mpénza eye babêngi na lifalansé Doctorat na Fízíkí o Louvain.

Yě akambi Bobɔngɔ́ bwa Kinsásá bandá mobú mwa 1954 téé 1967.

Na mobú mwa 1952 akendéki koyekola na Lisangá lya Ameríka na Bobɔngɔ́ bwa Princeton esíká níni ye akoti kelási ya bonganga Nzámbe o Oppenheimer.

Akufa mokɔlɔ mwa mítáno sánzá ya motóbá mobú mwa 1998 na Bruxelles, matánga ma yě masalamáká mokɔlɔ mwa zómi sánzá ya motóbá na ndáko Nzámbe Santú Falanswa o Louvain-la-Neuve, nsima ya manáka mâna nzóto ya mowéi ekundamáká o lilíta lya libóta lya bangó o Rochefort

   




#Article 106: Lipatɛ́ (350 words)


Lipatɛ́ tǒ Kúkule

Ntángo basani basúsu bazalí kobombana, moluki akozala nsima ya nzeté tǒ ya efelo mpé akokanga mǐso mpé akoyémba loyémbo luye

   Kúkule elombé
   Mwǎna nyaó ekɛ́ngɛ
   Kanga bato, elombé
   Yě wana azalí koyâa ekɛ́ngɛ
   Bobómbana malámu na nsima ndáko eh eh

Mpé nsima ya koyémba loyémbo lûná ye akoganga na makasi Nayaâ mpɔ̂ na kosɛ́ngɛ nzéla na basani basúsu sɔ́kí yě akoki kobanda koluka bangó. Sɔ́kí basani basúsu bayanoli yaka, moluki akofungola miso mpé nsima akobanda koluka basani basúsu.

Loléngé losúsu la lisano liye likosenga basani babómbana tɛ́ kasi bakomikebisa na ntina 'te moto óyo azalí na lipatɛ́ asimba bangó tɛ́ mpó lipatɛ́ ekoma na ngala na bango tɛ́. Moto óyo azalí na lipatɛ́ akoluka kopɛsɛ lipatɛ́ na moto mosúsu na kosimbaka yě mpé sɔ́kí ye asimbi mosani mɔ̌kɔ́, lipatɛ́ likomi lya mosani wana. Mpɔ̂ na komikebisa na moto óyo azali na lipatɛ́, basani bakokima na lombango mpenzá. 
Lisano likobanda loléngé lɔ̌kɔ́ na liye likosenge basani babómbama. Basani bakopɔnɔ esíká yɔ̌kɔ́ eye bangó bakobênga mamá. Esíká êná ezalí esíká moluki (moto óyo azalí na lipatɛ́ akoyémba loyémbo luye lukomami o likólo) mpé nsima ya loyémbo lûná akolanda mɔ̌kɔ́ ya basani mpɔ̂ na komosimba na ntina ya komopɛsɛ lipatɛ́. Mamá ezalí mpé esíká eye mosani nyɔ́nsɔ óyo amoni 'te asili kolemba akoki kokima mpé kosimba. Sɔ́kí mosani asimbi (akangi) mamá, moluki akoki kopɛsɛ yě lipatɛ́ lisúsu tɛ́. Sɔ́kí mosani asimbi mamá tɛ́ kasi alingi kopéma mwa mokɛ, yě akosangisa misapi mya yě mísáto esíká mɔ̌kɔ́ mpé akosimba likólo lya moto mwa yě na kogangaka na makasi bwɛ́. Kasi kosɛngɛ bwɛ́ ekozala ya ngonga mokɛ mpé ekoki kowumela tɛ́ lokóla moto óyo akangi mamá.

Sɔ́kí bǎna bazalí kosakana loléngé luye la lipatɛ́, bangó bakoyémba ntángo moníngá na bangó azalí kolanda bangó mpɔ̂ na kobapɛsɛ lipatɛ́. Bangó bakoyémba luyémbo luye.

    Eh, eh lipatɛ́ ya .....
    Eh, eh lipatɛ́ ya .....
    Eh, eh lipatɛ́ ya .....

Na nsúka ya lisano mpenzá ntángo bǎna basilisi kosakana bangó bakoki koyémba na lisangá mpɔ̂ na moto ya nsúka óyo atikali na lipatɛ́ loyémbo luye;

   Eh 
   Eh, elali ya ....
   Bilambá bikozíka na kati ya butú




#Article 107: Nzángó (216 words)


Nzángó ezalí lisano liye ekoki kosálama na bato babalé tǒ ebelé tǒ mpé lisúsu na masangá mabalé. Basani babalé bakobɛtɛ (atâ sɔ́kí ezalí ya masangá, káka basani babalé bakobɛtɛ, mɔ̌kɔ́ ya lingómbá mɔ̌kɔ́, mosúsu ya lingómbá lisúsu. Nsima bakokoba kobɛtɛ Ɛngɛ́bɛ́nɛ́ ya motíndo mwa lisano). Basani eye bazalí kosana, bakopúmbwa mpé bakobɛtɛ mabɔ́kɔ ma bango elɔngɔ́ nsima bakobimisa lokolo mɔ̌kɔ́ libosó ntángo bangó bazalí kosunda na mabelé. Bangó babɛti lokolo mɔ̌kɔ́(na bosɔ̂lɔ́ lokolo mɔ̌kɔ́ ezalí makolo makeseni, kasi yangó ebêngami lokolo mɔ̌kɔ́ mpó makolo makútani. Basani basangeli kotálana mpó na kobɛtɛ nzángó) tǒ lokeseni (áwa basani bakobɛtɛ lokolo mɔ̌kɔ́ kasi lokóla bangó batálani, yangó ebêngami makolo makeseni mpó lokolo la mosani mɔ̌kɔ́ ezalí na ngámbo mɔ̌kɔ́ mpé lokolo la mosani mosúsu luzalí na ngámbo esúsu.).

   Ngala ya mwǎna bato, bokofúta lóbí
   lóbí lóbí lóbí, ekómi ya nyongo.

    Mɛma yě na wɛnzɛ, sómbela yě mikáté.
    Sɔ́kí ozóngi osúbaka, yɔ̌ osúbaka. (nzángó ya kozongisa)

   Eh ya bísó,
   Eh ya bísó, eh ya bísó.
 
mpé lisano likokoba.

Na ntángo ya kala, nzángó ezaláká lisano lya bǎna bakɛ́ kasi lɛlɔ́ nzángó ekomá mpé lisano lya bakóló baye bakobɛtɛkɛ lokóla *sport mpé *loisir. Nzángó ya bakóló ezalí na mibéko ebelé, yangó ezalí na ndelo ya bondɔbɔ́ eye basani basengeli koleka tɛ́ mpé sɔ́kí mosani aleki ndelo êna bakoki komobengana na lisano




#Article 108: O likólo (149 words)


O likólo ezalí lisano lya bǎna liye lisanami na ndembó. Esanami na basani básáto tǒ masangá mabalé. O likólo ezalí loléngé mibalé, loléngé lɔ̌kɔ́ lusengeli na molangi tɛ́ mpé loléngé losúsu losengeli na molangi.

Lisano liye lisengeli na basani básáto tǒ likólo, ndembó, molangi mpé zɛ́lɔ.

Sɔ́kí o ebandeli ya lisano bangó bandimaki 'te koyamba ekoki kopɛsɛ eposa na  kotikala na lisano nsima ndembó emotuti, káka mosani óyo ayambi ndé akozala na eposa wana, yě akoki kopɛsɛ eposa yangó na mosani mosúsu tɛ́ na lingómbá lya bangó óyo asilaki kobima na lisano mpó ndembó emotutáki.

Lisano liye lisengeli káka na basani básato tǒ likólo lya mísáto mpé ndembó.

Yangó likoki kosanama na bato basáto tǒ masangá mabalé mpé mpwé ezwami na koyamba ndembó tǒ kolekisa ndembó na tshiobo eye elingi koloba kolekisa ndembó na káti-káti ya makolo. Koyamba ndembó ekopɛsɛ mpwé mibalé mpé kolekisa ndembó tshiobo ekopɛsɛ mpwé mɔ̌kɔ́.




#Article 109: Guti (169 words)


Kokanga guti ezalí loléngé la kokangisa misapi míbalé mɔ̌kɔ́ likoló lya mosúsu mpɔ̂ na kolíkya lupemba mpé na Kongó-Kinsásá bǎna bakɛ́ basálaka lisano lya guti.

Na Kongó-Kinsásá bǎna bakɛ́ baisálaka lokóla lisano kasi lisano lyango likosenge 'te basani baye bazalí kosakana bakanga guti na ntángo ínsɔ. Sɔ́kí mɔ̌kɔ́ wa basani na lisano lya guti azalí na elɔ́kɔ sóngóló tǒ pakala, mosani mosúsu akoki komoyebisa guti(kosenge guti) eye elingi koloba pɛsɛ ngáí elɔ́kɔ eye ozalí na yangó. Sɔ́kí mosani óyo azalí na elɔ́kɔ akangákí guti, yě akolakisa lobɔ́kɔ la yě mpé guti eye yě akangi mpé mosani óyo alobi guti azalí na nguyá atâ mokɛ tɛ́ ya kokamata elɔ́kɔ ya yě, kasi sɔ́kí yě akangákí guti tɛ́, yě akopɛsɛ elɔ́kɔ êná na mosani óyo asengi guti mpé mosani óyo asengi guti akokoma nkóló elɔ́kɔ. Lisano lya guti esalámaka míngi na bilɔ́kɔ bya koliya tǒ bya kosakana kasi na bilɔ́kɔ bisúsu tɛ́ lokóla bilambá  mpé yangó esakanami míngi na bǎna bakɛ́ mpenzá óyo bazalí naíno na ebandelo ya kelási ya libandeli.




#Article 110: Simon Kimbangu (163 words)


Simon Kimbangu (* 24 setɛ́mbɛ 1889 (tǒ: 12 setɛ́mbɛ 1887) o Nkamba; † 12 ɔkɔtɔ́bɛ 1951 o Élisabethville) azalí mokeli ya lingómbá lya boklísto liye libêngami Kimbangu. 

Abotami mokɔlɔ mwa zómi na míbalé sánzá ya libwá mobú mwa nkóto mɔ̌kɔ́ nkámá mwambe na ntúkú mwambe na sambo ó Nkamba pɛnɛpɛnɛ ya Thysville (sikáwa Mbánzá-Ngungu) mpé akufá mokɔlɔ mwa zómi na míbalé sánzá ya zómi mobú mwa nkóto mɔ̌kɔ́ na nkámá libwá na ntúkú mitáno na mɔ̌kɔ́ o Élisabethville (sikáwa Lubumbashi).

Esilá yě kobotamá na Ekólo nsɔ́mí ya Kɔ́ngɔ (eye ekomáká na nsima Kɔ́ngɔ Belezi), akomáká mosakoli nsango ndambo ya Yésu na mibú mya nkóto mɔ̌kɔ́ na nkámá libwá na ntúkú míbalé  mpé abandi ministere ya yě ya kosakoloka nsango ndambu mpé ya kobikisa bokɔnɔ na nguyá na mokɔlɔ mwa motóbá sánzá ya mínei mobú mwa  nkóto mɔ̌kɔ́ na nkámá libwá na ntúkú míbalé na mɔ̌kɔ́ o mbóka Nkamba. Ayébani míngi mpenzá mpó na matéya ma yě maye masimbi bondimi bwa lingómbá lya Kimbangu.




#Article 111: Urechis unicinctus (110 words)


Urechis unicinctus ezalí loléngé la mosɔ́pi mwa mái. Yango ezalí biléi mpé elíyami ya mobésu na mbóka Zapɔ́ mpé na Kore. Elíyami na mungwa mpé mafúta ya wangila. Na Hokkaido, Zapo, ebêngami  ruttsu mpé *served lokóla sashimi tǒ mpé ya kotɔkisa.

Na bilubú bya mbóka Sína, mosɔ́pi muye mulámbami na kikálúngu na kokálingaka na mafúta tɛ́  kasi na mwa mái mokɛ́ tǒ mpé ya kokauka mpɔ̂ na komusálela lokóla umani mpɔ̂ na mpimbó. Motiopi muye ezalí mpenzá *ingredient ya ntína na bilubú bya Shandong mpé bilubú míngi bya Asia.

Balɔ́bi mbísi bamusálelaka lokóla mpámbo na ndɔ́bɔ ya bango. Yango ebêngami na basúsu mbísi nsɔ́ka tǒ mpé lisúsu mosɔpɔ́ ya mái.





#Article 113: Kingasani (Kimbanséke) (618 words)


Kingasani na Masina ezalí bamboka minene na engumba Kinshasa. Yango ezalí na komine ya Kimbanseke. Kingasani ekabwaní na komine ya Masina na balabala monene Lumumba. Libándá ya pepo ya Ndjíli ezalí na ngambo ya Masina. Soki oútí na libándá ya pépo pé ozalí kokota na engumba, Masina ezalí na loboko ya mobali pé Kingasani na loboko ya Mwasi.

Bamboka wana mibalé ezalí na bato ebelé. Na mói ya lelo, ezalí na bato pene na mifuku mibalé (2.000.000). Yango wáná bafandi na yangó bamibengaka bashinwa pé babengaka Kingasani Masina na kombo ya Chine Populaire na bolandaka ndéngé lomoto ezalí na ekólo wáná ya Azia.

Bamibengaka pé na lokumu nyonso mboka ezangá bakonzi. Yangó ezalí pó, na bakomine wáná batelemelaka bokonzi ya lomá na ndéngé ya moke té. Ebandákí na Mobutu. Sima, tángo ya Kabila ya tata, Kingasani Masina batelemelákí badongolomíso óyo baútákí pé basungamákí na Rwanda-Urundi pé Uganda. Bana ya Kingasani Masina basekaka té na likambo ya kobatela bonsomi ya Kongó. Kaka na bolandaka makanisi wáná, babengaka pé yangó Zone rouge to etanda ya motane.

Bana ya Kingasani Masina bazalí bato ya moluká. Bato ya mbóngo bazalí míngi kuná té. Ezalí míngi míngi bato ya bozwi moké, kasi, bamitikaka pamba pamba té na lolombo to bisengasenga. Tóngo nyónso, okomona lomoto ndéngé ezalí komata na bataksibisi , babisi tó pé na engunduka. Bakeí moluká na vil. Na pokwa, balabala Mobutu tó Kulumba etondaka na lomoto.

Ata ko bóngó, bána ya Kingasani Masina bazalí bato ya lolendo. Bamiyokaka sóni té. Balakisaka na lolendo pé lofundu nyónso 'te, bazalí bána ya Kingasani Masina. ézala baóyo babimá na Kingasani Masina pé bakomá kofanda na bakomine ya bato ya mbongo, ézala baóyo bakendé mikili misusu, bamibombaka té. Bamíkwaka bato. Soki mwána ya Kingasani ayebisi yo té : hé, yo ozozwa makambo'ango ndéngé nini ? Nga nazali mwana ya Chine, elingí koloba 'te, azalí na somo na yo té. Salá na yo bipale ndéngé olingí, Piné ya Seku Touré ebungá na Kingasani Masina, Mobutu akimá Kongo ya kobombama tángo alekáká na balabala Lumumba. Badongolomíso bamoná makambo na bangó, yo pé moto oleisaka yé té. Kiséfé ya níni okosalela yé! Na boyé, bana ya Kingasani Masina bazalaka na lolendo ya komibenga bána ya Kingasani Masina.

Ngai moko pé, mokomi likakoli oyo, nazali mwana ya Kingasani Masina. lelo oyo nakoma kofanda na Belgique, kasi makani na ngai ezalaka tango nyonso kuna. elekaka mokolo té nazanga kotanga kombo ya Kingasani to Masina to naloba likambo etali mboka wana. ndako ya Bobimisi mikanda oyo nakela awa na belgique na kombo ya Mabiki, efandelo na yango na Kongo ya Demokrasi ezalaka kuna na Kingasani.
Kartié ya kitoko epayi bato ya mwa bozwi bafandaka ezalí na Masina Sans-Fil. Ata ko bazalí bato ya kozwa ya mwa malonga, bango pé bazalí bobele na lolendo wana ya bashinwa.

Biteyelo ndéngé na ndéngé ezalí na Kingasani Masina. Biteyelo ya sango makasi ezalí bongo: 

Tozali pé na biteyelo ya misala ya maboko oyo ekelama pé eyangelamaka bana ya Kingasani Masina. Ndakisa eteyelo CDFD oyo ezalaka na kingasani ekelama pé eyangelamaka na mama Claire Sene.

Nkita ya Kingasani Masina efandi na bazando na yango. zando ya monene ezali Marché de la Liberté oyo etongamaka na M'zee Kabila. na Pascal pé zando ya monene ezali wana. na Kingasani ya suka, zando ezali kasi mingi mingi ezali ndé bamagazini etandama na babalabala ya minene. Tozali pé na bisalelo mapa. ya minene ezali Sokitem na BKTF.

Lokola na Kongo mobimba, na Kingasani Masina okokuta biyamba ndéngé na ndéngé, ézala Biyamba oyo ebelelaka Nzambe ya Bakoko, ndakisa Bundu Dia Kongo, ézala biyamba ya bakristu to pé ya bamizilma pé biyamba misusu. kasi biyamba ya bakristu ndé eleki ebelé.

Bakomine wana ezali na mokumbá monéne po na ntobwamá ya Kongo mobimba.




#Article 114: Sony Labou Tansi (245 words)


Sony Labou Tansi to Marcel Ntsoni (5 yúli 1947 – 14 yúni 1995) azalakí mokomi wa masoló ya Kongó-Kinsásá.

Abotamá na Kimwenza na Kongó-Kinsásá. Tata wa ye azaláká mwana mboka Kongó-Kinsásá mpe mama wa ye mwana mboka Kongó-Barazaville. Ye azali mwana ya yambo na libota lya bana sambo. Marcel Sony ayekoli lifalanse na kelasi. Uta mobu mwa 1971, abandi kotangisa lifalansé  mpe Lingɛlɛ́sa na Kindamba mpe na Pointe-Noire.

O eleko eye mokanda mwa ye ya yambo ebimaka na ekolo Falansia na mobu mwa 1979, ye aponi nkombo ya ye ya mosala Sony Labou Tansi mpo na kotombolaka nkombo ya Tchicaya U Tam'si.

Dramaturge, maboke ma ye masanami na ekolo ya Alémani, na Italya mpe na Lisangá lya Ameríka. Ye akambáká lingomba lya maboke na nkombo ya Rocado Zulu Théâtre ya Brazzaville. Alongáká *Prix Ibsen na mobu mwa 1988.

Ye afandá kaka na Kongo-Barazaville mpe apusanáká na nsuka ya bomoi bwa ye na mo-politiki Bernard Kolélas. Na mobu mwa 1992, aponomi *depute ya Makélékélé, mpe bamolongoli na misala ya leta na mobu mwa 1994. Abeláká bokono bwa SIDA mpe akufá na mibu 47, poso ibale nsima ya liwa lya mwasi wa ye Pierrette. Uta 2003, *Prix Sony Labou Tansi epesemi na maboke ma lifalanse.




#Article 115: Ndɔki (104 words)


Ndɔki azalí moto óyo azalí na mosálá mwa bondɔki tǒ mayɛ́lɛ ma butú. Elilingi ya ndɔki ekɛsɛni   na *us mpé bonkɔ́nkɔ bwa mbóka na mbóka. 

Ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na makanisi o Afríca míngi mpenza na Kongó-Kinsásá, ndɔki ezalí moto óyo azalí na makokí ma kotika nzóto ya yě na butú tǒ ntángo yě azalí kolála mpé kopumbwa bisíká  na bisíká mpǒ na kosála misálá mya bangó mya  kobómbana.  Ɛngɛ́bɛ́nɛ́ na makanisi ma kalakala na Afríka, ndɔki azalí kaka mpǒ na kosálá mabé tɛ́ kasi bato basúsu na libóta bapɛsɛmi bondɔki mpǒ na kokɛ́ngɛlɛ mpé kobátela libóta na bangúná ba libándá baye bakolinga kosála mabé na libóta.




#Article 116: Nganga-Nkísi (259 words)


 
 

Nganga-Nkísi ezalí moto óyo akokí bobíkisa moto na nkísi ya bonkɔ́nkɔ (matíti mpé bilɔ́kɔ bisúsu bya *nature) tǒ mpé moto óyo azalí na makoki ma kokɔtɔ na *contact na bilíma  mpɔ́ na kobóngola nzelá ya makambo.  Nganga-nkísi ya loléngé la mibalé óyo akokí kosolola na bilíma, akokí kotiya bilakeli malámu (*good fortune) tô mabé (*bad fortune) na bomɔi bwa moto. Bilakeli mabé lokóla koboma, kobébisa mosálá, libóta mpé bôngó na bôngó, bilakela malámu lokóla bozwi, bolingo, lobíko na bokɔnɔ buye ekoki kobíkisama na mayɛ́lɛ ma minkandá (mónganga) tǒ ya banganga baye basálelaka matíti tɛ́ mpé bôngó na bôngó. Ɛngɛ́bɛ́nɛ na maloba ma bato, bangó bakokí bobíkisa bokɔnɔ buna, buye buzangi nkínsi ya mindɛ́lɛ́ tǒ ya bonkɔ́nkɔ (matíti mpé/tǒ *nature). 

Na Lingála mónganga azalí moto óyo abíkisaka bokɔnɔ na mayɛ́lɛ ma minkandá mpé azwi lipɔlɔ́mi liye lipɛsi yě eposá ya kosála misálá mîna.  Nganga azalí moto óyo abíkisaka bokɔnɔ na mayɛ́lɛ  ma bonkɔ́nkɔ eye azwi na kokitanaka ya bankɔ́nkɔ ba yě, mpé yě akosálela nkísi esálami na matíti tǒ na bilɔ́kɔ bisúsu bya *nature. Nganga ekɛsɛni na biténi bibalé, nganga óyo asálelaka matíti mpé bilɔ́kɔ bisúsu bya *nature mpó na kobíkisa mpé nganga mosúsu óyo asálelaka nguyá eye ebómbama mpé asololaka na bilíma mpó na kobíkisa bokɔnɔ tǒ mpé lisúsu mpó na kotiya bilakeli mabé tǒ malámu na bomɔi bwa bato.

Nkísi ezalí elɔ́kɔ nyɔ́nsɔ epɛ́sɛmi na moluki lobíko mpó na komosunga, ekokí kozala nkísi eye esálemi na matíti, mafúta ma nzói, tǒ mpé lisúsu bilɔ́kɔ bisúsu bya mokili. Ekokí mpé kozala *fetiche, *talisman eye elátisami nguyá eúti na bilíma.




#Article 117: Molímo Mosántu (127 words)


Molímo Mosántu azalí molímo mwa Nzámbe, mpé moto wa mísáto na bonzámbe bwa baklísto. Abêngami mpé lisúsu Bolingo bwa Tatá mpé Mwǎna. Na bibilíya, Molímo Mosántu mubandá kosála mpé komilakisa úta boyókani bwa kala. Boyókani bwa sika ezalí koloba 'te Molímo Mosántu azalí moto akɛsɛni na Tatá mpé Mwǎna,  mpé na bangó básáto (Tatá, Mwǎna mpé Molímo Mosántu), bazalí sé Nzámbe mɔ̌kɔ́. 

Bato basúsu bakobênga yangó Elímo Sántu na esíká ya Molímo Mosántu kasi baklísto míngi balingaka kobênga yangó Elímo Sántu tɛ́ mpó bangó balobaka Elímo ezalí mpó na milímo misúsu miye mizalí mya Nzámbe tɛ́ kasi Molímo Mosántu azalí sé mɔ̌kɔ́. Yě (Molímo Mosántu) azalí Molímo mwa Nzámbe mpé azalí na makokí mánsɔ ma moto, yangó wana esengeli abêngama Molímo Mosántu na esíká ya Elímo Sántu.




#Article 118: Mobúlú na Bas-Congo na mobú mwa 2007 sánzá ya 2 (161 words)


Mobúlú na Bas-Congo na mobú mwa 2007 sánzá ya 2 Kobanda mokɔlɔ mwa 31 sánzá ya yambo téé mokɔlɔ mwa 3 sánzá ya 2 mobú mwa 2007, na engúmba ya Matadi, Bóma mpé Móanda na etúka ya Bas-Congo (na sidi-wesita ya ), mobúlú muye musopisáká makilá míngi musálamáká kati na bato baye bazaláká bato na lingómbá lya politíki-religieux (boyambi) Bundu dia Kongó na bapɔlisi mpé basɔdá.

Ɛngɛ́bɛ́nɛ na *Ministre ya *Intérieur, *général Denis Kalume Numbi, bapɔlisi mpé basɔdá zómi bakufáká na bibuni bya batamboli mpé balandi ba Bundu dia Kongó ntúkú sambo na sambo bakufáká na masási ma basɔdá na bapɔlisi baye batindamáká na mbulamatali mpó na kopekisa botamboli bûna. Ɛngɛ́bɛ́nɛ na basáli ba ONU na Kongó-Kinsásá (MONUC) batamboli pɛnɛpɛnɛ na nkámá mɔ̌kɔ́ na ntúkú mísáto na mínei bakufáká mpé bangó *bacondamnáká bapɔlisi na basɔdá mpó na misálá mya bangó na kopekisáká botamboli wâná. Ɛngɛ́bɛ́nɛ na Bundu dia Kongó balandi sɔ́kɔ́ nkámá sambo na ntúkú mítáno basilá kokúfa na bitumba bûna.




#Article 119: The Star-Spangled Banner (120 words)


The Star-Spangled Banner ezalí loyémbo la lokúmú la Lisangá lya Amelíka

Na kolakisaka *indignation ya yě likoló lya ebandeli ya bitumba bya bato ba likólo na nsé o Amelíka, Oliver Wendell Holmes, Sr. abakisáká *stanza ya mítáno na loyémbo luye na mobú mwa 1861.




#Article 120: Ebembe ya Thomson (búku) (281 words)


Ebembe ya Thomson ezalí lisoló na lingála ya Espérance-François Ngayibata Bulayumi.

Ndeko! Áwa y'ozalí kosimba búku eye, esengeli koyeba ete, mokolo mua lɛlo okolía tǒ osi oliaki thomson awa na Kinshásá. Soki yɔ̌ oliaki yango tɛ, kanisa ete moko ya bandeko ba yɔ̌ ya libota nde aliaki tǒ mpé akolía yangó. Na yangó nazalí kosenga yɔ̌, oluka komeka kokanisa likolo y'ebembe ya thomson; eye etikalaka ntango molayi kati na bandako ya malíli áwa na Kinshásá. Tála! Ebele ya mbisi o kati ya mayi ma Kongó bakundamaka lisúsu tɛ́ o «malita» ndenge esengemi, zambi Thomson nde ekanga mabumu ya bana ba Kinshásá lokola kaka lilita na yé moko.

Ndenge moto aliaka, se bongo mpé akúfaka mpé akundamaka. Kosálisa mbísi y'ebalé mpô yé mpé aya kozua esika ya lilita kati na libumu ya bato, ezalí koluka kosalisa nde bato; mpô ete bibembe bya bango bivandaka ntango molai tɛ́, kuna kati na ndako ya malili, na ndenge esalami mpona ebembe ya thomson.

Ata kutu oleyi na yɔ̌ thomson te na mokolo mua lɛlo, tǒ mpé ndeko wa yɔ̌ aleyi na yé yangó tɛ́! Okanisaka níni likolo ya sima na dindon, tǒ mpé biteni bya soso ya bandako ya malili? Eee, ndeko! Okoki koloba ete yɔ̌ awa na kati ya Kinshásá na ntango ya milulu tǒ mpé matanga ovanda nainu na kiti ya plastik tɛ́?

Sima ya dindon, biteni bya soso ya bandako ya malíli mpé kiti ya plastik, ezalí kati na mibombamo mya nzéla eye, ebembe ya thomson ememi bísó. Silisa kotanga búku eye. Pesa yango moninga wa yɔ̌, mpô yé mpé akoka kotanga lisapo y'ebembe ya Thomson Mpiodi.
 

 Espérance-François Ngayibata Bulayumi: Ebembe ya Thomson. Viɛnɛ (Otrish), 2011: Bobimisi Kiamvu. ISBN 978-3-200-02141-9, 136 lokásá.




#Article 121: Espérance-François Ngayibata Bulayumi (242 words)


Espérance-François Ngayibata Bulayumi azalí mokomi ya lisolo na lingála mpé na lialemani. Abótámi o Kinsásá o mokɔlɔ 12 ya sanza 11 o mobú 1959. Lɛlɔ́ óyo afándaka na Viɛnɛ na Otrish. Akomí na lokótá lialemani, lifalansé mpé lingála.

Bulayumi abandaki kelasi na ye na Santu Martin na Kinsásá (1965-1971). Kobanda na mobú 1971 tikuna na mobú 1973 asalaki «Cycle d’orientation» na Kinsásá Pie 12 (College Bonsomi). Koluanga kuna akendaki kotanga na Santu Rapahële ya Kinsásá (1973-1975). Sima na yango akomaki kotanga na INA (Institut National des Arts). Azalaki kuna kolongwa mobú 1975 tikuna na mobú 1981 – humanités artistiques et 2 ans du supérieur – liboso ya kokende kotanga Théologie na Philosopie na université (1983-1988) ya Viɛnɛ na Otrish. Nde kuna asilisaki Doctorat wa ye ya Philosophie.

Kuna nde akomaki moteyi okati ya Eyamba ya baMethodiste, eye etindaki ye na Losana na Swisi mpo na mosala mpe kotanga lisusu na «Centre de Formation de Théologie Méthodiste» mpe na Université ya Losana. Ezongaki ye na Otrish, azongaki lisusu kokamba lingomba ya baMethodiste, liboso ya koya kobanda kosala okati na Institut Afro-Asiatique ya Viɛnɛ. Akambaki Institut eye lokola mokonzi yamibale. Lɛlɔ́ óyo, Bulayumi azali kosala bopelɛ kuna, kasi lokola mokengeli ya makambo manso mizali kosalama kati y’Institut eye (Chargé des programmes). Bulayumi atangisaki na Université ya Viɛnɛ; azali mpe kotangisa n’Ecole supérieure Pédagogique ya Viɛnɛ. Bulayumi azali mokomi ya ba búku ebele. Bulayumi alongami na Godeliève Matondo Bulayumi. Bazali na bana mibale ya mibali. 




#Article 122: David Ray Wilkerson (207 words)


David Ray Wilkerson abótámá o mokɔlɔ mwa 19 sánzá ya mitano mobú mwa 1931 mpé akufá mokɔlɔ mwa 27 sánzá ya minei mobú mwa 2011. Azaláká moteyi ya nsango malámu ya nkolo Yésu ɛngɛ́bɛ́nɛ na boyambi bwa bamisíoni o Lisangá lya Amelíka mpé mokomi ya búku. Ayébani mingi mpenza mpo na búku ya yě The Cross and the Switchblade.

O mokɔlɔ mwa 27 sánzá ya minei mobú mwa 2011, ntango yě azaláká kokumba montuka o monyɛlɛ na Nzela 174 o engumba ya Texas, yě akatisáká na ngambo ya baye bazalaki kokɛndɛ na límbe mpé atutáká montuka ya monene. Akufáká na likama lîná na esika kaka ya likama. Mwasi wa yě azokáká mpé bamomɛmɛ́kɛ́ o lopitálo.

Motéyi Wilkerson na nkoma ya yě ya nsúka na *blog ya yě akomáká 'te : baye bazali koleka na *valley mpé na molílí mwa liwâ, yoka liloba liye: Kolela ekozala sé mpo na butú ya molílí mpé ya mpasi mokɛ́, mpé akomáká, mpé na molílí mǔná yɔ̌ okoyoka mongóngó ya Tatá akolobela yɔ̌ na nsé mpé na malembe mpenzá, 'Nazalí elɔngɔ́ na yɔ̌. Nakokí kolobela yɔ̌ sikawa tɛ́  mpó na níni likambo liye, kasi mokɔlɔ mosúsu yɔ̌ okosɔsɔla. Yɔ̌ okomona 'te mánsɔ́ mazaláká sé na mwǎngo  ya ngai. Yangó ezaláká likama tɛ́.'
 




#Article 123: Teofil Verbist (464 words)


Teofil Verbist (12 yúni 1823 - 23 febwáli 1868) abandisi lingomba ba Scheut ntángo azalakí naínu aumônier ya etéyelo ya basodá na Bruxelles. Abotami o mboka Anvers o mobú 1823. O libota lya yé bazalakí bána nsambo. Tatá wa yé asalaki mosala mwa banki mpé mama wa yé azalaki mwána wa monganga-mopasoli.

Teofil ayekoli o likindo like o mboka Malines. Wana mpé, asilisi boyekoli bwa yé o likindu linene mpé akuli bonganga. Episkopo aluboli yé mokambi wa likindu like, esika yé ayekoli libosó. O nsima ya mibú motóba, akomí aumônier ya eyekwelo ya basoda o mboka Bruxelles. Eleko mei akomí moyángeli wa banyango bafandaki o ndáko penepene na eyékwelo ya basodá.

Azalaki nzotu mokasi, yé motu wa mpiko mpenza, motu bonkonde na bosawa, motu na motema molamu. Bolamu bwa ye bokamwisi baninga ba ye. O eyekwelo ya basoda bapesi yé nkómbó:  le bon monsieur Verbist. Bayekoli na bateyi ba likindu like mpé balingaki yé.

O mobú 1865, mibu misato o nsima ya bobandisi lingomba Congregatio Immaculati Cordis  Mariae, CICM,  basango  bazalaki motoba mpé banei ba bangó bamilengeli mpo ya kukende na Shina. O eleko ena, mibembo miumelaki mingi. Sango Teofil na baninga ba yé bakendeki liboso na Pari mpe na Roma. Na nsima bakei na Marseille mpo ya koyingela na masuwa, mpepo izalaki naínu te.

Akani kobanda lingomba lya basango mpo ya misyo o mokili mwa Shina. Banganga Nzambe banei basangani na ye mpe bakei kufanda na ye elongo o ndáko móko ya Anderlecht. Bazalaki basango ba libosó ba lingomba ya Scheut. Kardinale wa Beljika, Pápa wa Roma mpé moyángeli wa lingomba lya Bopalinginyi-Eyamba o mboka Pari bandimi mokano mwa Teofil, mpe bapesi ye mosolo mpo ya kotonga likindo linene o mboka Scheut-Anderlecht. Azwi mpe bondimi bwa episkopo ya Peking. Na lisalisi lya bango banso mpe na mabonza ma bakristu ba Beljika batongi likindu linene o mboka Scheut, eteni ya Anderlecht. 

Teofil Verbist  alengeli 'te ázonga o mboka Bruxelles mpo 'te abongisa noviciat wana. Kasi akanaki 'te liboso akende kutala naino misyo ya basango mpe ya banganga Nzambe chinois. Esika abuti ngomba moko mwa molai na farasa ebendaki likalo, farasa ya ye ebuti bobele na nkwokoso mingi. Ezalaki o sanza ya ibale ya mobu 1868 mpe mpio elutaki. Na bomoni nkwokoso ya farasa, Theophile alongoli kasaka ya ye mpe ayei kotambola mpe kobuta ngomba elongo na farasa wa ye. Ekomi ye o nsonge atoki mingi. Abuti lisusu o likalo, kasi, mpo 'te akitisa molunge ya nzotu, alati kasaka lisusu te. Wana likama, zambi na mpio mingi okoki kukitisa molunge mwa nzotu bobele na moi na moi. Ekomi ye o misyo na butu, fievre ekangi ye mpe etiki ye lisusu te. Monganga azalaki te, lopitalo mpe te. Theophile awei wana. Akokisi bobele mibu 44. Mbele awei na tyfus te, mbele awei na malali ma mopanzi.




#Article 124: Congregatio Immaculati Cordis Mariae (650 words)


Congregatio Immaculati Cordis Mariae tǒ Lingomba ba Scheut (CICM) o mobu 1865, mibu misato o nsima ya bobandisi lingomba Congregatio Immaculati Cordis  Mariae, CICM, na Teofil Verbist basango  bazalaki motoba mpe banei ba bango bamilengeli mpo ya kukende na Chine. O eleko ena, mibembo miumelaki mingi. 

O elaka eye, elaka ya mibu nkama moko na ntuku itano, motango mwa basango bayekoli wana mpe bakei misyo moleki 3000. Bakei bobele o mokili mwa Shina te, bakei mpe o mikili misusu ntuku ibale. Tokoki sikawa kutala foto ya bango banso o mizé chinois o mboka Scheut.

Bayangeli ba basango bakofanda o mboka Roma. Basango, baye bazali na bomoi sikawa, bazali 900. Ndambo ya bango bauti na Afríka, Azía mpe Ameríka. Banso bakotiya molende mpo 'te bipai binso batu bazala na boboto, bosembo, boyokani na bolingani. Bakoteya Nsango Ndamu. Bakosambela misa. Bakobokolo bana na mateya ma Nzambe. Bakosala  mosala mwa misyo elongo na basalisi bayike. Lokola bapostolu bazali na Cor unum et anima una: bakolula mpe bakoluka bomoko o boteyi mpe o mosala mwa kobanda mpe kotonga Eklezia.

Esilisi bango mobembo wa mikolo 100, episkopo wa Peking mpe basango français, ba Lazaristes,  bayambi basango lingomba ba Scheut na motema nsai mpenza. Ba Lazariste bazangaki basango o misyo ya Mongolí o nordi ya Shina. Balengeli 'te batia misyo wana o maboko ma basango lingomba ba Scheut mpe bapesi bango lisalisi lya banganga Nzambe motoba ba Mongolí. Banganga baye bakei kofanda epai ya bango mpe babandi koteya bango lokota la ba Chinois. 

Ntembe te, mpo 'te basango bayela batu Nsango Ndamu, esengeli 'te bayekola lokota la batu. Soko balingi 'te ba Chinois babongola motema mpe bakoma bakristu, esengeli 'te basango bayeba mpe bandima mimeseno na mibeko mya bankoko ba bango. Wana lotomo lonene mpo ya basango o mokili mwa Shina. Nkwokoso iutaki na boyekoli monoko mwa ba Chinois,  iutaki na mpio ya nsomo o nordi ya Chine eleko ya mpio,  iutaki na nzala zambi o mobu mwa mibale, batu babandi kuzanga bilei. Wana matata mpenza!  Basango babiki bobele na mbongo batu ba Belgique mpe ba mikili misusu batindeli bango. Nsima ya minyoko miye minso, bazangi mpe banganga mpe lopitalo o mokili wana, mpe mbala na mbala bayibi basangani mpo ya kubotolela batu biloko bisengeli na bango. Ata minyoko miye, basango 650 basalaki mosala wa misyo o mboka Shina, banda mobu mwa 1865 tee na mobu 1944, mobu communisme ebandi kuyangela China. Ba communiste basengisi bampaya na bauta banso bátika mokili mwa Chine. Na nsima balongoli bango na makasi. Balongoli mpe basango banso... Kasi, ata ba kommuniste baboyaki bango, bakristu bazalaki na mpiko mpe na molende. Ba kommuniste bakoki kopekisa mpe koboma eyamba ya bakristu te… Seko basango bazalaki lokola loboko la Nzambe mpo ya kulona Bokonzi ya Ye o mitema.  Theophile, mobandi mwa basango ba Scheut, alobaki na bango mpe akomeli bango mbala na mbala:  Bómikaba, bóyika mpiko, bómilendisa mpo 'te batu bakumisa Nzambe mpe na nzila wana banso bakobika!  Akundoli yango na mikanda mya ye ntango inso.

O mobu mwa 1865, basango ba yambo banei bakomi o mboka Shina. Ferdinand Hamer azalaki leki wa bango mpe asalaki wana mibu 35. Akomi Episkopo. Kasi sango Van Segvelt akufi na malali ya tyfus o nsima ya mobu moko mpe sanza ínei. Mpe mobu moko o nsima ya liwa lya Van Segvelt, Teofil Verbist yé mpé awei. Banso bakanisi 'te ye mpe awei na bokono bwa tyfus. Fievre ekangi ye mpe alendendali. Monganga azalaki te, lopitalo mpe te. Nganga Nzambe chinois akulisi ye Mafuta Masantu ma bakoni mpe mwa mikolo o nsima sango Theophile awei. O nsima ya ye basango bayike bawei o mboka Chine na bokono bwa tyfus, mbele moko wa misatu awei boye. Ba Chine bango mpenza bazalaki kokufa na tyfus te, kasi bampaya o mokili mwa bango bawei ebele na tyfus. Bobele o mobu mwa 1930 monganga moko wa Pologne akeli mono mpo ya basango. Bákamata yango,… mpé bakufi mpo ya tyfus lisusu te. 




#Article 125: Denis Mukwege (136 words)


Denis Mukwege azalí mónganga-bomwǎsí mwa Kongó-Kinsásá, mpé mokambi mwa makokí ma moto. Abótámí o mokɔlɔ mwa yambo, sánzá mísáto, mobú 1955.

Mukwege azalí mwǎna mwa nganga misíoni. Azalákí moyékoli o Athénée royal mpé o institut Bwindi o Bukavu. Ayékólákí o UNIKIN mpɔ̂ na mibú míbalé. O mobú 1976 abandí koyékola bónganga o Burundi mpé okómí móngana o mobú 1983. Asálákí o lopitálo la Lémera mpɛmbɛ́ni Bukavu.

O mobú 1984 abandí koyékola bónganga-bomwǎsí o Angers na Falansia. O 1989 azóngí na  lopitálo la Lémera no mosála mwa mónganga mokonzi.

O mobú 1996, na etumba ya yambo ya Kongó, akímí na Nairobi o Kenya. Nsima etumba yangó azóngí na Kongó mpé abandí lopitálo la Panzi.
O lopitálo langó asálísí bǎsí bazokí na botɛ́mɔli.

O mobú 2008 azwí Litómba lya makoki ma moto lya Lisangá lya Bikólo bya Molɔ́ngɔ́.




#Article 126: Likámá lya mpɛ́pɔ o 2007 (909 words)


Likámá lya mpɛ́pɔ o 2007 lizalí likámá lya mpɛ́pɔ liye lisalamáká ntángo mpɛ́pɔ na motɛ́lɛ ya mapása, Antonov An-26, ya lingómbá lya mombɔ́ngɔ lya Kongó-Kinsásá Africa one, etutákí mpé ezikákí nsima ya ngonga mokɛ́, ntángo mpɛ́pɔ êná ekokáká kopumbwa tɛ́ na Libándá lya Ndáko ya Mpɛ́pɔ ya N'djili na engúmba Kinsásá na ekólo Kongó-Kinsásá na mokɔlɔ mwa mínei sánzá ya zómi mobú mwa 2007. Mpɛ́pɔ eye elongwáká na Libándá lya Ndáko ya Mpɛ́pɔ ya N'djili na ngonga ya 10:43, ntángo ya Kinsásá, mpɔ̂ na kokɛndɛ na Tshikapa, na ntáká ya kilómɛtɛlɛ 650 na monyɛlɛ. 

Bopumbwi bwa mpɛ́pɔ buye eye elobamáki 'te yangó ezaláki mpɛ́pɔ eye lingómbá lya mombɔ́ngɔ El Sam Airlines tǒ mpé lisúsu Malila Airlift, mpé mpɛ́pɔ eye epesami mpɔ̂ na kofútela na lingómbá lya mombɔ́ngɔ Africa One. Mangómbá maye ma mombɔ́ngo mabalé mazalí na molɔngɔ́ mwa mangómbá ma botámboli ya ...eye Lisangá lya Erópa (EU) epɛkisa na bikólo bya bangó. Mpɛ́pɔ eye ezaláki na motúya 9Q-COS, ekomamáki na monkánda mwa Lɛ́ta motángo 409/cab/MIN/TVC/1264/MN/mg/2007 lokóla yangó elekáki mamekano ya bobáteli, éngɛ́bɛ́nɛ́ na Hippolyte Muaka, óyo azaláki mokonzi na ntángo êná ya bakambi ba mibembo ya mpɛ́pɔ ya *civil ya Kongó-Kinsásá.
Bopumbwi bwa mpɛ́pɔ buye ezaláki mpɔ̂ na ntína ya mombɔ́ngɔ mpé bilɔ́kɔ bya mombɔ́ngɔ mpé ezaláki komɛmɛ bato 28, na káti na bangó basáli bánsɔ ba mpɛ́pɔ. 

  

Momekaniki óyo azaláká o káti ya mpɛ́pɔ na nkómbó ya M. Dédé Ngamba azaláká moto se mɔ̌kɔ́ na bato bánsɔ baye bazaláká na mpɛ́pɔ óyo abikáká. Maloba ma yě mpɔ̂ na likambo lya likámá lizaláká boye na lifalansé: Nous avons décollé après trois minutes de taxi. Aussitôt, j’ai constaté que l’avion s’est mis à tanguer. L’effort du pilote de faire monter l’avion est demeuré vain. C’est alors que l’hôtesse m’a dit de mettre la ceinture de sécurité. En ce moment, l’avion a commencé à voler plus bas et il a percuté un palmier et perdu une aile.

Ensuite, il a commencé à percuter des maisons. Tous les colis des marchandises qui étaient à bord ont fait mouvement vers l’avant de l’avion. J’ai aperçu à côté de moi un trou par lequel je suis sorti sans savoir comment, et je suis tombé sur une flaque d’eau sablonneuse. J’ai pu alors contempler les flammes de l’avion qui consumait. Il ne s’agissait pas d’un poids exagéré. C’est une simple défaillance mécanique.

Eye ekoki kondimbolama na loléngé luye :  Bísó topumbwákí nsima ya kosála taksí miniti mísáto. Mpé nabandákí koyóka lokóla mpɛ́pɔ ezalákí kobína. Mánsɔ maye piloti asalákí mpɔ̂ na komatisa mpɛ́pɔ, ezalákí mpámba. Na ntángo êná otɛsi ondobeli 'te naláta mokaba ya bobáteli. Ntángo êná, mpɛ́pɔ ebandi mpenzá kopumbwa na nsé mpé etutákí mweté ya mbíla mpé lipapú lyɔ̌kɔ́ lya yangó lilongwákí.

Nsima epanzákí ndáko. Bilɔ́kɔ bínsɔ bya kotɛ́kisa biye bizalákí na káti ya mpɛ́pɔ biyeí (glisser) o libosó lya mpɛ́pɔ. Pɛmbɛ́ni na ngáí, namɔnɔ́kí lidusú lyɔ̌kɔ́ liye ngáí nabimelákí na mpɛ́pɔ, kasi nayébi tɛ́ ndéngé níní nabimákí, mpé nakweyákí na máyi mɔ̌kɔ́ ma mokɛ́ ma zɛ́lɔ-zɛ́lɔ. Esika êná ndé namɔni ndéngé níní mpɛ́pɔ ezwákí mɔ̌tɔ mpé ezikákí. Lyangó lizalákí kiló ya koleka ya bilɔ́kɔ o káti ya mpɛ́pɔ tɛ́. Lizalí káka mwâ mikakatano mya mɛkaniki.

Éngɛ́bɛ́nɛ́  na IATA, likambo lya *safety (bobateli) na makambo matáli botámboli bwa mpɛ́pɔ o Kongó-Kinsásá ezalí mpenzá mpo-bonsɔ́ni mpé minkánda likólo lya likambo lîná lizalí mawa míngi. Mokambi ya ekólo Kongó-Kinsásá , alongoláká Ministre ya Botámboli, mwăna mbóka Rémi Henri Kuseyo Gatanga nsima ya likámá lîná mpɔ̂, éngɛ́bɛ́nɛ́ na yě, atiyáki na bokási tɛ́ *standard mpé *procedure ya makambo matáli bokambi *safety ya mibémbo mya mpɛ́pɔ.

Mɔ̌kɔ́ na liziba lya nsango elobáki 'te bolongoli ndingisa eye ministre ya Botamboli apɛsɛ́kɛ́ liye lipɛkisáki mpɛ́pɔ ínsɔ la loléngé la Antonov epumbwa lisúsú na Kongó-Kinsásá, ewútáki na ministre ya Botámboli tɛ́ kasi na Minisitɛlɛ ya Lɛ́ta epái (esíká) ya *Head of State.

Lisangá likɛ lya bantómá ba ekólo Kongó-Kinsásá lisálami mpɔ̂ na mitúna mpé biyano, mpé babêngamáká mokɔlɔ mwa 19 sánzá ya zómi mobú mwa 2007 mpɔ̂ na koyéba ntína ya likámá lîná. Lisangá liye likambamáká na Jean-Lucien Bussa lokóla mokonzi mpé Lessendjine lokóla mokonzi-molandi. *Procesutor ya biló ya N'djili akamatáki mpé likambo lyangó.

Nsima ya likámá lîná, mbúlamatáli ya ekólo Kongó-Kinsásá epɛsɛ́kí ndingisa 'te mpɛ́pɔ la loléngé la Antonov ekoki lisúsú kopumbwa tɛ́ o likólo lya mabelé ma bangó. Kozánga kolanda mobéko mûná, muye mupekisáki mpɛ́pɔ ínsɔ ya loléngé la Antonov ipumbwa lisúsú, esalákí 'te Anotonov esúsú (ntángo eye ezaláká Antonov An-12 eye ekomama na minkandá mya lɛ́ta lokóla ER-AXI), éngɛ́bɛ́nɛ́ na Radio Okapi, esáláká mwa likámá lya mokɛ, mpé motɛ́lɛ na yangó ezwáká mwâ mɔ̌tɔ mwâ mokɛ na Libándá lya Ndáko ya Mpɛ́pɔ ya Bangoka o Kisangani o nsima ya nzángá o mokɔlɔ mwa yambo sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́  mobú mwa 2007. Liwâ tǒ mpótá ezaláki tɛ́ kasi mwâ bobébisi bwa bokɛ-bokɛ busálamákí.

Nsima ya sánzá mísáto ya likámá lîná, Moskú apɛsɛ́kɛ́ mosɔlɔ US$200.000 lokóla lisungi na baye bánsɔ bazokáká na likámá lîná.




#Article 127: Émile Etumangele Aseke Kangaseke (207 words)


Émile Etumangele Aseke Kangaseke azalí député national ya Lodja na Kasai-Oriental. Azalí membre ya PDC, élu na février 2012.

Na tango boponami ya ba députés esalemaki, Député Etumangele abundisamaki makasi n'a banguna na ye, mingi mingi na baye balekaki ye na mosolo mpo ete ye alongua na ebonga mpe azala na libanda. Kasi ye alingamaki mingi na batu baye baponaki ye n'a Lodja mpé na bakozi na ye ya parti politiki ya PDC. Yango wana, banguna na ye bakokaki ye tɛ́. 

Etumangele atikali ko sala mosala na ye na mayele, na botosi nyoso ya mibeko ya Leta mpe ya batu oyo baponaki ye na Lodja.

Etumangele ayaki ko yebana mingi na esaleli ya ye ya mosala na kati ya Commission Environnement, ressources naturelles et tourisme, na tango basalaki défense y'a projet ya mobeko moye motali ebombeli ya biloko Nzambe akela oyo kati ya Kongo nto pe loi y'a conservation de la nature. Esika wana, député Etumangele alakisaki na ba kongolais nioso été atangaki mpe avandisi mayele makasi na makambo oyo etali conservation ya ba niama, ba zete, mayi mpe mabele. 

Émile Etumangele Aseke Kangaseke azala lisusu molakisi monene (Professeur) ya ba mikolo ookati ya Institut Supérieur Pédagogique ya Gombe mpé na ba Universités mosusu ya mboka Congo.




#Article 128: Ngbáráwá (529 words)


Ngbáráwá tǒ libómá lya mbwá ezalí bokɔnɔ bwa virúsi óyo esálaka éte kovímba makási ya bɔngɔ́ na bato mpé nyama ya mabɛ́lɛ.
Bilembo bya ebandeli ezalaka fɛ́fɛlɛ mpé koyóka lokóla lotilíki ezalí koleka na esíka óyo eswámákí.
Bilembo óyo elandamaka mɔ̌kɔ́ na mɔ̌kɔ́ na nzela ya bilembo óyo ezalí: ngánzálánganzala ya nkándá , kozanga kofándisa na kímyá, kobánga mái, kokoka koningisa binama bya nzoto tɛ̂, mikakatano mya bokanisi, na kosénzwa.
Nsima ya bilembo komɔnana, ngbáráwá na ntángo míngi ebomaka.
Kobanda na ntángo óyo moto azwí bokɔnɔ tíí ntángo óyo bilembo bizalí kolakisa esála sánzá mɔ̌kɔ́ ntína sánzá mísáto.
Kasi, ntáno yangó mpé ekokí kochanger na kobanda ya mpɔ́sɔ mɔ̌kɔ́ tíí na koleka mobú mɔ̌kɔ́.
Ebéndé ya ntángo yangó ezalí ko dependre na ntángo óyo bokɔnɔ ekokoma na kátikati ya mintúngú. 

Ngbáráwá epésamaka koúta na bato tíí na nyama. Ngbáráwá ekokí koyambenela na ntángo óyo nyama óyo ezali na bokɔnɔ akwányí to aswí nyama mosúsu tǒ bato.
Nsɔ́i óyo eútí na monɔkɔ ya nyama óyo ezalí na ngbáráwá ekokí mpé koyambenelisa ngbáráwá soki nsɔ́i óyo ezalí na contact na miyoyo ya nyama mosusu to Moto.
la plupart ya rage na bomoyi ya bato ewuta na kosua ya mbua. koleka 99% ya ba cas ya rage na bamboka ebele esalamaka mingi soki mbua a sui Mutu. Na ba mboka ya  Amerique,  ba longembu bazali ba nyama oyo ezalaka na rage, pe moke ya  5% ya cas ya rage na bomoyi ya Batu ewuti epai ya ba mbua. Ba rongeur bazuaka infection ya bokono oyo rarement.  virus ya rage etambolaka na cerveau na njela  ya ba Systéme nerveux périphérique. Bokono ekoyebana kaka soki ba signe na yango emonani. 

Contrôle ya ba nyama na programme ya vaccination ekitisi ba risque ya rage oyo ewuti na bambua na bisika ebele na mokili mobimba. Kopesa batu mangwele liboso ya kosuama na mbua ezali recommender na baoyo na zali na risque ya makasi. Groupe ya baoyo bazali na risque ya makasi ezali ba oyo basalaka mosala ya kosunga ba bangembo to soki ofandi ntagno molayi na bisika oyo rages ezali mingi. na bato oyo bazali exposer na rage, Mangwele ya Rage be tango mosusu immunoglobuline ya rage ezali malamu mingi pona ko prevenir bokono soki mutu abandi traitement liboso ba signes ya rage esala manifestation. kosokola ba pota na makwanza pendant 15 minutes na savon pe na mayi, povidone d’iode, soki pe  badetergent oyo ekoki koboma virus, ezali pe malamu mingi na tina yako prevenir transmission ya virus ya rage. kaka batu mike ba bikaka na infection ya rage esalamaki na lisalisi ya traitement ya makasi, oyo eyabaki na nkombo ya  le protocol de Milwaukee.

Rage ezali responsable ya 26,000 tina 55,000 ya koboma na mokili mobimba na mbula moko. koleka 95% ya ba oyo bakufi ezali mingi na mikili ya  Asie pe Afrique. Rage ezali penza na mikili mingi soki pe koleka  150 countries ya bamboka pe na ba continent nyonso kasi na mboka ya Antarctique te. Batu koleka 3 billion bazali ko vivre na ba regions ya mokili bisika rage ezali. Mingi pe na  Europe na  Australie, rage ezali kozuama kaka na kati ya bangembo. Ba îles mingi ezali na bokono ya rage te.




#Article 129: Pulúpulú (618 words)


Pulupulu to diarrhées eza lolenge ya kolekisa bosoto ya petepete to ya mayi mayi mosukusuku na mitshopo mikolo nionso. Mingi mingi esalaka mua mikolo mpe ekoki komema bokauki ya mayi ya nzoto kolandana na bobungi bua mayi. Bilembo ya bokauki ya mayi ya nzoto mingi mingi ebandaka na bobungi bua milelo ya loposo ya nzoto mpe mbongwana ya bomoto. Yango ekoki kokoba kino na kozanga masuba, bobungi bua mokobo ya loposo, motema kobeta mbangu mbangu, mpe bolembu ya kosala likambo tango bokono oyo boza kokoma makasi koleka. Kolekisa bosoto ya petepete kasi eye ezali ya mayi te epayi ya bana bake baye bazali komela libele ya mama, yango, ekoki kozala likambo te.

Ntina eye eyebani mingi mpeza eza infection ya mitshopo kolandana na virus, ba bacteries, parasite, to lolenge loye loyebani bo kovimba ya miqueuse to gastro-entérite. Ba infections oyo mingi mingi ezwamaka na bilei to na mayi oyo eza contaminé na nyei, to mbala moko kowuta na mutu mususu oyo azali na bokono bona. Ekoki kokabolama na lolenge misato: pulupulu ya mayi ya ngonga mokuse, pulupulu ya makila ya ngonga mokuse, mpe soki ewumeli koleka poso mibale, yango ezali bongo pulupulu ya moto mangwongi. Pulupulu ya mayi ya ngonga mokuse ekoki kozala elandani na infection ya choléra. Soki eza na makila yango eyebani mpe bo dysenterie. Pulupulu ekoki mpe kozwama na banzela misusu oyo ezali ya infection te, yango eza: hyperthyroïdie, intolérance ya lactose, bokono ya kovimba mitshopo, lolenge songolo to pakala ya bomeli bua nkisi, mpe syndrome ya kotungisama na mitshopo. Na bambala mingi lolenge ya nyei esengelaka te mpo na koconfirmer ntina mpeza ya bokono.

Prevention ya infection ya pulupulu esalemaka na nzela ya bolengeli malamu assainissement, mayi ya komela ya petwa, na kosukola maboko. Komelisa mwana libele ya mama au moins sanza motoba yango mpe ezalaka recommander bo mangwele ya bobateli na rotavirus. Solution ya bozongisi mayi na bomeli (ORS), yango ezali bongo mayi ya petwa na motango moke ya mungwa mpe sukali, yango eza choix malamu ya traitement. Ba comprimé ya Zinc ezalaka  mpe recommandé. Ba traitements oyo etangemi bo ebikisa bamillion 50 ya bana na mibu 25 mileki. Tango batu bazwamaka na pulupulu basengaka na bango bakoba koliya bilei malamu mpe babébé bakoba komela libele ya mama. Soki mayi ya kozongisa na nzoto oyo etekamaka ezwami te, batu bakoki kosalela basolution eye elengelami na ndako. Baye mayi ya nzoto ekauki mpeza makasi bakoki kosengela na bozongisi mayi na nzela ya mizisa. Kasi, ba cas mingi; ekoki kolengelama malamu na bozongisi mayi na nzela ya monoko. Ba antibiotique, atako basalelaka yango mingi te, ekoki kozala recommander mpo na ba cas mike neti mpo na baye baza na pulupulu ya makila na fièvre ya makasi, baye baza na pulupulu makasi sima ya mobembo, mpe baye bazwami na ba bacteries to ba parasites songolo kati ya nyei nabango. Loperamide ekoki kosalisa mpo na kokitisa mosukusuku nakati ya mitshopo kasi eza recommander te mpo na baye bazali kobela makasi.

Pene ya 1.7 kino 5  ya babillion ya ba cas ya pulupulu ezwamaka na mibu nionso. Ezwamaka mingi na ba pays en voie de développement, epayi wapi bana bake bazwaka pulupulu pene mbala misato na mbula. Na 2013 motango ya baye banso bakufaki na pulupulu ezalaki 1.26 million ya batu, motango oyo mokitaki kowuta 2.58 million na 1990. Na 2012, pulupulu ezalaki ntina ya mibale ya liwa ya bana mike baye baza na mibu na se ya mibu mitano (0.76 million to 11%). Pulupulu ya kozonga mbala na mbala ezalaka mpe ntina ya bolei mabe mpe ntina ya mikakatano miye mikomelaka bana bake ya mibu na se ya mitano. Nkokoso misusu oyo ekoki kobimela sima na eleko molayi ekoki kowuta na bokoli mabe na nzoto mpe mayele.




#Article 130: Bruney Pissa (244 words)


Bruney Pissa abótámí o 14 dɛsɛ́mbɛ 1995 na Brazzaville (Kongó-Brazzaville). 

Azalí mosani, mobótisi-sinemá, moyémbi ya   mpɛ Moyambi ya Urban Culture Speaks bandá sánzá 2020 na Instagram.

Bruney Pissa abótámí o 14 dɛsɛ́mbɛ 1995 na Brazzaville (Kongó-Brazzaville). Tatá ná yě, Bruno Pissa azaláká kosala ná liyébi ya bamasíni mpé Mamá na yě, Patricia azalí mokomi. Babótí ná yě bazalí bǎna ya Kongó.

Lokóla mamá ná yě azaláká mokomi, Bruney abandaki koyékola ná kotanga bakomi na yé mpé bisapo-lisano ná yé.

Ná 2010, adindoli ná Slam mpé abandí kosala likokí lya biyékwelo ya Styl'oblique.
Sánzá wâná ndé abandí kokoma bakomi ná kosana ná biléli.
Ná tango moké, lisangá ná kelási ná yě akomaka pɛnɛ ná nsúkisa. 
Sánzá ya nsima, asálí yangó bala mosúsu, kasi bala óyo ná eyékwelo mosúsu. Lisangá ná yě ekopɔla. Kasi, akobanda kokoma mwâ malamu. 

Ná 2012, Akotíka Slam, kasi pona botíngami ya ndéko ya mwǎsí ná yě mpé ebúloa ya baslamer lokóla Fannattik Slam, akobanda kokoma lisusu.

Bandá 2019, akomaka masapo ya mokɛ́ ná .

Ná nkómbó ya Pi2S, Bruney Pissa ná báníngá ná yé bakela lisangá ya nkómbó ya Street Mafia. Azalí mɔ̌kɔ́ ya baraper.
Nsima ya boyángwi ya lisangá akoma mokomi mpé moyékoli pona baraper ya sika.

Ná Brazzaville, Bruney abandaki kosala pona Urban Culture 242 lokóla mokomi ti Aprílí 2020. Ntómbwana na yě ebandí na Instagram LIVE, Urban Culture Speaks,  loláká mɔ́kɔ wápi bato ya Kongó balobaka makambo ya etóngá ya Kongó.

Bruney azalí molobi ya balokótá ebelé. Alobaka Lingála, Falansé, Lingɛlɛ́sa, Lispanyoli mpé Lipulutugɛ́si.

Bruney avándáka ná Paris.




#Article 131: Pwantenwa (Engumba) (705 words)


Pwantenwa ezalí engumba ya míbalé ya  Kongó-Brazzaville, nsima ya mbóka-mokonzi Brazzaville, mpé étuka ya Kongó-Brazzaville kino 2004. libosó ya mbula oyo ezalaki étuka-mokonzi ya Kouilou. Ésîka nayé ézalí lombú Atlantíki. Pwantenwa ezali mbóka-mokonzi ékonomiki ya esé na yé mpé ezali na bato 715 334 (2007),



#Article 132: Epatíte A (465 words)


Epatíte A (eye eyebanaki kala bo epatíte eye epesamaka) ezalí bokono makasi boye bopesamaka na foie na nzela ya virus ya epatíte A (HAV). Ba cas ebele elakisa obe bilembo mike to te mingi mpeza epayi ya bilenge. Ngonga kati ya tango virus ezwami na komonana ya bilembo, mpo na baye baza nayango, ezali kati ya poso mibale na motoba. Tango bilembo bisili komonana bikoki koumela poso mwambe mpe kozala na: nausée, kosanza, pulupulu, loposo ya jaune, fièvre, mpe mpasi na libumu. Pene ya 10–15% ya batu bamonaka bilembo kozongelaka nakati ya eleko ya sanza motoba sima na mbala ya yambo ya bozwi virus. Mbeba makasi ya foie esalemaka mpeza te kasi esalemaka mingi mpeza na kibomokolo.

Mingi mpeza ekabolamaka na bilei to mayi ya komela to mpe mayi oyo eza contaminé na nyei. Ba crustacés oyo elambemi malamu te ezalaka mpe mua ntina ya bokono oyo. Ekoki mpe kokabolama na nzela ya kosimba mutu oyo azali nayango. Atako bana bake balakisaka bilembo te tango bazwami na virus ena bakoki mpe kokabola yango epayi ya basusu. Sima na kozwama obe mbala moko na virus ena mutu akomaka immuniser koloba ete akozwaka lisusu te bokono bona bomoyi naye mobimba. Mpo na kosala diagnostic esengelaka komeka makila mpo ete bilembo nayango elandani na oyo ya maladi misusu ebele.  Yango ezali bongo moko ya ba virus mitano ya epatíte oyo eyebani, eza: epatíte A, B, C, D, na E.

Mángwelé ma epatíte A esalaka mpo na prevention. Ba mboka misusu esengaka yango esalema mbala na mbala mpo na bana mpe baye baza na risque monene mpe bazwa mangwele te liboso. Emonani neti esalaka mpo na bomoyi mobimba. Ba mesure misusu ya prevention eza kosokola maboko mpe kolamba bilei malamu. Traitement specifique eza te, kopema mpe komela ba nkisi mpo na nausée to pulupulu ezalaka recommendé kolandana na bosenga. Mingi mingi ba infections esilaka mpeza mpe bokono ya foie ekobaka lisusu te. Traitement ya mbeba makasi ya foie, soki esalemi, ezalaka na transplantion ya foie.

Na mokili mobimba pene ya million 1.5 ya ba cas ya bilembo ya epatíte ezwamaka na mibu nionso mpe pene ya ebele ya bamillion ya bainfections. Esalemaka mingi na bituka biye bizali na assainissement malamu te mpe bozangi mayi ya petwa. Na ba pays en voie de développement pene ya 90% ya bana basilaki kozwa infection na mibu 10 nayango baza immuniser na kimokolo. Mingi mingi esalemaka na eleko ya ba épidémie na ba pays oyo eza kamua développés epayi wapi bana bazalaka exposé te tango bazali naino bake mpe mangwele epesamaka bisika mingi te. Na mobu ya 2010, epatíte A ya makasi ememaki liwa ya batu 102,000. Mokolo ya Mokili Mobimba mpo na Epatíte milulu misalemaka mibu nionso na mokolo ya 28 na sanza ya Sambo mpo na koteya likolo ya epatíte viral.




#Article 133: Latrine ya libulu (634 words)


Latrine ya libulu to WC ya libulu eza lolenge moko ya toilette eye eyambaka nyei ya batu nakati ya lidusu eye epukami na mabele. Esalelaka mayi te mpe litre moko to misatu te ya mayi ya vidange. Tango etongami mpe ebatelami ndenge elongobani ekoki kokitisa bopalanganisi ya ba maladi na nzela ya bokitisi motango ya nyei ya batu nakati na nzinga nzinga kowuta na kosumba esika polele. Yango ekitisaka bongo bomemi ba agents pathogènes kati na ba nyei mpe bilei na ba nzinzi. Ba agents pathogènes oyo baza ntina monene ya infection ya pulupulu mpe infections ya mitsopo na minyo. Infection ya pulupulu ememaki liwa ya pene na 0.7 million ya bana ya mibu na se ya mitano na 2011 mpe kobungisa 250 million ya mikolo ya kelasi. Ba latrines ya libulu eza lolenge ya bokaboli nyei na batu eye ekosenga misolo mike mpeza.

Mingi mingi mpeza latrine ya libulu ezalaka na biteni misatu: lidusu na mabele, nzungu to pavement na lidusu moke, na mpe ebombamelo. Mpeza libulu ezalaka na au moins 3 mètres (10 pieds) na bozindo mpe 1 m (3.2 pieds) na pembeni. Organisation Mondiale ya Santé esengaka ete etongama kamua mosika na ndaku na botali ndenge ya koyanola likambo ya facilité ya bokoti na solo. Distance kowuta na mayi ya se ya mabele kino na mayi ya likolo ya mabele esengeli ezala monene mpo na kokitisa risque ya pollution. Lidusu nakati ya nzungu esengeli te ezala monene koleka 25 centimètres (9,8 pouces) mpo na kosala ete bana bakweya nakati te. Esengeli kokanga nzela mpo na pole (lumière) ekota te na libulu mpo na kitisa boingeli ya ba nzinzi. Yango ekoki kosenga ete ezipeli ezala mpo na kozipaka libulu eye eza na pavement tango mutu moko te azali kosalela yango. Tango libulu etondi kino pene ya 0.5 mètres (1.6 pieds) na likolo, ekosengela kovider yango to kotonga libulu mususu ya sika mpe komema ebombamelo nayango to mpe kotongela libulu ya sika ebombamelo nayango. Bolengeli potopoto ya nyei eye ebimisami na libulu ezalaka mua mpasi. Ezalaka na ba risques environnemental mpe ya santé soki esalemi malamu te.

Latrine ya libulu ya simple ekoki kozala améliorer na ba nzela ndenge na ndenge. Moko ya ba nzela ezali bobakisi tuyau ya kolekisa mopepe kowuta na libulu kino na likolo ya toilette. Yango ebongisaka bolekisi mopepe mpe ekitisaka solo na toilette. Ekoki mpe kokitisa motango ya ba nzinzi tango mutu ya tuyau ezipami na kiyungulu (mingi mingi oyo esalemi na fibre de verre). Na balolenge ya ba toilettes oyo esengeli kosalela ezipeli mpo na kozipa lidusu ya toilette oyo eza na pavement. Lolenge mosusu ya amélioration eza pavement eye etongami na ndenge ya kotsiolisa mayi mpe kolendisa likolo ya libulu ya toilette na ba briques to ciment mpo na koaméliorer bokasi nayango.

Uta mobu ya 2013,  etangemi ete milliard 1.77 ya batu basalelaka ba latrines ya mabulu. Yango eza mingi mingi mpeza nakati ya ba pays en voie de développement mpe na ba milieux ruraux mpe désertiques. Na 2011 pene ya 2.5 milliard ya batu bazangaki toilette eye elongobani mpe milliard moko balandaki nzela ya kosumba na esika ya polele nzinga nzinga nabango. Azia ya Se na Afrika ya Se ya Sahara eza mikili miye miza na mikakatano ebele mpeza mpo na bozui toilette. Na ba pays en voie de développement talo mpo na kozua toilette simple moko eza kati ya 25 na 60 $ USA. Talo mpo na misala ya kokoba kolengela toilette eza kati ya 1.5 na 4 $ USA na mutu moko na moko na mobu mobimba, oyo batalelaka yango kutu te. Na ba mileiux ruraux misusu na Inde campagne ya No Toilet, No Bride (koloba ete 'Soki toilette eza te, Likwela eza te') esalemaki mpo na kopromouvoir ba toilettes na nzela ya bosengi basi baboya kobala mibali oyo baza na toilette te.




#Article 134: Bolei Mabe (817 words)


Bolei mabe to malnutrition eza lolenge loye lowuti na bolei bilei biye bizali na ba élément nutritif ya kokoka te to ya koleka neti kino komema nkokoso na nzoto. Ba élément nutritif oyo etalemi awa ekoki kozala: ba calories, protéine, ba hydrates ya carbone, ba vitamine to ba minéraux. Mingi mingi mpeza liloba oyo esalelamaka mpo na kolakisa sous-alimentation epayi wapi ba calories, protéine to ba élément nutritif ya mike mike eza ya kokoka te; kasi, ekoki mpe kozala suralimentation. Soki sous-alimetation esalemi na ntongo ya zemi to liboso ya mwana kokokisa mibu mibale ekoki komema ba nkokoso ya koumela libela na nzoto mpe na bongo. Sous-alimentation ya koluta, eye eyebani bo bozangi bilei, ekoki kozala na bilembo biye: kokoma mokuse, nzoto ya kokonda, kosila makasi ya nzoto, mpe kovimba makolo na libumu. Mingi mingi lisusu batu bazwaka ba infections mpe bakomaka na malili. Bilembo ya ba carances ya ba éléments nutritifs ya mike mike elandanaka na élément nutritif ya moke eye ezali kozanga.

Sous-alimentation esalalemaka mingi mpeza kolandana na bozangi bilei ya qualité ya malamu mpeza mpo na kolia. Yango elandanaka mingi mpeza na talo ya bilei makasi koleka mpe pauvreté. Kozanga komelisa mwana libele ya mama ekoki kocontribuer, neti kaka ba maladies infectieuses ya ndenge na ndenge lokola: gastro-entérite, pneumonie, malaria na rougeole eye ebakisaka bosenga ya ba élément nutritif. Eza na lolenge mibale ya sous-alimentation: malnutrition na proteine-énergie mpe ba carences diététiques. Malnutrition na proteine-énergie ezalaka na lolenge mibale ya makasi: marasme (bozangi proteine na ba calories) mpe kwashiorkor (bozangi proteine kaka). Ba carences ya ba éléments nutritifs oyo eyebani mingi mpeza eza: bozangi fer, iode na vitamine A. Na eleko ya zemi, kolandana na bosenga ebele, ba carences esalemaka mingi mingi mpeza. Na ba pays en voie de développement misusu suralimentation na lolenge ya obésité ebandi komonana ote ya bikolo bina bo sous-alimentation. Ntina misusu ya malnutrition eza anorexie mentale na chirugie bariatrique. 

Makasi maye masalamaka mpo na komatisa nutrition mazali moko ya lolonge ya aide au développement ya solo solo. Komelisa mwana libela ya mama ekoki kotisa taux ya malnutrition mpe liwa ya bana mike, mpe makasi mpo na kopromouvoir lolenge lona mamatisaka taux ya bomelisi mwana libele ya mama. Bopesi bana mike belei kobakisa na libele ya mama kati ya sanza motoba na mibu mibale e amélioraka ba résultats. Ba preuves ya komonana eza kosoutenir ba suppléments mpo na ba éléments nutritifs ya mike mike ya ndenge na ndenge mpo na ba mama na eleko ya zemi mpe mpo na bana mike nakati ya ba pays en voie de déloppement. Kopesa bilei na batu baye bazali na bosenga nayango koleka ezala bopesi bilei to bopesi mbongo mpo ete batu bakoka kosomba bilei nataki ya ba nzando nabango, esalisaka mpeza. Kopesa batu bilei kaka na bitelelo nabango ya kelasi ekoki te. Kolandela malnutrition oyo ya makasi na ndaku ya mutu oyo azali nayango na ba Aliments Thérapeutiques prêts pour consommation mbala mingi esalemaka. Epayi ya baye bazali na malnutrition ya makasi eye eza compliqué na mikakatano misusu ya bonkolongono, kolandela traitement na lopitalo ezalaka recommandé. Mingi mingi ezalaka kolandela sukali nakati ya makila, température ya nzoto, bokauki ya mayi ya nzoto, mpe kolia graduellement. Bomeli ba antibiotiques mbala na mbala mingi mingi ezalaka recommander mpo na risque ya infection. Ba mesures ya long-terme eza: kobakisa misala ya bilanga, kokitisa taux ya pauvreté, koaméliorer assainissement, mpe kopesa makoki na ba mama.

Na mobu ya 2010 na mokili mobimba batu baye baza sous-alimenté bazalaki 925 million.  Yango ezali bongo kobakisama ya batu 80 million uta 1990 to kokita ya 2,5 % na pourcentage ya baye baza sous-alimenté. Milliard moko ya batu basusu batangemi bo baye bazangi ba vitamines na ba minéraux. Na 2013 malnutrition na proteine-énergie etalemaki neti liye limemaki liwa ya batu 469, 000 motango oyo mokitaki kowuta na batu 510, 000 na mobu ya 1990. Ba carences misusu ya nutrition, oyo eza carence ya iode na anémie mpo na carence ya fer, ememaki liwa ya batu 84,000 basusu. Sous-alimentation na mobu ya 2010 ezalaki ntina ya 1.4 % na nionso ya mibu ya bomoyi miye miza ajuster kolandana na handicape.Pene na un tiers ya liwa epayi ya bana endimami ete eza ntina na sous-alimentation; kasi, mbala mingi te baweyi batangemaka bo baye bakufi mpo na sous-alimentation. Na 2010 sous-alimentaion etalemaki bo liye licontribuaki na liwa ya basi mpe bana pene na 1.5 million atako basusu baza kokanisa ete motango oyo mokoki kozala monene koluta 3 million. Million 165 mosusu ya bana baza na retard ya croissance kowuta na bolei mabe. Sous-alimentation mingi mingi ezalaka na ba pays en voie de développement. Ba groupe songolo ya batu baza na taux monene ya sous-alimentation, yango ezali bongo basi mingi mingi tango ya zemi to ya bomelisi mwana libele, bana baye baza na mibu na se ya mitano mpe bampaka. Na bompaka malnutrition esalemaka mingi mingi mpeza kolanada na ba facteurs physique, psychologique mpe social.




#Article 135: Mpasi kouta na bolei (443 words)


Mpasi kouta na bolei ezali mpasi ya bongo kolandana na kozanga kolia malamu mbala na mbala oyo ememaka mikakatano na nzoto to na bongo ya moto. Yango emonanaka na ba nzela ndenge na ndenge, oyo ekoki kozala mpasi ya kolia kolekisa ndelo oyo esalaka batu kolia bilei ebele mpeza na ngonga moke, anorexie mentale oyo esalaka batu kolia bilei moke mpeza na yango kozalisa bango na kilo ya nzoto moke, bulimie oyo esalaka batu kolia mingi mpe na sima koluka ndenge ya kobimisa biye baliaki, pica oyo esalaka batu kolia biye biliamaka te, mérycisme oyo esalaka batu kozongisa bilei, mpasi kouta na koboya/komipekisa kolia oyo esalaka batu bazanga mposa ya kolia, mpe kozala na mulongo ya ba mpasi misusu kouta bolei. Mpasi ya anxiété, depression, mpe toxicomanie yango emonanaka mingi epayi ya batu baye bazali na mpasi kouta na bolei. Bampasi oyo esangani te na obésité.

Ntina ya mpasi kouta na bolei eyebani mpeza malamu te. Ezala bafacteur génétique to ya environnement yango nionso emonani ezali na maye esalaka. Bomoto boye bosalaka ete batu balinga kozala na nzoto mike endimami ete yango mpe ememaka mikakatano ya mpasi kouta na bolei. Na ndakisa, mpasi kouta na bolei esimbaka 12% ya babini malinga. Baye bazwaki likama ya abus sexuel bakoki mpe kozwama na mpasi kouta na bolei. Ba mpasi misusu neti pica na rumination esalemaka mingi epayi ya batu baye bazali na maladies mentales. Diagnostic ya ba mpasi kouta na bolei esalemaka bobele mpo na mpasi moko na mbala.

Ba mpasi ndenge na ndenge kouta na bolei ekoki kosalisama na nzela ya traitement reatment. Yango ekoki kozala ba suivis, kolia malamu, mpe bokitisa makasi maye masalamaka na boluki ndenge ya bobimisi bilei na nzoto. Mingi mingi mpeza esengelaka te moto alalisama na mbeto ya lopitalo. Bakoki kosalela nkisi mpo na kosalisa na mikakatano misusu miye milandanaka nayango. Uta na mibu mitano, pene ya 70% ya batu baye baza na anorexie mpe 50% ya batu baye baza na bulimie babikaka. Libiki ya baye bazwumi na mpasi ya kolia kolikisa ndelo eyebani malamu te mpe emonani neti eza 20% kino 60%. Ezala anorexie to bulimie yango nionso ebakisaka nzela ya likama na liwa.

Na ba pays développés mpasi ya kolia kolekisa ndelo etungisaka pene ya 1.6% ya basi mpe 0.8% ya mibali na mobu songolo. Anorexie etungisaka pene ya 0.4% mpe bulimie etungisaka pene ya 1.3% ya bilenge basi na mobu songolo. Na eleko mobimba ya bomoyi kino 4% ya basi bazwamaka na anorexie, 2% bazwamaka na bulimie, mpe 2% bazwamaka na na mpasi ya kolia kolekisa ndelo. Anorexie na bulimie ezwamaka mingi mpeza pene ya mbala zomi epayi ya basi koleka mibali. Mingi mingi ebandaka na eleko ya suka ya bomwana to na ebandeli ya bokolo. Taux ya ba mpasi misusu kouta na bolei eyebani malamu te. Taux ya ba mpasi kouta na bolei emonani neti eza na se na ba pays en voie de développement.




#Article 136: Epatíte B (603 words)


Epatíte B (Hepatitis B) ezalí bokono boye bopesamaka na nzela ya virus ya epatíte B (HBV) oyo ezwaka foie. Yango ekoki komema ba infection ya kozongaka mbala na mbala mpe oyo ya makasi. Batu ebele balakisa bilembo na eleko eye elandi infection. Epayi ya batu basusu bilembo ya bokono bimonanaka liboso na ngonga na kosanza, loposo kokoma jaune, koyoka bolembu, masuba ya moyindo mpe mpasi na se libumu. Mingi mingi bilembo oyo bisalaka mua ba poso mpe lisusu infection ya mbala ya liboso ememaka mingi mpeza te na liwa. Ekoki kosala mikolo 30 kino 180 mpo ete bilembo bibanda. Na baye bazwaka infection pene na eleko ya mbotama 90% ba developaka epatíte B eye ezongaka mbala na mbala zonka nde bobele 10% ya baye bazwaka infection na sima ya mibu mitano nde bazwamaka nayango. Ebele ya baye baza bokono boye bokozongaka mbala na mbala balakisa bilembo te; kasi, cirrhose mpe cancer ya foie ekoki tango mosusu kobimela. Mikakatano oyo mimeka liwa ya 15 kino 25% na baye baza na bokono boye bozongaka mbala na mbala.

Virus epesamaka na nzela ya makila maye masili kozwama na maladi to ba mayi ya nzoto. Infection pene na eleko ya mbotama to kosangana na makila ya batu basusu na ntango ya bomwana ezali lolenge loye epatíte B epesamaka mpeza na bisaka biye bokono oyo bozwi batu ebele. Bisika biye bokono bopanzani mingi te na batu, komibeta tonga ya lopipi mpe kosangana bonzoto yango nde ezali ba nzela oyo bokono oyo bomesaka. Bafacteur misusu oyo ememaka likama eza kosala na lopitalo, bozongisi makila, dialyse, kobika esika moko na mutu oyo aza infecté, kokende mobembo na mboka oyo taux ya infection eza likolo, mpe kobika na etelelo eye eza kolandela bokono oyo. Kokata tattoo mpe acupuncture emamaki bokono na batu ebele na mibu ya 1980; kasi, yango esili kokita mpeza mpo sterilisation ekomi kosalema malamu mpeza. Ba virus ya hepatitis B ekoki kopesama te na bosimbani maboko, kokabola biye basaleka mpo na kolia, kopesana bizu, koyambana, kokosola, kosala intsya, to komelisa mwana libele. Infection ekoki komonana na nzela ya diagnostic uta mikolo 30 kino 60 sima ya kozwama nayango. Diagnostic esalamaka mingi mpeza na bomeki makila mpo na koyeba virus mpe mpo na ba anticorps oyo etelemelaka virus. Yango ezali moko ya ba epatíte oyo eyebani: A, B, C, D, na E.

Prevention na infection ebanda kosalema na nzela ya mangwele uta 1982. Organisation Mondiale ya Santé esengaka ete mangwele epesama mokolo ya yambo ya mbotama. Esengelaka kobakisa lisusu na sima dose mibale to misato mpo na kozwa nguya nionso. Mangwele oyo esalaka pene na 95% ya ngonga nayango. Ba mboka pene na 180 epesaka mangwele oyo bo mabongisi ya mobu 2006 ya bokati mangewle na mboka ndenge na ndenge. Esengeli mpe komeka makila nionso liboso ya bozongisi makila mpo na koyeba soki ezali na epatíte B mpe kosalela ba condom mpo na komibatela na infection. Na eleko ya ebandeli ya infection, ba soins epesamaka kolandana na bilembo biye biza komonana epayi ya mutu. Epayi ya baye bazwami na bokono boye bokozongaka mbala na mbala nkisi ya kobundisa virus neti tenofovir to interferon ekoki ya litomba, kasi nkisi oyo ezalaka na talo makasi mpeza. Na ntango mosusu basalaka mpe greffe ya foie mpo na cirrhose.

Pene na 1/3 ya batu na mokili mobimba bazwaki infection na eleko songolo ya bomoyi nabango, nakati nabango banda 240 million kino 350 million baza na ba infection oyo ezongaka mbala na mbala.. Batu koleka 750,000 bakufaka na epatíte B mibu nionso. Pene na 300,000 ya ba liwa oyo elendani na cancer ya foie. Bokono oyo sik'oyo boza na batu ebele bobele na Asia ya Est mpe na Afrika ya se ya Sahara epayi wapi kati 5 na 10% ya bakolo baza na bokono boye bozongaka mbala na mbala. Taux na Eropa mpe na America ya Likolo eza na se ya 1%. Kala eyebanaka bo serum ya epatíte. Balaka na maye matali ba nkisi bazali koluta ndenge ya kokela bilei biye bizali na mangwele ya HBV. Bokono bokoki mpe kozwa makako mpe ya minene.




#Article 137: Mpasi ya miso (422 words)


Mpasi ya miso, eyebani mpe bo bokono ya miso to bogungisi ndenge ya komona, eza mpasi eye esalaka moto kobungisa malembe malembe makoki ya komona kino na lolenge loye lomemaka mikakatano miye mikoki te kosalisama bo momesano, neti na bosaleli maneti. Mosusu ezalaka mpe na baye bazali na makoki moke mpo na komona mpo ete bazangi maneti to ba lentilles ya contact. Mpasi ya miso mingi mingi elimbomalaka bo kobongisa malamu koleka bomoni malamu mpeza na mabe likolo ya 20/40 to 20/60. Liloba bolanda basalelaka yango mpo na baye babungisi makoki nionso ya komona to baza pene ya kobungisa makoki nionso ya komona. Mpasi ya miso ekoki komemela batu mikakatano na misala mya bango ya mokolo na mokolo neti kotambwisa motuka, kotanga, kosangana na baninga, mpe kotambola.

Ntina ya mpasi ya miso eye eyebani mpeza mokili mobimba eza pupille kozanga kosala ndenge elongobani (43%), cataracts (33%), mpe glaucome (2%). Pupille kozanga kosala ndenge elongobani ekoki kozala mpasi na komona pene, mpasi na komona mosika, mpasi ya miso na botatoli biloko biye bilandani, mpe astigmatisme. Cataracts eza ntina eye eyebani mpeza mpo na bolanda. Mikakatano misusu miye mikoki komema nkokoso na miso eza dégénérescence maculaire kolandana na mibu ya moto, rétinopathie diabétique, opacification cornéenne, bolanda ya bomwana, mpe ba infections misusu ya ndenge na ndenge. Mpasi ya miso ekoki mpe kouta na nkokoso misusu yakati ya bongo kolandana na accident vasculaire cérébral, mbotama mobeso, to traumatisme na mpe makambo misusu. Makambo oyo ndenge na ndenge mayebani bo mpasi ya miso kouta na cortex. Komema bana epayi ya monganga mpo ete atala nkokoso nini ekoki kozala na miso nabango ekoki konetola lolenge loye miso nabango mikosala na mikolo mikoya mpe kozala na ndenge ya kosilisa kelasi. Komema batu bakolo epayi ya monganga ya miso ekoki mpe kozala ya litomba. Diagnostic epesamaka na sima ya bosali examen ya miso.

Organisation Mondiale ya Santé emoni ete 80% ya ba mpasi ya miso ekoki kozala prévenu to kobikisama na ba nkisi. Nakati nayango eza cataracts, the infections bolanda ya mingala mpe miso ya poti, glaucome, rétinopathie diabétique, pupille kozanga kosala ndenge elongobani, mpe mikakatano misusu ya bolanda ya bomwana. Batu mingi oyo baza na mpasi ya miso bazwaka lisungi ya réadaptation ya miso, mbongwana na nzinga nzinga nabango, mpe baappareil ya kosalisa bango.

Na mobu ya 2012, 285 million ya batu bazalaki na mpasi ya miso nakati nabango 246 million bazalaki na makoki moke ya komona mpe 39 million bazalaki balanda. Ebele ya batu baye baza na makoki moke ya komona baza na ba pays en voie de dévéloppement mpe baza na mibu koleka 50. Taux ya baye baza na mpasi ya miso ekitaki uta mobu ya 1990. Ba mpasi ya miso ememaka misolo ebele ya nkita ezala mpo na talo ya nkisi to mpe mpo na bobungisi makoki ya kosala mosala.




#Article 138: Makalekale (636 words)


Makalekale, eyebani lisusu bo kos'évanouir, kozala kidiba mpe kobungisa mayele, elimbolami bo bobungisi na ngonga mokuse ya mayele mpe makasi ya nzoto, oyo elendisami na komibimela na lobango, na ngonga mokuse mpe libiki ya mabalakata. Elandanaka na bokiti ya circulation ya makila nakati ya bongo mobimba mingi mingi kouta na hypotension artérielle. Ntina misusu ezalaka elongo na bilembo biye bimonanaka yambo na bokono liboso bobungisi bua mayele bosalema. Bilembo oyo bikoki kozala moto mpasi moke, kotoka, loposo kokoma jaune, buluyeke na miso, nausée, kosanza, mpe koyoka molunge na makambo misusu. Makalekale ekoki mpe kolandana na eleko moke ya contraction ya ba muscles. Soki mutu abungisi mayele mpe makasi ya nzoto nionso te, yango ekotalema bo yambo na makalekale. Esengelaka ete yambo na makalekale ezwa traitement ndenge moko na makalekale.

Makalekale ewutaka na ba ntina ndenge na ndenge na oyo ya makasi te kino na oyo ekoki komema likama. Eza na lolenge misato ya ntina: oyo elandani na motema to mizisa ya makila, bokebi oyo eyebani lisusu bo maye malandani na oyo eza kati ya bongo, mpe hypotension orthostatique. Mikakatano ya motema na mizisa ya makila eza ntina ya pene na10% mpe yango nde ezalaka mobulu mpeza nzoka nde oyo ya maye maza kati na bongo nde ezwamaka epayi batu mingi. Oyo elendani na motema ekoki komema motema kobeta ndenge esengeli te, mikakatano na mizisa ya motema to misunyi ya motema mpe kozipa mizisa ya makila kowuta na embolie pulmanaire to dissection aortique to mpe eloko mosusu. Makalekale kolandana na maye maza na kati ya bongo esalemaka ntango mizisa ya makila efuangamaka mpe bobeti ya motema ekitaka ndenge elongobani te. Yango ekoki kosalema kolandana na likambo songolo neti kozala exposer na makila, mpasi to ba sentiment ya makasi to mpe kosala likambo ya komonana neti kosuba, kosanza, to kokosola. Lolenge ya makalekale oyo ekoki mpe kosalema ntango banyongi esika moko ya kingo oyo eyebani bo sinus carotidien. Lolenge ya suka ya makalekale elandanaka na bokiti ya tension artérielle ntango mutu atelemi. Yango elandanaka na ba nkisi mutu amelaka kasi ekoki mpe kolandana na bokauki ya mayi ya nzoto, kotangisa makila ebele to infection.

Lisitwale ya bomeli nkisi, examen ya nzoto, mpe electrocardiogramme (ECG) eza ba nzela ya malamu mpeza mpo na koyeba ntina ya bokono. ECG eza ya litomba na bokundoli motema oyo ezali kobeta ndenge esengeli te, circulation mabe ya makali nakati ya misunyi ya motema, mpe nkokoso misusu ya courant ya nzoto neti syndrome QT ya ngonga molayi na Brugada. Ntina eye elandani na motema mingi mingi ezalaka na lisitwale moke mpeza ya prodrome. Hypotension artérielle na motema kobeta bangu bangu sima ya likambo ekoki kolakisa bobungi ya makila to bokauki ya mayi ya nzoto, nzoka nde niveau ya se ya oxygène na makila ekoki komonana sima na likambo epayi ya baye bazali na embolie pulmonaire. Ba teste oyo esengeli neti enregistreur de boucles oyo bokoki kotia mpe kolongola, épreuve ya orthotatisme to massage ya sinus carotidien ekoki kozala ya litomba na bas songolo. Tomographie na ordinateur (CT) mingi mingi mpeza basengaka te kosala yango, esalemaka kaka soki mokoni azali na mitungisi songolo. Ntina misusu oyo ekoki kozala na bilembo ya lolenge oyo eza crise, accident vasculaire, commotion, oxygène moke na makila, sukali moke na makila, intoxication na bomeli nkisi na mikakatano misusu ya mayele. Traitement elandanaka na ntina eye ememaki bokono. Baye batalemi bo baye bazali pene na likama monene bakoki kolalisama na mbeto ya lopitalo sima na boyebi lolenge nabango mpo na kolandela motema.

Makalekale etungisaka pene na batu misato to motaba kati na batu nkoto moko mibu nionso. It is more common in older people and females. Yango ezali ntina ya pourcentage moko kino misato ya batu oyo bakendeke na ba salle d'urgence mpe kolalisama na mbeto ya lopitalo. Pene na moitié ya basi baye baza na mibu koleka 80 mpe 1/3 ya bayekoli ya science medicale likambo oyo ekomelaka bango ata mbala moko na bomoyi nabango. Na baye bakendeke na ba salles d'urgence mpo bazwuami na makalekale, pene na 4% bakufaka nakati mikolo 30 milandi. Libaku ya kozwa sango mabe, elandanaka mingi mpeza na ntina eye ememaki bokono.




#Article 139: Fièvre typhoide (524 words)


Fièvre typhoide, eyebani lisusu bo typhoide, eza infection ya bactérie kowuta na Salmonelle oyo ezalisaka bilembo ya bokono. Bilembo bikoki kosena banda na oyo ya mua pete kino na oyo ya makasi mpe mingi mpeza ebandaka komonana sima ya kati ya mikolo motoba kino tuku misato. Mingi mingi fièvre ya makasi ebimelaka mpe ekomataka malembe malembe nakati ya mua mikolo. Bolembu, mpasi ya se ya libumu, constipation, na moto mpasi yango mpe ekomelaka batu mingi. Pulupulu mingi mingi etungisaka te mpe kosanza epayi ya batu mingi ezalaka oyo ya makasi te. Batu mususu loposo nabango ya nzoto ebongwanaka mpe kobimisa ba tache ya rose. Na ba cas misusu ya makasi ekoki kosala mutu asalaka mabunga. Soki nkisi epesami te, bilembo bikoki koumela baposo to basanza ebele. Batu mususu bakoki kozala na bactérie kati ya nzoto nabongo atako bokoyoka mpasi te; kasi, bakoki kokabola bokono epayi ya basusu. Fièvre typhoide eza lolenge ya fièvre ya kokota na mitsopo elongo na fièvre paratyphoide.

Typhoide ewutaka na babactérie ya Salmonelle, oyo eyebani lisusu bo Salmonella enterica serotype typhi, oyo ekolaka nakati ya mitsopo mpe nakati ya makila. Typhoide epesamaka na nzela ya bolei to bomeli mayi oyo eza contaminé na nyei ya mutu oyo aza na bokono. Bafacteur oyo ekoki komema likama eza assainissement ya mabe mpe hygiène mabe. Baye bakenda mibembo na ba pays en voie de développement mpe bazalaka na libaku ya kozwa bokono oyo. Bokono oyo ekoki kozwa obe mutu kasi nyama te. Diagnostic esalemaka na nzela ya kobokola ba bactérie to kokundola ADN ya ba bactérie nakati ya makila, nyei, to moelle osseuse. Kobokola ba bactérie ekoki kozala mua mpasi. Examen ya moelle osseuse nde epesaka resultat malonga koleka. Bilembo ya bokono oyo bilandani na oyo ya makono masusu maye makabolamaka. Typhus eza bokono mosusu, ekeseni na typhoide.

Mangwele ya typhoide ekoki kobikisa pene na 30% kino 70% ya batu oyo bakokaki kobela typhoide nakati ya mibu mibale ya yambo sima na bokati mangwele. Makasi na mangwele makoki koumela kino mibu sambo. Mangwele oyo ezalaka recommandé mpo na baye baza na libaku monene ya kozwa typhoide to batu oyo bazali kokende mobembo na bisika biye typhoide esi ezwi batu mingi. Ba nzela misusu ya komibatela na bokono oyo eza kofournir mayi ya komela ya mpetwa, assainissement ya malamu mpeza, na kosokola maboko malamu mpeza. Mutu oyo azali kobela typhoide esengeli te alamba bilei mpo na basusu, esengeli azela confirmation oyo ekoloba ete abiki mpeza, nde akoki kolamba. Traitement ya bokono oyo esalemaka na ba antibiotics neti azithromycine, fluoroquinolones to céphalosporine ya génération ya misato . Resistance na ba antibiotics oyo ekoma kosalema, yango esali traitement ya bokono oyo ekoma mpasi koleka.

Na mobu ya 2010, 27 million ya batu bazwamaki na bokono oyo. Bokono oyo ezalaka mingi mingi mpeza na Inde, mpe mingi mingi mpeza ezwaka bana. Taux ya bokono oyo ekita na pays développés uta mobu ya 1940 kolandana na bolengeli assainissement malamu mpe bosaleli ba antibiotics mpo na traitement ya bokono. Na Etats Unis, ba cas pene na 400 nde eyabanaka na ba lopitalo nzoka nde bokono ezwaka batu pene na 6,000 mibu nionso. Na mobu ya 2013, bokono oyo ememaki liwa ya batu 161,000 – motango oyo mokitaki solo po ete na mobu ya 1990 ezalaki 181,000 (pene na 0.3% ya mokili mobimba). Likama ya kokutana na liwa na nzela ya bokono oyo ekoki kozala 25% soki mutu ameli nkisi te, kasi soki mutu ameli nkisi ekozala kati ya 1 na 4%. Nkombo typhoide elingi koloba eza neti typhus mpo ete bilembo nayango ekokani.




#Article 140: Komelisa mwana libele (444 words)


Komelisa mwana libele ezali kopesa ba bébé na bana mike miliki kowuta na libele ya mwasi. Ezalaka recommandé kobanda komelisa libele na ngonga ya yambo ya bomoyi ya mwana mpe na sima nayango kopesa mwana libele tango inso asengeli nayango. Nakati ya mua baposo ya ebandeli ya bomoyi, ba bébé bakoki komela mbala mwambe kino zomi na mibale na mokolo (sima na ngonga mibale to ngonga misato nionso). Molayi ya ngonga ya komelisa libele mingi mingi ezalaka minuti zomi kino zomi na mitano mpo na libele moko. Bileko ya bomelisi libele ekitaka kolandana na ndenge mwana akokola. Ba mama mosusu batiyaka miliki ya mabele nabango na biberon mpo ete basalela yango sima tango batikeli batu mususu bakengela bana nabango. Komelisa mwana libele ezalaka na litomba mpo na mama mpe mpo na mwana. Bilei biye bilengelami mpo na ba bébé bisalisaka mingi te neti libele ya mama.

Emonani ete ebele ya ba bébé koleka million bakoki kobikisama mibu nionso mokili mobimba na nzela ya komela mingi libele ya mama. Komelisa mwana libele ekitisaka likama ya infection ya ba voies respiratoires na pulupulu oyo ekoki kozwa mwana. Oyo eza bosolo ezala mpo na ba pays en voie de développement to mpe ba pays développés. Litomba mosusu ya komelisa mwana libele eza risque moke ya mwana kozua asthme, ba allergies kouta na bilei, bokono na coeliaque, diabete ya type 1, na leucémie. Komelisa mwana libele ekoki mpe kobakisa bokoli ya mayele ya mwana mpe kokitisa risque ya mwana kozwa obesité na kibokolo. Ba mama mosusu bakoki komona neti mua mindondo komelisa mwana libele, kasi esengeli mpe koyeba ete bana oyo bamelisi bango te libele ya mama bakolaka nabango mpe ndenge elongobanii – mikakatano ya makasi ekomelaka bango te na nzoto to bonkolongono nabango.

Litomba oyo mama azwaka na komelisa mwana libele eza na eleko ya kobota makila oyo akobungisa ekozala moke, utérus ekokonda malamu, kilo ya nzoto ekokita, mpe dépression post-partum ekozala moke. Ebakisa molayi eleko ya liboso ya menstruation mpe fertilité, eye eyebani bo lactation ya aménorrhée. Litomba ya eleko molayi ekoki kozala risque moke ya kozwa cancer ya libele, maladi ya motema, mpe polyarthrite chronique. Libota esalelaka misolo ebele te mpo na komelisa mwana libele nzoka nde bilei biye bilengelami mpo na bana bilekaka talo.

Mangomba ya santé, neti Organisation Mondiale ya Santé (OMS), esengaka ete sanza motoba mwana amelisama bobele libele ya mama. Yango elingi koloba ete bilei mosusu esengele te bapesa yango na mwana soki kaka te vitamine D. Ezalaka recommandé kokoba komelisa mwana libele mbala moko moko kino na eleko akokokisa mobu moko. Na mokili mobimba pene na 38% ya bana nde bamelaka libele ya mama na sanza motoba oyo elandi mbotama nabango. Na Etats Unis, pene na 75% ya ba mama esi babandi komelesa bana libele mpe pene na 13% nde bamelisa bana libele kino sanza motoba. Ba etat ya santé oyo epekisaka komelisa mwana libele eza mingi te. Na eleko ya komelisa mwana libele, drogues ya komisepelisa mpe ba nkisi mosusu ezalaka recommandé te.




#Article 141: Bokono ya Ebola (631 words)


Bokono ya Ebola (EVD; eyebani lisusu bo fièvre hemoragique ya Ebola na falansé, to na bokuse EHF na lokótá ya lingɛlɛ́sa), tǒ mpé kaka Ebola, ezalí bongo fɛ́fɛlɛ hémoragique viral óyo ezwaka batu mpé londelenge songolo ya ba makaku kolandana na ba vilúsu ya ebola. Bilembo ya bokono bibandaka komonana míngi míngi káti ya mikolo mibale na poso misato sima ya kozwama na vilúsu mpé fɛ́fɛlɛ, mpasi ya kingo, mpasi ya misunyi ya nzoto, na moto mpasi. Ebongo, kosanza, pulúpulú mpé kobeba loposo míngi míngi elandaka na sima, elongo na bokiti ya misala ya foie mpé ba reins. Na eleko oyo batu misusu babandaka kotangisa makila ezala nakati ya nzoto to libanda ya nzoto. Bokono oyo bozalaka na likámá monene ya komema liwa, ebomaka kati ya 25 na 90 % ya batu óyo bazwami na vilúsu nango, na moyenne ya 50 %. Elandanaka míngi míngi na hypotension artérielle kouta na bobungisi mayi na makila ya nzoto, mpé míngi mpeza elandaka sima ya bilembo komonana kati ya mikolo motoba kino zomi na motoba.

Vilúsu epesamaka na nzela ya kosimba ba mayi na makila ya nzoto, neti makila, ya mutu to ya banyama oyo baza infecté. Yango ekoki mpé kosalema na nzela ya kosimba eloko eye ewuti kozala contaminé na ba mayi to makila ya nzoto. Bopalanganisi bua bokono na mopepe kati na ba primate, bakisa mpé batu, naino esembolami te ezala na ba laboratoire to libanda  Makidi to miliki ya libele ya mutu sima na libiki naye na Ebola ekoki kokoba kozala na vilúsu kino mua baposo to ba sanza. Endimami ete ba ngembo nde baza normal bakumbi na mokili, bakoki kobola vilúsu mpé komona mpasi nayango te. Makono masusu neti malaria, cholera, fɛ́fɛlɛ typhoide, méningite mpe ba fiévre hémoragique viral makoki komonana neti Ebola. Basalaka teste ya ba échantillion ya makila mpo na RNA viral, ba anticorps to mpo na vilúsu yango moko mpo na kosɔsɔlɔ diagnostic.

Mpo na kotála épidemie esengelaka kosangisa makasi ya baye basalaka na ba lopitalo, elongo na komipesa ya bayi mboka. Misala kouta na baye basalaka na lopitalo eza ndenge na ndenge kati nayango eza bokundoli na lobango baye bazwami na bokono, koluka ba contact ya baye bakuatanaki na batu oyo baza infecté, kokende na lobango na ba laboratoire, kopesa ba soins eye esengeli na baye baza infecté, mpé kokunda baye bakufi na bokono ndenge esengeli na nzela ya kotumba nzoto to kokunda na lilita. Ba échantillion ya mayi to makila ya nzoto mpé nzoto ya batu oyo bakufi na Ebola esengeli kolengela yango na bokebi nionso. Nzela ya yambo mpo na komibatela eza kosukisa kopalangana ya bokono kowuta na banyama oyo baza infecté ezwa batu. Yango ekoki kosalema na bolengeli nyama ya zamba oyo emonani neti eza infecté kaka ntango bilamba ya komibatela nango bilatemi mpé kolamba musunyi yango na bokebi liboso ya kolia yango. Nzela mosusu mpo na komibatela eza kolata bilamba ya komibatela nago mpé kosokola maboko ntago oza pene to owuti kokutana na mutu oyo oza na bokono. Traitement  oyo esembolami to mangwele mpo na bokono oyo eza te, atako ba recherche eza kosalema mpo na ba nkisi mususu oyo ekoki kobikisa. Lisungi oyo epesamaka, esalisaka mokoni. Kati nayango eza kozongisa mayi na nzela ya serum oral (komela mayi oyo eza na mua sukali na mungwa) to kopesa ba fluide intraveineux mpé kotraiter bokono ntango bilemebo bimanani.

Bokono oyo emonanaki mbala ya yambo na mobu ya 1976 kolandana na épidemie eye esalemaki ngonga moko na bisika mibale, moko na Nzara, mpe mosusu na Yambuku, mboka oyo ezali pene na Mongala. Ebola eye epesi nkombo na bokono. Epidemie ya ebola esalemaka na kobongolaka bisika ezalí kobimela na ba region tropicale ya Afríka ya se ya Sahara. Kati ya mobu ya 1976 na 2013,  Organisation Mondiale ya Santé  elobi ete épedemie esalemaki mbala 24 mpe ezwaki batu 1,716. Epidemie ya monene koleka ebandaki na mobu ya 2014 mpe ekobaki na mobu ya 2015 na épidemie Afríka ya Wɛ́sita mpé kotungisa ba mboka ya Liberia, Sierra Leone na Gine. Na ngonga oyo, ebola ebola eza na mboka nionso te, kasi eza na mua bisika na Liberia. Kotala na mokolo ya 6 sanza ya yambo 2016[//en.wikipedia.org/w/index.php?title=Ebola_virus_diseaseaction=edit #x5B;update#x5D;], épidemie oyo esilaki kozwa batu 28,638 mpe emamaki liwa ya batu 11,315.#cite_note-6who16-14|[14]




#Article 142: Etat ya Kifwafwa (285 words)


Etat ya kifwafwa (SE) eza crise ya kifwafwa oyo ekoumela koleka minuti mitano to kopiquer crise koleka mbala moko nakati ya minuti mitano na mutu oyo azali kokoka te kozonga ndenge azalaka. Kala bazalaka kosukisa eleko ya crise na minuti 30. Ba crise ekoki kozala ya tonico-clonique na motindo moko moko ya kokangama na kofungolama ya maboko na makolo to ya lolenge oyo eza na kokangama te neti absence ya ba crise to ndambu ya ba crise ya bilinga bilinga. Etat ya kifwafwa ezalaka urgence eye etungisaka bomoyi ya mutu mingi mpeza soki traitement epesami na lobango te.

Etat ya kifwafwa ekoki kokomela baye basila kozwa kifwafwa na mpe baye baza na nkokoso ya kozalisa yango kouta na bongo. Nkokoso oyo ya bozalisi kouta na bongo ekoki kozala traumatisme, ba infections, to ba accident vasculaire cérébral. Mingi mingi diagnostic esalemaka na bomeki sukali kati ya makila, kozwa bilili ya moto, bomeki makila na ba lolenge ndenge na ndenge, mpe kosalela électroencéphalogramme. Ba crise psychogénique ya kifwafwa te ekoki komonana neti yango. Mitindo misusu miye mikoki komonana neti Etat ya kifwafwa eza hypoglycémie, kosala maye malongobani te, méningite, mpe loyenge.

Benzodiazépine eza ba nkisi oyo esengeli kobanda nayango na sima nayango mingi mpeza ezalaka kopesa phénytoïne. Ba benzodiazépine oyo ekoki kozwama eza lorazépam ya kokotisa na mizisa na mpe tonga ya midazolam. Ba nkisi misusu ya ndenge na ndenge bakoki kosalela yango soki nkisi oyo etangemi awa likolo eza kosalisa te, bakoki bongo kosalela acide valproïque, phénobarbital, propofol, to kétamine. Intubation ekoki kosengela mpo na kosalisa voie respiratoire mobeli. Kati ya 10 kino 30% ya batu oyo baza na etat ya kifwafwa bakufaka nakati ya mikolo 30. Ntina eye ezalisaki bokono, mibu ya mutu mpe bolayi ya eleko ya crise eza bafacteur ya motuya mpo na koyeba nini yango ekokoma. Etat ya kifwafwa ezwaka kino batu 40 kati ya batu 100,000 na mobu. Yango eza bongo 1% ya baye bakende na ba salles d'ugence.




#Article 143: Molangwa ya seko na seko (718 words)


Molangwa ya seko na seko, eyebani mpe bo mpasi ya bolangwi masanga mpe syndrome ya komipesa na masanga, eza nkombo eye basaleka mpo na bomeli masanga nionso oyo ekoki komema nkokoso. Kala ekobolamaka na lolenge mibale: komela masanga mabe na komipesa na masanga. Kolandana na minganga, molangwa ya seko na seko ezalaka ntago makambo mabale to koleka ya maye malandi mamonani: mutu akomela ebele ya masanga na eleko molayi, aza komona mpasi kokata, koluka masanga mpe komela yango eza kozwa ntango molayi, kozala na mposa ya masanga mingi mpeza, komela masanga eza kosala ete mutu atala mokumba naye te, komela masanga eza komema nkokoso na batu, komela masanga eza komema nkokoso na nzoto, komela masanga eza komema na nzela ya makama, kozangisa esalemaka ntango mutu aza kotika komela, mpe komikaba na masanga esalemaka na bomeli masanga. Makambo maye makoki komema likama eza komela masanga mpe kotambwisa motuka to kosangana bonzoto oyo ebatelami te. Komela masanga ekoki kotungisa biteni nionso ya nzoto kasi mingi mpeza etungisaka bongo, motema, foie, pancréas, mpe bokengi ya nzoto. Yango ekoki komema mental illness, syndrome ya Wernicke–Korsakoff, motema kobeta ndenge esengeli te, défaillance hépatique, mpe kobakisa risque ya kozwa cancer. Komela masanga na eleko ya zemi ekoki kobota mikakatano epayi ya mwana mpe komema nkokoso nionso ya masanga na foetus. Mingi mingi mpeza ba effet ya masanga na nzoto mpe moto esimbaka basi koleka mibali.

Ezala bafacteur génétique to ya nzinga nziga nionso esalaka na bozalisi molangwa ya seko na seko mpe ezali kokabola ba risque ndenge moko. Mutu oyo aza na moboti to ndeko oyo azali na molangwa ya seko na seko, azali na mabaku misato to minei ya ye mpe kokoma na molangwa ya seko na seko. Bafacteur ya nzinga nzinga eza ba influance ya baninga, ya bomoto mpe ya ezaleli. Ba niveaux ya stress ya likolo, komitungisa, na mpe masanga ya talo moke oyo ekozwama na bopete abakisaka risque. Batu bakoki kokoba komela moke mpo na komibatela na mpasi ya kozanga masanga. Mua ba sanza ya bozangisi ekokoba kozala na niveau ya moke sima ya kotika komela masanga. Minganga batalaka molangwa ya seko na seko bo maladi ya nzoto mpe ya moto. Ezala ba questionnaire to bomeki makila ekoki kosalisa na bokundoli batu oyo bakoki kozala na molangwa ya seko na seko. Mayebisi mosusu masangisamaka na sima mpo na koconfirmer diagnostic.

Kobatela batu na molangwa ya seko na seko ekoki kosalema na nzela ya mibeko mpe kotia ndelo ya boteki masanga, kofutisa mpako ya masanga mpo na komatisa talo ya masanga, mpe kopesa traitement na talo moke. Traitement ekoki kozala na ba etape ebele. Mpo na mikakatano miye mibimelaka na eleko ya bozangisi, désintoxication ya masanga esengeli elandelama na bokebi. Methode oyo esalelamaka mingi eza kopesa nkisi oyo eza na benzodiazépine, neti diazépam. Yango ekoki kopesama ntango mutu alalisami na mbeto ya lopitalo to mbala na mbala ntango batiki mutu azala epayi naye kasi akolandelama na pene. Ba dépendance mosusu to maladi ya moto ekoki komema mbilinga mbilinga na traitement. Na sima ya désintoxication lisungi neti ya thérapie ya lingomba to mangomba ya lisungi basalelaka yango mpo na kosalisa mutu azongela lisusu komela masanga te. Lolenge ya lusungi liye basalelaka mingi eza lingomba Balangwi Bazanga Nkombo. Nkisi oyo acamprosate, disulfirame, to naltrexone bakoki mpe kosalela yango mpo na kopekisa mutu akoba komela.

Organisation Mondiale ya Santé emoni ete kotala na mobu ya 2010 na mokili mobimba 208 million ya batu bazalaki na molangwa ya seko na seko (4.1% ya baye baza na mibu koleka 15). Na Etat Unis, pene na 17 million (7%) ya batu bakolo mpe 0.7 million (2.8%) ya baye baza na mibu 12 kino 17 batungisami. Esimbaka mingi mibali na bilenge oyo bakomi komela, mpe etungisaka mingi te baye baza na mibu kobanda na tuku mitano na babange. It is the least common in Africa at 1.1% and eza na taux likolo koleka na Eropa ya Est na 11%. Molangwa ya seko na seko ememaki liwa ya batu 139,000 na mobu ya 2013 motango oyo momataki kouta na 112,000 ya baye bakufaki na 1990. 3.3 million ya nionso baye bakufaki (5.9% ya baweyi) endimami ete bakufaki mpo na molangwa ya seko na seko. Mingi mingi ekitisaka eleko ya bomoyi bua mutu na kumba pene na mibu zomi. Na Etats Unis ememaki 224 milliards ya dollar américain na mobu ya 2006. Maloba ebele, mosusu ya kofinga mpe mosusu informal, basalelaka yango mpo na kotalisa batu oyo batungisami na molangwa ya seko na seko, kati nayango eza: kwiti-kwiti, molangwi, dipsomane, mpe sans souci. Na mobu ya 1979, Organisation Mondiale ya Santé esengaki batika kosalela liloba  alcoolisme mpo na bozangi ya bosembolami ya ntina ya liloba oyo, eponaki basalela sydrome de dépendance à l'alcool.




#Article 144: Maladi ya motema (533 words)


Maladi ya motema, mingi mingi eyebani bo makila kozanga kotonda na motema (CHF), esalemaka ntango motema eza kokoka te kotondisa ndenge ekoki mpo na komaintenir circulation ya makila oyo esengeli na posa ya nzoto. Liloba maladi ya motema oyo ekozongaka mbala na mbala (CHF) to kozanga kotondisa makila na motema (CCF) basaleka yango ndenge moko na oyo ya makila kozanga kotonda na motema. Mingi mpeza bilembo ezalaka pema mokuse, bolembu koleka, mpe makolo kovimba. Pema mokuse mingi mingi ekomaka mabe koleka na bosali physique, ntango ya kolala na se, mpe ekoki kolamusa mutu na butu. Makasi moke mpo na kosala physique mingi mingi ezalaka mpe elembo.

Ntina eye mingi mingi ememaka maladi ya motema eza maladi ya ba artère coronaire na mpe bobebi ya myocarde (crise cardiaque), hypertension artérielle, fibrillation ya muscle ya motema, nkokoso na valvule ya motema, komela masanga koleka ndelo, infection, mpe cardiomyopathie oyo eyebani ntina te. Yango ememaka maladi ya motema na bobongoli lolenge to motindo motema esalaka. Eza na lolenge mibale ya maladi ya motema: maladi ya motema kolandana na ventriculaire gauche eye ekosala mabe mpe maladi ya motema oyo eza na fraction ya ejection normale kolandana na makoki ya ventriculaire gauche mpo na kokangama soki eza affecté, to makoki ya motema mpo na komifungola. Monene ya maladi mingi mingi etalemaka na nzela ya botali nkokoso eye mutu azali nayango mpo na kosala physique. Maladi ya motema eza ndenge moko te na bobebi ya myocarde (oyo eteni ya muscle ya motema ekufaka) to arrêt cardiaque (oyo circulation ya makila ekatanaka). Bokono misusu oyo ekoki kozala na bilembo neti ya maladi ya motema eza obesité, insuffisance réinale, ba nkokoso ya foie, anémie mpe bokono ya thyroide.

Diagnostic ya maladi esalemaka kolandana na lisitwale ya ndenge bilembo bibandaki komonana mpe examen ya nzoto mpe confirmation na échocardiographie. Komeka makila, électrocardiographie, mpe radiographie ya panzi ekoki kozala ya litomba mpo na koyeba ntina ya maladi. Traitement elandanaka na lolenge na ntina oyo ozalisaki maladi. Epayi ya batu oyo bazali na maladi ya motema ya mua stable kasi ezongaka mbala na mbala, traitement oyo epesamaka mingi mingi eza kobongola ndenge ya kobika neti kotika kobenda likaya, kosala ba exercice physical  mpe kobongola eliyeli, na mpe komela nkisi. Epayi ya baye baza na maladi ya motema kolandana na ventriculaire kosala mabe, inhibiteur ya enzyme ya conversion ya angiotensine to blockeur ya récepteur ya angiotensine elongo na bêta-bloquant ezalaka recommandé. Mpo na baye maladi eza makasi, antialdostérone, to hydralazine kobakisa na nitrate, bakoki kosalela yango. Kosalela biye bibakisaka kosuba ezalaka na litomba mpo na kopekisa mayi ekangema na nzoto. Tango mususu, kolandana na ntina, dispositif ya kotiama neti stimulateur ya motema to défibrillateur ya kotiama na motema ekoki kozala recommandé. Na ba cas misusu ya mua kati to ya makasi ekoki kosengela kosala resynchronisation ya motema (CRT) to modulation contractilité ya motema ekoki kozala ya litomba. Stimulateur ya motema oyo etiami na thorax to ntango mususu bakoki korecommander greffe ya motema mpo na baye baza kobela makasi malgré mikano misusu.

Maladi ya motema ezwaka batu ndenge na ndenge, ememaka misolo ebele, mpe ekokaka komema liwa. Na pays développés, pene na 2% ya batu bakolo baza na maladi ya motema mpe baye baza na mibu koleka 65, ezali 6–10%. Na mobu eye elendi diagnostic risque ya liwa ezalaka pene na 35% na sima nayango ekitaka na 10% mobu na mobu. Yango eza neti ba risque ya ba lolenge songolo ya cancer. Na Royaume Uni, maladi oyo eza ntina ya 5% ya batu ya ba cas d'urgence oyo balalisamaka na mbeto ya lopitalo. Maladi ya motema eyebana uta kala mpeza wapi Ebers papyrus akolobela yango na mobu 1550 Liboso ya Mbotama ya Kristo.




#Article 145: AVC (470 words)


AVC, eyebani mpe bo accident vasculaire cérébral, attaque cérébrale to mpe lokito na moto, esalemaka ntango circulation ya makila eza mabe na bongo mpe komema liwa ya ba cellule. Eza na lolenge mibale ya AVC: AVC ischémique, kolandana na bozangi ya circulation ya makila, mpe AVC hémorragique, kolandana na botangisi makila. Yango nionso mibale esalaka ete eteni ya bongo esala malamu te. Bilembo ya AVC ekoki kozala kozanga ndenge ya koningana to kosentir na ngambu moko ya nzoto, kososola makambo to koloba, koyoka neti mokili eza kobalu mbangu, to liso moko etiki komona mpe bilembo misusu. Bilembo bibandaka mingi mingi komonana noki sima na AVC kosalama. Soki bilembo biumeli na eleko na se ya ngonga moko to mibale yango eyebani bo accident ischémique ya eleko mokuse. AVC hémorragique ekoki mpe kolandana na moto mpasi ya makasi. Bilembo ya AVC bikoki koumela libela. Mikakatano miye mikoki koya sima na eleko molayi mikoki kozala pneumonie to kobungisa contrôle ya ba vessie.

Facteur risque ya yambo mpo na AVC eza hypotension artérielle. Ba facteurs risques misusu eza kobenda likaya, obesité, taux monene ya cholestérol kati ya makila, maladi ya sukali, accident ischémique ya eleko mokuse, mpe fibrillation auriculaire. AVC ischémique mingi mpeza elandanaka na kozibama ya vaisseau ya makila. AVC hémorragique elandanaka na kotangisa makila nakati ya bongo to na nzinga nzinga ya bongo. Kotangisa makila ekoki kosalema kolandana na kovimba ya bongo. Diagnostic mingi mpeza esalemaka na bozwi bilili na ba labo neti na scanner ya tomographie to scanner IRM elengo na ba examen ya nzoto. Ba teste misusu neti électrocardiogramme (ECG) na ba teste ya makila esalemaka mpo na koyeba ba facteurs risques mpe kolongola ntina misusu oyo ekokaki kozala. Sukali moke na makila ekoki mpe komema bilembo lokola oyo ya AVC.

Mpo na komibatela esengeli kokitisa bafacteur risque na mpe aspirine, statine, lipaso mpo na kofungola ba artéres oyo ekeyi na bongo mpo an baye baza na kokondisama oyo ya mikakatano, mpe warfarine mpo na baye baza na fibrillation auculaire. AVC mingi mingi esengaka kokende na soins d'urgence. AVC ischémique, soki ekundolami nakati ya ngonga misato kino minei na ndambu, ekoki kobikisama na nkisi oyo ekoki kopanza mbuma ya makila. Esengeli kosalela Aspirine. Ba AVC hémorragique mususu esungamaka na lipaso. Traitement mpo na komeka kozongisa fonctionnement eye etikaki kosala ebiangamaka rééducation cérébrale mpe mingi mpeza esalemaka na service cardiaque; kasi, yango eza bisika mingi te na mokili.

Na mobu ya 2010 pene ya 17 million ya batu bazwamaki AVC mpe 33 million bazalaki baye basila kozwa yango liboso mpe bakobaki kozala na bomoyi. Kayi ya mobu ya 1990 na ya 2010 motango ya ba AVC oyo esalemaki mobu na mobu ekitaki kino pene na 10% na ba pays développés kasi emataki na 10% na ba pays en voie de développement. Na mobu ya 2013, AVC ezalaki ya mibale sima ya maladi ya ba artéres coronaires na oyo mingi mingi ememaka kufa, ememaki liwa ya batu 6.4 million (12% ya nionso). Pene na 3.3 million ya batu bakufaki, elandanaki na AVC hémorragique. Pene na moitié ya batu oyo bazwa AVC babikaka na se ya eteni ya mobu. Na nionso, 2/3 ya AVC esalemaka na baye baza na mibu koleka 65.




#Article 146: Varicelle (465 words)


Varicelle eza bokono boye bopesamaka mingi kolandana na infection ya yambo na virus ya varicelle na zona (VZV). Bokono oyo bomemaka bobebi ya loposo oyo esalaka ba mpote, ya mike mike na mokosa, oyo ekoki kobimisa bokulutu. Mingi mingi ebandaka na panzi, mokongo, mpe na elongi ebongo epanzani nzoto mobimba. Bilembo mosusu ekoki kozala fièvre, koyoka bolembu, mpe moto mpasi. Mingi mingi bilembo biumelaka mikolo mitano kino zomi. Mikakatano mikoki ntango mosusu kozala pneumonie, bongo kovimba, to loposo kozwa infection na ba bactérie na mpe mikakatano misusu. Bokono oyo mingi mingi ezalaka makasi epayi ya batu bakolo koleka bana. Bilembo bibandaka komonana mikolo zomi kino mikolo ntuku mibale na moko sima na kozwama na virus.

Varicelle eza bokono boye botambolaka na mopepe oyo ekabolamaka na bopete nionso na nzela ya kosukose na intsa ya mutu oyo azali nayango. Ekoki kokoba kowuta mokolo moko to mibale liboso ba mpote emonana kino ba pota nionso ezibama na bokulutu. Ekoki mpe kokabolama na bosimbi ba mpote. Baye baza na zona bakoki kokabola varicelle na baye baza immunisé te soki basimbi ba mpote. Diagnostic ya bokono ekoki kosalema mingi mingi kolandana na bilembo biye bimonani; kasi, ba cas misusu ekoki kozala confirmer na nzela ya réaction na chaine ya polymérisation (PCR) komeka ba mpote to bokulutu. Komeka ba anticorps ekoki kosalema mpo na koyeba soki mutu aza immunisé to te. Mingi mingi batu bazwaka bokono oyo obe mbala moko.

Mangwele ya varicelle esali ete motango ya baye bazwami na bokono ya varicelle na mikakatano kouta na bokono oyo ekita. Ezali kotala pene na 70 kino 90 % ya batu oyo baza na bokono na lisungi monene mpeza mpo na baye baza na mpasi makasi. Esangami na ba mboka ebele bapesaka bana mangwele mbala na mbala. Kozwa mangwele nakati ya mikolo misato sima na kozwama na infection ekoki komatisa résultat epayi ya bana. Traitement mpo na baye bazwami na bokono ekoki kozala lotion calmante ya calamine mpo na kosalisa mokosa, kokata manzaka ya misapi ya maboko mpo na kokitisa komizokisa nakomikwanza, mpe komela paracétamol (acétaminophene) mpo na kosalisa fièvre. Mpo na baye baza na risque monene ya mikakatano ba nkisi anti-virus neti aciclovir ezalaka recommandé.

Varicelle ebimelaka bipayi nionso na mokili. Liboso ya mangwele oyo eza kopesama mbala na mbala motango ya baye bazalaki kozwama na bokono mobu na mobu ezalaki ndenge moko na motango ya baye bazalaki kobotama. Uta mangwele eya motango ya ba infection na Etats Unis ekatema na 90%. Na mobu ya 2013, varicelle ememaki liwa ya batu 7,000 mokili mobimba – motango oyo mokitaki kowuta na 8,900 na mobu ya 1990. Liwa ezwaka mutu 1 nakati ya batu 60,000 oyo bazali na varicelle. Bokeseni ezalaki te kati na varicelle na variole kino na suka ya siècle ya 19. Na mobu ya 1888, basembolaki boyangani nayango na zona. Nkombo ya varicelle etiyamaki mbala ya yambo na mikanda na mobu ya 1658. Na lokota ya Angele bamitunaki ndenge nini chiken oyo elingi koloba soso na Lingala, basangisaki yango nkombo ya bokono oyo mpo na koloba chickenpox, mpe ebele ya maloba elobamaki; moko nayango ezalaki ete bokono oyo eza mua lolenge ya bopete.




#Article 147: Tetanɔ́si (323 words)


Tetanɔ́si, ezalí infection oyo eza kosalema mpeza na bokauki ya misunyi ya nzoto. Mingi mingi bokauki ebandaka na mbanga ebongo ekobi nzoto mobimba. Bokauki oyo mingi mingi eumelaka mua ba minuti mbala nionso mpe esalemaka mingi mingi mbala misato to minei na poso. Bokauki ekoki kozala makasi kino ata kobuka mikuwa. Bilembo mosusu ekoki kozala fièvre, kotoka, moto mpasi, mpasi komela eloko, hypertension artérielle, mpe motema kobeta mbangu. Komonana ya bilembo mingi mingi ezwa mikolo misato kino ntuku mibale na moko sima ya kozala infecté. Ekoki kozwa mua ba sanza mpo na mutu abika. Pene na 10% ya baye bazalaka infecté bakufaka.

Tetanɔ́si ezwamaka na nzela ya bactérie Clostridium tetani, oyo ezalaka mingi mingi na mabele, pousière mpe fumier. Mingi mpeza bactérie ekotelaka na esika loposo efungwami neti pota to lidusu ya pota oyo ekatemi na eloko oyo eza contaminé. Ebotaka ba toxins oyo epesaka mbilinga mbilinga na contraction ya misunyi ya nzoto mpe komema bilembo biye biyebani. Diagnostic elandanaka na bilembo biye bimonani. Bokono oyo ekobalamaka te na batu.

Mpo na komibatela na infection esengeli kozwa mangwele oyo elongobani yango ezali bongo Mángwelé ma tetanɔ́si. Mpo na baye baza na pota monene mpe bazwa na se ya dose misato ya mangwele esengeli nabango mangwele nionso na oyo ya immuno-globuline  mpo na tétanos. Mpo na baye bazwi infection, esengeli kosalela immuno-globuline to soki eza te basalela immuno-globuline ya kokotisa na mizisa (IVIG). Esengeli kosukola pota mpe kolongola poso nionso ya kokufa. Bakoki kosalela ba relaxant ya ba muscles mpo na kocontrôler bokauki. Pakapaka ya kopesa mopepe ekoki kosengela mpo na mutu oyo aza na mikakatano mpo na kopema.

Tétanos ebimelaka bisika nionso ya mokili kasi mingi mingi bisika ya molunge mpe mayi mayi epayi mabele eza na matère organique ebele. Na mobu ya 2013 ememaki liwa ya batu pene na 59,000 – motango oyo mokitaki kowuta na 356,000 na mobu ya 1990. Hippocrate atatolaki bokono oyo uta kala na siècle ya 5 Liboso ya Mbotama ya Kristo. Ntina ya bokono oyo esembolamaki na mobu ya 1884 na Antonio Carle mpe Giorgio Rattone na Université ya Turin mpe mangwele esalemaki na mobu ya 1924.




#Article 148: Mikakatano na minyo (312 words)


Mikakatano na minyo eza bokono boye bowuti na parasite oyo ebengami minyo. Ba infections elakisaka bilembo te na batu koleka 85%, mingi mpeza soki motango ya ba minyo eza moke. Bilembo bibakisamaka kolandana na motango ya minyo oyo eza nakati ya libumu mpe ekoki kozala mpema mokuse na fièvre na ebandeli ya bokono. Yango ekoki kolandisama na bilembo ya kovimba libumu, mpasi na se ya libumu mpe pululu. Bana nde bazwamaka mingi na bokono oyo, mpe na mibu nabango bokono bokoki kozangisa bango ndenge ya komatisa kilo ya nzoto, bolei mabe na mikakatano mpo na koyekola.

Infection esalemaka na bolei biloko to komela mayi oyo eza contaminé na maki ya minyo kouta na nyei. Maki ekobota nakati ya mitsopo, komilekisa nakati, mpe kokende na poumon na nzela ya makila. Ntango bakomi kuna bakokota na ba alvéoles mpe koleka na trachée, epayi wapi bakosanzama mpe komelama. Ba larve na sima bakokende na libumu mbala ya mibale epayi wapi bakokola kokoma minyo ya mikolo. Mikakatano ya minyo etiyami bo bokono oyo ekipamaka te na region tropicale mpo ezali lolenge ya helminthe oyo epesamaka kouta na mabele. Bokono oyo bozali bongo nakati ya ngulupa ya maladi oyo ebengami helminthes.

Mpo na komibatela esengeli konetola assainissement, oyo ezali bongo kozala na ba toilettes ya malamu mpe koyeba epayi wapi malamu kotika nyei. Kosukola maboko na sabuni emonani ete ebatelaka. Na bisika oyo koleka 20% ya batu bazwami na minyo, esengelaka kotraiter batu nionso na bileko biye bibongisami. Batu mingi bamonaka bokono oyo kozongela bango.  Mangwele eza te. Ba traitements oyo eza recommandé na Organisation Mondiale ya Santé eza ba nkisi ya albendazole, mebendazole, levamisole to pyrantel pamoate. Ba nkisi mususu ya makasi eza tribendimidine na nitazoxanide.

Pene na 0.8 kino 1.2 billion ya batu mokili mobimba baza na minyo mpe baye batungisami mingi eza baye baza na Afrika ya se ya Sahara, Amerique Latine, na Asia. Yango esali ete mikakatano na minyo ezala bokono boye bozwaka batu mingi na ngulapa ya ba maladi helminthe oyo epesamaka kouta na mabele. Kotala na mobu ya 2010 ememaki liwa ya batu 2,700 motango oyo mokitaki kouta na 3,400 na mobu ya 1990. Lolenge mosusu ya Minyo etungisaka ba ngulu.




#Article 149: Piololo nakati ya matoyi (318 words)


Piololo nakati ya matoyi eza mutu koyoka mongongo ntango libanda ya matoyi makelele eza te. Mingi mingi ntango etatolama bo ngongi, ekoki mpe koyokana neti eloko ekobetaka nakati ya litoyi, piololo to konguluma. Mbala mingi te, mingongo ya batu to ya miziki oyo eza claire te ekoyokama. Mongongo ekoki kozala pete to makasi, hauteur ya se to hauteur ya likolo mpe emonani neti eza kouta na litoyi to nionso mibale. Mingi mingi, eyaka malembe malembe eza komata. Epayi ta batu mosusu, mongongo yango ememaka depression, anxieté to kobebisa concentration.

Piololo nakati ya matoyi eza bokono te kasi eza elembo oyo ekoki kouta na ba ntina oyo ememaka maladi. Moko ya ba ntina oyo eyebani mingi eza kobungisa koyoka oyo ewuti na makelele. Ntina misusu eza: ba nfection ya matoyi, mpasi ya motema to ya ba vaisseau ya makila, kizunguzungu ya Ménière, bongo kovimba, komela lolenge songolo ya ba nkisi, pota na moto oyo ezwama kala mpe mafuta ya matoyi. Mingi mingi ezwaka batu oyo baza na depression.

Minigi mingi diagnostic elandanaka maye mokoni alobi. Mbala mususu, mongongo ekoki koyokama na mutu mususu oyo azali kosalela stéthoscope: mpo na yango, piololo na matoyi eyebani bo eye eza objectif. Ba questionnaire ndenge na ndenge eza mpo na kotatola ndenge piololo na matoyi eza kotungisa bomoyi ya mutu. Esengeli batu basala examen ya audiograme mpe ya ba nerfs nakti ya diagnostic. Soki nkokoso ezwami, kozwa bilili na scanner neti MRI ekoki kozala recommandé. Baye baza na piololo nakati ya matoyi oyo esalemaka motindo moko na ebeteli ya motema nabango esengeli basala ba examen mosusu.

Mpo na komibatela esengeli kosala ete makelele ya makasi ekota na matoyi te. Soki ntina eye ememaki bokono eyebani, kotraiter yango ekoki kosalisa. Soki te, mingi mingi, mpo na kosalisa balelaka ndenge ya kobikisa na maloba. Ba appareil ya kopesa mongongo to ba appareil accoustique ekoki mpe kosalisa. Kotala na mobu ya 2013, nkisi ya kobikisa mpeza naino ezwamaki te. Ezwaka batu mingi, etungisaka pene na 10 kino 15% ya batu. Mingi na bango, bakipaka yango te mpe yango eza nkokoso monene obe na 1 to 2% ya batu. Nkombo ya bokono ewuta na Latin  oyo elingi koloba kobeta ngonga.




#Article 150: Fièvre jaune (424 words)


Fièvre jaune, kala na lokota ya Angele eyebanaka bo yellow jack, yellow plague, to bronze john, eza bokono ya makasi kouta na virus . Na ba cas mingi, bilembo bizalak fièvre, kolenga, kozanga mposa ya kolia, nausé, mpasi ya misunyi ya nzoto mingi mpeza na mokongo, mpe moto mpasi. Mingi mingi bilembo bibandaka kosila nakati ya mikolo mitano. Epayi batu misusu nakati ya mokolo ya boyoki mua malamu, fièvre ezongakaka, babandaka koyoka mpasi na se libumu, mpe mikakatano ya foie ebandaka kobongola loposo ya nzoto kokoma loposo ya jaune. Soki esalemi, risque ya kotangisa makila mpe mikakatano ya ba rein mpe emataka.

Bokono oyo ewutaka na virus ya fièvre jaune mpe ekabolamaka na ngungi ya mwasi ntango akosuwa. Epesaka bokono obe na batu, ba makaku misusu, mpe lolenge misusu ya ngungi. Na bingumba, ekabolamaka mingi mpeza na ba ngungi ya lolenge ya Aedes aegypti. Virus oyo eza virus RNA virus ya lolenge ya Flavivirus. Eza mpasi kokesanisa bokono oyo na ba maladi misusu, mingi mingi na ebandeli nayango. Mpo na koconfirmer soki mutu azwami nayango, esengelaka kosala examen ya makila na préaction na mulongo ya polymérase.

Mangwele ya malamu mpe ya makasi mpo na fièvre jaune ezali mpe ba mboka misusu esengaka na bakeyi mibembo bakata mangwele oyo. Nzela mosusu mpo na komibatela eza kokitisa motango ya ba ngungi oyo bakabolaka bokono oyo. Na bisika biye fièvre jaune ezwi batu ebele mpe mangwele ezali, bokundoli liboso na ntango baye baza nayango mpe kopesa mangwele na batu ebele ezalaka ya litomba mpo na komibatela na ba épidemie. Ntango mutu asili kozwama nayango, lisalisi lizalaka mpo na bilembo mpe lizalaka te na mikano miye misembolami mpeza mpo na kobundisa virus. Epayi ya baye baza na bokono makasi, liwa ememaka pene na ndambu ya batu oyo bazali kozwa triatement.

Fièvre jaune ememaka infection na batu 200,000 mpe koboma batu 30,000 mobu na mobu, mpe pene ya 90% ya makambo oyo esalemaka na Afrika. Pene na milliard moko ya batu bafuandaka na bisika biye bokono oyo ezwaka batu mingi na mokili. Ezwaka batu mingi na ba région tropicale Amerika ya Se na Afrika, kasi na Asia te. Uta mobu ya 1980, motango ya baye bazwami na fièvre jaune ezali kaka komata. Endimami ete eza mpo batu moke mpeza nde bakokata mangwele, mpe batu mingi mpeza bakomi kofuandaka nakati na bingumba, mpe batu kobongolaka bisika bafuandaka mbala na mbala, na mpe lisusu mbongwana ya climat. Bokono oyo ebandaki na Afrika, mpe ekendeki na Amerika ya Se na nzela ya kotekisa baumbu na siècle ya 17. Uta siècle 17, épidemies minene minene ya bokono oyo esalemaki na ba Amerika, Afrika, mpe na Eropa. Na siècle ya 18 mpe 19, fièvre jaune ezalaki kotalema bo moko ya ba maladi oyo epesamaka ya mabe mpeza. Na mobu ya 1927  kati na ba virus oyo ezwaka batu, virus ya fièvre jaune ekomaki virus ya yambo kotiyama pembeni.




#Article 151: Sinusite (330 words)


Sinusite, eyebani mpe lisusu bo infection ya sinusite to rhinosalpingite, eza inflammation ya ba sinus oyo ekomeka bilembo ya bokono. Bilembo biye biyebani mingi eza miyoyo monene, zolo kozibama, mpe mpasi na elongi. Bilembo misusu bikoki kozala fièvre, moto mpasi, zolo koyoka solo malamu te, mpasi ya kingo, mpe kokosola. Kosukosu ekomaka makasi mpeza na butu. Mikakatano ya makasi ezalak mpeza mingi te. Etatolami bo rhinosinusite ya makasi (ARS) soki eumeli na se ya poso minei, mpe bo rhinosinusite ya kozongoka mbala na mbala (CRS) soki eumeli koleka poso zomi na mibale.

Ekoki kouta na infection, ba allergies, pollution ya mopepe, to nkokoso mpo na ndenge ya kati ya zolo. Ba cas mingi elandanaka na infection ya virus. Infection ya bactérie ekoki kobimela soki bilembo biumeli koleka mikolo zomi to soki bokono ekomi lisusu makasi epayi ya mokoni sima na ntango abandi koyoka mua malamu. Bokono kozongelaka sima na bileko ekomelaka mingi baye baza na maladi ya mpema, fibrose cystique, mpe bokengi mabe ya nzoto. Esengelaka te kosalela ba rayons-X soki kaka emonani neti mikakatano mizali. Mpo na bas oyo ezongaka mbala na mbala, esengelaka kosala ba teste mpo na confirmation, ezala ya kotala na miso to ya tomographie na ordinateur.

Ba cas misusu mpo na komibatela nayango batu bakoki kosukola maboko, kotika kobenda likaya, mpe kokata mangwele. Ba calmants neti naproxène, steroïdes ya zolo, mpe kolekisa mayi na zolo bakoki kosalela yango mpo na kosunga mobeli oyo aza na bilembo ya bokono. Kotraiter sinusite na ba antibiotique to te endimami mpo na ba cas ya ba bactérie oyo eza na mikakatano te. Soki sima na mikolo sambo mosusu mbongwana ezali kaka te bakoki kosengela kosalela ba antibiotique to kobongola oyo bazalaki kosalela. Mpo na baye basalaleka ba antibiotique mpo nabango, ezala amoxicilline to amoxicilline/clavulanate  azalaka recommandé yambo. Mbala mususu bakoki kosala lipaso mpo na baye bokono oyo ezongelaka bango mbala na mbala.

Sinusite eza bokono ya kokamwisa te. Etungisaka pene na 10% na 30% ya batu mobu na mobu na Etats Unis mpe na Eropa. Mingi mingi basi bazwamak nayango koleka mibali. Sinusite ya kozongaka mbala na mbala etungisaka pene na 12.5% ya batu. Traitement ya sinusite na Etats Unis ekumbaka misolo koleka 11 milliards ya dollard américain.




#Article 152: Bokeleli Vitamine B12 (353 words)


Bokeleli Vitamin B12, eyebani mpe lisusu bo hypocobalaminemia, elakisaka niveau moke ya vitamine B12 nakati ya makila. Bilembo ndenge na ndenge bikoki komonana ekoki kozala kokita ya makoki ya kokanisa mpe mbongwana nakati na bomoto neti depression, koumela te na kozwa kanda, mpe psychose. Komiyoka bo momesano te, mbongwana ya bokebi, mpe misunyi ya nzoto kosala malamu te ekoki kobimela na mpe inflammation ya lolemu, decreased taste, globules rouges moke, motema kosala malembe, mpe kokita ya fertilité. Epayi ya bana mike bilembo bikoki kozala kokola malamu te, pkokomela malamu te, mpe nkokoso mpo na koningana. Soki traitement epesami na lobango te mbongwana misusu ekoki kotikala mpo na libela.

Bilembo biye biyebani mingi eza libumu to mitsopo eza koyamba malamu te biloko, kolia to komela moke, mpe nzoto kozala na bosenga ebele. Koyamba biloko moke ekoki kouta na anémie ya makasi, bolongoli biye biza na libumu na nzela ya lipaso, inflammation ya pancréas eye ezongaka mbala na mbala, ba parasites kati na mitsopo, lolenge songolo ya ba nkisi, mpe mua mikakatano kolandana na ba génés. Koyamba biloko moke ekoki kokomela baye balingaka kolia ndunda to baza na bolei mabe. Nzoto kozala na bosenga ebele ekomelaka baye baza na VIH/SIDA na baye globules rouges eza kobeba noki. Mingi mpeza diagnostic esalemaka kolandana na niveaux ya vitamine B12 nakati ya makila, na se ya 120–180 picomol/L (170–250 pg/mL) mpo na batu bakolo. Niveaux ya acide méthylmalonique soki eza ya komata (valeurs 0.4 micromol/L) ekoki mpe kolakisa bokeleli oyo etangemi awa. Lolenge ya globules rouges moke oyo eyebani bo anémie mégaloblastique mingi mingi ezwaka batu kasi ntango inso te.

Ba supplements ezalaka recommandé na baye balingaka kolia ndunda mpe bazali na zemi mpo bamibatela na bokeleli ya vitamine B12. Soki basili kokundola yango traitement nayango ezalaka pete na ba supplements ya komela to ya tonga. Mindondo eza te soki mutu alekisi vitamine B12 na nzoto mpo na baye baza na nzoto kolongonu. Ba cas misusu ekoki kosungama na kotraiter ntina eye ememaki maladi. Bas cas misusu ekoki kosenga kokoba se kokoba na ba supplements soki ntina eye ememaki bokono ekoki kobikisama. Bokeleli vitamine B12 eza likambo ya kokamwisa te. Emonani ete ezwaka pene na 6% ya batu oyo bazali na mibu na se ya 60 mpe 20% ya baye bazali na mibu koleka 60. Taux ekoki kozala likolo kino 80% na biteni misusu ya Afrika na Asia.




#Article 153: Kopola mino (404 words)


Kopola mino, eyebani lisusu bo carie dentaire, to carie, ezali bobeti ya mino kolandana na ba bactérie. Ba alvéole ekoki kozala na langi ya ndenge na ndenge kobanda na jaune kino na moyindo. Bilembo bikoki kozala mpasi mpe nkokoso mpo na kolia. Mikakatano mikoki kozala inflammation ya misunyi oyo eza nzinga nzinga na mino, mino kobukana, mpe infection to kobota abcès.t

Kopola mino ewutaka na bobebi ya biteni ya makasi ya mino (émail, dentine na cément) kolandana na ba bactérie. Yango esalemaka mpo na acide oyo ebotami kowuta na ba salite ya bilei to sukali na likolo ya mino. Sukali mpamba nakati ya bilei eza esika ya yambo eye bactérie oyo ezwelaka makasi mpe nayango bilei biye bizali na sukali mpamba ebele eza facteur ya risque. Soki bozangi ba mineraux eza monene koleka oyo esangisamaki kowuta neti na soyi, carie esalemaka. Ba facteur ya risque ekoki kozala motindo eye esalaki ete soyi ezala moke neti: maladi ya sukali, Sjogren's syndrome mpe ba nkisi mosusu. Ba nkisi oyo ekitisaka kotingisa soyi eza antihistamines na ba antidépressif. Carie elandanaka mpe na kibobola, kosokola monoko mabe, mpe kofunguama ya ba gencive oyo esalaka ete mizisa ya mino ezala polele.

Nzela mpo na komibatela eza: koukolaka mino mbala na mbala, kolia bilei oyo eza na sukali moke, mpe kosalela mua fluor na bosokoli mino. Kobrosser mino mbala mibale na mokolo mpe kolekisa singa kati-kati ya mino mbala moko na mokolo ezalaka recommandé. Fluor ekoki kowuta na mayi, mungwa to na nkisi ya mino. Kotraiter mama oyo azali na carie ekoki kokitisa risque ya bana naye kozwama nayango mpo ete motango songolo ya ba bactérie mokozala mosi mokiti. Kokende epeyi na monganga mpo na talisa mino ekoki kosala ete bokono bokundolama liboso na ngonga. Kolandana na ndenge ya bobebi, traitement ndenge na ndenge ekoki kopesama mpo kozongisa lino kosala ndenge elongobani to kolongola lino. Eza na lolenge moko te loye loyebani mpo na kokolisa lisusu mino ebele. Mingi mingi mpo na kozwa esika ya traitement ezalaka mua mindondo na ba pays en voie de développement. Paracetamol (acetaminophen) to ibuprofen ekoki komelama mpo na kokitisa mpasi.

Mokili mobimba, pene na 2.43 milliard ya batu (36% ya batu) baza na carie dentaire kati na mino nabango. Organisation Mondiale ya Santé emoni ete batu bakolo pene banso bazwamaka na carie dentaire na eleko songolo ya bomoyi. Epayi ya bana etungisaka pene na 620 million nabango to 9% ya batu. Bokono oyo ekoma kozwa na bana na bakolo mikolo oyo. Bokono oyo eza kozwa batu mingi nakati ya ba pays développés mpe eza kozwa batu mingi te na pays en voie de développement mpo na bolei mingi sulaki mpamba. Carie ewuti na lokota ya Latin mpo na koloba ya kopola.




#Article 154: Mingayi na articulation (428 words)


Mingayi na articulation  (RA) ezali mpasi na bokengi ya nzoto eye eumelaka mpe kotungisa ba articulations. Mingi mpeza ememaka molunge, kovimba, mpe mpasi na ba articulationts. Mpasi mpe kozanga kobalusa biteni ya nzoto mingi mingi ekomaka mabe koleka sima na bopemi. Mingi mingi poignet na maboko emonaka mpasi elongo na articulations ya ngambu nionso mibale ya nzoto. Bokono ekoki mpe kotungisa biteni misusu ya nzoto. Ekoki komema motango ya ba globule rouge kokoma moke, inflammation nzinga nzinga ya poumon, mpe inflammation nzinga nzinga ya motema. Fièvre mpe kokita ya makasi ya nzoto ekoki mpe komonana. Mingi mingi bilembo biyaka malembe malambe na ba poso kino ba sanza.

Ntango ntina ya mingayi na articulation eyebani malamu te, endimami ete elandanaka na ba facteur génétique kosangisa na oyo ya nzinga nzinga. Ntina eye ememaka bokono ekotelaka bokengi ya nzoto kobundisa ba articulations. Yango ememaka inflammation mpe kovimba ya capsule ya articulation. Etungisaka mpe mokuwa oyo ezwami na mpasi mpe cartilage. Diagnostic esalemaka mingi mingi kolandana na bilembo biye bimonani epayi ya mutu. Ba examen ya rayons-X mpe ya laboratoire ekoki koconfirmer diagnostic to kolongola maladi misusu oyo eza bilembo neti yango. Maladi misusu oyo ekoki kozala na bilembo neti yango eza lupus kouta na makila, arthrite galeuse, na fibromyalgie mpe misusu.

Traitement elukaka kosilisa mpasi, kokitisa inflammation, mpe kosala ete biteni ya nzoto ya mokoni bisala malamu. Yango ekoki kosalisama na koyeba ndenge ya kokabola ntango ya bopemi mpe kosala physique, kosalela ba planchettes na bracelés, to kosalela eloko eye ekoki kosalisa. Nkisi ya kosilisa mpasi, ba stéroïdes, na ba NSAID mingi mingi basaleka yango na eleko bilembo bibandi komonana. Mopiko ya nkisi eye ebiangami nkisi ya anti-rhumastime mpo na kobongola bokono (DMARDs) bakoki mpe kosalela yango mpo na komeka kolembisa bokono ezanga kokoba. Ba nkisis yango ezali hydroxychloroquine na methotrexate. Ba anti-rhumatisme DMARD bakoki kosalela yango ntango bokono eza kondima nkisi misusu te. Kasi, ba nkisi oyo ekoki kozala na taux monene ya ba effets mabe. Lipaso mpo na kobongisa, koremplacer, to kokangisa ba articulations ekoki kosalisa mpo na ba cas songolo. Ba nkisi eye basalelaka bo alternative eza na preuve moko te oyo eza kosoutenir yango.

Mingayi na articulation etungisaka kati ya 0.5 na 1% ya batu bakolo na ba pays développés na mpe kati ya batu 5 na 50 nakati ya batu 100,000 babandaka kotungisama nayango mibu nionso. Bokono oyo ebandaka komonana mingi mingi na eleko mutu akoli mpe basi batungisamaka nayango mbala 2.5 koleka mibali. Na mobu ya 2013, ememaki liwa ya batu 38,000 motango oyo momataki kowuta na 28,000 na mobu ya 1990. Mingayi na articulation etatolamaki mbala ya yambo na mobu ya 1800 na Dr. Augustin Jacob Landré-Beauvais (1772–1840) ya Paris. Liloba rheumatoid arthritis mpo na koloba mingayi na articulation ewuti na lokoya ya Kigriki mpo na koloba ete ba articulation eye ekoti mayi mpe evimbi.




#Article 155: Fièvre paratyphoïde (370 words)


Fièvre paratyphoïde, eyebani lisusu bo paratyphoïde, eza infection ya bactérie eye ewutaka na lolenge misato ya Salmonelle. Mingi mpeza bilembo bibandaka mikolo misato kino mikolo zomi na misato sima na infection mpe bizlaka ndenge moko na oyo ya fièvre typhoïde. Mingi mingi fièvre ya makasi ebimelaka malembe malembe nakati ya mikolo. Bolembu, kobungisa mposa ya kolia, mpe moto mpasi mingi mingi yango mpe emonanaka. Batu mususu loposo nabango ya nzoto ebandaka kobeba mpe kokoma na ba tache ya langi ya rose. Soki nkisi emelami te, bilembo ya bokono bikoki koumela ba poso to ba sanza. Batu mususu bakoki kozala na bactérie atako bakotungisama te na bokono; kasi, bakoki kokoba kokabola bokono epayi ya basusu. Ezala typhoïde to paratyphoïde yango nionso etungisaka makasi. Fièvre paratyphoïde eza lolenge ya fièvre na mitsopo elongo na fièvre typhoïde.

Paratyphoïde ewutaka na bactérie ya Salmonelle enterique ya sérotype Paratyphique A, Paratyphique B to Paratyphique C oyo eza kokola nakati ya mitsopo na makila. Mingi mpeza ekabolamaka na bolei to bomeli mayi oyo eza contaminé na nyei ya mutu oyo aza na bokono. Ekoki kosalema ntango mutu oyo aza kolamba bilei azali na bokono. Ba facteur ya risque eza assainissement mabe na mpe kozala na esika eye etondami na batu koleka. Mbala moko moko ekoki kokabolama na nzela ya bosangani bonzoto. Bokono oyo ezwaka obe batu. Diagnostic ekoki kosalema kolandana na bilembo mpe ekoki kozala confirmer na nzela ya kobokola bactérie to kokundola ADN ya bactérie nakati ya makila, nyei, to moelle osseuse. Kobokola ba bactérie ekoki kozala mpasi mpeza. Examen ya moelle osseuse nde esembolamaka mpeza. Bilembo ya bokono bizalaka ndenge moko na oyo ya ba maladi misusu oyo epesamaka. Typhus ekeseni na bokono oyo.

Atako mangwele ya paratyphoïde yango moko ezali te, mangwele ya typhoïde ekoki mpe kosunga. Mpo na komibatela esengeli komela mayi ya mpetwa, kozala na assainissement ya malamu, mpe kosokola maboko malamu mpeza. Mpo kotraiter bokono oyo, basaleka ba antibiotiques neti azithromycin. Resistance na ba antibiotique ndenge na ndenge oyo ezalaki kopesama kala ekomelaka batu mingi.

Paratyphoïde etungisaka pene na 6 million ya batu mobu na mobu. Ezwaka batu mingi na biteni ya Asia mpe emonanaka mpeza mpeza te na ba pays développés. Ba cas mingi ewutaka na Paratyphique A koleka Paratyphique B to C. Na mobu ya 2013 fièvre paratyphoïde ememaki liwa ya batu pene na 54,000 motango oyo mokitaki kowuta na 63,000 ya baye bakufaki na mobu ya 1990. Likama ya liwa eza kati ya 10% na 15% soki nkisi emelami te, kasi soki nkisi emelami ekoki kozala na se ya pourcentage moko.




#Article 156: Trachome (370 words)


Trachome, eyebani mpe lisusu bo conjonctivite granuleuse, ophtalmie ya Egypto, mpe bolanda ya trachome, eza bokono eye epesamaka kolandana na bactérie trachome Chlamydia. Infection ememaka makwanza nakati ya poso ya liso. Makwanza oyo ekoki komema mpasi na miso, kobeba ya libanda ya cornée ya miso, mpe ntango mosusu bolanda. Ba infection ya trachome eye baza komelela nkisi te mpe ekozongaka mbala na mbala, ekoki komema lolenge ya bolanda ya libela ntango poso ya miso ebaluki na kati.

Bactérie eye ememaka bokono oyo ekoki kokabolama na bosimbi mbala moko to na nzela mosusu miso to zolo ya mutu oyo azwami na bokono. Kosimba na nzela mosusu ekoki kozala na nzela ya bilamba to nzinzi oyo esimbaki miso to zolo ya mutu oyo azwami na bokono. Mingi mingi bana bakabolaka bokono oyo koleka batu bakolo. Assainissement ya mabe, bisika biye bitondi batu koleka, mpe bozangi mayi ya mpetwa na ba toilette ebakisaka mpe kokabolama ya bokono.

Makasi maye masalemaka mpo komibatela eza konetola lolenge ya kozwa mayi ya mpetwa mpe kokitisa motango ya batu oyo bazwami na bokono na bopesi bango ba nkisi ya antibiotiques. Yango ekoki kozala kopesa nkisi, na banso mbala moko, na ba ngulupa ya batu baye bokono ezwaka bango mbala na mbala. Komisokola yango moko ekokaka te mpo na komibatela na bokono kasi ekoki kozala ya litomba elongo na mikano misusu. Lolenge ya nkisi eza azithromycine ya komela na tétracycline topique. Basepelaka na azithromycine mpo ete bakoki kosalela yango bo dose unique ya komela. Sima na cicatrice komonana na poso ya miso, ekoki kosengela ntango mususu kosala lipaso mpo na kobongisa nsuki ya miso mpe kobatelama na bolanda.

Na mokili mobimba, pene na 80 million ya batu baza na infection eye ezali naino kotungisa. Na bisika misusu ba infections ekoki kozwa batu ebele kino na 60–90% ya bana mpe etungisaka mingi basi koleka mibali mpo ete bango bazalaka pene pene mingi penza na bana. Bokono oyo eza ntina ya mikakatano ya komona na 2.2 million ya batu nakati nabango 1.2 million bazali balanda mpeza. Mingi mingi ezwaka batu na ba mboka 53 ya Afrika, Asia, Amerika ya Kati mpe ya Se mpe pene na 230 million ya batu baza na risque ya kozwa yango. Ememaka 8 milliards ya dollard USD na nkita ya Amerika mobu na mobu. Yango ezali nakati ya mopiko ya ba maladi oyo eyebani bo maladi ya region tropicale oyo ekipamaka te.




#Article 157: Kovímba ya prostáti (563 words)


Kovímba ya prostáti, eyebani mpe bo carcinome ya prostáti, ezalí kopanzana ya  cancer nakati ya prostáti, oyo ezali glande nakati ya esika ya kobotisana na nzoto ya mobali. Ba cancer mingi ya prostáti ekolaka malembe malembe; kasi, misusu ekolaka kamua noki. Ba cellule ya cancer ekoki kopanzana kowuta na prostáti kino na biteni misusu ya nzoto, mingi mpeza na mikuwa mpe na ba vaisseaux ya lymphe. Na ebandeli ekoki kolakisa bilembo te. Na bileko misusu na sima, ekoki komema mpasi mpo na kosuba, makali nakati ya masuba, to mpasi na loketo, mokongo to ntango ya kosuba. Bokono boye boyebani bo hypertrophie bénigne ya prostáti ekoki kolakisa bilembo ndenge moko na oyo. Bilembo misusu biye bimonana na sima bikoki kozala koyaka bolembu kolandana na motango moke ya ba globules rouges.

Ba facteurs eye ekoki kobakisa risque ya kovímba ya prostáti ezalí: kimobange, lisitwale ya bokono soki esi ezwa moko nakati ya libota, mpe mokobo. Pene na 99% ya ba cas ekomelaka baye baza na mibu koleka 50. Kozala na ndeko ya pene mpeza ebakisaka risque mbala 2 kino 3. Na Etats Unis ezwaka mingi bayi Amerika bakitani ya Afrika koleka Mindele ya Amerika. Ba facteurs misusu ekoki kozala bilei oyo eza na ebele ya misunyi miye mibongolami na ba usine, misunyi ya motane, to biye bisalemaka kowuta na miliki to eza na ndunda moke. Emonani ete bokono elandanaka mpe na gonorrhée , kasi ntina ya bolandani nayango naino emonani te. Diagnostic ya kovímba ya prostáti esalemaka na nzela ya biopsie. Kozwa bilili na labo ekoki kosalema mpo na kososola soki cancer epanzani na biteni misusu ya nzoto.

Depistage ya kovímba ya prostáti ezalaka na mingi ya maye malobamaka. Examen ya antigène spécifique ya prostáti (ASP) ebakisaka makoki ya kokundola cancer kasi ekitisaka liwa te. Task Force ya Services ya Prevention na Etats Unis esengaka ete pembeni ya depistage basala mpe examen ya ASP, mpo na risque ya kolekisa diagnostic mpe kolekisa nkisi mpo ete batu mingi oyo diagnostic ekolakisa ete bazali na cancer bakoki kokoba kozala asymptomatique. Task Force ya Prevention (USPSTF) esukisaki na koloba ete maye mazali ya litomba na bosali examen maleki te mpasi eye ekoki kozala. Ntango ba inhibiteurs réductases-5α emonani neti ekitisaka risque ya kovímba ya moke esalaka eloko moto te mpo na risque ya kovímba ya monene nayango ezalaka recommandé te mpo na prevention. Ba supplements na ba vitamines to ba minéraux emonani te ete esalaka eloko moko na risque.

Ba cas mingi ekoki kolandelama malamu na surveillance active to kosinzila na bokebi. Traitement misusu ekoki kozala lipaso ya ndenge na ndenge, radiothérapie, hormonothérapie to chimiothérapie. Ntango esalemi kaka nakati ya prostate ekoki kobikisama. Epayi ya baye bokono epanzani tii na mikuwa, nkisi ya kosilisa mpasi (ba calmants), bisphosphonates na ba nkisi misusu eye esengeli ekoki kozala ya litomba. Ba resultats elandanaka na mibu ya mutu mpe mikakatano misusu ya nzoto na mpe lolenge ya cancer soki ezali ya yiki-yiki to ya kopanzana. Batu mingi oyo bazali na kovímba ya prostáti basukaka na liwa te kowuta na bokono oyo. Taux ya survie ya mibu mitano na Etats Unis eza 99%. Na mokili mobimba, bokono oyo eza ya mibale na lolenge ya cancer oyo ezwaka batu mingi mpe ntina ya mitano na liwa kowuta na cancer. Na mobu ya 2012 ezwaki mibali 1.1 million mpe ememaki liwa ya batu 307,000. Yango ezalaki cancer oyo ezwaki mingi nakati ya ba mboka 84, kobimelaka mingi nakati ya ba pays développés. Taux nayango eza kokoba komata na ba pays en voie de développement. Bokono oyo ekundolamaki mingi kati ya mibu ya 1980 na 1990 na bisika ebele kolandana ba examen mingi ya ASP. Ba etudes ya mibali oyo bakufaki na ntina eye ezwami te na bokono emonaki kovímba ya prostáti na 30% kino 70% na baye baza na mibu koleka 60.




#Article 158: Vertigo (333 words)


Vertigo eza ntango mutu akoyoka neti aza to biloko biye bizali nzinga nzinga naye biza koningana ntango bizali koningana te. Mingi mingi ezalaka neti kobaluka to kotepatepa. Ekoki kolandana na nausée, kosanza, kotoka, to nkokoso mpo na kotambola. Mingi mpeza ekomaka mabe koleka ntango ya koningisa moto. Vertigo eza lolenge loye loyebani mingi ya ba kizunguzungu.

Maladi eye esukaka mingi mingi na vertigo eza vertige positionnel paroxystique bénin, bokono ya Ménière, mpe labyrinthite. Eza na ba ntina misusu oyo eyebani mingi te na batu kasi ememaka mpe bokono ya vertigo, yango ezali AVC, kovimba bongo, kozoka na bongo, sclérose kilikili, na migraine. Vertigo physiologique ekoki kosalema kolandana na kotiama na lolenge ya koningana na eleko molayi neti ntango mutu azali na masuwa to azali kaka kolandela eloko eye ekoningana na miso ya kanga. Ntina misusu eza kozala exposer na ba toxine neti na monoxide ya carbone, masanga, to aspirine. Vertigo ezali nkokoso nakati ya eteni ya vestibule. Ntina misusu ya kizunguzungu eza yambo na kweya makalekale, kobungisa kotelema alima, mpe kizunguzungu eye esembolami te.

Vertige positionnel paroxystique bénin mingi ekoki kokomela mutu oyo azwamaka na bileko ya vertigo na koningana mbala na mbala mpe azalaka kaka malamu na bileko bina. Bileko ya vertigo esengeli biwumela na se ya monuti moko. Teste ya Dix-Hallpike mingi mingi epesaka eleko ya liso koningana na lobango oyo eyebani bo nystagmus. Na bokono ya Ménière mingi mingi ezalaka ngonga kobeta nakati ya matoyi, kobungisa koyoka, mpe vertigo ntango elandaka ewumelaka koleka minuti ntuku mibale. Na labyrinthite vertigo ebimelaka na mbalakata mpe nystagmus esalemaka na boningani te. Na lolenge oyo vertigo ekoki kowumela mikolo. Esengeli mpe kotala ba ntina misusu oyo ezalaka ya makasi. Yango ezali mpeza yasolo soki nkokoso misusu neti bolembu, moto mpasi, komona biloko mibale-mibale, to kobungisa ndenge ya koningana to kosimba eloko esalemi.

Kizunguzungu etungisaka pene na 20%-40% ya batu na eleko songolo mpe pene na 7.5%-10% baza na vertigo. Pene na 5% ya batu bazwaka vertigo na mobu songolo. Ekomaka kozwa mingi ntango bazakokola mpe etungisaka basi mbala mibale to misato koleka mibali. Vertigo ememaka pene na 2-3% ya batu na salle d'urgence nakati ya ba pays développés.




#Article 159: Kovímba bɔngɔ́ (410 words)


Kovímba bɔngɔ́ to tumeurs intracrânnienes esalemaka ntango ba cellule eye elongobani te ebotami nakati ya bɔngɔ́. Eza na lolenge mibale ya ba tumeur: tumeur maligine to cancéreuse na tumeur bénigne. Tumeur cancéreuse ekoki kokabwama na biteni, yango ezali tumeur primaire oyo ebandaka na bɔngɔ́, na tumeur secondaire oyo epanzanaka kowuta esika mosusu, mpe eyebani bo tumeur ya métastase cérébrale. Makoma oyo mazali kotala bobele ba tumeur oyo ebandaka nakati ya bɔngɔ́. Lolenge nionso ya kovímba bɔngɔ́ ekoki kolakisa bilembo bikeseni kolandana na eteni eye etungisami nakati ya bɔngɔ́. Yango ekoki kozala moto mpasi, ba crise, mikakatano mpo na komona, kosanza,  mpe bongwana ya mayele. Moto mpasi mingi mpeza ezalaka mabe koleka na tongo mpe esalemaka elongo na kosanza. Mikakatano songolo mikoki kozala, nkokoso mpo na kotambola, kosolola mpe sensation. Ezali bokono kokoba ekoki kokoma kino na kobungisa mayele.

Ntina ya kovímba bɔngɔ́ ndenge na ndenge, oyo ezwaka batu, eyebani te. Ba facteur risque oyo ekoki ntango mosusu komonana eza ba condition mutu azwi kowuta na mutu mususu oyo eyebani bo neurofibromatose na mpe kozala exposer na chlorure ya vinyle kowuta na industrie chimique, virus ya Epstein-Barr, mpe radiation na ion. Ntango batu bazali komituna mingi mpo na bosaleli telefone mobile, preuve naino esosolami malamu te. Lolenge ya tumeur primaire oyo eyebani mingi epayi ya batu bakolo eza: méningiome (mingi mingi bégnine), na astrocytome neti glioblastome. Epayi ya bana, lolenge loye loyebani mingi lozali médulloblastome malin. Mingi mingi diagnostic esalemaka na nzela ya examen medical elongo na tomographie na ordinateur to kozwa bilili na résonance magnetique. Nasima nayango mingi mingi confirmation esalemaka na nzela ya biopsie. Kolandana na ba resultat, tumeur ekabwamaka na ba niveau ndenge na ndenge ya makasi.

Traitement ekoki kozala kosangisa lipaso, radiothérapie ne chimoithérapie. Ekoki kosengela kosalela ba nkisi anticonvulsant soki mutu azwi crise. Bakoki kosalela dexaméthasone na furosémide mpo na kokitisa kovímba nzinga nzinga na tumeur. Ba tumeur misusu ekolaka malembe malembe, mpe esengaka kaka elandelama na ntango mususu esengaka intervention mosusu te. Ba traitement oyo esalelaka bokengi ya nzoto ya mutu, bazali naino koyekola yango. Resultat elandanaka mingi na lolenge ya tumeur mpe na monene ya esika eye esi epanzani na ntango eye basali diagnostic. Glioblastome mingi mpeza epesaka resultat malamu te kasi méningiome mingi mpeza epesaka resultat malamu. Moyenne ya taux ya survie ya mibu mitano mpo na cancer ya bɔngɔ́ na Etats Unis eza 33%.

Tumeur secondaire to métastase cérébrale ezwaka batu mingi koleka tumeur cérébrale primaire, pene na ndambu ya ba tumeur métastase ewutaka na cancer ya poumon. Tumeur cérébrale primaire ezwaka batu pene 250,000 na mobu mokili mobimba, mpe kozala na se ya 2% na ba cancers. Epayi ya bana baye baza na mibu na se ya 15, kovímba bɔngɔ́ ezwi esika ya mibale nasima ya leucémie lymphoblastique ya makasi bo ntina ya cancer. Na Australie misolo miye mikendaka mpo na mutu moko oyo azali na cancer ya bɔngɔ́ ezalí $1.9 million, yango ezali cancer ya monene koleka nionso.




#Article 160: Botulisme (290 words)


Botulisme  (Latin, botulus, saucisse) eza bokono boye boyebani mingi te mpe ekoki komema likama ya mabe koleka kowuta na toxine oyo ewutaka na bactérie ya Clostridium botulinum. Bokono oyo ebandaka na bolembu, mikakatano ya komona, kolemba, na mikakatano mpo na koloba. Yango ekoki nasima kolandisama na bolembu ya maboko, misunyi ya panzi na makolo. Bokono oyo mingi mingi etungisaka mayele te mpe ememaka fièvre te.

Botulisme ekoki kobimela na ba nzela ndenge na ndenge. Ba spore ya ba bactérie oyo ememaka yango ezala na mabele mpe na mayi. Ebotaka toxine botulitique ntango etiami na oxygène ya niveau ya se mpe na lolenge songolo ya temperature. Botulisme kowuta na bilei ebimelaka ntango mutu alei bilei biye biza na toxine. Botulisme ya bana ebimelaka ntango bactérie ekoli nakati ya mitsopo mpe ebimisi toxine. Yango esalemaka mingi mpeza epayi ya bana baye baza na sanza na se ya motoba, mpo ete sima na eleko ena nzoto emitongaka mpo na komibatela. Botulisme ya mpota ezwamaka mingi mingi epayi baye bako komituba ntonga ya lopipi. Na likambo oyo, ba spore ekotisaka mpota mpe, na bozangi ya oxygène, etikelaka toxine. Yango epesamaka te kowuta mutu songolo koleka epayi mutu pakala. Confirmation ya diagnostic esalemaka na nzela ya boluki toxine to bactérie nakati ya mutu oyo atungisami.

Nzela ya yambo mpo na komibatela eza kolamba bilei ndenge elongobani. Toxine, kasi kanyama te, ekufaka na molunge ya koleka  na eleko koleka minuti 5. Mafuta ya nzoi ekoki kozala na kanyama, mpo nayango esengeli te kopesa mafuta ya nzoi na bana oyo bazali na sanza na se ya 12. Traitement esalemaka na antitoxine. Mpo na baye babungisaka makoki ya kompema bango moko, ekoki kosengela mpo nabango masini ya kopesa mopepe, ntango mususu mpo na ba sanza. Bakoki kosalela ba antibiotique mpo na botulisme ya mpota. Liwa ememaka  5 kino 10% ya batu. Botulisme ekoki mpe kotungisa ba nyama ndenge na ndenge.




#Article 161: Mángwelé ma typhoide (266 words)


Mángwelé ma typhoide ezalí mángwelé eye ebatelaka batu na fièvre typhoide. Eza na lolenge mibale oyo ekoki kozwama bipayi ebele: Ty21a (mángwelé ya komela eye ekopesama na monoko) na mángwelé ya capsule Vi ya polysaccharide (sous-unité ya mángwelé eye epesamaka na tonga). They are about 30 to 70% effective for during the first two years depending on the specific vaccine in question.

Organisation Mondiale ya Santé (OMS) esengaka ete bana nionso na bisika biye bokono oyo bozali bapesama mángwelé. Soki te, basengaka ete banso baye bazali na risque ya kozwa bokono bapesa bango mángwelé. Ba campagne ya mángwelé ekoki mpe kosalisa mpo na kolandela ba epidemie ntango ebimelaka. Kolandana na lolenge makambo mazali, bakoki kosenga ete babakisa ba dose sima na mibu nionso kobanda na mobu moko kino na sambo. Na Etats Unis basengaka mángwelé epesama bobele na baye bazali na risque monene ya kozwa bokono neti baye bakende mibembo na bisika biye bokono bozwi batu ebele.

Mángwelé eye ezalí na ngonga oyo eza malamu mpeza. Ba effet secondaire ekoki kosalema na esika tonga ebetami. Mángwelé ya tonga eza malamu ata na baye baza na VIH/SIDA mpe mángwelé ya monoko bakoki kosalela yango soki kaka bilembo bimonani naino te. Bolamu ya mángwelé ya monoko na eleko ya zemi eyebani malamu te.

Mángwelé ya yambo ya typhoide basalki yango na mobu ya 1896 na Almroth Edward Wright, Richard Pfeiffer, na Wilhelm Kolle. Mpo na ba effet secondaire ezalaka recommandé kosalela mángwelé ma ba formule yasika. Mángwelé ma typhoide ezalí na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, nkisi eye esengeli yambo koleka na ba lopitalo. Talo mpo na kosomba mipoko-mipiko eza 4.44 USD na dose moko kotala na mobu ya 2014. Na Etats Unis talo ezalaka 25 kino 50 USD.




#Article 162: Mángwelé ma epatíte A (265 words)


Mángwelé ma Epatíte A ezalí mángwelé oyo ebatelaka batu na epatíte A. Eza na nguya ya kosala kino na 95% ya ba cas mpe esalaka au moins mibu zomi na mitano mpe ntango mususu na bomoyi mobimba ya mutu. Soki epesami, esengelaka ete ezala dose mibale kobanda nasima ya mobu moko ya mbotama. Epesamaka na tonga na musunyi ya nzoto.

Organisation Mondiale ya Santé (OMS) esengaka ete mángwelé epesama na batu nionso na bisika biye bokono bozwi batu mua mingi. Bisika biye bokono bozwi batu mingi mpeza, esengelaka te kopesa mángwelé bisika binso mpo ete mingi mpeza bokengi ya nzoto ya batu ezalaka esi elendisami na nzela ya infection bazwaki ntango bazalaki bana.  Center for Disease Control and Prevention (CDC) esengaka ete bapesa mángwelé na batu bakolo oyo bazali na risque monene mpe na bana banso.

Ba effet secondaire ya makasi ezalaka mpeza te. Mpasi na esika babetaki tonga esalaka pene na 15% ya bana mpe ndambu ya batu bakolo. Mángwelé mingi ya epatíte A ezalaka na virus oyo eza activé te mpe mua misusu ezalaka na virus oyo balembisi. Oyo ezalaka na virus oyo balembisi ezalaka recommandé te na eleko ya zemi to mpo na baye baza na bokengi ya nzoto eye ekosala malamu te. Mua ba formule ezalaka bosangisi ya mángwelé epatíte A na oyo ya epatíte B to mángwelé ma typhoide.

Mángwelé ya yambo ya epatíte A endimamaki na Eropa na mobu ya 1991 mpe na Etats Unis na mobu ya 1995.. Mángwelé oyo ezali na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, nkisi ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga te na ba lopitalo. Na Etats Unis talo nayango ezalaka kati ya 50 na 100 USD.




#Article 163: Chloroquine (203 words)


Chloroquine eza nkisi eye basalelaka mpo na komibatela mpe kobikisa malaria na bisika biye malaria etungisaka mpeza batu. Lolenge songolo ya malaria, oyo ezalaka na ba souche ya resistance, mpe ba cas ya mbilinga mbilinga esengaka nkisi ya ndenge mosusu to ya kobakisa. Mbala misusu basallelak yango mpo na amibe oyo ebimelaka libanda ya mitsopo, mingayi na articulation, mpe lupus ya kotela motane. Nkisi oyo ezalaka ya komela na monoko.

Ba effet secondaire oyo eyebani mingi eza nkokoso na misunyi ya nzoto, kobungisa mposa ya kolia, pulupulu, na kobeba loposo. Ba effet secondaire ya makasi eza mikakatano mpo na komona, kozokisa misunyi ya nzoto, ba crise, mpe kokoma na ba globule rouge moke. Emonani neti ezalaka na mindondo te komela yango na eleko ya zemi kasi naino bayekoli yango malamu te nakati ya ba mama ya zemi. Chloroquine ezali moko nakati ya mopiko ya ba nkisi oyo ebiangami classe 4-aminoquinoline. Esalaka mpo na lolenge ya malaria oyo emibotaka te nakati ya ba globule rouge.

Bakundolaki nkisi ya Chrolorquine na mobu ya 1934. Nkisi oyo ezali na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, ba nkisi ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga te na ba lopitalo. Ezali kozwama bo générique. Talo mpo na kosomba na mipiko-mipiko eza 0.04 USD. Na Etats Unis talo nayango eza 5.30 USD mpo na dose moko.




#Article 164: Kingudingudi (508 words)


Kingudingudi, eyebani lisusu mpe bo parotidite épidemique, eza bokono ya kouta na virus oyo ewutaka na virus ya kingundingudi. Bilembo na ebandeli ya bokono mingi mingi ezalaka fièvre, mpasi ya misunyi ya nzoto, moto mpasi, na koyoka bolembu. Mingi mingi nasima elandisamaka na mpasi ya kovimba glande parotide moko to nionso mibale. Mingi mpeza bilembo bibandaka komonana na mikolo 16 kino 18 sima ya kozwa infection mpe kosila sima ya mikolo 7 kino 10. Epayi ya batu bakolo bilembo ya bokono bitungisaka mingi koleka oyo ya bana. Pene na 1/3 ya batu bazalaka na bilembo ndambu to te. Mikakatano mikoki kozala  ba infections ya ezipeli ya bongo (15%), pancréatite (4%), kokufa matoyi mpo na libela, mpe mpasi na kovimba mabindi oyo mingi mingi mpeza te ememaka infertilité. Basi bakoki kotungisama na kovimba ovaire kasi yango ebakisaka te risque ya infertilité.

Kingudingudi ekabolamaka na bopete mingi mpe epanzanaka noki nakati ya batu oyo bazali kofuanda pene pene. Virus nayango epesamaka na nzela ya matanga ya motoki to na bosimbi mutu oyo azwami na bokono. Bobele batu nde bakoki kozwa bokono oyo mpe kopanza yango. Batu bakoki kopesana bokono oyo kobanda na mua mikolo liboso bilembo bibanda komonana kino sima ya mikolo minei. Sima ya kozwama na infection mingi mpeza mutu akomaka immunisé mpo na bomoyi naye mobimba. Kozwa infection mbala mosusu ekoki kosalema kasi mbala yango bokono ekomaka pete. Mpingi mpeza diagnostic ezalaka na mua nungunungu mpo na kovimba ya parotide mpe ekoki kozala confirmer na nzela ya koisoler virus na tampon moko ya canal parotidien. Komeka ba anticorps ya IgM nakati ya makila ezalaka mpasi te mpe ekoki kozala ya litomba; kasi, ekoki kobungisa moke mpo na baye basila kozwa mangwele na kolakisaka negatif.

Batu bokoki komibatela na kingudingudi na nzela ya bozwi dose mibale ya mangwele ya kingudingudi. Mingi ya ba pays développés babakisaka yango na mabongisi nabango ya bopesi magwele, mingi mingi kosangisa na mangwele ya rougeole na mangwele ya rubéole. Na ba mboka oyo mangwele epesami mingi te bakoki komona motango ya batu bakolo kozwa bokono mokomata nde nayango mabongisi nionso kobeba koleka. Nkisi ya kobikisa bokono oyo naino esembolami malamu te. Makasi maye masalamaka mpo na kosunga ezali kolandela bilembo na bobeli nkisi ya kokitisa mpasi neti acétaminophène. Immunoglobuline ya kotuba na mizisa ekoki kosalisa na mikakatano songolo. Bakoki kosenga kolalisa na mbeto ya lopitalo soki méningite to pancréatite emonani. Mutu nakati ya batu nkoto zomi ya baye bazwami na bokono akufaka.

Soki mangwele epesami te pene 0.1% kino 1% ya batu bazwaka infection na mobu. Mangwele eye epesami na batu ebele esalaka ete taux ya liwa ekita koleka 90%. Kingudingudi etungisaka batu mingi na ba pays en voie de développement epayi wapi mangwele epesami na batu mingi te. Ba épidemie, atako mangwele epesami, ekoki kokoba kobimela batu basili kozwa mangwele. Liboso ya boyeyi ya mangwele, kingudingudi ezalaka maladi ya bana oyo ezalaka kotungisa mingi na mokili. Ba épidemie ya bokono ya minene minene ekoki mingi mpeza kosalema mibu mibale to mitano nionso. Bana baye bazalaki na mibu kati na mitano na libwa batungisamaki mingi. Nakati ya baye basili kozwa mangwele mingi mingi baye bawuti kokokisa mibu ntuku mibale batungisamaka na bokono oyo. Nzinga nziga na équateur mingi mingi ebimelaka na mobu mobimba ntango na ba region oyo mosika na Nord mpe na Sud etungisaka mingi na saison ya hiver na printemps. Mpasi ya kovimba ba glande parotide na mabindi ekundolamaki na Hippocrate na siècle ya 5 Yambo na Mbotama na Kristo.




#Article 165: Mángwelé ma Epatíte B (282 words)


Mángwelé ma Epatíte B eza mángwelé oyo ebatelaka batu na epatíte B. Esengelaka kopesa dose ya yambo nakati ya ngonga 24 sima na mbotama mpe dose mibale to misato mosusu kopesa yango nasima. Yango ezali mpo na baye baza na bokengi ya nzoto eye ekosala malamu te neti kowuta na bokono ya  VIH/SIDA na mpe baye babotami mobesu. Mpo na baye bazali na nzoto nkolongunu mángwelé esalaka ete koleka 95% ya batu bazala ya kobatelama.

Esengelaka komeka makila ya baye bazali na risque monene ya kozwa bokono mpo na kosembola soki mángwelé esimbaki. Esengelaka ntango mosusu kobakisa ba dose misusu mpo na batu oyo bokengi ya nzoto nabango ezali kosala malamu te, kasi ebele ya batu misusu esengelaka te kobakisela bango ba dose.Mpo na baye bazwaki mángwelé ya virus ya hepatite B kasi naino bakomi immunisé te, esengeli kobakisela bango ba himmoglobule ya hepatite B likolo ya mángwelé. Mángwelé oyo epesamaka na nzela ya kobeta tonga na misunyi ya nzoto.

Ba effet secondaire ya makasi kowuta na mángwelé ya hepatite B ezalaka mpeza te. Mpasi ekoki kosalema na esika babetaki tonga. Mángwelé oyo eza na mindondo te kosalela na eleko ya zemi to ntango ya komelisa mwana libele. Bakoki naino te kolakisa soki mángwelé oyo ememaka syndrome ya Guillain-Barre. Mángwelé ya mikolo basali yango na bosangisi ADN. Ekoki kozwama yango moko to na oyo esangisami na mángwelé misusu.

Mángwelé ya yambo ya hepatite B endimamaki na Etats Unis na mobu ya 1981. Lolenge ya mángwelé oyo eza na mindondo ata moko te ebandaki kotekama na mobu ya 1986. Mángwelé oyo eza na Liste ya ba nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, nkisi ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga te na ba lopitalo. Talo mpo na kosomba na mipiko-mipiko eza kati ya 0.58 na 13.20 USD mpo na dose moko kotala na mobu ya 2014. Na Etats Unis talo nayango ezalaka kati ya 50 na 100 USD.




#Article 166: Mángwelé ma tetanɔ́si (331 words)


Mángwelé ma tetanɔ́si, eyebani lisusu bo anatoxine tétanique (TT), ezali mangwele oyo basalelaka mpo na komibatela na tetanɔ́si. Na bomwana esengelaka kozwa dose mitano, mpe nasima kobakisa dose moko mosusu sima na mibu zomi nionso. Sima na bozwi dose misato pene batu nionso bazalaka immunisé. Mpo na baye balandelaki mangwele nabango ya tetanɔ́si malamu te esengeli bazwa tonga na lobango nakati ya ngonga 48 sima na kozoka mpota. Mpo na baye bazali na mpota ya risque monene mpe basilisi te kozwa mangwele nionso bakoki kopesa bango antitoxine ya tetanɔ́si. Esengeli kosala manso mpo ete basi ya zemi balandela malamu mangwele nabango ya tetanɔ́si mpe, soki te, koimmunisé bango ekoki kobatela bango na tetanɔ́si na mbotama ya mwana.

Mangwele oyo eza malamu mpeza ezala na eleko ya zemi to mpo na baye baza na VIH/SIDA. Kotela mpe mpasi na esika eye babeti tonga ekomelaka kati ya 25 na 85% ya batu. Fièvre, koyoka bolembu, mpe mua mpasi na misunyi ya nzoto ekomelaka na se ya 1% ya batu. Ba réaction makasi ya ba allergie ekomelaka se ya mutu moko nakati ya batu 100,000.

Bosangisi mangwele ya ndenge na ndenge mpo na tetanɔ́si esalemaka neti DTaP na Tdap oyo eza na diphthérie, mangwele ya tetanɔ́si na mangewle ya coqueluche, mpe DT na Td oyo eza na diphthérie na mangwele ya tetanɔ́si. DTaP na DT bapesaka yango na bana baye bazali na mibu na se sambo ebongo Tdap na Td bapesaka yango na na baye baza na mibu sambo to koleka. Makoma na minuscule ya d na p eza mpo na kolakisa nguya ya diphtérie na ya mangwele ya coqueluche.

Mangwele ya tetanɔ́si basalaki yango na mobu ya 1927 mpe ekomaki kozwama na Etats Unis na mobu ya 1940. Bosaleli mangwele oyo esalaki ete motango ya 95% ya baye bazali na tetanɔ́si mokita. Mangwele oyo ezali na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, nkisi ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga na ba lopitalo. Talo mpo na kosamba na mipiko-mipiko eza kati ya 0.17 na 0.65 USD mpo na dose moko kotala na mobu ya 2014. Na Etats Unis talo mpo na mangwele nionso ya tetanɔ́si eza kati ya 25 na 50 USD.




#Article 167: Ampicilline (191 words)


Ampicilline eza antibiotique oyo basalelaka mpo na na komibatela na ba infection ya ba bactérie. Yango ebatelaka na ba infection ya ba voies respiratoires, ba infection na ba nzela ya masuba, méningite, ba infection ya salmonelle, mpe endocardite. Bakoki mpe kosalela yango mpo na komibatela na ba infection streptocoque ya groupe B mpo na bana. Baselelaka ya ngo na nzela ya monoko, ya tonga na misunyi ya nzoto, to tonga na mizisa ya nzoto. Esalisaka mpeza te mpo na ba infection kowuta na virus.

Ba effet secondaire oyo eyebani mingi eza kobeba loposo, nausée, na pulupulu. Esengeli te kosalela nkisi oyo epayi ya batu baza allergique na penicilline. Ba effet secondaire ya makasi ekoki kozala colite à Clostridium difficile to anaphylaxie. Ntango bazali kosalela yango mpo na baye baza na mikakatano ya rein esengeli kokitisa dose. Kosaleka yango na eleko ya zemi mpe ya komelisa mwana libele emonani neti eza malamu.

Ampicilline esalemaki na mobu ya 1961. Ezali na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, nkisi oyo esengeli kozanga te na ba lopitalo. Talo mpo na kosomba yango na mipiko-mipiko eza kati ya 0.13 na 1.20 USD na flacon ya nkisi ya kotuba na mizisa kotala na mobu ya 2014. Na Etats Unis ezali kozwama bo ba générique mpe talo mpo na mikolo zomi ya traitement eza 13 USD.




#Article 168: Paracétamol (262 words)


Paracétamol, eyebani lisusus bo acétaminophène to APAP, ezali nkisi basalelaka mpo na kosilisa mpasi mpe fièvre. Mingi mpeza basalelaka yango mutu azali koyoka mua mpasi to mpasi mingi te. Preuve ya litomba ya nkisi oyo mpo na bana eza moke mpeza. Mingi mingi batekaka yango elongo na ba nkisi mosusu neti nkisi mpo na miyoyo. Ntango basangisi yango na nkisi mpo na mpasi kouta na opioïde, basalelaka paracétamol mpo na mutu oyo azoyoka mpasi makasi neti mpasi ya cancer na mpe sima na lipaso. Mingi mpeza bamelaka yango na monoko to kobaka yango, ya kotuba tonga na mizisa mpe ezalaka. Ba effet nayango ewumelaka kati na ngonga mibale na minei.

Paracétamol ezalaka na mindondo mpeza te soki baseleli yango kolandana na dose oyo esengeli. Mokosa makasi loposo esalemaka mpeza mingi te. Dose ya koleka mpeza ekoki komema liver failure. Emonani neti eza mindondo te na eleko ya zemi mpe ntango ya komelisa mwana libele. Mpon na baye bazali na maladi ya foie, bakoki kokoba kosalela yango kasi ekosengela basalela dose ya moke. Paracétamol etiyami nakati ya ba nkisi eye eyebani bo analgésique, ba nkisi oyo esilisaka to ekitisaka ba mpasi. Nkisi oyo eza na misala minene te ya anti-inflammatoire eye esalaka mpe lolenge nkisi oyo esalaka eyebani mpeza malamu te.

Bakundolaki paracétamol na mobu ya 1877. Yango ezali nkisi oyo batu mingi basalelaka mpo na kosilisa ba mpasi na fièvre ezala na Etats Unis to Eropa. Nkisi oyo ezali na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya OMS, nkisa ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga te na ba lopitalo. Paracétamol ezali kozwama bo générique mpe nkombo misisu eye bakosalela mpo nayango na mombongo eza Tylenol and Panadol. Talo mpo na kosomba na mipiko-mipiko eza na se ya 0.01 USD na dose moko. Na Etats Unis talo nayango eza 0.05 USD na dose moko.




#Article 169: Amoxicilline (186 words)


Amoxicilline, ekokomamaka lisusu mpe bo amoxycilline to amox, eza antibiotique eye esalisaka mpeza mpo na kotraiter ba infection ya bactérie ya ndenge na ndenge. Eza nkisi ya yambo eye bapesaka mpo na ba infection ya libanda ya matoyi. Bakoki mpe kosalela yango mpo na mpasi ya kingo, pneumonie, ba infection ya loposo, mpe ba infection ya nzela ya masuba. Bamelaka yango na monoko.

Ba effet secondaire oyo eyebani mingi eza nausée na mokosa. Ekoki mpe kobakisa risque ya ba infection ya ba mycoses mpe, ntango basaleli yango elongo na acide clavulanique, ekoki komema pulupulu. Esengeli te kopesa nkisi oyo na baye bazali na allergie na penicilline. Ntango yakosalela yango na baye baza na mikakatano ya rein, esengeli kokitisa dose. Kosalela yango na eleko ya zemi mpe ya komelisa mwana libele emonani neti eza na mindondo te.

Amoxicilline ebandaki kozwama mbala ya yambo na mobu ya 1972. Nkisi oyo eza na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, nkisi ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga te na ba lopitalo. Nkisi oyo ezali moko ya ba antibiotique oyo mingi mingi minganga balakelaka bakoni. Amoxicilline eza kozwama bo générique. Talo mpo na kosamba yango na mipiko-mipiko eza kati ya 0.02 na 0.05 USD na mbuma. Na Etats Unis mikolo zomi ya kozwa traitement na nkisi oyo eza 16 USD.




#Article 170: Allergie (365 words)


Ba allergie, eyebani lisusu bo makono ya allergie, yango ezali mitindo ndenge na ndenge kowuta na hypersensibilité ya bokengi ya nzoto na eloko songolo ya nzinga nzinga eye mingi mpeza ememaka mua nkokoso epayi ya batu ebele. Makono yango mazali rhume de foins, ba allergie ya bilei, nkokoso ya loposo, allergie ya maladi ya mpema, mpe anaphylaxie. Bilembo bikoki kozala miso motane, mokosa na loposo, kotangisa miyoyo, mpema mokuse, to kovimba vimba. Nzoto koboya bilei na intoxication ya bilei eza mitindo ya ndenge mosusu.

Ba allèrgenes oyo eyebani mingi eza pollen na bilei. Mabende mpe biloko misusu ekoki mpe komema nkokoso. Bilei, koswama na ba insect, mpe nkisi yango eza ntina eye eyebani mingi mpo na ba réaction ya makasi. Bozalisami ya makono oyo ewutaka na ba facteur génétique mpe na nzinga nzinga. Lolenge loye bokono eyelaka ezwaka ba anticorps ya immoglobule E (IgE), eteni ya bokengi ya nzoto, kolingama na allèrgene ioko mpe nasima na récepteur moko na mastocyte to na basophile epayi wapi efongolaka nzela ya bosopani ya ba élément chimique ya inflammation neti histamine. Mingi mpeza diagnostic esalemaka kolandana na lisitwale ya bokolungunu ya mutu. Ba teste misusu ya loposo to makila ekoki kozala ya litomba mpo na batu songolo to pakala. Ba teste ya positif, ntango mususu ekolinga koloba te ete allergie ya monene eza na eloko eye bazali kotala.

Kozwama na eleko songolo na biye bikoki kozala ba allèrgene ekoki ntango mosusu mpe kobatela mutu. Ba traitement mpo na ba allergies eza koboya ba allèrgens oyo esili koyebana mpe komela ba nkisi neti ba stéroïde na ba antihistamine. Mpo na baye baza na ba réaction ya makasi esengeli bazwa tonga ya adrenaline (epinephrine). Immunotherapie ya allergène, ememaka batu malembe malembe na bozwi mitango minene ya ba allèrgene, yango ezalaka ya litomba mpo na lolenge songolo ya ba allergie neti rhume de foins mpe na ba reaction ya koswama na ba insect. Bosaleli yango mpo na ba allergie ya bilei eyebani malamu te.

Ba allergie ezwaka batu ndenge na ndenge. Na pays dévloppés, pene na 20% ya batu batungisamaka na rhinite allergique, pene na 6% ya batu baza na ata allergie moko ya bilei, mpe pene na 20% baza na nkokoso ya loposo na eleko songolo ya bomoyi. Kolandana na mboka songolo to pakala pene na 1 na 18% ya batu baza na maladi ya mpema. Anaphylaxie ekomelaka kati ya 0.05#x2013;2% ya batu. Motango ya makono mingi ya allergie momonani neti mozali komata. Liloba allergie lilobamaki mbala ya yambo na Clemens von Pirquet na mobu ya 1906.




#Article 171: Isidore Ndaywel è Nziem (113 words)


Isidore Ndaywel è Nziem (7 sánzá ya míbalé 1944) azalí molobeli mpé mosapoli wa Kongó-Kinsásá.  

Isidore Ndaywel è Nziem abótama na Ipamu o kati ya etúká ya Bándundú na mokɔlɔ mwa 7 febwáli 1944. Akomá babúku ebelé na maye matálí masapo ya mbóka ya Kongó-Kinsásá

Na mikɔlɔ óyo etangémí, azalí mokónzi ya Société des historiens congolais.  

Atangísá na Bobɔngɔ́ bwa Lubumbashi, na Bobɔngɔ́ Marien Ngouabi, mpé na óyo ya Bobɔngɔ́ bwa Laval na Kanadá.

 
Isidore Ndaywel è Nziem atangá na Bobɔngɔ́ bwa Sorbonne (Pari) na Falansia, bisíká akómá dokotolo wa makambo etálí masapo. 

O mobú mwa 1976, azaláká SOHIZA (Société des Historiens Zairois) na basapoli basúsu ba Kongó-Kinsásá neti  Zacharie Tshimanga wa Tshibangu.




#Article 172: Zacharie Tshimanga wa Tshibangu (200 words)


Zacharie Tshimanga wa Tshibangu (4 ɔkɔtɔ́bɛ  1941 - 10 dɛsɛ́mbɛ 1985) azalaka Mosapoli wa Kongó-Kinsásá.  

Zacharie Tshimanga wa Tshibangu abótama na engumba ya Musefu na etuka ya Kasai ya Límbe na mokɔlɔ mwa 4 ɔkɔtɔ́bɛ  1941. Akoma ba búku ebelé na mayé matali masapo ya mboka ya Kongó-Kinsásá
Azalí mosapoli wa yambo ya koma búku na mayé matali lisapo ya Kongó-Kinsásá

Atangisa na Institut Supérieur Pédagogique ya Bukavu, na Bobɔ́ngɔ bwa Kisangani. Bisika azalaka mokónzi.

Azalaka mpé mokónzi osima ya Isidore Ndaywel è Nziem na ligomba ya SOHIZA. Óyo basála elengo na basapoli ya Kongó-Kinsásá misusu.

Libosó yako kende o mboka mopaya Tshimanga wa Tshibangu atangaka kelási nayé mobimba na Kongo-Kinshasa.
Bokoti na yé na bobɔ́ngɔ emɛma yé na mboka ya Falansia. Kuna na mobu ya 1967 azwaka licence ya lisapo na zéogalafi. Na mobu ya 1968, azwaka Maitrise ya lisapo. Asúkisaka kelási na yé o mobu mwa 1971 tángo akomaka dokotolo ma makambo etali Masapo.

Kelási minango ma masalamaka manso na Bobɔ́ngɔ Toulouse Jean-Jaurès

Na sima ya kotanga kelási na Falansia, Tshimanga wa Tshibangu ozóngaka o mboka pona kosala mpé mpo na kotángisa. 

Professeur Tshimanga wa Tshibangu akúfaka o mokolo ya 10 dɛsɛ́mbɛ 1985 na Bruxelles mboka ya Beljika




#Article 173: Émile Mandjumba Mwanyini-Mbomba (113 words)


Émile Mandjumba Mwanyini-Mbomba (28 yúni 1948) azalí mosapoli wa Kongó-Kinsásá.

Émile Mandjumba Mwanyini-Mbomba abótámá na 28 yúni 1948 Nkamba-Oswe na etúká ya Kasai ya Monyɛlɛ.

Azalí mwǎna wa Mekunyo Ntshedi Fabien na Nyamwetshi Iyonga Sala.

Azalí mokomi wa yambo óyo akomá búku ya lisapo na makambo ya mikóló na mibú ya Kongó-Kinsásá. Búku mwangó mokomámákí na 1989, nkombo na yango ezalí Chronologie générale de l’histoire du Zaire : des origines à 1988 na lokóta ya falansé.

Émile Mandjumba atangákí kélasi na yé mobimba na Kongo-Kinsásá. Kelási na yé ebandí na etúká ya Katanga epayi ya bamissioni.

Na mobú mwa 1976, azwaka Licence ya Masapo na Bobɔngɔ́ bwa Lubumbashi, nsima atangáká na Bobɔngɔ́ bwa Kinsásá




#Article 174: Bobɔngɔ́ bwa Lubumbashi (130 words)


Bobɔngɔ́ bwa Lubumbashi na lokóta ya Falansé Université de Lubumbashi (Unilu) ezali  okati ya engumba ya Lubumbashi na Etúká ya Katanga. Ezali okati ya lisanga ya bobɔngɔ́ bwa Kongo-Kinshasa oyo ebengami na Falansé Université nationale du Congo.

Kélasi mitangama na lokóta ya Falansé.

Uta Sanza na mobu ya desembe 2015 Gilbert Kishiba Fitula nde mokonzi ya Bobɔngɔ́ bwa Lubumbashi.

Bobongo ya Lubumbashi ekelama na mobu ya 1956 o tango Mboka ya Kongo-Kinsasa ezalaka na ma boko ya Belezi. kombo nango ya yambo Ezalaka Université officielle du Congo et du Rwanda-Urundi 

Bobongo ya Lubumbashi ezali na biteni ya boyébi Zomi na mitano:

Émile Mandjumba Mwanyini-Mbomba, Mokomi mwa yambo ya buku

Isidore Ndaywel è Nziem oyo azalaka mokéli na mokonzi ya CERDAC na SOHIZA na mibu mwa 1970.

Búku

Makasa ya boyébi




#Article 175: Bobɔ́ngɔ bwa Kisangani (107 words)


Bobɔngɔ́ bwa Kisangani na lokóta ya Falansé Université de Kisangani (Unikis) ezali  okati ya engumba ya Kisangani na Etúká ya Etúká ya Monyɛlɛ. Ezali okati ya lisanga ya bobɔngɔ́ bwa Kongo-Kinshasa óyo ebengami na Falansé Université nationale du Congo.

Kélasi mitangamakà na lokóta ya Falansé.

Bobɔngɔ́ bwa Kisangani ebiangamaka libosó Univerisité Libre du Congo na mokelami na yango o mobu ya 1963. Ekelamaka epayi ya ba Misíoni, na sima mwa mikolo ekomaka Université nationale du Zaïre (UNAZA), Campus de Kisangani (1971-1981).

Uta 1981, ekoma Université de Kisangani, na lingala Bobɔngɔ́ bwa Kisangani.

Bobɔngɔ́ bwa Lubumbashi ezali na biténi ya boyébi zómi na mitáno:

Búku

Makasa ya boyébi




#Article 176: SOHIZA (102 words)


SOHIZA ezalaka Lisanga ya Basapoli ya Zaïre (Kongo-Kinsásá). Na lokota lya Falansé elingaka ko loba Société des Historiens Zairois
O mokolo ya lelo, SOHIZA ezalaka lisusu tɛ̂. Ekoma na kombo mosusu Société des Historiens Congolais.

SOHIZA Akelamaka tango basapoli nionso ya Kongo-kisasa ya yambo na Lubumbashi o Mokolo ya 16 fébwali 1974. Na bayé bazalaka o mokolo yango tokoki kotanga Isidore Ndaywel è Nziem oyo azalaka molakisi na bobongo ya Lubumbashi mpé Zacharie Tshimanga Wa Tshibangu ya Institut supérieur Pédagogique ya Bukavu.

Mokonzi ya SOHIZA na Bokélami na yango ezalaka Isidore Ndaywel è Nziem. Mokonzi ya Mibale ezalaka Zacharie Tshimanga Wa Tshibangu.




#Article 177: Simon Pierre Mpadi (122 words)


Simon Pierre  Buka Makengo Nsuka (?1906 -19 Marsi 1991) azaláká mokéli mpé mokambi ya Ligomba ya REMPAD na lofalansé Religion Mpadiste

Simon Pierre Mpadi azalaka mombóto ya Vitinimi-na-Mpangu-zi-Kongo óyo ezalaka libota bwa bokónzi mboka ya Angola.  Asalaka na Armée du salut

Abala Mama Nianga mpe Abota bana mitano:

Simon Pierre Mpadi abundela makombo na bohumbu okati ya kongo-kisasa. Etumba nayé ezalaka pona lipanda mpe pona bosilisi na bohumbu ya bato moindo okati ya Afrikamobimba.
Etumba na yé ezalaka mpe mpo Bo nzambe ya mindele elungwa na mabélé ya batu miyindo. Na yango,o mokolo ya 07 Septembre 1939 akengedaka ko tika mikano nayé épayi ya mokonzi belezi Jean Pacquet.

Simon pierre Mpadi akufa na mokolo ya 19 Mars 1991 na Engumba ya kinsasa




#Article 178: Kitawala (119 words)


Kitawala ezalaka lingomba ya bondimí ya Mwana Lesa. Nkombo ya kitawala ewuti na ingelesi  Watch Tower 

Bondimi na makanisi ya Kitawala ewuta na ba Batatoli ya Yehova ya Amerika neti Joseph Booth na Charles Taze Russell. Ekélami nango ebandaka yambo na etuka ya Katanga, sima ayaki ko kota na bituka misusu ya kongo-kinsasa.

Mokéli mpé mokambi ya yambo ya kitawala ezalaka Mwana Lesa oyo nkombo nayé na bopéto ezalaka Tomo Nyirenda.

Sima ya Nkufa mpé ya mwa mikolo, Bushiri Lundungu Asangisaka ba ndimi nayé o kombo ya kitawala. Atéyaka makambo ya lipanda na bobimi na bohumbu o maboko ya ba belezi.

Na Lingomba ya Kitawala bokambi na bokonzi ezali boye:

Mibéko ya kitawala ezali Zomi.Tokoki kotanga mwa éténi awa:




#Article 179: Bushiri Lungundu (105 words)


Bushiri Lungundu( 23 yúni 1911- 23 yúni 1945) Azalaka mokambi ya Lingomba ya Kitawala. Amipesaka nkombo ya Mufalme wa watu wehusi na kiswahili oyo elengi ko loba na lingala Mobikisi ya batu moindo 

Bushiri Lungundu abotama o mokolo ya 23 yúni 1911 na etuka ya Etúká ya Monyɛlɛ

Azalaka mwana ya papa Sala Mbongo na Mama Eylo.

Na mobu ya 1944, Atombokela makasi ba belezi  yé na ba ndimi nayé na Lutumbu-Masisi. Esukaka na lipanzi ya ligomba nayé mpé na bokangémi nayé.

Bushiri Lungundu akufaka o maboko ya ba belezi. Batiaka yé singa na kingo mpé ko diembikisa yé o mokolo ya  23 juin 1945.




#Article 180: George Washington Williams (104 words)


George Washington Williams (16 ɔkɔtɔ́bɛ 1849- 2 augústo 1891) azalaka mosapoli, avoka, mokambi ya mboka ya Amerika.

George Washington Williams abotami na Bedford Springs o mokolo ya 2 augústo 1849. Atangaka boyébi bo nzambe na Cambridge, Massachusetts.

Na sima nango, akomaka mobatéli mpaté mpé avoka.

Akomélaka Lépold II mokanda pona kebisa yé na mayé mitalaki Bohumbu na moniokoli okati ya Kongo. O mikolo miango ba belezi bazalaka kokata ba kongolé maboko to makolo soki ba kokisaki misala na bango Té.

George Washington Williams akufaka na bokono ya tuberkilose na engumba ya Blackpool o mokolo ya 2 Agosto 1891.
Bakunda yé na Ekundéli Layton, Blackpool.




#Article 181: Maurice Mpolo (138 words)


Maurice Mpolo (abótámí o 4 sánzá ya mísáto 1928, akúfí o 17 sánzá ya yambo 1961) azaláká moí-politíki, abomamá elɔngɔ́ na Patrice Lumumba na sánzá ya yambo wa 1961.

Maurice Mpolo abótámáká na Inongo, 4 sánzá ya mísáto 1928. Azaláká mwǎna ya Mpolo Edouard na Bokako Tècle, azaláká tatá mobóti ya bǎna mínei.

Maurice Mpolo azaláká mokomi wa bilenge na bonkúmú ya Lumumba. O mokɔlɔ ya 15 sánzá ya libwá 1960, Lumumba atíyáká Mpolo monkozi wa limpingá ya basɔdá.
O mokɔlɔ ya 17 sánzá ya yambo 1961, Mpolo, Okito mpé Lumumba pɛnɛ ya Moboka ya Mwadingusha.
Na mobu 1992, o Conférence Nationale bakambi ya mboka ba mékaka ko tia mwinda na mayé étali liwa ya Mpolo, Okito, na Lumumba.
Nzóto ya Maurice Mpolo na ya baningá na yé ekátámáká mikémiké mpé ebwákámáká na soude epái ya Gerard Soete




#Article 182: Omar Bongo (113 words)


Omar Bongo ( 30 sanza ya zomi na mibalé 1935- 8 Sanza ya motoba 2009) azalaka mokambi-ekolo ya Gabon

Omar Bongo abotama na kombo ya Albert-Bernard Bongo o mokolo ya 30 sanza ya zomi na mibalé na Lewaï. Abala mbala misato: Mwasi na yé ya yambo ezalaka Louise Mouyabi Moukala oyo abota na yé Pascaline Bongo Ondimba. 

O mokolo ya 31 Sánzá ya zomí mobu 1959 abalaka Patience Dabany na oyo abotaka Ali Bongo na Albertine Amissa Bongo.
Mwasi na yé ya suka ezalaka Edith Bongo mwana ya Denis Sassou N’Guesso.

Azalaka mpé moto ya Franc-Masonerie.

Omar Bongo akúfaka na Barcelona na cancer ya coloni o mokolo ya 8 Sanza ya motoba 2009




#Article 183: Bonzambe (498 words)


Po na bakoko na biso, Nzambe akelá bilóko nyonso. Akelá bato, banyama, banzete, matiti, mabanga, mayi, moyi, minzoto pe biloko ndenge na ndenge… Nyonso oyo ezali, ezali bikelamo ya Nzambe.

Nzambe akelama te. Azali moto te, azali nyama te, azali nzete te. Azali mobali te, azali pe mwasi te. Azwamaka lokola tata to mama te. Nzambe azali nyonso, bisika nyonso. Azali na ebandeli te, azali na suka te. Nzambe azali azanga-suka. Asalá mwango oyo eyangelaka mokili.

Nzambe azali mosika na makambo ya mokolo na mokolo ya bomoyi ya moto. Nzambe atalaka mobimba ya etamboli ya molóngó. Moto akobelela Nzambe te, kasi akobelela bakoko na ye. Bakoko bakosenga na milimo-babateli. Milimo-babateli nde basololaka na Nzambe. 

Molimo-mobateli ezali molimo oyo ebatelaka libota, mboka to ekolo. Libota na libota, ezali na molimo oyo ebatelaka bango. Mboka na mboka, ezali na molimo oyo ebatelaka bango. Ekolo na ekolo, ezali na molimo oyo ebatelaka bango.
 
Moto akobelela bango po básunga ye, bálakisa ye nzela, báfungola banzela na ye. Bakoko bakosenga na milimo-babateli. Milimo-babateli bakosolola ná nzambe. Na boye, soki moto azali na likambo, akobelela bakoko na ye, akobelela bakoko ya moto mosusu te.

Moto akoki pe kosala bondeko na mopaya. Kasi, bakobosana te ete, moto na moto, mboka na mboka, ekolo na ekolo, bazali na bakoko pe milimo-babateli na bango.

Ezali na banzela mibale ya kokela bondeko : na nzela ya libala to na nzela ya kokata nzoloko. 

Soki moto abali, akoti na libota ya molongani na ye. Na tango wana, molongani akomi ndeko. Akoki kobelela bakoko ya molongani na ye. 

Bato mibale bakoki kosala bondeko ya makila. Bakokata nzoloko po makila étanga, pe, bakosangisa makila na bango mibale esika moko. Na boye, bakolapa seleka ete : bakomi bandeko. Na tango wana, mopaya akomi ndeko. Akoki kobelela bakoko na yo.

Nzambe azali nsomi. Ekelamo moko te, ekoki kotelemela Nzambe. Nzambe azwaka mikano na ye ndenge alingi. Soki na mwango na ye, elengelami ete : okokufa lelo, okokufa lelo. Soki na mwango na ye, elengelami ete : okokufa lelo te, okokufa lelo te. Oyo tokosala, ekokokisama kaka soki ye apesi nzela. 

Nzambe akelá malamu pe akelá mabe. Apesá moto makoki ya kosala malamu, to, ya kosala mabe. Oyo nyonso ekoya na sima, ekolanda oyo moto aponaki kosala. 

Na moyi ya lelo, liloba oyo « kindoki », etikala kaka po na misala ya mabe. Na kala, tozalaki na ndenge mibale ya kindoki : kindoki ya pole pe kindoki ya molili. 

Kindoki ya pole ezali kindoki oyo esalaka makambo malamu po na bato. Ndoki ya pole, akokengela po mabe éya te. Soki amoni nkwokoso po na moto ya libota na ye, akoluka ndenge ya kolongola nkwokoso yango. Bandoki ya pole bazalaki kobenga bango : Bayeli (bato ya mayele). 

Kindoki ya molili ezali kindoki oyo esalaka makambo mabe po na bato. Ndoki ya molili, akosala po mabe eya. Soki amoni bolamu po na moto ya libota na ye, akokanga nzela po bolamu yango éya te. Bandoki ya molili bazalaki kobenga bango : Bayeli mabe (bato ya mayele-mabe). 




#Article 184: Étienne Tshisekedi (170 words)


Etienne Tshikedi Wa mulumba azalaka moí ya politiki mpé Moyángeli wa yambo o ekolo ya kongó-Kinsásá.

Etienne Tshikedi abotamana na Kananga o mokolo ya 14 sánzá ya zomi na mibalé mobu 1932.

Tshikedi Wa Mulumba atanga na Bobɔ́ngɔ ya Lovanium bisika asilisaka kélasi na yé na bokomi dokotolo ya mibéko.Ye pe moto liboso ya kozwa ngala wana na Kongó-Kinsásá.

Etienne Tshisekedi azalaki moto ya ministre ya nakati na nse Mokonzi Mobutu na mbula 1965.

Sima na lidusu na Mokonzi, Etienne Tshisekedi azalaki kotele mela Mokonzi Mobutu na mbula 1980. Libota na ye atikalaki na mboka na Poto.

Etienne Tshisekedi azalaki Ministre ya yambo na mbula 1991, sima na 1992.

Etienne Tshisekedi akudeki na Bruxelles po na komisalisa na sambo mobu 2014. Akufaka na bokono na engumba ya Bruxelles o mokolo ya 1 sánzá ya mibalé mobu 2017.

Ebenbe ekoya na mboka Kongo o mokolo ya 30 sanza ya mitano mobu 2019. Bakundaki sima ya milulu.

Na mbula 2019, Félix Tshisekedi, mwana ya Etienne Tshisekedi baponaki ye Mokonzi ya mboka Kongo. 




#Article 185: Sato ya Beaumaris (106 words)


Sato ya Beaumaris ezwami o esanga Anglesey, o Ekólo Wali, na engumba Beaumaris. Botongami na yango ebandaki o mobu 1295, sima ya bozwami (conquête) ya Ekólo Wali na mokonzi Édouard Ier. 

Misala mitambusamaki na architecte savoyard Jacques ya Saint-Georges. Les travaux, mpe esengaki misolo ebele. Misala misukaki kino o mobu 1330 kasi sato esilaki te.

Bitulba okati ya ba nkumu ya mboka Wali mpe ba konzi ya Ingetele mpo na bozwi (contôle) ya etando ebandi o mobu  1070

Botongami ya sato esila te, kasi soko esilaki, elingaki elandana solo na sato ya Harlech. Bitonga mibale eye bazali na plan oyo elanda na bokesi ,ingi mpenza te




#Article 186: Parke ya Virunga (174 words)


Parke ya Virunga, kala Parke Albert, ezali parke ya kala ya Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki oyo ekalamaki uta mobu 1925. Ezali na nkita minga na bonyama mp bozamba na yango. Des traces d'okapis y ont par ailleurs été récemment observées. Parke ezuwami na Est ya Kongo Kinsasa mpe ezipi ndambo ya bangomba Virunga mosika te na Rwanda mpe Uganda. Ekotaki omolongo ya patrimwane ya Unesco o mobu 1979 mpo na bonyama mpe bozamba na yango malamu.

Bototngami ya parke ya Virunga elandani na makambo mibale ya minene oyo ezalaki liboso na yango.Na ebandeli, nkumu Léopold ya mibale a kelaki na 1889 reserve ya koboma nyama mpon na kobatela banzɔku na bo bomi ya mabe.Na mbisa likanisi ya  Carl Akeley, oyo lilita ezuwami na parke, ya botongi tɛmpɛlɔ́ o Virunga, na sima ya missio na ye ya ya bolukiluki (exploration) oyo asalaki o Kivu na 1921..
Parke ya Virunga ezali parke ya liboso na Afrika ko landana na boumeli. Ekelamaki le 21 avril 1925 na kombo parke Albert ya yambo (nkumu ya babelge)|Albert.

Okokuta Oleaceae




#Article 187: Dar Hussein (145 words)


Dar Hussein (arabe: دارحسين), ezali esika ya kala na medina ya Tunis.

Ezwamaki na 4 esika ya castle na district ya Bab Mnara.

Esika oyo ezalaki esika ya bana ya mokonzi, ba dey mpe miyángeli ya badistrict bankama ya bambula. Moto na moto abakisaki elembo na ye (personal touch) mpe bayeisaki yango lisusu munene.

Bobongisi ya esika oyo ezali lelo eponamaki na Youssef Saheb Ettabaâ'.

Na 1858, Dar Hussein ekomaki likita ya bakonzi ya liboso ya Tunis mpe ezwaki nkombo Dar El Achra (Ndako ya bai zomi) mpo ete ezalaki na bato zomi.

Na 1881, mokonzi ya basoda falansé na nkombo Léonard-Léopold Forgemol de Bostquénard afandaki na Dar Hussein na ntango mobimba ya mosala.

Ko banda 1957, ekomaki bulo ya liboso mpo na National Institute of Heritage.

Nkombo oyo euti na nkolo na yango ya suka, General Hussein oyo azalaki moninga makasi na Hayreddin Pasha.




#Article 188: Molɔngɔ́ ya bisika ya Unesco oyo ezali na likama (220 words)


Convention ya Unesco eponaki na 1972 bisika nyonso oyo etalelamaka ete ezali ya mokili mobimba (patrimoine mondial). Article 11.4 ya convention elobi ete Unesco mpe comité ya patrimwane ya mokili mobimba bakoki kopona bisika nyonso oyo misala mininene masengeli kosalema na Molɔngɔ́ ya bisika ya Unesco oyo ezali na likama. Molɔngɔ́ oyo esalamaki mpo na koyebisa mokili mobimba makambo oyo ezotungisa ba caractéristiques oyo esalaki ete eleko (un bien) ekomama (inscription) mpe mpo na koorg
lendisá mikano ya bobongisi. .

Bisika elakisami na kolandana na date ya botiami na yango ya liboso na molɔngɔ́ ya bisika ya Unesco oyo ezali na likama. Eteni « na likama » etalisi bo bakisami na liste. Un fond bleu clair elakis esika oyo ekabolami na bikolo ebele.

Biskia oyo bizalaki na makama mpe ebimisami na liste sima ya misala minene ya gestion mpe conservation. Bambula oyo etiami bizali ya bokomisi mpe ya bobimisi na molongo.

Kolandana na Convention ya 1972, esika oyo ebungisi ba caractéristiques oyo esengeli mpo na bokomisi yango na molongo ya Unesco to oyo ezali lisusu na likama te sima ya mikano ya bobongisi ekoki ko bimisima na molongo na comité ya patrimwane. Comité ekoki mpe ko zwa ekateli mpo na bobimisi na molongo ya likama to na molongo ya Unesco.

Molongo ya bisika oyo esili kobimisama :

Rapports de l'UNESCO




#Article 189: Ndako Saheb Ettabaâ (102 words)


Ndako Ettabaâ Palace ezali ndako moko ya kala na Medina ya Tunis. 

Ezwamaki na Sudi-Est ya esika Halfaouine.

Youssef Saheb Ettabaâ epesaki mitindo ete ndako oyo etongama na ebandeli na siekle 19. 

Na ntango yango, district mobimba ya  Halfaouine ezwamaki na mabongoli mingi: moske moko ya sika na nkombo Moske  Saheb Ettabaâ, madrasas mibale, esukolameli Turc, souk Jedid, fontene moko, mosole moko (nkombo: Tourba) mpe foundouk moko bitongamaki wana.

Ndako ezwami na ekoteli ya Souk Jedid. Ezali na baetaje 3: ya libosó (rez-de-chaussé) ezalaki mpo na bampunda mpe ko bomba biloko (entrepôts ), baetaje mibale misusu bizalaki ba appartments privés mpe salɔ.




#Article 190: Souk El Berka (189 words)


Souk El Berka (na arabe : سوق البركة) ezali moko ya ba souks (bazando) ya médina ya Tunis. Eteka mpe esombaka mingi penza babiju.

Souk oyo etongamaki na 1612 na Youssef Dey. Mosala na yango ezalaki botekisi ba esclaves baye bauti na Afrique subsaharienne. Ba esclave ya Europe, baye bazalaki komonana mpenza te mpe bazalaki ya motuya; ba zalaki kotekisama na souk te, bazalaki kotekisama na bisika bibombana (des endroits plus retirés) mpo ete boteki ezalaki kaka mpo na basombi baye bakokaki ko zala na mosolo ebele.

Na ntango esclavage esilaki na Tunisia, souk ekomaki souk ya ba bijoutiers.

Ezamaki mosika te na kasbah, wapi efandelo ya moyangeli ya gouvernement ezalaka, Dar El Bey mpe ba zando misusu lokola souk El Bey, souk Ech-Chaouachine mpe souk El Leffa..

Souk ezwami na carrefour  ya banzela minei, forme na yango ezali lokola carrée  oyo ekabwani na banzela misato oyo ekabwani na ba colonnes ya ba rangées mibale. Kala, estrade moko ya mabaya na centre ezalaki esika wapi ba esclave bazalaki kolakisama (nde ntina nkombo berka) mpe bazalaki ko zela kotekama. Esika ezipamaki na coupole centrale moko mpe ba voûte  latérales ebele.




#Article 191: Limelo lya ebengeli na esé ya mabelé (147 words)


Limelo lya ebengeli na esé ya mabelé ...





#Article 192: Bondeko ya mpanzi-misáto (182 words)


Bondeko ya mpanzi-misáto

Tozalí na mpanzi-misáto etelema (triangle rectangle): abc

Mpanzi a; Mpanzi b; Mpanzi c

Mpanzi a etelemana na mpanzi c, na falansé balobaka (a na c ezalí perpendiculaire). Elingí koloba: kofungwama ya a na c esáli 90°.

Mpanzi b babengaka yangó: nzelá-mokuse (hypoténuse).

Mobeko ya bondeko ya mpanzi-misáto elobí boye: a2 + c2 = b2.

Elingí koloba: Soki osangisi bakotombwama mbala míbalé ya bapanzi óyo etelemana, okozwa kotombawama mbala míbalé ya mpanzi nzelá ya-mokuse.

Mobeko óyo, Pythagore moto asála yangó te. Bakoko na bísó bato mwindu nde bakelaki yangó na Kemet (Ejipte). Yé akendeki koyékola matématíki na Kemet. Tángo azongi epayi na bangó na Gresi nde akeyi kokoba kosálela yangó mpé kolakisa bandeko na yé. Na tángo ya kala-kala, bakoko  na biso na Kemet (tángo Ejipte ezalákí ya bato mwindu), bakundolakí eté, ezali na bondeko káti na milayi ya mipanzí yangó. Bondeko yangó ezalákí na litómba monene mpô na kotónga bandáko, tǒ mpé, kokabola bitándo na ndenge ya siki-siki (précision) po na kosala bilanga. Bazalákí mpé kosálela yangó mpô na kokɛla banzelá, tǒ mpé, koyékola etamboli ya minzoto na likoló.




#Article 193: Mujinga Kambundji (625 words)


Mujinga Kambundji, abótámí o  o Bern, azalí mosani ya Swisi spécialiste du lisanɔ lya mbángu.

Mujinga Kambundji abótámí o  o Bern. Táta na yé azalí ya Kongó-Kinsásá, máma ny yé azalí ya Swisi. Alobí falansé, lingɛlɛ́sa, lialemaniki mpé lialemani. 
 



#Article 194: Yoane ya La Fontaine (459 words)


Yoane ya La Fontaine tǒ Jean de La Fontaine azalakí mokomi buku mpe mobeti masolo ndenge na ndenge ya ekolo Falansia, oyo ayebani mingi mpenza mpo ya Masapo ma ye.

Yoane ya La Fontaine abotamaki na mobu 1621 na Château-Thierry na Falansia.

Na nsima ya botangi na eteyelo ya kati, baboti ba ye batindaki ye na Likindo Like mpo akoma gsango. Kasi, ntango alongwaki Likindo Like lina mpe aboyaki kolanda mosala mwa bosaleli Nzambe, La Fontaine akendeki na kelasi ya ngomba na engumba Paris mpo na kotanga mambi ma kokata mpe kosambisa makambo. Tango asili, akomaki moko wa baye basalisaka bato bakweli makambo mpo ya bolongi liboso ya ba zuzi. Kuna mpe abandaki kokende kokutana na bakomi buku baye bazalaki komibengama na nkombo ‘te 8a Mampinga ma Etande ya Libungutulu.

Na nsima ya liwa ya tata na ye oa 1658, azongaki epai na bango na mabele ma Chateau-Thierry mpo ya bokobi mosala tata asalaka ya bozali mokonzi oyo atalaka mpe abatelaka bibale mpe zamba inso. Ye nde moto apesaki mwana wa ye elengi mpe momeseno mwa kolinga biloko bwa mokili Nzámbe asalaki. Na mobu 1647, ayaki kobala Marie Héricart, mwasi moko ya mayele oyo, lokola ye moko, abandaki mpe kokende kosangana na bakeomi mpe bai mayele. Lokola mpasi ekotelaki ye na nsima ya liwa ya tata, La Fontaine azwaki lisalisi ya batu mingi ya nkita mpe bayebani mpe azalaki kokoba kosangana na bai mayele mpe bakomi baye bazalaki kokutana na ba mbalasani ya bango, kuna akutanaki na bakomi banene lokola Charles Perraut mpe mingi mpenza Moliére. Wana azwaki mokano mwa bomipesi na mosala mwa bokomi buku.

Na nsima ya bokomi buku ya ye ya liboso, Ekomba mpé Etula ya mobali, mbongola ya mokomi ya lokota la latin na nkombo Térence, La Fontaine abitmisaki buku ya masolo, matongi mpe malako. Na boyekoli lolenge la kokoma masapo ma bakomi ba kala ya nkota ya gresi mpe latina, mingi mpenza ya mokomi Esope, La Fontaine abimisaki, uta mobu 1668 tii 1694, Masapo montango 243, ibimaki na buku inene isato, yoko yoke na ya yango montango ya masapo. Ezali mosala mwa ye moye moyebani koleka mpe yoko ya nkoma mpe buku ya motuya mpe lokumu ya bakomi buku ba falansé. Akomi masapo ma ye na lolenge kitoko mpe abongisi ’te nyama ibeta masolo mpe izala na bilili mpe tmaloba bo bate. Yango wana azali kobanda to kosukisa masapo ma ye na bopesi malako kitoko. Na 1684, mpo ya mosala mwa ye mwa bokomi buku, bayambaki ye na Ndako mpé lingomba ya lokumu litali mambi ma mayele na makomi ma ekolo Falansia.

Na nsima ya bobeli makasi na mobu 1692, La Fontaine akufaki na engumba Pari na mobu 1695. Liboso ‘te akufa, akomaki ye moko maloba ma botiyi na likolo ya lilita la ye:




#Article 195: Masapo mwa La Fontaine (142 words)


Masapo mwa La Fontaine bazalí búku zómi na míbalé ya Yoane ya La Fontaine.

Na boyekoli lolenge la kokoma masapo ma bakomi ba kala ya nkóta ya gresi mpé latina, míngi mpenzá ya mokomi Esope, La Fontaine abimisakí, uta mobú 1668 tii 1694, Masapo montango 243, ibimaki na búku inene isato, yoko yoke na ya yangó montango ya masapo. Ezalí mosala mwa yé moye moyebani koleka mpé yoko ya nkoma mpé búku ya motúya mpé lokúmu ya bakomi búku ba falansé. Akomí masapo ma yé na lolenge kitoko mpé abongisi ’te nyama ibeta masolo mpé izala na bilili mpé tmaloba bo bate. Yangó wana azalí kobanda tǒ kosúkisa masapo ma yé na bopesí malako kitoko. Na 1684, mpô ya mosala mwa ye mwa bokomi buku, bayambaki ye na Ndako mpé lingomba ya lokumu litali mambi ma mayele na makomi ma ekolo Falansia.




#Article 196: Voice of America (228 words)


Voice of America (VOA, Loláká la Ameríka) ezalí mabongisi ya monene koleka na Lisangá lya Ameríka, multimedia, mpo na kopesa sango. Epesaka sango na na nkota biyike, koleka motango ya 45, na bisika biye bizangi to bizali kaka na ndambo ya ba media ya nsomi. Ekelama na 1942. VOA emipesa na kosakola sango na mayele mpo ete bato bayeba. Esalaka na bonsomi nyonso mpe elobaka bosolo. VOA ezuwaka mosolo na yango na bafuti mpako mpo ezala kati na Agence ya Ameríka mpo na media ya mokili mobimba (U.S. Agency for Global Media).

Etinda mpe bonsomi ya VOA bipesameli na mibeko maye mibatelaka ba bapanzi sango ya VOA na bopusi (influence), mbamba (pression) to kozongisela mabe ya bakonzi ya gouvernement to ya baye ya politiki.

Na 1976, président Gerald R. Ford atiyaki manzaka na Charte (mokanda likonzi) ya VOA moye molobi:

Na 1994, Congrès ya Etats-Unis endimaki International Broadcasting Act. Mobeko moye mosengi mpe ete mosala ya ba banzi sango ya VOA ezala ya kilo ekondimisama, ya solo, ya katikati, ya mayele, etali ngambo nyonso mpe ekominisa bokeseni ya culture mpe société ya Amerika.

Na 2016, Congrès esakolaki lisusu na National Defense Authorization Act ete mosala ya kozuwa mpe ya kopesa sango mosengeli kokoba kozala ya bonsomi mpe ya bokatikati.

Mokolo na mokolo, bapanzi sango ya VOA basalaka mosala makasi mpo na kopesa ndakisa ya press libre na mokili.

 




#Article 197: Ndimbola ya “Mwasi”, “Mwana” mpe 'kobunda na bato ya momboto ya mwasi oyo batikalaki' oyo Emoniseli 12 elobeli (191 words)


Na bavɛrsɛ yango, ntoma alobeli mwasi ya nsomi ya Abrahama mpe makango na ye Agar. Alimboli ete Agar akokani na Yerusaleme oyo ya mabele, engumba oyo ezali na nse ya kondimana ya Mibeko mpe oyo “bana” na yango ezali bana-mboka ya ekólo ya bayuda. Nzokande, Paulo alobi, Sara mwasi ya Abrahama akokani na “Yerusaleme ya likoló”  oyo azali “mama” ya elimo ya Paulo mpe ya bandeko na ye mosusu oyo babotamá na elimo. Kozanga ntembe, “mama” yango ya likoló azali mpe “mama” ya Kristo, oyo azali mwana ya liboso ya bandeko na ye, mpe tata na bango nyonso ezali Yehova. — ; talá mpe MWASI YA NSOMI

Boye, bilɛmbɛteli mpe makomami endimisi ete “mwasi” ya  ezali nde mwasi ya elimo. Lisusu, ndenge kaka “mwasi ya libala” ya Kristo ezali moto moko te, kasi nde lisangá oyo ezali na bato ya elimo ebele (), ndenge moko mpe “mwasi” oyo azali kobotela Nzambe bana ya elimo, to “mwasi ya libala” ya Nzambe (oyo esakweli ya Yisaya mpe ya Yirimia elobeli) ezali mpe kaka lisangá ya bikelamu ya elimo ebele. Kasi lisangá ya bikelamu ya elimo yango to ebongiseli yango ezali nde ya likoló.  




#Article 198: Bokungu (eténi) (105 words)


Eténi ya Bokungu ezali móko ya eténi óyo ezali na káti ya etúká ya Tshuapa na Ekólo Kongó-Kinsásá.

Eténi ya Bokungu ezali móko ya eténi óyo ezali na kai ya etúká ya Tshuapa na ekólo Kongó-Kinsásá.

Ezalaka na katikati ya etuka ya Tshuapa, na ɛsti ya teritware-mokonzi ya Boende.

Ezali na sité káka móko óyo ezali na bato pɛnɛ na 80 000, nkombo na yangó káka Bokungu mpé ezali na bapesi-toli-bakambi nsambo. 

Eténi ya Bokungu ezali na bokonzi mínei ná sheferi móko: 

Eténi ya Bokungu ezalí na bokonzi 4 mpé sheferi moko:

nongo mbelo, engumba ya bosoliongo, mission catholique Yemo

Bokoli ya bato na Bokungu




#Article 199: Bokɔnɔ́ bwa Sika 2019 Vilúsu Kolóná (147 words)


Bokɔnɔ́ bwa Sika 2019 Vilúsu Kolóná (CoVID-2019) ezali bokɔnɔ́ bwa mpéma. Yangó ewútaka na vilúsu kolóná. Kopalangan ya bokɔnɔ́ bwa CoVID-19 ebandákí na engumba Wuhan na Shina mpé ezali kopanzana na ba mbóka misúsu wuta ebandí.

Bilembo (fɛ́fɛlɛ, kɔsúkɔsú, mpási ya kompéma) ebandaka na mikóló 2 kinó 14 síma ya kozwa bokɔnɔ́/vilúsu. Makɔnɔ́ óyo eyebani ezali na bokeseni ya moke tǒ ebelé. Bokɔnɔ́ ya makasi ekokí komɛma bokɔnɔ́ ya mpéma (pneumonia), bokɔnɔ́ bwa mombuka (insufficance rénale), mpé na liwâ.
 
Benga monganga na yɔ̌ sɔ́kí ozalí na bilembo wana. Yebisa yé sɔ́kí okendaki mobembo mpe sɔ́kí okutanaki na moto óyo azwe bokɔnɔ́ óyo. Benga lopitalo LIBOSO okoma sɔ́kí ozalí na bosenga ya mónganga.

Sokola maboko na yɔ̌ na sabúni mpé na mái. Esengeli mpé kosokola maboko na yɔ̌ ata 20 sekondi. Salela kísi ya ba microbes óyo ezali ata na

Lisálisi ya solo solo ezalí tɛ́ pona CoVID-19.




#Total Article count: 199
#Total Word count: 70657